Kozala yo moko ezali malamu te
“Kozala bato mibale . . . ezali malamu koleka kozala moto moko. . . . Soki moko akwei, mosusu akoki kotelemisa moninga.”—Mokonzi Salomo
SALOMO, mokonzi ya Yisalaele ya kala, alobaki boye: “Kozala bato mibale . . . ezali malamu koleka kozala moto moko. Soki bazali mibale bakoki kolonga na mosala na bango. Soki moko akwei, mosusu akoki kotelemisa moninga. Kasi mawa na moto oyo azali se ye moko, po soki akwei, azali na moninga ya kotelemisa ye té.” (Mosakoli 4:9, 10, Bible na lingala ya lelo oyo) Moto ya bwanya wana oyo azalaki koyekola bizaleli ya bato amonisaki ntina oyo tosengeli te komikabola na bato mosusu. Kasi, maloba ya Salomo ezalaki te kaka likanisi ya moto. Maloba na ye epemamaki na Nzambe mpe ezalaki komonisa bwanya na Ye.
Komikabola na bato ezali malamu te. Tozali na mposa ya bazalani na biso. Biso nyonso tozalaka na mposa bato mosusu bápesa biso mabɔkɔ. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Moto oyo amilongolaka na kati ya bato, alukaka bobele bolamu na ye moko; asilikaka soki balingi kopesa ye toli.” (Masese 18:1, Bible na lingala ya lelo oyo) Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato ya mayele oyo bayekolaka mimeseno ya bato bazali kolendisa moto nyonso azala na lisangá moko mpe atyelaka basusu likebi.
Mpo na kolendisa bato bázongela momeseno ya kosangana na basusu, Profesɛrɛ Robert Putnam apesi batoli mingi, moko na yango ezali ete bato “bámipesa na makambo ya Nzambe.” Batatoli ya Yehova bakokisaka mpenza likambo yango mpamba te, na mokili mobimba, bango nyonso bazali na kati ya masangá oyo, mpo na bango ezali lokola mabota. Na boyokani na maloba ya ntoma Petelo, ‘balingaka lisangá mobimba ya bandeko’ oyo bazali na “bobangi ya Nzambe.” (1 Petelo 2:17) Lisusu, losambo ya solo esalisaka Batatoli bámikabola te na bato mosusu mpe esalisaka bango mpo makambo mabe oyo ezaleli yango ezali komemela bato ezwa bango te, mpamba te losambo na bango esɛngaka bango bámipesa na makambo mingi ya malamu lokola koteya bazalani na bango solo oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe.—2 Timote 2:15.
Bolingo mpe boninga ebongolaki bomoi na bango
Batatoli ya Yehova bazali na bomoko mpe mokomoko na bango azali na ntina mingi na kati ya lisangá. Na ndakisa, tólobela naino Miguel, Froylán, ná Alma Ruth; bango misato bazali bandeko ya libota moko na Amérique latine. Babotamá na maladi moko ya mikuwa oyo esalaka ete nzoto ekola mpenza te. Bango misato batambolaka na bavelo ya bibɔsɔnɔ. Ndenge nini kosangana elongo na Batatoli ebongolaki bomoi na bango?
Miguel alobi boye: “Na bantango mosusu nazalaki komitungisa mpenza, kasi ntango nakómaki kosangana na libota ya Yehova, bomoi na ngai ebongwanaki. Komikabola na bato ezali mpenza likama. Kozala elongo na baninga baklisto na makita pɔsɔ na pɔsɔ esalisaki ngai mingi na kozala na esengo mpe bomoi ya malamu.”
Alma Ruth alobi boye: “Ntango mosusu nazalaki konyokwama makasi na makanisi; nazalaki koyoka mabe mpenza. Kasi, nsima ya koyeba Yehova, namonaki ete nakoki kokóma moninga na ye. Yango ekómaki likambo oyo eleki ntina na kati ya bomoi na ngai. Bandeko na ngai basungaki ngai mingi, mpe yango esalaki ete tókóma lisusu liboke moko.”
Tata ya Miguel alakisaki ye kotánga mpe kokoma. Na nsima, Miguel ayekolisaki Froylán ná Alma Ruth. Yango esalisaki bango mingi mpo bákola na elimo. Alma Ruth abakisi boye: “Koyekola kotánga esalisaki biso mingi mpamba te tokómaki na likoki ya kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na kolya bilei ya elimo.”
Lelo oyo, Miguel azali nkulutu na lisangá. Froylán asili kotánga Biblia mobimba mbala libwa. Alma Ruth azali mobongisi-nzela banda 1996. Ye alobi boye: “Yehova apambolaki ngai mpe nakokisi mokano yango, bandeko basi na lisangá basalisaka ngai mpo na kosakola mpe koyekola Biblia na bato 11.”
Ndakisa mosusu ya malamu ezali ya Emelia; ye azwaki likama oyo ebebisaki ye makolo ná mokuwa ya mokɔngɔ, yango wana akóma kotambola na velo ya bibɔsɔnɔ. Batatoli ya Yehova ye engumba Mexico bayekolaki na ye Biblia mpe azwaki batisimo na 1996. Emelia alobi boye: “Liboso nayeba solo, nazalaki na makanisi ya komiboma; nazalaki lisusu na mposa ya bomoi te. Nazalaki kosepela ata na eloko moko te, butu ná moi nazalaki se kolela. Kasi, ntango nakómaki kosangana na libota ya Yehova, namonaki bolingo ya bandeko. Nalendisamaki na ndenge oyo bazalaki kosepela na ngai. Nkulutu moko akómaki mpenza lokola ndeko to mpe tata na ngai. Ye ná basaleli na misala mosusu batambwisaka ngai na velo na ngai mpo na kokende na makita mpe kobima na mosala ya kosakola.”
José azwaki batisimo na 1992 mpo na kokóma Motatoli ya Yehova. Azali na mbula 70, mpe azwaki pansiɔ na 1990 mpe afandaka ye moko. José azalaki kotungisama mingi na makanisi; kasi ntango Motatoli moko asololaki na ye, akómaki mbala moko koyangana na makita. Makambo oyo azalaki koyoka mpe komona kuna ezalaki kosepelisa ye mingi. Na ndakisa, amonaki ete bandeko bazalaki kozwa ye lokola moninga mpenza mpe bazalaki komibanzabanza mpo na ye. Sikoyo, bankulutu ná basaleli na misala ya lisangá na bango basalisaka ye. (Bafilipi 1:1; 1 Petelo 5:2) Mpo na ye, baninga na ye bandimi bazali “lisalisi oyo ezali kopesa [ye] makasi.” (Bakolose 4:11) Bamemaka ye na lopitalo, bakendaka kotala ye na ndako, mpe basungaki ye mingi mbala nyonso minei oyo basalaki ye lipaso. Alobi boye: “Bamibanzabanzaka mpo na ngai. Bazali mpenza bandeko na ngai. Nasepelaka kozala moninga na bango.”
Kokaba epesaka esengo ya solosolo
Liboso Mokonzi Salomo aloba ete “kozala bato mibale . . . ezali malamu koleka kozala moto moko,” autaki komonisa ete koboma nzoto mpo na biloko ya mokili ezali na ntina te. (Mosakoli 4:7-9) Nzokande, ezali yango nde ebele ya bato bazali koluka lelo oyo, atako yango ezali kobebisa boyokani na bango ná mabota na bango to ná baninga na bango.
Lokoso ya ndenge wana mpe ezaleli ya koluka matomba na bango moko ezali kotinda bato mingi bámikabola na bazalani na bango. Yango ememeli bango bolamu to esengo te, mpamba te bato mingi oyo bazali na elimo wana bazalaka mawamawa mpe bazalaka na elikya te. Nzokande, bato oyo touti kolobela bazali komonisa matomba ya kosangana na basaleli ya Yehova oyo bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango etindaka bango na kosala malamu. Koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita, lisungi ya bandeko baklisto mpe komibanzabanza na bango, mpe molende na mosala ya kosakola, nyonso wana nde esalisaki mpenza bato yango na kolongola makanisi mabe oyo moto akómaka na yango ntango amikaboli na basusu.—Masese 17:17; Baebele 10:24, 25.
Lokola moto nyonso azalaka na mposa ya basusu, kosalela basusu makambo epesaka mpenza esengo. Albert Einstein, moto ya siansi oyo abimisá mayele oyo esalisaka bato, alobaki boye: “Valɛrɛ ya moto . . . esengeli kotalelama na oyo azali kopesa kasi te na oyo akoki kozwa.” Maloba yango eyokani na maloba ya Nkolo na biso Yesu Klisto ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Yango wana, atako ezali malamu bato mosusu bálinga biso, ezali malamu lisusu koleka biso tólinga bato.
Ndeko moko oyo aumelaki bambula ebele na mosala ya mokɛngɛli-motamboli mpo na kolendisa masangá mpe apesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga bandako ya makita na bamboka oyo bandeko bazali na makoki mingi te, alobelaki esengo na ye na maloba oyo: “Esengo ya kosalela bandeko na ngai mpe komona esengo na bilongi na bango epesaka ngai mposa ya koluka makambo mosusu oyo nakoki kosala mpo na kosalisa bato. Makambo oyo nakutaná na yango ezali komonisa ngai ete sɛkɛlɛ ya bolamu ezali nde kosepela na bato. Nayebi ete biso bankulutu tosengeli kozala ‘lokola ebombelo mpo na mopɛpɛ . . . , lokola bitima ya mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.’”—Yisaya 32:2.
Kofanda elongo na bomoko epesaka esengo mingi!
Kosalisa basusu mpe koluka kozala moninga ya basaleli ya Yehova ezali mpenza na litomba monene mpe epesaka bolamu ya solosolo. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soki bandeko [bakofanda elongo na bomoko, NW]!” (Nzembo 133:1) Ndakisa ya Miguel, Froylán ná Alma Ruth emonisi ete mpo na kosalisana, ezali na ntina mingi ete libota ezala na bomoko. Lisusu, ezali malamu mingi soki na kati ya libota bato nyonso basambelaka Nzambe ya solo! Ntoma Petelo apesaki baklisto oyo babalá toli, mpe na nsima akomaki boye: “Mpo na kosukisa, bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi, bato ya elimo ya komikitisa.”—1 Petelo 3:8.
Boninga ya solosolo ezali na matomba mingi, ezala na makanisi to na elimo. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai epai ya bato nyonso. . . . Ntango nyonso bólanda oyo ezali malamu epai na bino na bino mpe epai ya bamosusu nyonso.”—1 Batesaloniki 5:14, 15.
Yango wana, lukáká ndenge oyo okoki kosalela basusu malamu. “Tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima,” mpamba te yango nde ekosala ete bomoi na biso ezala na ntina mpe ekobakisa esengo mpe bolamu na biso. (Bagalatia 6:9, 10) Yakobo, moyekoli ya Yesu akomaki ete: “Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azali bolumbu mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo, kasi moko na bino alobi na bango ete: ‘Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,’ nde bopesi bango te biloko oyo esengeli mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi?” (Yakobo 2:15, 16) Eyano na motuna yango ezali polele. Tosengeli ‘kotyaka likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na biso te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’—Bafilipi 2:4.
Longola kokabela basusu biloko ntango bazali na bosɛnga to ntango bazwi likama, Batatoli ya Yehova basalisaka bazalani na bango na lolenge mosusu ya ntina mingi: bamipesaka mpo na koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Lokola Batatoli koleka milio 6 bazali kosakola nsango yango ya elikya mpe oyo ezali kokitisa bato mitema, ezali komonisa ete basepelaka mpenza na bato mosusu mpe balingaka bango. Kasi, kosalela Makomami Mosantu mpo na kosalisa bato ekokisaka mpe mposa mosusu. Mposa nini?
Mosala oyo ezali kokokisa mposa moko ya ntina mingi
Mpo na kozwa bolamu ya solosolo, tosengeli kozala na boyokani malamu na Nzambe. Moto moko alobaki boye: “Lokola na bisika nyonso mpe na bileko nyonso, banda mokili ebandá tii na moi ya lelo, moto azalaka na mposa ya kobelela eloko moko oyo akanisaka ete ezali likoló na ye mpe ezali na nguya koleka ye, emonani ete moto akelamá na mposa ya kosambela mpe esengeli ete bato ya siansi bándima likambo yango. . . . Komona ete bato ya mokili mobimba balukaka Nzambe mpe bandimaka ye esengeli kokamwisa biso mpe kotinda biso tózala na limemya mingi.”—Buku Man Does Not Stand Alone, ya Cressy Morrison.
Yesu Klisto alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Moto asukaka mabe soki amikaboli na bamosusu ntango molai. Nzokande, komikabola na Mozalisi ezali lisusu mabe koleka. (Emoniseli 4:11) Kozwa “boyebi ya Nzambe” mpe kosalela yango esengeli kozwa esika monene na kati ya bomoi na biso. (Masese 2:1-5) Tosengeli koluka kokokisa bamposa na biso ya elimo, mpamba te tokoki kozala malamu te soki topesi Nzambe mokɔngɔ. Mpo na kozala na bomoi ya esengo mpe ya ntina esɛngaka kozala na boyokani malamu na Yehova, “Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.”—Nzembo 83:18.
[Elilingi na lokasa 5]
Miguel: “Na bantango mosusu nazalaki komitungisa mpenza, kasi ntango nakómaki kosangana na libota ya Yehova, bomoi na ngai ebongwanaki”
[Elilingi na lokasa 5]
Alma Ruth: “Nsima ya koyeba Yehova, namonaki ete nakoki kokóma moninga na ye”
[Elilingi na lokasa 6]
Emelia: “Liboso nayeba solo, . . . Nazalaki kosepela ata na eloko moko te”
[Elilingi na lokasa 7]
Kosangana na basambeli ya solo esalisaka biso tókokisa bamposa na biso ya elimo