Ndenge oyo kobeba binama ya nzoto ekosila
KANISÁ ete bato oyo bakufá miso bakómi komona, bato oyo bakufá matoi bakómi koyoka makambo nyonso, bato oyo balobaka te bakómi koyemba na esengo, mpe bato babukaná makolo bakómi kotambola malamu! Awa tolingi koloba te ete minganga bakokóma na mayele mingi mpenza mpe bakosala makambo wana; tozali nde kolobela likambo oyo Nzambe akosala mpo na bato. Biblia elobi boye: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 35:5, 6) Nini ezali kondimisa biso ete makambo yango ya kokamwa ekosalema?
Ya liboso, ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabele, abikisaki bato oyo bazalaki na maladi ya lolenge nyonso mpe bato oyo binama na bango ebebaki. Lisusu, ebele ya bato, ata mpe banguna na ye, bamonaki mingi na makamwisi oyo asalaki. Kutu, mbala soki moko, banguna oyo bazalaki kotya ntembe balandelaki malamu likambo ya moto moko oyo abikaki mpo báyeba soki Yesu azalaki kokosa bato mpo bámonisa yango polele. Kasi, bato yango batikalaki na nsɔni, mpamba te basukaki kaka na koyeba ete asalaki mpenza likamwisi. (Yoane 9:1, 5-34) Ntango Yesu asalaki likamwisi mosusu oyo bato bamonaki na miso, banguna yango balobaki na nkanda ete: “Tósala nini? Mpo ete moto oyo azali kosala bilembo mingi.” (Yoane 11:47) Kasi, baoyo bazalaki bato mpamba bazalaki na mitema libanga te, mpamba te mingi bakómaki kondimela Yesu.—Yoane 2:23; 10:41, 42; 12:9-11.
Makamwisi ya Yesu emonisaki ete akosilisa maladi na mokili mobimba
Makamwisi ya Yesu esukaki kaka te na komonisa ete azalaki Masiya mpe Mwana ya Nzambe. Ezali mpe kondimisa biso bilaka ya Biblia ete na mikolo ezali koya, bato ya botosi bakobikisama na maladi nyonso. Na kati ya bilaka yango tozali mpe na esakweli ya Yisaya mokapo 35 oyo ezali na makambo oyo tolobelaki na paragrafe ya liboso. Yisaya 33:24 elobi na ntina na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato oyo babangaka Nzambe ete: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” Emoniseli 21:4 mpe elaki ete: “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso [mitungisi mpe bampasi oyo ezali lelo oyo] masili koleka.”
Ntango bato basalaka libondeli oyo Yesu ateyaki lokola ndakisa, basɛngaka nde ete bilaka yango ekokisama. Na esika moko libondeli yango elobaka boye: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló.” (Matai 6:10) Ya solo, Nzambe azali mpe na mokano mpo na mabele mpe bato. Atako Nzambe ayebi ntina oyo atikaki maladi mpe kobeba binama ya nzoto, etikali moke esila mpo na libela. Makambo yango ekobebisa lisusu te “etyelo ya makolo” ya Nzambe.—Yisaya 66:1.a
Bayokaki mpasi te mpe bafutaki eloko te ntango babikisaki bango
Yesu abikisaki bato oyo bazalaki ata na maladi ya lolenge nini; ntango abikisaki bango, bayokaki ata mpasi moko te, azwaki ntango mingi te mpo na kosala yango mpe asalaki yango ofele. Yango wana, nsango ya makamwisi na ye ezalaki kopanzana nokinoki, mpe mwa moke na nsima ‘bato ebele bazalaki koya epai na ye, mpe bazalaki komema bato batambolaka tengutengu, bibɔsɔnɔ, bato bakufá miso, bato balobaka te mpe bato mingi mosusu ya maladi, mpe babwakaki bango na makolo na ye, mpe abikisaki bango.’ Bato basalaki nini ntango bamonaki makambo yango? Matai amonaki makambo yango na miso mpe na lisolo na ye akomaki boye: “Ebele bakamwaki ntango bamoni bato balobaka te bazali koloba mpe bato batambolaka tengutengu bazali kotambola malamu, mpe bato bakufá miso bazali komona, mpe bakumisaki Nzambe ya Yisalaele.”—Matai 15:30, 31, NW.
Tomoni ete Yesu azalaki kosala lokola bakosi te. Bakosi baponaka bato oyo bakobikisa mpo bayokanaka na bango liboso mpo bákosa ete bazali na maladi mpe bákɔta na kati ya bato ya maladi. Nzokande, bandeko mpe baninga ya bato ya maladi bazalaki ‘kolalisa bango na makolo na [Yesu] mpe azalaki kobikisa bango.’ Sikoyo, tótalela naino nguya ya kobikisa oyo Yesu azali na yango na mwa bandakisa ya makamwisi oyo asalaki.
Kokufa miso: Ntango azalaki na Yelusaleme, Yesu asalisaki moto moko oyo azalaki “na miso makufi longwa na kobotama na ye.” Na engumba mobimba, bato ebele bayebaki ete miso ya moto yango ekufá mpe azalaki kosɛngasɛnga. Kanisá ndenge mboka mobimba ekamwaki mpe yikiyiki oyo ekɔtaki ntango bamonaki moto yango azali kotambola mpe azali komona! Kasi, bato mosusu basepelaki te. Lokola Yesu abimisaki polele mabe na bango, bato mosusu ya mwa lingomba moko ya Bayuda oyo ezalaki na lokumu mingi oyo babengamaki Bafalisai, bato yango bayokaki nkanda; yango wana balukaki na ndenge nyonso kozwa likambo oyo ekondimisa bato ete Yesu azalaki nde kokosa bango. (Yoane 8:13, 42-44; 9:1, 6-31) Yango wana, batunaki moto oyo akómaki komona, na nsima batunaki baboti na ye, mpe na nsuka batunaki lisusu ye moko. Kasi, ndenge wana oyo Bafalisai balukaki koyeba likambo yango endimisaki bango nde malamumalamu ete Yesu asalaki mpenza likamwisi; yango ebakisaki bango lisusu nkanda. Moto oyo akómaki komona akamwaki na komona motema mabe mpe bokosi ya bakonzi yango ya lingomba, yango wana alobaki ete: “Longwa na ebandeli, eyokami naino te ete moto afungoli miso na oyo abotami na miso makufi. Soko moto oyo auti na Nzambe te, akoki kosala eloko te.” (Yoane 9:32, 33) Ntango bayokaki maloba wana ya sembo mpe ya mayele mpe oyo ezali komonisa kondima, Bafalisai ‘babwakaki ye libándá,’ elingi koloba babenganaki na sinagoga moto oyo akómaki komona.—Yoane 9:22, 34.
Kokufa matoi: Ntango Yesu azalaki na Dekapoli, etúká oyo ezali na ɛsti ya Ebale Yaladene, “[Bamemelaki] ye moto moko akufi matoi mpe na likukuma.” (Malako 7:31, 32) Yesu asukaki kaka te na kobikisa moto yango kasi amonisaki mpe ayebaki malamumalamu ndenge oyo bato bakufá matoi bamiyokaka: mbala mosusu babangabangaka ntango bazali na kati ya ebele ya bato. Biblia elobi ete Yesu ‘alongolaki ye pembeni ya bato’ mpe abikisaki ye. Na mbala yango mpe, bato oyo bamonaki “bakamwaki mingi mpenza” mpe balobaki ete: “Asali makambo nyonso malamu. Azali koyokisa ata bato bakufá matoi mpe kolobisa bababa.”—Malako 7:33-37, NW.
Maladi ya paralize: Ntango Yesu azalaki na Kapalanauma, bamemelaki ye moto moko oyo azalaki na maladi ya paralize, alalaki na mbeto. (Matai 9:2) Vɛrsɛ 6 tii 8 elobi makambo oyo elekaki. “[Yesu] alobi na [moto oyo azalaki na maladi ya paralize, NW] ete, Tɛlɛmá, lɔkɔtá litɔkɔ na yo mpe kendá na ndako na yo. Atɛlɛmi, akei na mboka. Emoni bibele boye, babangi mpe basanzoli Nzambe oyo asili kopesa nguya na lolenge oyo epai ya bato.” Yesu asalaki likamwisi yango na miso ya bayekoli na ye mpe na miso ya banguna na ye. Kasi, omoni ete bayekoli, lokola bazalaki na likunya te mpe na makanisi mabe te, makambo bamonaki etindaki bango na ‘kosanzola Nzambe.’
Maladi: “Moto moko na [maba] ayaki epai na [Yesu] kobondela ye, mpe akumbami liboso na ye; alobi na ye ete, Soko olingi, okoki kopɛtola ngai. Ayoki mawa, asemboli lobɔkɔ mpe [asimbi] ye, ye ete, Nalingi, pɛtwá na yo! Nokinoki [maba] elongwi na ye mpe apɛtwi.” (Malako 1:40-42) Omoni ete Yesu akakatanaki te mpo na kobikisa moto yango, ayokelaki ye mpenza mawa. Kanisá soki ozalaki moto ya maba. Olingaki koyoka ndenge nini soki babikisi yo mbala moko mpe kozanga ete oyoka mpasi, na maladi ya nsɔmɔ oyo ezalaki mokemoke kobebisa yo nzoto mpe esɛngaki ete ofandaka lisusu esika moko te na bato? Na ntembe te yango ekoki kosalisa yo okanga ntina oyo moto mosusu ya maba oyo Yesu abikisaki na likamwisi “akweaki na elongi na ye epai na makolo ya Yesu mpe atɔndaki ye.”—Luka 17:12-16.
Kozoka mpota: Likamwisi ya nsuka oyo Yesu asalaki liboso bákanga ye mpe bábaka ye na nzete ezalaki mpe likambo ya kobikisa moto. Ntoma Petelo ayokaki nkanda ntango bato balingaki kokanga Yesu, lokola “azalaki na mopanga, abimisi yango, mpe aboli moombo ya nganga monene, akati litoi na ye ya mobali.” (Yoane 18:3-5, 10) Lisolo ya Luka elobi ete Yesu “asimbi litoi ya moto wana mpe abikisi ye.” (Luka 22: 50, 51, Boyokani ya Sika) Na mbala oyo mpe baninga na ye mpe banguna na ye—kutu banguna oyo bayaki kokanga ye—bamonaki likambo yango oyo Yesu asalaki na motema boboto.
Soki tolandeli malamumalamu makamwisi ya Yesu, tokomona mpenza ete ezalaki na makambo ya lokuta te. (2 Timote 3:16) Mpe ndenge tolobaki yango liboso, boyekoli yango esengeli kolendisa kondima na biso na elaka ya Nzambe ete akobikisa bato nyonso ya botosi. Biblia elimboli ete kondima ya moklisto elimboli “kozela na motema mobimba makambo oyo moto azali kolikya, elakiseli ya polele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1, NW) Na maloba mosusu, Nzambe azali kolendisa biso te ete tózala bato ya bindimandima to tókanisaka makambo oyo ekoki kosalema te, kasi nde tózala na kondima makasi oyo tosengeli kolona nsima ya kotalela makambo oyo ezali komonana polele. (1 Yoane 4:1) Ntango tokómi na kondima ya ndenge yango, tokomona ete elimo na biso ekokóma makasi mpe malamu koleka; mpe esengo na biso ekobakisama.—Matai 5:3; Baloma 10:17.
Tozali libosoliboso na mposa ya kobikisama na elimo!
Ezali na bato mingi oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ kasi bazali na esengo te. Bato mosusu kutu bazali koluka komiboma mpamba te bazali na elikya te mpo na mikolo ezali koya to mpo bazali komona ete makambo eleki bango motó. Elingi koloba ete bazali na maladi na elimo; na miso ya Nzambe, yango ezali mabe koleka kobeba enama ya nzoto. (Yoane 9:41) Epai mosusu, bato mingi oyo babebá binama ya nzoto, lokola Christian na Junior oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, bazali na bomoi ya esengo. Mpo na nini? Mpamba te elimo na bango ezali kolɔngɔnɔ mpe elikya oyo Biblia epesi ezali kopesa bango makasi.
Yesu alobelaki mposa moko oyo biso bato tozalaka na yango ete: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4, NW) Bato bakeseni mpenza na banyama, bato bazalaka kaka te na mposa ya biloko ya kolya. Lokola tokelamá na “elilingi” ya Nzambe, tozalaka mpe na mposa ya bilei ya elimo, elingi koloba boyebi ya Nzambe mpe esika na biso na kati ya mokano na ye mpe lisusu, kosala makambo oyo ye alingaka. (Genese 1:27; Yoane 4:34) Boyebi ya Nzambe esalaka ete bomoi na biso ezala na ntina mpe epesaka biso makasi ya kosalela Nzambe. Lisusu, ebongisaka biso mpo na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyeba yo Nzambe moko ya solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
Likambo moko oyo ezali kobenda likebi na biso ezali ete bato ya ntango ya Yesu bazalaki kobenga ye “Mobikisi” te, kasi “Molakisi.” (Luka 3:12; 7:40) Mpo na nini? Mpamba te Yesu azalaki koteya ndenge oyo mikakatano ya bato ekosila mpo na libela: na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43; Yoane 6:26, 27) Guvɛrnɛma yango ya likoló oyo Yesu Klisto akotambwisa ekoyangela mabele mobimba mpe ekokokisa bilaka nyonso ya Biblia oyo elobi ete bato ya sembo bakozala lisusu malamu mpe mabele ekozala lisusu malamu mpo na libela. (Emoniseli 11:15) Yango wana, na libondeli ya ndakisa, Yesu alobelaki koya ya Bokonzi esika moko na kosalema ya mokano ya Nzambe awa na mabele.—Matai 6:10.
Mawa ya ebele ya bato oyo binama ya nzoto na bango ebebá, ebongwanaki esengo nsima ya koyekola elikya yango oyo ezali mpenza kopesa esengo. (Luka 6:21) Kutu, Nzambe akosuka te kaka na kolongola maladi mpe kobeba binama ya nzoto; akolongola likambo oyo ememelaki bato mpasi: lisumu. Yisaya 33:24 mpe Matai 9:2-7, oyo totángaki maloba na yango mwa liboso, emonisi ete lisumu nde ememaki maladi. (Baloma 5:12) Yango wana, soki lisumu elongwe, bato bakozwa “bonsomi ya nkembo ya bana ya Nzambe,” oyo elimboli mpe kokóma na ezaleli ya kokoka na makanisi mpe na nzoto.—Baloma 8:21, NW.
Bato oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ bakoki ntango mosusu kobosana valɛrɛ na yango. Kasi, bato oyo bazali konyokwama mpo binama ya nzoto na bango ebebá, bango bamonaka makambo ndenge mosusu mpenza. Bato yango bayebi valɛrɛ ya kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe valɛrɛ ya bomoi mpe ndenge nini makambo ekoki kobongwana na mbalakaka mpe kozanga ete ekanama. (Mosakoli 9:11) Yango wana, elikya na biso ezali ete na kati ya bato oyo bakotánga masolo oyo, baoyo babebá binama ya nzoto bakotalela malamu bilaka kitoko ya Nzambe oyo ezali na kati ya Biblia. Yesu apesaki bomoi na ye mpo ete bilaka yango ekokisama. Bomoi na ye oyo apesaki lokola mbeka ezali ndanga oyo eleki bandanga nyonso oyo tokoki kozala na yango.—Matai 8:16, 17; Yoane 3:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamumalamu ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, talá mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.