Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/7 lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Satana azali nani? Azalaka mpenza?
    Lamuká!—2007
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yebá monguna na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/7 lok. 30

Mituna ya batángi

Mpo na nini na Baebele 2:14 babengi Satana “moto oyo azali na likoki ya kopesa liwa”?

Eyano ya mokuse ezali ete Paulo alingaki koloba ete Satana ye moko to bato na ye, bazali na likoki ya koboma moto. Yango wana, Yesu abengaki Satana “mobomi-bato ntango abandaki.”​—Yoane 8:44.

Moto akoki kozwa likanisi mosusu ntango atángi Baebele 2:14 mpamba te na Babiblia mosusu vɛrsɛ yango ebongolami ete Satana azali moto “oyo asimba nguya ya liwa” to azali na “bokonzi ya kufa.” (Bible na lingala ya lelo oyo; Haut-fleuve) Kobongola maloba yango ndenge wana ekoki kotinda moto akanisa ete Satana azali na nguya nyonso ya koboma moto nyonso oyo ye alingi. Kasi, emonani polele ete ezali bongo te. Soki ezala bongo, na ntembe te mbɛlɛ asilisá basaleli nyonso ya Yehova awa na mokili banda kala.​—Genese 3:15.

Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “nguya ya liwa” na Babiblia mosusu mpe “likoki ya kopesa liwa” na Libongoli ya Mokili ya sika ezali “kratos tou thanatou.” Maloba tou thanatou elimboli “liwa.” Kratos elimboli mpenzampenza “nguya, makasi, likoki.” Buku moko (Theological Dictionary of the New Testament) elobi ete ezali kopesa likanisi ya “makasi to nguya mpe bonene na yango, kasi te kosalelama na yango.” Na bongo, na Baebele 2:14, Paulo alobi te ete Satana azali na nguya nyonso ya liwa. Kasi, azali komonisa kaka ete Satana akoki kozala na makasi to nguya ya kopesa liwa.

Ndenge nini Satana asalelaka “likoki ya kopesa liwa”? Mokanda ya Yobo eyebisi biso likambo moko oyo esalemá mingi te. Lisolo yango elobi ete Satana asalelaki mopɛpɛ makasi mpo na ‘kopesa liwa’ [to koboma] bana ya Yobo. Kasi, tóbosana te ete soki Satana akokaki kosala yango, ezali mpo Nzambe atikelaki ye nzela mpo na kosilisa ntembe oyo atyaki na likambo moko ya ntina mingi. (Yobo 1:12, 18, 19) Kutu, Satana akokaki te koboma Yobo ye moko. Azwaki ndingisa ya kosala yango te. (Yobo 2:6) Yango emonisi ete atako ntango mosusu Satana azalaka na likoki ya kopesa bato ya sembo liwa, tosengeli te kobanga ete akoki koboma na ntango nyonso oyo alingi.

Satana asalelaki mpe bato na ye mpo na koboma. Na bongo, baklisto mingi bakufaki mpo na kondima na bango, bamosusu babomamaki na ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda to mpe bakonzi ya Leta to bazuzi mabe bapesaki mitindo ete báboma bango atako basalaki mabe te.​—Emoniseli 2:13.

Lisusu, Satana asalelaki ntango mosusu bolɛmbu ya bato mpo na kopesa liwa. Na Yisalaele, mosakoli Balama apesaki Bamoaba toli ete bábenda Bayisalaele na ‘kosalela Yehova mabe.’ (Mituya 31:16) Yango ememelaki Bayisalaele 23 000 liwa. (Mituya 25:9; 1 Bakolinti 10:8) Lelo oyo mpe, bato mosusu bazali kozwama na “mayele mabe” ya Satana mpe bazali kokwea na pite mpe na ekobo to na misala mosusu ya mabe. (Baefese 6:11) Ya solo, bato ya ndenge wana bakufaka mbala moko te. Kasi, bazali na likama ya kozanga bomoi ya seko, mpe na ndenge yango, Satana azali kopesa bango liwa.

Atako toyebi ete Satana azali na nguya ya kosala mabe, tosengeli kobangabanga ye te. Ntango Paulo alobaki ete Satana azali na likoki ya kopesa liwa, alobaki mpe ete Klisto akufaki mpo “akoka kobebisa [Satana] nyɛɛ . . . mpe ete akoka kopesa bonsomi na bato nyonso oyo mpo na kobanga liwa batyamaki na kati ya boombo na boumeli ya bomoi na bango mobimba.” (Baebele 2:14, 15) Yesu afutaki lisiko mpe na ndenge yango, alongolaki bato ya kondima na boombo ya lisumu mpe ya liwa.​—2 Timote 1:10.

Ya solo, tosengeli kozwa na lisɛki te likambo ya koyeba ete Satana azali na likoki ya kopesa liwa, kasi tozali na elikya ete Yehova akoki kolongola mpasi nyonso oyo Satana ná bato na ye bakoki kopesa. Yehova alaki biso ete Yesu oyo asili kosekwa ‘akobukabuka misala ya Zabolo.’ (1 Yoane 3:8) Na nguya ya Yehova, Yesu akosekwisa bakufi mpe na bongo akolongola liwa mpo na libela. (Yoane 5:28, 29) Na nsima, Yesu akomonisa polele ete Satana azali na nguya nyonso te ntango akokitisa ye na libulu mozindo mpe na nsuka akoboma ye mpo na libela.​—Emoniseli 20:1-10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto