Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Avril nk. 15-17
  • Kondima etyami na komekama na Pologne

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima etyami na komekama na Pologne
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Minyoko oyo tokutanaki na yango
  • Ndenge bakangaki ngai mpe minyoko oyo nazwaki
  • Kokɔta mpe kobima na bolɔkɔ
  • Ndenge nazalaki kosakola na bolɔkɔ
  • Yehova apambolaka mpenza baoyo babatelaka nzela na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Avril nk. 15-17

Kondima etyami na komekama na Pologne

LISOLO YA JAN FERENC

NAZALAKI naino mwana ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki konginda, kasi nazali mpenza koyeba ndeko moko ya tata, oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Azalaki koya kotala biso mbala mingi na ndako mpe azalaki kotángela biso mwa masolo ya Biblia. Atako baboti na ngai bazalaki kosepela te, kasi ngai na ndeko na ngai ya mobali Józef mpe oyo ya mwasi Janina, tozalaki mpenza kosepela mingi. Eumelaki te, mpo na komonisa ete tomipesi na Yehova, biso nyonso mibale tozwaki batisimo. Nazalaki bobele na mbula 14 ntango nazwaki batisimo.

Ntango bamonaki matomba oyo tozwaki na boyekoli ya Biblia na bomoi na biso, baboti na biso babandaki mpe kotyela likambo yango likebi. Ntango tata na ngai ayebaki ete Biblia ekweisi losambo ya bikeko, alobaki boye: “Soki oyo Liloba ya Nzambe elobi ezali solo, basango babombelaki biso solo. Mwana na ngai, longolá bililingi nyonso oyo ezali likoló ya bifelo mpe bwaká yango!” Mbula mibale na nsima, baboti na ngai bazwaki batisimo. Basalelaki Yehova na bosembo mpenza kino na liwa na bango.

Minyoko oyo tokutanaki na yango

Batatoli ya Yehova bakutanaki na mikakatano ya makasi ntango etumba esilaki. Na ndakisa, mokolo moko, bato ya Sirɛtɛ bakendaki na biro ya Batatoli ya Yehova na Lodz mpe bakangaki bato nyonso oyo bazalaki kosala kuna. Na ɛsti ya ekólo Pologne, na bopusi ya bakonzi ya Lingomba ya Katolike, basoda ya ekólo banyokolaki mpenza Batatoli ya Yehova na lolenge moko ya nsɔmɔ.a

Na ntango wana, bakonzi ya Koministe balongolaki ndingisa oyo bapesaki biso mpo na kosala mayangani, basalaki kutu nyonso mpo na kokata mayangani oyo ezalaki kosalema. Atako epekiseli ezalaki ntango nyonso kongala, likambo yango eyeisaki lisusu makasi ekateli na biso ya kokoba na mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Na mobu 1949, na ekólo Pologne tolekaki mosika mpenza motuya ya Batatoli 14000.

Mosika te nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ndenge babengaka basakoli ya ntango nyonso epai ya Batatoli ya Yehova. Esika ya liboso oyo batindaki ngai ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 500 na mboka na biso. Kasi, na nsima baponaki ngai lokola mokɛngɛli motamboli na etúká oyo ezwami na ɛsti ya Lublin, pene na esika baboti na ngai bazalaki kofanda.

Ndenge bakangaki ngai mpe minyoko oyo nazwaki

Na sanza ya Yuni 1950, bakonzi ya Koministe bakangaki ngai mpe bafundaki ngai ete bato ya États-Unis batindi ngai mpo na konɔnga mboka. Babwakaki ngai na mwa ndako ya malili oyo ezalaki na nse ya mabele. Na butu, mokonzi moko ya basoda oyo alukalukaka koyeba makambo oyo ezali kosalema na mboka, abimisaki ngai mpo na kotuna ngai mituna. Alobaki na ngai ete: “Mwa lingomba oyo yo osanganaka, ezali monguna ya ekólo na biso. Biro na bino ezali kosala makambo ya nkuku mpo na ekólo ya Amerika. Tozali na bilembeteli ya likambo yango! Bandeko na yo bandimi ete batambolaki mboka mobimba mpo na koyeba bisika oyo basoda na biso bazali mpe bisika baizini na biso oyo esalaka mindoki ezali.”

Ya solo, bifundeli wana nyonso ezalaki ya lokuta. Atako bongo, mokonzi ya basoda yango asɛngaki ngai natya sinyatire na mokanda moko oyo esengelaki naloba ete namilongoli na lisangá oyo ye abengaki ete “Lisangá na bino ya nsɔni.” Azalaki kotinda ngai na makasi mbala na mbala ete natya sinyatire. Kutu alingaki ete nakoma bankombo mpe baadrɛsi ya Batatoli nyonso oyo nayebaki, mpe bisika oyo mikanda na biso ezalaki kokabolama. Atako bongo, milende na ye nyonso ezalaki mpamba.

Nsima na yango, bakonzi ya basoda babɛtaki ngai na matraki kino nazalaki lisusu koyeba eloko te. Na nsima, basopelaki ngai mai mpo makanisi ezongela ngai, mpe bazongelaki lisusu kotuna ngai mituna. Na butu oyo elandaki, babɛtaki ngai pene na liwa na matindi. Nabondelaki Nzambe na mongongo makasi ete apesa ngai nguya ya koyika mpiko. Nandimi ete ezali yango nde asalaki. Batunaki ngai mituna ya lolenge wana mbala na mbala na butu na boumeli ya mbula moko.

Babimisaki ngai na bolɔkɔ na sanza ya Aprili 1951, kasi Batatoli mingi batikalaki naino na bolɔkɔ. Nakendeki epai ya ndeko moko Motatoli oyo azalaki kotalela mosala ya kosakola mpo na kosɛnga ye apesa ngai esika mosusu mpo na kosala. Atunaki ngai boye: “Ozali kobanga te ete bákanga yo lisusu?” Nayanolaki ye ete, “Nazali kutu na ekateli makasi ya kosala esika bazali na mposa na ngai.” Nazongelaki mosala na ngai ya mokɛngɛli motamboli, mpe na nsima babengaki ngai ete nabongisaka mosala ya konyata mpe kokabola mikanda na Pologne.

Na ntango wana, mpo na kobimisa zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli tozalaki kosalela masini ya kobimisa bakopi na stencil. Mikanda oyo tozalaki konyata ezalaki mpenza kitoko te mpe tozalaki kobimisa mbongo mingi mpo na kosomba papye mpamba te ezalaki komonana te. Mpo na kosala bazulunalo ebele, esengelaki tóbatama na bisika lokola oyo babombaka mboto to na mwa ndako na nse ya mabele, to na ndako oyo babɔkɔlaka banyama. Soki bamoni yo, okɔti bolɔkɔ.

Nazali komikundola ete tozalaki kosalela libulu moko oyo mai ekauká. Na efelo na yango, mɛtrɛ libwa na nse ya mabele, nzela ezalaki kino na mwa ndako moke esika tozalaki kosala bakopi ya bazulunalo. Mpo na kokóma kuna, bazalaki kokitisa biso na nsinga. Mokolo moko, ntango bazalaki kokitisa ngai na katini moko monene ya mabaya, mbala moko nsinga ekatanaki mpe nakweaki na kati ya libulu mpe nabukanaki lokolo. Nsima ya mwa ntango oyo nalekisaki na lopitalo, nazongelaki kosala na masini ya kosala bakopi.

Na ntango wana, nakutanaki na Danuta mobongisi-nzela ya sanza na sanza ya molende. Na mobu 1956, tobalanaki, mpe na mbula minei oyo elandaki tosakolaki na katikati ya Pologne. Na mobu 1960, tokómaki na bana mibale, mpe tozwaki ekateli ete Danuta atika mosala ya ntango nyonso mpo abatelaka bana. Eumelaki te, bakangaki ngai lisusu, mpe na mbala oyo batyaki ngai na mwa esika moko oyo etondaki na bampoko. Nsima ya sanza nsambo, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ mbula mibale.

Kokɔta mpe kobima na bolɔkɔ

Na kati ya bolɔkɔ ya Bydgoszcz, ezalaki na bato ya bolɔkɔ koleka 300, mpe nabondelaki Yehova mpo ete nasakolela bato ya motema sembo nsango malamu ya Bokonzi. Nasololaki na mokambi ya bolɔkɔ, napesaki ye likanisi soki akokoka kondima ete nakataka bato nsuki. Nakamwaki mingi ntango andimaki. Eumelaki te, nabandaki kokata bato ya bolɔkɔ mandɛfu mpe nsuki mpe nazalaki kopesa litatoli na baoyo bazalaki komonisa mposa ya koyoka.

Eumelaki te, moto ya bolɔkɔ oyo tozalaki kosala na ye mpo na kokata nsuki andimaki makambo oyo tozalaki kosolola mpe abandaki kutu koyebisa bato mosusu makambo ya Biblia oyo azalaki koyekola. Nokinoki, mokambi ya bolɔkɔ apesaki mobeko ete tótika kopanza nsango oyo ye azalaki kobenga yango ete “propagande mpo na kotombokisa bato.” Moninga na ngai wana oyo azalaki kokata nsuki abangaki te. Alimbolaki boye, “Liboso nazalaki koyiba, lelo nazali lisusu koyiba te. Nazalaki mpenza moombo ya likaya, mpe natiki komɛla yango. Sikoyo bomoi na ngai ezali na ntina, mpe nalingi nakóma Motatoli ya Yehova.”

Nsima ya kobima na bolɔkɔ, batindaki ngai na Poznan mpo na kokɛngɛla “kompanyi ya mampa,” nkombo oyo tozalaki kobenga bisika ya nkuku oyo tozalaki konyata mikanda. Na nsuka ya bambula ya 1950, mosala na biso ya konyata mikanda ekómaki malamu mpenza. Toyekolaki mayele ya misala ya fɔtɔ mpo tókoka kosalela bapapye ya mike, likambo ya ntina mingi na boyebi na biso mpe toyekolaki kosalela masini babengi presse offset Rotaprint. Na mobu 1960, tobandaki konyata mikanda mpe kokangisa babuku.

Mwa moke na nsima, moto moko oyo afandaka pene na biso afundaki biso, mpe bakangaki ngai lisusu. Nsima ya kobimisa ngai na na bolɔkɔ na mobu 1962, batindaki ngai nasala elongo na bandeko mosusu ebele na Szczecin. Kasi liboso tókende, tozwaki oyo tokanisaki ete ezalaki litambwisi ya bandeko ya sembo, ete esengelaki nde tókende na Kielce. Nzokande, kuna bakangaki biso, mpe bakatelaki ngai lisusu etumbu ya bolɔkɔ ya mbula moko na ndambo. Bato mabe oyo bazalaki na kati na biso nde basalaki bongo. Nsukansuka, bato yango bayebanaki mpe babimisamaki na kati na biso.

Na nsima, ntango babimisaki ngai na bolɔkɔ lisusu, baponaki ngai mpo na kokɛngɛla misala ya konyata mikanda na ekólo Pologne mobimba. Atako nazalaki kokimakima bapolisi mbula zomi mobimba, na mobu 1974, bayaki koyeba esika nazali mpe bakangaki ngai na Opole. Mwa moke na nsima, batindaki ngai na bolɔkɔ ya Zabrze. Mokambi ya bolɔkɔ ayebisaki ngai ete, “Misala na yo ya episkɔpɔ esili. Soki okobi kaka kosala propagande na yo, tokokɔtisa yo na bolɔkɔ na esika oyo okozala yo moko.”

Ndenge nazalaki kosakola na bolɔkɔ

Ya solo, mosala na ngai ya kosakola esilaki te. Nabandaki kutu koyekola Biblia na baninga na ngai mibale ya bolɔkɔ. Nsukansuka, bakolaki mpe nabatisaki bango na esika moko ya monene ya kosukola oyo ezalaki na kati ya bolɔkɔ.

Bato mosusu ya bolɔkɔ bandimaki mpe litatoli na biso, mpe na sanza ya Aprili 1977, toyanganaki elongo mpo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. (Luka 22:19) Sanza mibale na nsima, na sanza ya Yuni 1977, babimisaki ngai na bolɔkɔ mpe kobanda wana bakangaki ngai lisusu te.

Bakonzi bakómaki kotikela mosala na biso nzela. Na ntembe te, ndenge bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló​-Bakambi ya Batatoli ya Yehova bayaki kotala biso esalisaki biso mingi. Na mobu 1977, bandeko misato na kati na bango basololaki na bakɛngɛli, babongisi​-nzela, mpe Batatoli oyo baumeli mingi na bingumba mingi. Na mbula oyo elandaki, bandeko mibale na kati na bango, na bokonde nyonso bakendeki na biro oyo etalelaka makambo ya losambo. Tosengelaki kozela kino na mobu 1989, mpo bátika kopekisa mosala na biso. Lelo oyo Batatoli pene na 124000 bazali kosakola na ekólo Pologne.

Lokola nzoto ya Danuta ezali lisusu kolɔngɔnɔ te, azalaki kotambola na ngai na bambula oyo euti koleka te, kasi azali kolendisa ngai mpe mposa na ye ezali ete nakoba kotalaka masangá. Nakomonisela ye botɔndi ntango nyonso mpo na lisungi oyo apesaki ngai ntango bazalaki kokanga ngai mbala na mbala.

Ekateli oyo nazwaki esili koleka mbula 50 mpo na kosalela Yehova Nzambe ezalaki mpenza ya malamu koleka. Nazwi esengo monene ya kosalela ye na motema mobimba. Ngai na mwasi na ngai tomoni mpenza bosolo ya maloba oyo ezali na Yisaya 40:29 ete: “[Yehova] akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1994, nkasa 213-222.

[Bililingi na lokasa 16]

Tosalelaki liboso masini ya kosala bakopi mpe na nsima “presse offset Rotaprint” mpo na konyata mikanda

[Bililingi na lokasa 17]

Ngai na mwasi na ngai Danuta

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto