Tozali mpenza na mposa ya basusu?
ALBERT EINSTEIN, moto moko ya siansi oyo ayebani mingi, alobaki boye: “Soki totali bomoi mpe misala na biso, tokomona mbala moko ete mpo makambo etambola malamu mpe bamposa na biso ekokisama, tozalaka na mposa ya bato mosusu.” Abakisaki boye: “Bato mosusu nde balonaka biloko oyo tolyaka, batongelaka biso bilamba oyo tolataka, mpe bandako oyo tolalaka. . . . Moto azali oyo ye azali mpe azali na valɛrɛ mingimingi mpo na makoki na ye te, kasi mpo azali na kati ya lisangá monene ya bato, lisangá oyo etambwisaka bomoi na ye banda kobotama tii liwa na ye.”
Tomonaka mbala mingi ete banyama etambolaka elongo. Banzoku etambolaka na bituluku mpe ebatelaka bana na yango malamu. Bankɔsi ya basi elukaka nyama elongo mpe elyaka elongo na bankɔsi ya mibali. Bambisi minene oyo babengi dauphin esakanaka elongo mpe esí esalemá ete bambisi yango ebikisa banyama to bato mosusu na likama ya mai.
Nzokande, bato ya mayele oyo bayekolaka mimeseno ya bato bamoni ete ezaleli moko mabe ekómi kokola epai ya bato. Na zulunalo moko ya Mexico bakomaki ete bato mosusu ya siansi balobi ete “États-Unis ebebi na makambo mingi mpamba te banda mwa bambula mingi, bato bakómaki na ezaleli ya komikabola na bazalani na bango mpe bato bazalaki komipesa lisusu te na makambo oyo esangisaka bango na bazalani na bango.” Zulunalo yango eyebisaki ete “bolamu ya ekólo yango etali mbongwana monene oyo bana-mboka basengeli kosala na mimeseno na bango, oyo esɛngi kozongela momeseno ya kosangana na bato.”
Likambo yango epalangani mingi na mikili ya bozwi. Ebele ya bato bakómi komikabola na basusu. Bato balingi ‘kosala makambo na ndenge na bango’ mpe balingi ata moke te ete bato mosusu ‘bákipe makambo na bango.’ Bato mosusu bakanisi ete elimo yango nde ezali kosala ete bato mingi bákóma kotungisama, konyokwama na makanisi mpe komiboma.
Mpo na yango, Doktɛrɛ Daniel Goleman alobaki boye: “Komikabola na bato—elingi koloba koboya koyebisa bato mosusu makanisi to makambo na biso—ezali kobakisa mbala mibale motángo ya bato oyo bazali kozwa bamaladi mpe oyo bazali kokufa.” Zulunalo moko (Science) ebimisaki lapolo moko oyo emonisi ete kokabwana na bato mosusu ‘ezali kobakisa motángo ya bato oyo bazali kokufa ndenge moko na momeseno ya komɛla likaya, maladi ya tansyo, kozala na mafuta mingi na nzoto, kozala nzoto mineneminene, mpe kozanga kosalisa nzoto fizike.’
Nyonso wana emonisi ete kozala na bato ezali na ntina. Tokoki te kozala kaka biso moko. Ndenge nini ezaleli ya komikabola na bato ekosila? Nini esalisi ebele ya bato na kozala na bomoi oyo ezali na ntina? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
“Mpo makambo etambola malamu mpe bamposa na biso ekokisama, tozalaka na mposa ya bato mosusu.”—Albert Einstein