Bipai nyonso bato bazali kobeba binama ya nzoto
CHRISTIAN afandaka na ekólo moko ya Afrika. Mokolo mosusu, basoda bakangaki ye mpo bákɔtisa ye na mosala ya soda; kasi ye aboyaki mpamba te, lokola ayekolaki Biblia, lisosoli na ye epekisaki ye kosala mosala wana. Basoda bamemaki ye na kaa na bango mpe babɛtaki ye na boumeli ya mikolo minei mobimba; na nsima, moko na bango abɛtaki ye masasi na lokolo. Christian asalaki makasi mpe akómaki na lopitalo, kasi bakataki ye lokolo na nse ya libɔlɔngɔ. Na ekólo mosusu ya Afrika, basoda ya batomboki bazalaki kokata ata bana mike mabɔkɔ to makolo. Lisusu, na mikili lokola Cambodge, na mikili ya Balkans, na Afghanistan, na Angola, bato bazali kobukana to kokatana makolo soki banyati bamine, ezala bana to mikóló.
Likambo mosusu oyo ezali kobebisa bato binama ezali makama mpe bamaladi lokola diabete. Kopema mopɛpɛ oyo ezali na pwazo ekoki mpe kobebisa binama ya nzoto. Na ndakisa, na bakartye oyo ezali pembenipembeni ya engumba moko ya Mpoto ya Ɛsti, bana mingi babotamaki na lobɔkɔ ya mobali ndambo. Ekoki mpenza kozala ete baboti bapemaki mopɛpɛ oyo ezalaki na pwazo ya baizini, yango wana bana babotamaki na mbeba. Ezali mpe na ebele ya bato oyo bazali na mabɔkɔ mpe makolo na bango nyonso, kasi esalaka lisusu te mpo na maladi ya paralize to maladi mosusu. Ndenge tomoni yango, na bisika ndenge na ndenge, bato bazali kobeba binama ya nzoto.
Ata soki ntina nini esali ete moto abeba enama moko ya nzoto, kobeba enama ya nzoto epesaka moto mpasi mingi. Ntango Junior azalaki na mbula 20, akatanaki lokolo ya mwasi na libɔlɔngɔ. Alobaki boye na nsima: “Mbala mingi nazalaki konyokwama na makanisi. Nazalaki kolela mingi soki nakanisi ete nakozala bongo bomoi na ngai mobimba. Nayebaki likambo ya kosala te. Nabulunganaki mpenza.” Kasi na nsima, makanisi ya Junior ebongwanaki mpenza. Akómaki koyekola Biblia mpe ayebaki makambo oyo esalisaki ye na kolonga mokakatano na ye mpe epesaki ye elikya ya bomoi ya malamu awa na mabele na mikolo ekoya. Soki ozali na enama moko oyo ebebá, yo mpe okolinga kokóma na elikya yango?
Soki ɛɛ, tosɛngi na yo otánga lisolo oyo elandi. Tolendisi yo otánga na kati ya Biblia na yo bavɛrsɛ oyo epesami mpo na koyeba makambo oyo Mozalisi akosala mpo na baoyo bazali koyekola mokano na ye mpe bazali kosala yango.