Bato mpamba babongoli Biblia
NA MOBU 1835, Henry Nott, moto moko ya Angleterre oyo azalaki masɔ mpe John Davies, moto moko ya Pays de Galles oyo azalaki motɛki ya bikelakela oyo batyaka na bilei, basilisaki mosala moko monene. Nsima ya kobunda na boumeli ya mbula koleka 30, basilisaki kobongola Biblia mobimba na monɔkɔ ya Tahitien. Mibali yango mibale oyo bazalaki bato mpamba bakutanaki na mikakatano nini, mpe mosala makasi oyo basalaki na bolingo na bango ebimisaki mbano nini?
‘Bato oyo balamuki’
Banda mobu 1751 tii 1800, bato ya mwa lingomba moko ya Protesta oyo ebengamaki Grand Réveil (Kolamuka), bazalaki kosakola na bamboka mpe penepene na bamine mpe na baizini na Angleterre. Bazalaki mpenza koluka ete bato ya misala bákɔta na lingomba na bango. Basakoli ya mwa lingomba yango bazalaki kolendisa makasi likambo ya kokabolela bato Biblia.
William Carey, mobandisi ya mwa lingomba yango oyo autaki na Lingomba ya Baptiste, azalaki moko ya bato oyo babimisaki Société missionnaire de Londres na 1795. Société yango ezalaki kopesa bato oyo basepeli koyekola minɔkɔ ya bapaya formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ na bamboka ya Pasifike ya Sudi. Bamisionɛrɛ yango basengelaki kokende kuna mpo na kosakola Evanzile na monɔkɔ ya mboka ya bato ya mikili yango.
Esanga Tahiti oyo bautaki komona ezali esika ya liboso oyo batindaki bamisionɛrɛ wana. Mpo na bato ya lingomba ya Réveil, bisanga yango ezalaki mpenza ‘bisika ya molili’ ya bopakano, bilanga oyo ekɔmeli mpenza mpo na kobuka mbuma.
Bato mpamba balongi kosala mosala yango
Mpo na kobuka mbuma yango, bato 30 oyo baponaki mpe bapesaki bango formasyo ya likolólikoló mpo na mosala ya misionɛrɛ, bakɔtaki na Duff, masuwa oyo société wana esombaki. Lapolo moko elobi ete na kati ya bato yango ezalaki na “bapastɛrɛ minei [oyo batángá mingi te], basali-mabaya motoba, basali-sapato mibale, bamasɔ mibale, basali-bilamba na mabɔkɔ mibale, batongi-bilamba mibale, motɛki na magazini moko, mosali ya bibende ya makolo ya bampunda moko, mwana-mosala moko, mosali bilanga moko, monganga moko, motuli-bibende moko, mosali-batono moko, mosali-nsinga ya bilamba ya ntokya moko, mosali-bikɔti moko, mosali-bilamba na izini moko, ebeniste moko, basi ya mabala mitano mpe bana misato.”
Mpo na koyeba maloba ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli, bamisionɛrɛ yango bazalaki kaka na diksionɛrɛ moko ya Grɛki ná Lingelesi ná Biblia moko oyo ezalaki na diksionɛrɛ ya monɔkɔ ya Liebele. Na boumeli ya sanza nsambo oyo masuwa na bango esalaki na mbu, bamisionɛrɛ yango bazalaki koyekola maloba ya monɔkɔ ya Tahitien oyo bato oyo bakendaki kuna liboso bakomaki, mingimingi batomboki ya masuwa Bounty. Nsukansuka, masuwa Duff ekómaki na Tahiti mpe, na mokolo ya 7 Marsi 1797, bamisionɛrɛ babimaki na masuwa. Kasi, nsima ya mbula moko, mingi kati na bango balɛmbaki nzoto mpe balongwaki na Tahiti. Kaka bamisionɛrɛ nsambo nde batikalaki.
Na kati ya bamisionɛrɛ nsambo wana, Henry Nott, oyo kala azalaki masɔ, azalaki kaka na mbula 23. Mikanda ya liboso oyo akomaki ezali komonisa ete atángaki kelasi mingi te. Atako bongo, banda kaka na ebandeli, azalaki makasi na koyekola monɔkɔ ya Tahitien. Balobaki ete azalaki moto ya bosembo, azalaki mindɔndɔ te, mpe bato bazalaki kosepela na ye mingi.
Na mobu 1801, baponaki Nott ateya monɔkɔ ya Tahitien na bamisionɛrɛ libwa oyo bautaki koya. Moko na bamisionɛrɛ yango ezalaki John Davies, elenge ya mbula 28; azalaki moyekoli ya mayele mpe azalaki makasi na mosala, mpe moto ya boboto. Mwa moke na nsima, mibali yango bazwaki mokano ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Tahitien.
Mosala monene mpenza
Kasi, kobongola Biblia na monɔkɔ ya Tahitien ezalaki mosala monene mpenza, mpo monɔkɔ yango ezalaki naino kokomama te. Mpo na koyekola yango, bamisionɛrɛ basengelaki kaka koyoka ndenge bato bazalaki koloba yango. Bazalaki na diksionɛrɛ te, ata mpe buku ya gramɛrɛ te. Lokola maloba ya monɔkɔ yango eyokanaka lokola nde moto azali kokangama mpema ntango azali koloba, mpe ezali na ebele ya milelisi (voyelles)—oyo ekoki kozala ata mitano na liloba kaka moko—kasi kaka mwa mileli (consonnes) moke, bamisionɛrɛ bakɛmbaki nzoto. Bazalaki koloba ete: “Maloba mingi ezali kaka na milelisi mpamba, mpe maloba yango nyonso ekeseni.” Balobaki ete bazalaki kokoka te “kokanga na bosikisiki lolaka oyo esengeli kobimisa mpo na koloba maloba ya monɔkɔ yango.” Bazalaki kutu kokanisa ete lolaka mosusu oyo bazalaki koyoka ezalaka te!
Mokakatano yango ezalaki kokóma lisusu makasi koleka mpamba te maloba mosusu oyo bazalaki kokoma ezalaki mabe to ezalaki ekila na monɔkɔ ya Tahitien, mpe mpo na yango esengelaki koluka maloba mosusu na esika na yango. Mokakatano mosusu ezalaki ete mbala mosusu ezalaki na ebele ya maloba oyo ezali na ndimbola moko. Na monɔkɔ ya Tahitien, bazali na maloba koleka 70 mpo na kolobela “libondeli.” Ndenge ya kosangisa maloba mpo na kosala bafraze na monɔkɔ ya Tahitien ekeseni mpenza na oyo ya Lingelesi, mpe yango ezalaki mokakatano mosusu. Atako bakutanaki na mikakatano yango, mokemoke bamisionɛrɛ yango bazalaki kosala liste ya maloba oyo esalisaki Davies, mbula 50 na nsima, abimisa diksionɛrɛ oyo ezalaki na maloba 10 000.
Mokakatano mosusu ezalaki ya koyeba ndenge nini bakoki kokoma monɔkɔ ya Tahitien. Bamisionɛrɛ bamekaki kosalela ekomeli ya Lingelesi mpo na kokoma monɔkɔ yango. Nzokande, alfabɛ oyo basalelaka mpo na kokoma Lingelesi ebongi te mpo na kobimisa lolaka oyo maloba ya monɔkɔ ya Tahitien ebimisaka. Bamisionɛrɛ yango bazalaki ntango nyonso kofandela likambo yango mpo na koluka kobimisa ndenge ya kokoma mpe kotánga maloba ya monɔkɔ ya Tahitien. Lokola bamisionɛrɛ yango bazalaki bato ya liboso na mikili ya Mbu ya Pasifike oyo babimisaki ndenge ya kokoma maloba ya monɔkɔ oyo ezalaki naino kokomama te, mbala mingi bazalaki kobimisa ekomeli ya sika. Ntango bazalaki kosala bongo, bazalaki koyeba ata moke te ete mosala na bango ekosalisa mingi mpo na kobimisa ndenge ya kokoma minɔkɔ mingi ya bisanga ya Pasifike.
Bazalaki na bisaleli mingi te, kasi bazalaki na mayele mingi
Babongoli yango bazalaki kaka na mwa babuku moke oyo ekokaki kosalisa bango na mosala na bango. Société na bango eyebisaki bango básalela Biblia ya Latin oyo babengi Textus Receptus ná libongoli ya King James. Nott asɛngaki bátindela bango badiksionɛrɛ ná Babiblia mosusu na minɔkɔ ya Liebele mpe ya Grɛki. Eyebani te soki azwaki babuku oyo asɛngaki. Nzokande, baninga ya Davies na Pays de Galles batindelaki ye mwa babuku oyo bato ya mayele bakomá. Balapolo ezali komonisa ete azalaki na diksionɛrɛ moko ya monɔkɔ ya Grɛki, Biblia moko na Liebele, Kondimana ya Sika na monɔkɔ ya Grɛki mpe Biblia ya Septante.
Na ntango yango, mosala ya kosakola oyo bamisionɛrɛ bazalaki kosala ezalaki kobota mbuma te. Atako bamisionɛrɛ yango basilaki koumela na Tahiti mbula 12, mwana-mboka ata moko te azwaki batisimo. Nsukansuka, lokola bitumba ezalaki ntango nyonso na kati ya bana-mboka, bamisionɛrɛ nyonso bakimaki na Australie, kasi Nott akimaki te. Na boumeli ya mwa bambula, azalaki misionɛrɛ kaka moko oyo atikalaki na Îles du Vent oyo ezali na kati ya bisanga babengi Îles de la Société, kasi ntango Mokonzi Pomare II akimaki na esanga Moorea oyo ezali pene na Tahiti, Nott akendeki elongo na ye.
Kasi, atako Nott akendaki na mboka mosusu, yango epekisaki ye te kokoba mosala ya kobongola Biblia; mpe nsima ya kolekisa mbula mibale na Australie, Davies azongaki lisusu esika Nott azalaki. Na ntango wana Nott ayekolaki monɔkɔ ya Grɛki ná monɔkɔ ya Liebele mpe ayebaki yango malamu mpenza. Na yango, abandaki kobongola mwa biteni mosusu ya Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Tahitien. Azalaki kopona mikapo ya Biblia oyo ezali na masolo oyo ekokaki kosepelisa bato ya mboka.
Lokola Nott akómaki lisusu kosala elongo na Davies, abandaki kobongola Evanzile ya Luka, mpe asilisaki yango na Sɛtɛmbɛ 1814. Azalaki kobongola yango na ndenge mpenza oyo bato ya Tahiti balobaka, mpe Davies azalaki kotala soki azali kobimisa mpenza makanisi oyo ezali na Makomami ya Liebele mpe ya Grɛki. Na mobu 1817, Mokonzi Pomare II asɛngaki ndingisa ya konyata lokasa ya liboso ya Evanzile ya Luka. Anyataki yango na mwa masini ya konyata mikanda oyo bazalaki kotambwisa na mabɔkɔ, oyo bamisionɛrɛ bayaki na yango na Moorea. Ntango tozali kolobela lisolo ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Tahitien, tokoki te kobosana kotánga Tuahine, mwana-mboka Tahiti oyo, na boumeli ya bambula, azalaki ntango nyonso esika moko na bamisionɛrɛ yango mpe azalaki kosalisa bango báyeba malamu makambo ya monɔkɔ yango.
Basilisi mosala ya kobongola
Na mobu 1819, nsima ya mbula motoba ya mosala makasi, basilisaki kobongola Baevanzile, Misala ya Bantoma mpe mokanda ya Nzembo. Masini ya konyata mikanda oyo bamisionɛrɛ oyo bautaki koya bayaki na yango esalisaki bango bányata mpe bákabola mikanda ya Biblia oyo babongolaki.
Na nsima, bakɔtaki na eleko moko ya mosala monene ya kobongola, kotala soki bazali mpenza kobimisa makanisi oyo ezali na Makomami mpe kotalela lisusu mikanda oyo basilaki kobongola. Na mobu 1825, nsima ya kolekisa mbula 28 na Tahiti, Nott abɛlaki mpe société na bango epesaki ye ndingisa ya kozonga na Angleterre. Likambo ya esengo ezali ete, na ntango wana, bakómaki pene na kosilisa kobongola Makomami ya Grɛki. Akobaki kobongola ndambo ya Biblia oyo etikalaki ntango azalaki kozonga na Angleterre mpe na boumeli ya bambula oyo alekisaki kuna. Nott azongaki lisusu na Tahiti na 1827. Mbula mwambe na nsima, na Desɛmbɛ 1835, asilisaki mosala ya kobongola. Nsima ya mbula koleka ntuku misato ya mosala makasi, basilisaki kobongola Biblia mobimba.
Nott azongaki na Angleterre na 1836 mpo na konyata Biblia mobimba na monɔkɔ ya Tahitien na Londres. Na mokolo ya 8 Yuni 1838, Nott azalaki na esengo ya kokende kolakisa Mokonzi-Mwasi Victoria Biblia ya liboso oyo eutaki konyatama na monɔkɔ ya Tahitien. Na ntembe te, yango ezalaki mokolo moko ya esengo monene mpo na moto yango oyo azalaká masɔ, mpe mbula 40 liboso akɔtaki na masuwa Duff mpe akendaki na Tahiti epai ayekolaki mimeseno ya bato ya mboka yango mpo na kosilisa mosala monene oyo asalaki bomoi na ye mobimba.
Nsima ya sanza mibale, Nott azongaki na Pasifike ya Sudi na kɛsi 27 oyo ezalaki na Biblia 3 000 ya liboso oyo ebimaki na monɔkɔ ya Tahitien. Nsima ya kotɛlɛma mwa moke na Sydney, na Australie, abɛlaki lisusu, kasi aboyaki kotika bakɛsi oyo ezalaki na motuya mingi na miso na ye. Ntango abikaki, akómaki na Tahiti na 1840, epai bato ya mboka bawelaki bakɛsi yango mpo na kozwa Babiblia ya monɔkɔ ya Tahitien. Nott akufaki na Tahiti na 1844, ntango azalaki na mbula 70.
Ebimisi matomba mingi koleka
Nzokande, atako Nott akufá, mosala na ye ekufaki elongo na ye te. Libongoli na ye ebimisaki matomba mingi koleka mpo na minɔkɔ ya Polynésie. Lokola bamisionɛrɛ yango babimisaki ndenge ya kokoma monɔkɔ ya Tahitien, yango esali ete monɔkɔ yango elimwa te. Mokomi moko alobaki ete: “Nott nde moto abimisá mpenza gramɛrɛ ya monɔkɔ ya Tahitien. Soki olingi koyekola monɔkɔ ya Tahitien malamumalamu, osengeli kaka kotánga Biblia.” Mosala monene oyo babongoli yango basalaki ebatelá bankama ya maloba oyo, soki bongo te, elingaki kolimwa. Nsima ya mbula nkama, mokomi moko alobaki ete: “Bato nyonso bandimaka ete Biblia ya Nott na monɔkɔ ya Tahitien ezali mokanda oyo eleki ntina na kati ya mikanda nyonso oyo bakomá na monɔkɔ ya Tahitien.”
Mokanda yango ya ntina mingi esukaki kaka te na kosalisa bato ya Tahiti, kasi esalisaki mpe mpo na kobongola Biblia na minɔkɔ mosusu ya Pasifike ya Sudi. Na ndakisa, babongoli ya Biblia na bisanga ya Cook mpe na Samoa bazalaki kolanda libongoli yango ntango bazali kosala mosala na bango. Mobongoli moko alobaki boye: “Nayekolaki libongoli ya Nott na likebi mpenza mpe nalandaki kaka ndenge ye abongolá.” Balobaki mpe ete mobongoli mosusu ‘azalaki na mokanda ya Nzembo na monɔkɔ ya Liebele elongo na mabongoli ya Lingelesi mpe ya monɔkɔ ya Tahitien’ ntango ‘azalaki kobongola banzembo ya Davidi na monɔkɔ ya Samoan.’
Bamisionɛrɛ na Tahiti balandaki ndakisa ya bato ya Réveil na Angleterre mpe balakisaki bato kotánga mpe kokoma. Kutu, na boumeli ya mbula koleka nkama, Biblia ezalaki buku kaka moko oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Tahitien. Yango wana bato ya Tahiti basalelaka yango mingi.
Moko ya makambo oyo eleki malamu na Libongoli ya Nott ezali ndenge basalelá nkombo ya Nzambe mingi na Makomami ya Liebele mpe ya Grɛki. Yango wana nkombo ya Yehova eyebani mingi lelo oyo na Tahiti mpe na bisanga na yango. Bakomá yango ata na bandako-nzambe mosusu ya Baprotesta. Atako bongo, soki balobeli nkombo ya Nzambe, makanisi ya bato mingi ekendaka epai ya Batatoli ya Yehova mpe mosala na bango ya kosakola na molende oyo basalaka mingimingi na lisalisi ya libongoli ya Biblia ya monɔkɔ ya Tahitien oyo Nott ná baninga na ye babongolaki. Mpe soki tokanisi milende ya solosolo oyo babongoli lokola Henry Nott basalaki, yango etindaka biso tózala na botɔndi na ndenge, lelo oyo, Biblia esilá kobongolama na minɔkɔ mingi oyo bato balobaka.
[Bililingi na lokasa 26]
Mabongoli ya Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Tahitien, na 1815. Nkombo ya Yehova ezali na kati
Henry Nott (1774-1844), moto oyo asalaki mosala monene ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Tahitien
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Biblia na monɔkɔ ya Tahitien: Copyright the British Library (3070.a.32); Henry Nott mpe mokanda: Collection du Musée de Tahiti et de ses Îles, Punauia, Tahiti; Buku ya malongi: Na ndingisa ya London Misionary Sociey Papers, Alexander Turnbull Library, na engumba Wellington, na Nouvelle-Zélande
[Elilingi na lokasa 28]
Buku ya malongi oyo ebimisamaki na 1801, na monɔkɔ ya Tahitien mpe ya Gallois; ezali na nkombo ya Nzambe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya London Missionary Society Papers, Alexander Turnbull Library, Wellington, Nouvelle-Zélande
[Elilingi na lokasa 29]
Ndako-nzambe ya Baprotesta oyo bakomá nkombo ya Nzambe na efelo na yango, na esanga ya Huahine, na Polynésie française
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Pastɛrɛ Teoroi Firipa