Okoki kozala na bomoi ya ntina!
BATO mingi bamipesaka na koluka mbongo mpe kosomba biloko mingi. Bato mosusu balukaka lokumu ya mokili oyo. Bamosusu mpe balukaka koyeba malamumalamu mosala moko ya ntɔki. Ezali mpe na baoyo bamipesaka na kosalisa basusu. Kasi, ezali mpe na bato oyo bayebaka ntina ya bomoi na bango te.
Ezali boni mpo na yo? Osilá kokanisa mpenza ntina ya bomoi na yo? Tólobela naino mwa makambo oyo bato bamipesaka na yango mpe tótala soki epesaka mpenza esengo. Nini esalisaka moto azala na bomoi ya ntina?
Mbongo mpe bisengo ezali na ntina
Na Mosakoli 7:12, Biblia elobi boye: “Mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu ya mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi ya ye oyo azwi yango.” Ya solo, mbongo ezali na ntina. Moto asengeli kozala na mbongo, mingimingi soki azali na libota.—1 Timote 5:8.
Mbongo esalisaka moto asala makambo mosusu oyo epesaka esengo. Yesu Klisto, Mobandisi ya lingomba ya boklisto, alobaki ete azalaki na esika ya kolalisa motó te; atako bongo, na mabaku mosusu azalaki kolya bilei kitoko mpe komɛla masanga. Longola yango, azalaki mpe na elamba ya ntalo.—Matai 8:20; Yoane 2:1-11; 19:23, 24.
Atako bongo, Yesu amipesaki na bomoi ya bisengo te. Atyaki makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Yesu alobaki boye: “Ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” Na nsima alobaki lisese ya mozwi moko oyo bilanga na ye ebotaki mingi mpe moto yango akanisaki boye: “Nakosala nini, sikoyo lokola nazali te na esika ya koyanganisa biloko na ngai oyo nabuki? . . . Nakobuka bandako na ngai ya kobomba biloko mpe nakotonga oyo ya minene koleka, mpe kuna nakoyanganisa mbuma na ngai nyonso mpe biloko na ngai nyonso ya malamu; mpe nakoloba na molimo na ngai ete: ‘Molimo, ozali na biloko ebele ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, misepelisá.’” Likambo nini moto yango abosanaki? Yesu abakisaki boye: “Nzambe alobaki na [mozwi yango] ete, ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Boye, nani akozwa biloko oyo otondisi esika moko?’” Atako moto yango abombaki ebele ya biloko, ntango akufaki akokaki lisusu te kosepela na bozwi oyo andukaki. Na nsuka, Yesu apesaki bayoki na ye liteya oyo: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”—Luka 12:13-21.
Moto nyonso azalaka na mposa ya mbongo, mpe bisengo ezali na esika na bomoi ya moto. Nzokande, mbongo te to mpe bisengo te nde eloko eleki ntina na bomoi ya moto. Kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe, elingi koloba kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe, nde likambo eleki ntina oyo tosengeli koluka.
Koluka kosala nkombo ezali na ntina?
Bato mingi balukaka kosala nkombo na mokili oyo. Mposa ya kosala nkombo, elingi koloba koyebana, ezalaka ntango nyonso mabe te. Biblia elobi boye: “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu.”—Mosakoli 7:1.
Na mokolo ya liwa ya moto, tokoki kotánga makambo oyo asalaki na boumeli ya bomoi na ye. Soki asalaki makambo ya malamu, mokolo ya liwa na ye ezalaka malamu koleka mokolo ya kobotama na ye, na ntango oyo asali naino ata likambo moko te.
Mokonzi Salomo nde akomaki mokanda ya Mosakoli. Abesaloma, yaya ya Salomo oyo tata na ye abotaki na mama mosusu, alingaki ete nkombo na ye eyebana. Nzokande, emonani ete bana na ye misato ya mibali, baoyo na nzela na bango nkombo na ye ekokaki kotikala, bakufaki bilenge. Mpo na yango, Abesaloma asalaki nini? Biblia elobi boye: “Abesaloma amitongelaki likonzí oyo ezali na lobwaku ya mokonzi zambi alobaki ete, Nazali na mwana te ete naumelisa nkombo na ngai. Boye abyangaki likonzí na nkombo na ye mpenza.” (2 Samwele 14:27; 18:18) Lelo oyo, ata eteni moko te ya likonzí yango etikalá. Bato oyo batángaka Biblia bayebi Abesaloma kaka lokola motomboki oyo alukaki kobɔtɔla bokonzi ya tata na ye, Davidi.
Lelo oyo, bato mingi balukaka nkombo na bango eyebana na makambo oyo bazali kosala. Balukaka kozwa lokumu na miso ya bato; nzokande bato bakoki kokumisa likambo lelo mpe lobi baboyi yango. Lokumu ya ndenge wana esukaka ndenge nini? Na buku na ye (Culture of Narcissism), Christopher Lasch akomaki boye: “Na mikolo na biso, moto azalaka na lokumu ntango azali elenge, azali kitoko, mpe abimi sika, lokumu wana eumelaka te, mpe bato oyo bazali na lokumu lelo, babangaka ntango nyonso ete básila ngala.” Yango wana, bato mingi ya lokumu bamipesaka na komɛla bangi mpe masanga, mpe mbala mingi bakufaka noki. Ya solo mpenza, koluka kosala nkombo na mokili oyo ezali na ntina te.
Boye, tosengeli koluka kosala nkombo malamu na miso ya nani? Na ntina na bato mosusu oyo babatelaki mibeko na ye, Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya boye: “Nakopesa kati na ndako na ngai mpe kati na mapango na ngai ekaniseli mpe nkombo . . . nakopesa bango nkombo ya seko oyo ekokatama te.” (Yisaya 56:4, 5) Bato oyo bazali kosepelisa Nzambe mpo na botosi na bango epai na ye, bakozwa “ekaniseli mpe nkombo.” Nzambe akokanisa nkombo na bango mpo na “seko,” mpe na ndenge yango bakokatama te. Biblia ezali kolendisa biso tóluka kosala nkombo ya ndenge wana—nkombo malamu na miso ya Yehova, Mozalisi na biso.
Mosakoli Yisaya azalaki kolobela ntango oyo bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé. “Bomoi ya seko” na Paladiso ezali “bomoi ya solosolo”—bomoi oyo Nzambe akanaki bato bázala na yango. (1 Timote 6:12, 19) Na esika ya komipesa kaka na bomoi oyo ya mokuse mpe oyo ezangi esengo, tosengeli nde koluka kozwa bomoi ya seko.
Misala ya ntɔki to kosalisa babola epesaka esengo ya solosolo te
Bato mingi oyo basalaka misala ya ntɔki balingaka kokolisa mayele na bango mpo na koyeba mosala yango malamumalamu. Kasi, bomoi ya lelo eleki mokuse mpo bákokisa mposa yango. Ntango Hideo, moyemi oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, akómaki na mbula koleka 90, azalaki kaka kosala mayemi mpo na kobakisa mayele na ye. Ata soki moto moko amoni ye moko ete ayebi sikoyo mosala na ye malamu mpenza, mbala mosusu azalaka lisusu na makoki te ya kosala mingi lokola na ntango oyo abandaki. Nzokande, ekozala boni soki azali na bomoi mpo na libela? Akozala na likoki ya kobongisa lisusu mosala na ye!
Ezali boni mpo na bato oyo bamipesaka na kosalisa babola? Ezali malamu moto amibanzabanzaka mpo na babola mpe asalisaka bato oyo bazali na bosɛnga. Biblia elobi boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Koluka bolamu ya basusu ekoki mpenza kopesa moto esengo. Kasi, na meko nini moto akoki kosalisa basusu ata soki apesi bomoi na ye mobimba na mosala yango? Moto azali na makoki nyonso te mpo na kosalisa bato oyo bazali na mpasi. Ata soki bapesi moto biloko mingi, yango ekokokisa te mposa moko ya ntina oyo bato mingi bayebi te mpe bakokisaka yango te. Ezali mposa nini?
Tosengeli kokokisa mposa ya elimo
Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki mposa moko ya ntina mingi, oyo moto nyonso abotamaka na yango; alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Matai 5:3) Na bongo, Biblia emonisi ete esengo ya solosolo eutaka na mbongo te, na lokumu te, na misala ya ntɔki te, na kosalisa bato mpe te. Eutaka nde na kokokisa mposa ya elimo, elingi koloba mposa ya kosambela Nzambe.
Ntoma Paulo alendisaki bato oyo bayebaki Mozalisi te báluka ye. Alobaki boye: “[Nzambe] asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabelé, mpe aponaki bantango oyo etyamá mpe bandelo oyo etyamá ya efandelo ya bato, mpo bango báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso. Mpamba te na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.”—Misala 17:26-28.
Kokokisa mposa ya kosambela Nzambe ya solo nde sɛkɛlɛ ya esengo ya solosolo. Kokokisa mposa ya elimo ezali mpe kopesa biso elikya ya kozwa “bomoi ya solosolo.” Tótalela ndakisa ya Teresa, mwasi moko oyo azalaki mosani monene na filme moko oyo bato bazalaki kolanda mingi na États-Unis. Kasi, mwa moke na nsima, atikaki mosala yango. Mpo na nini? Alobaki boye: “Nandimi mpenza ete kolanda toli ya Liloba ya Nzambe nde lolenge ya bomoi eleki malamu.” Teresa aboyaki kokoba kosala filme oyo ezalaki kolakisa bato bazali kosangisa nzoto mpe makambo ya mobulu, mpamba te yango elingaki kobebisa boyokani na ye na Nzambe. Atikaki mosala oyo ezalaki kosala ete bato bámonaka ye na televizyo, mpe alukaki kozala na bomoi oyo epesaka esengo ya solosolo; akómaki mobongisi-nzela, elingi koloba ete azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ntango nyonso, azalaki kosalisa bato mosusu bákóma na boyokani malamu na Nzambe.
Ntango Teresa azwaki ekateli ya kotika mosala wana, moninga na ye moko ya mosala alobaki boye: “Nayokaki mpasi na motema, nasepelaki ata moke te na ndenge asundolaki oyo nazalaki kotalela lokola eloko ya ntina mingi oyo azalaki na yango. Kasi, namonaki ete azwaki eloko ya malamu mpe ya ntina koleka.” Na nsima, Teresa akufaki na aksida. Nsima ya liwa na ye, moninga na ye wana alobaki boye: “Azalaki na esengo, mpe yango nde likambo eleki ntina na bomoi ya moto. Bato boni kati na biso bakoki koloba ete bazali na esengo?” Soki moto oyo atyaka boyokani na ye na Nzambe na esika ya liboso, akufi, elikya ezali ete akosekwa ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili.—Yoane 5:28, 29.
Mozalisi azali na mokano mpo na mabelé mpe bato. Alingi oyeba mokano yango mpe ozwa bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:10, 11, 29) Sikoyo nde ntango ya koyeba Yehova, Mozalisi ya likoló mpe ya mabelé, mpe ya koyeba mokano na ye mpo na yo. Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakosepela kosalisa yo ozwa boyebi yango. Tolendisi yo osolola na bango to okomela babimisi ya zulunalo oyo.
[Elilingi na lokasa 5]
Mozwi oyo Yesu alobelaki na lisese na ye abosanaki likambo nini?
[Elilingi na lokasa 7]
Okosepela kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé?