Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Juillet nk. 4-5
  • Makanisi ya ndenge na ndenge ezali kotungisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makanisi ya ndenge na ndenge ezali kotungisa yo
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oboyi kondima, ozali komona ete ekoki kosalema te, makasi esili yo na nzoto
  • Komitunatuna, mitungisi mpe kobanga
  • Nkanda, nsɔni, otikali kaka yo moko
  • Ndakisa ya bato mosusu ekoki koteya yo
  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya malamu atako ozali na maladi moko oyo esilaka te?
    Lamuká!—2001
  • Ntango nzoto ezali kotungisa yo
    Lamuká!—2001
  • Ntango obɛli maladi ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Ntango molongani azali na maladi oyo ezali kosila te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Juillet nk. 4-5

Makanisi ya ndenge na ndenge ezali kotungisa yo

MOBANGE moko alobaki boye: “Ntango bayebisaki ngai ete nazali na maladi moko oyo ebomaka, nalukaki kolongola kobanga oyo nazalaki na yango, kasi lokola nazalaki koyeba mpenzampenza te nini ekokómela ngai, nalɛmbaki nzoto.” Maloba na ye emonisi ete mpasi ezalaka kaka na nzoto te, kasi na makanisi mpe. Atako bongo, ezali na bato oyo bazali mpenza koyika mpiko na mpasi yango. Mingi na bango bakoboya te koyebisa yo eloko nini esalisi bango báyika mpiko na maladi moko oyo esilaka te. Kasi liboso tólobela makambo oyo okoki kosala, tiká tótalela naino makambo oyo ekoki kotungisa makanisi na yo ntango mpasi yango ezwi yo.

Oboyi kondima, ozali komona ete ekoki kosalema te, makasi esili yo na nzoto

Mbala mosusu ndenge oyo yo ozali komiyoka ekeseni mpenza na ndenge bato mosusu bamiyokaka. Atako bongo, minganga mpe bato ya maladi bamonisi ete ezali na makambo oyo bato nyonso oyo bazali na maladi moko boye bayokaka na motema na bango. Na ebandeli, bayokaka lokola nde motema epasuki mpe baboyaka kondima ete bazali mpenza na maladi, bamonaka ete ekoki kosalema te; yango wana balobaka na motema ete: ‘Nazali kondima te.’ ‘Minganga bamikosi.’ ‘Mbala mosusu wana ezali baekzamɛ ya moto mosusu.’ Mpo na komonisa ndenge amiyokaki ntango bayebisaki ete azali na maladi ya kanser, mwasi moko alobaki boye: “Nayokaki lokola namikɔtisa na nse ya bulangiti, bongo ntango nakobimisa lisusu motó, bampasi nyonso esila.”

Nzokande, ntango okomona ete makambo yango ezali mpenza ya solo, mwayɛ ya koboya kondima yango ekozala lisusu te, makasi ya nzoto mpe esengo nyonso ekosila mpe okokóma mawamawa. Okobanda komituna mituna ebele, lokola: ‘Etikali nde moke nakufa?’ ‘Bomoi na ngai ekobanda koleka kaka na kati ya mpasi?’ Ntango mosusu okómi koluka ozonga ata na mikolo oyo eleká, liboso ya ntango oyo bayebisaki yo ete ozali na maladi yango, kasi mwayɛ ya kozonga ezali te. Nsima ya mwa mikolo, okoki komona ete makanisi ndenge na ndenge ebandi kotungisa yo lisusu. Tiká tólobela sikoyo mwa ndambo na yango.

Komitunatuna, mitungisi mpe kobanga

Ntango obeli maladi moko ya makasi, okobanda komitunatuna mpe bomoi na yo ekokóma kaka mitungisi na mitungisi. Moto moko oyo abelaki maladi ya kolɛmbisa nzoto (Parkinson) alobaki boye: “Na bantango mosusu, bomoi ekómaka ngayi, mpamba te nayebi te nini ekokómela ngai lobi mpo na maladi na ngai. Mokolo na mokolo, nazelaka namona nini ekoyela ngai.” Mbala mosusu maladi oyo ozali na yango mpe ezali kobangisa yo. Maladi yango ekoki kobangisa yo makasi mpenza soki ezwi yo na mbalakaka. Kasi soki nde bayei koyebisa yo maladi yango nsima wana olekisi bambula ebele na kotambola epai na epai mpo na koluka koyeba maladi oyo ozali na yango, kobanga wana ekoki kozala kaka ya nse-nse. Kutu na ebandeli, mbala mosusu, okoki kosepela mpo oyebi ete sikoyo bato bakondima ete ozali mpenza maladi mpe ozali kokosa te. Kasi na nsima, okobanda kobanga, ntango okomona sikoyo ete ozali mpenza maladi.

Okoki mpe komitungisa mpo ozali kobanga ete okokoka lisusu mpenzampenza te kotambwisa bomoi na yo, yo moko. Mingimingi mpenza soki olingaka kosala makambo mwa moke ndenge yo moko osepeli, okomitungisa mingi mpenza ntango ozali kokanisa ete, mokemoke, bato mosusu nde bakobanda kosalela yo makambo nyonso. Mbala mosusu, okomitungisa mpo maladi na yo ebandi kotya nkaka na bomoi na yo mpe ezali kopekisa yo osala makambo oyo olingi.

Nkanda, nsɔni, otikali kaka yo moko

Ntango ozali komona ete, mokemoke, ozali kokoka lisusu kosala makambo na yo moko te, yango ekoki kopesa yo nkanda. Mbala mosusu okobanda komituna boye: ‘Mpo na nini kaka ngai?’ ‘Nasali nini?’ Ozali komona ete osali eloko moko te mpo mpasi wana ekómela yo mpe ozali komona ntina na yango te. Okoki mpe kobanda koyoka nsɔni mpe kobungisa elikya nyonso oyo ozali na yango. Moto moko oyo atambolaka te alobaki boye: “Nayokaki nsɔni mingi mpenza na likambo oyo ekómelaki ngai kaka mpo na mwa likama moko boye ya bozoba!”

Okoki mpe kobanda komiyoka lokola ete otikali kaka yo moko. Soki otambolaka te, bato mpe bakoya epai na yo te. Soki maladi na yo esali ete otikalaka kaka na ndako, okokoka lisusu te kokutana na baninga na yo ya kala. Nzokande, ntango ozali kobela ezalaka mpenza ntango oyo ozali na mposa ya bato mosusu. Na ebandeli, bato ebele bakoya kotalatala yo to kobenga yo na telefone. Kasi nsukansuka, kaka bato moke nde bakobanda koleka kotala yo to kobenga yo na telefone.

Esalaka motema mpasi soki baninga bakómi kotika yo. Mbala mosusu, mpasi yango nde ekotinda yo oboyaka mpe kofanda na bato mosusu. Ya solo, ezali mabe te soki olekisi mwa ntango kozanga kozala na bato mosusu. Kasi soki okómi kokimakima bato ntango nyonso, okotikala yo moko; ekozala lisusu te mpo bato baboyi koya kotala yo, kasi nde mpo yo moko olingi lisusu komonana na bato te. Makambo nyonso mibale wana ekoki kosala ete otungisama mpenza mpo ozali komiyoka ete otikali kaka yo moko. a Na bantango mosusu kutu, okoki komituna soki okokóma lobi.

Ndakisa ya bato mosusu ekoki koteya yo

Nzokande, elikya ezali. Soki eleki kala mingi te banda maladi ezwá yo, yebá ete ezali na makambo oyo okoki kosala, oyo ekosalisa yo otambwisa makambo ya bomoi na yo, ata mwa moke.

Yebá ete masolo oyo ozali kotánga awa ekosilisa mpasi ya nzoto na yo te, ata ezali ya ndenge nini. Kasi ekoki nde kosalisa yo oyeba ndenge okoki komesena na maladi na yo mpe koyikela yango mpiko. Mwasi moko oyo azali na maladi ya kanser amonisaki na mokuse ndenge amiyokaki. Alobaki boye: “Liboso naboyaki kondima yango, na nsima, epesaki ngai nkanda mingi mpe na nsuka, nalukaki esika nakoki kozwa makasi mpo nayika mpiko.” Yo mpe okoki kolukaluka ndenge wana soki osololi na bato oyo bakutaná na mpasi lokola yo mpe ndakisa na bango ekoki koteya yo ndenge oyo okoki kozwa nguya yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ya solo, bato mingi bamiyokaka ndenge tolobi awa, kasi moto na moto azalaka na ndenge na ye oyo ayokelaka yango mpe elandanaka kaka na molɔngɔ oyo totii awa te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Mbala mosusu okomituna boye: ‘Mpo na nini kaka ngai? Nasali nini?’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto