Tozali konyokwama mpo na boyengebene
“Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene.”—MATAI 5:10.
1. Mpo na nini Yesu atɛlɛmaki liboso ya Pilato, mpe alobaki na ye nini?
“EZALI mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” (Yoane 18:37) Yesu alobaki maloba yango na Ponsi Pilato, guvɛrnɛrɛ ya Yudea. Soki Yesu atɛlɛmaki liboso ya Pilato, ezali te mpo alingaki yango to mpo Pilato abengisaki ye. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakoselaki ye makambo ete azali mosali ya mabe oyo ebongi akufa.—Yoane 18:29-31.
2. Likambo nini Yesu asalaki, mpe nsukansuka nini ekómelaki ye?
2 Yesu ayebaki malamu ete Pilato azali na bokonzi ya kobikisa to mpe kobomisa ye. (Yoane 19:10) Kasi, yango epekisaki ye te aloba na Pilato na mpiko na ntina etali Bokonzi. Atako bomoi ya Yesu ezalaki na likama, alekisaki libaku wana te mpo na kopesa mokonzi ya liboso ya Leta na etúká wana litatoli. Atako Yesu apesaki litatoli wana, bakatelaki ye etumbu mpe babomaki ye; akufaki liwa ya martiru na nzete ya mpasi.—Matai 27:24-26; Malako 15:15; Luka 23:24, 25; Yoane 19:13-16.
Motatoli to martiru?
3. Liloba “martiru” ezalaki na ndimbola nini na ntango ya kala, kasi ezali na ndimbola nini lelo oyo?
3 Mpo na bato mingi lelo oyo, martiru ezali moto moko oyo azali na molende oyo eleki ndelo, oyo akoki kondima ata liwa to kosala basusu mabe mpo na bindimeli na ye. Mbala mingi bato oyo bandimaka ata kokufa, mingimingi mpo na lingomba na bango, batalelamaka lokola bateroriste to bato oyo bazali kotya bomoi ya bato mosusu na likama. Nzokande, liloba martiru euti na Grɛki (martus) oyo, na ntango ya kala, ezalaki kolimbola “motatoli,” elingi koloba moto oyo azali kotatola, mbala mosusu na tribinale, ete makambo oyo andimi ezali solo. Ezali se na nsima nde liloba yango ekómaki kolimbola “moto oyo akabi bomoi na ye mpo na kopesa litatoli,” to atatoli na ndenge akabi bomoi na ye.
4. Yesu azalaki martiru libosoliboso na ndimbola nini?
4 Yesu azalaki martiru libosoliboso na ndimbola oyo bazalaki kosalela liloba yango na ntango ya kala. Lokola ayebisaki Pilato, ayaki “kopesa litatoli mpo na solo.” Bato nyonso batalelaki litatoli na ye ndenge moko te. Bato mosusu basepelaki na makambo bayokaki mpe oyo bamonaki mpe bandimelaki Yesu. (Yoane 2:23; 8:30) Ebele ya bato mpe mingimingi bakonzi ya mangomba basepelaki na yango te mpe bayokaki nkanda. Yesu alobaki na bandeko na ye oyo bazalaki kondima te ete: “Mokili ezali na ntina moko te ya koyina bino, kasi ezali koyina ngai, mpamba te nazali kotatola ete misala na yango ezali mabe.” (Yoane 7:7) Lokola Yesu azalaki kotatola mpo na solo, bakonzi ya ekólo bayokelaki ye nkanda, mpe na nsuka babomaki ye. Azalaki mpenza “motatoli (martus) ya sembo mpe ya solo.”—Emoniseli 3:14.
“Bokozala biloko ya koyinama”
5. Yesu alobaki nini na ebandeli ya mosala na ye na ntina na minyoko?
5 Banyokolaki Yesu makasi; kasi ayebisaki bayekoli na ye ete likambo yango ekokómela mpe bango. Na ebandeli ya mosala na ye, Yesu ayebisaki bato oyo bayokaki Lisolo na ye Likoló ya Ngomba ete: “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.”—Matai 5:10-12.
6. Likambo nini Yesu alobaki ntango atindaki bantoma 12?
6 Na nsima, ntango Yesu atindaki bantoma 12, alobaki na bango boye: “Bókeba na bato; mpo bakokaba bino na bisambiselo ya mboka, mpe bakobɛta bino fimbo na basinagoga na bango. Ɛɛ, bokomemama liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe bikólo mosusu.” Kasi, kaka bakonzi ya mangomba te nde basengelaki konyokola bayekoli. Yesu alobaki lisusu boye: “Ndeko akokaba ndeko na ye na liwa, mpe tata mwana na ye, mpe bana bakotombokela baboti mpe bakobomisa bango. Mpe bokozala biloko ya koyinama na bato nyonso mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Matai 10:17, 18, 21, 22) Lisolo ya baklisto ya ekeke ya liboso ezali komonisa ete maloba yango ekokisamaki.
Moto oyo ayikaki mpiko na bosembo
7. Nini esalaki ete Setefano akufa liwa ya martiru?
7 Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, Setefano azalaki moklisto ya liboso oyo akufaki mpo atatolaki mpo na solo. Setefano “atondaki na boboto mpe na nguya [mpe] azalaki kosala makamwisi minene ya komonisa makambo oyo ekoya mpe bilembo minene na kati ya bato ya ekólo.” Banguna na ye “bakokaki te kotɛlɛma liboso ya bwanya mpe ya elimo oyo ye azalaki koloba na yango.” (Misala 6:8, 10) Lokola bayokelaki Setefano zuwa, bamemaki ye na Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda mpe, liboso ya bato oyo bafundaki ye, apesaki litatoli ya solosolo. Kasi, na nsuka, banguna ya Setefano babomaki motatoli yango ya sembo.—Misala 7:59, 60.
8. Na Yelusaleme, bayekoli basalaki nini ntango bakómaki konyokola bango nsima ya liwa ya Setefano?
8 Nsima ya liwa ya Setefano, “monyoko moko monene ebimelaki lisangá oyo ezalaki na Yelusaleme; bango nyonso longola kaka bantoma bapanzanaki epai na epai na bitúká ya Yudea mpe ya Samalia.” (Misala 8:1) Monyoko yango esukisaki nde mosala ya kotatola ya baklisto? Kutu, lisolo elobi na biso ete “baoyo bapanzanaki bakatisaki mokili yango mobimba kosakoláká nsango malamu ya liloba.” (Misala 8:4) Na ntembe te, bazalaki na likanisi na ntoma Petelo oyo alobaki mwa mikolo liboso ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Bayekoli wana ya sembo mpe ya mpiko bazalaki konyokwama kasi bakangamaki na mosala ya kopesa litatoli na solo, atako bayebaki ete yango ekobakisela bango mpasi.—Misala 11:19-21.
9. Bayekoli ya Yesu bakutanaki na minyoko nini lisusu?
9 Ya solo, minyoko ekitaki te. Ya liboso, balobi na biso ete Saulo—moto oyo azalaki wana ntango bazalaki kobamba Setefano mabanga mpe andimaki likambo yango—“azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo, akendaki epai ya nganga-nzambe monene mpe asɛngaki ye mikanda mpo na basinagoga oyo ezali na Damasi, mpo akoka komema na Yelusaleme na kokangama na minyɔlɔlɔ moto nyonso oyo ye akokuta oyo azali moto ya Nzela yango, ezala mibali mpe basi.” (Misala 9:1, 2) Na nsima, soki na mobu 44 ya ntango na biso (T.B.), “mokonzi Elode atyaki mabɔkɔ na ye mpo na konyokola bato mosusu ya lisangá. Abomaki Yakobo ndeko ya Yoane na mopanga.”—Misala 12:1, 2.
10. Balobeli minyoko nini na Misala mpe na Emoniseli?
10 Mikapo oyo etikali ya mokanda ya Misala ezali na masolo oyo elobeli komekama, bolɔkɔ, mpe minyoko oyo bato ya sembo lokola Paulo, ntoma oyo azalaki liboso monyokoli oyo, ekoki kozala ete Amperɛrɛ Néron, abomisaki ye liwa ya martiru na mobu 65 T.B. (2 Bakolinti 11:23-27; 2 Timote 4:6-8) Na nsuka, mokanda ya Emoniseli, oyo ekomamaki na nsuka ya ekeke ya liboso, eyebisi biso ete batyaki ntoma Yoane oyo akómaki mobange, na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi ‘mpo azalaki koloba na ntina etali Nzambe mpe kopesa litatoli na ntina etali Yesu.’ Emoniseli elobeli mpe “Antipasi, motatoli na ngai, moto na ngai ya sembo, oyo abomamaki” na Pelegame.—Emoniseli 1:9; 2:13.
11. Ndenge nini maloba ya Yesu oyo etali minyoko ekokisamaki epai ya baklisto ya ekeke ya liboso?
11 Makambo nyonso wana ekokisaki maloba oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20) Baklisto ya sembo na ekeke ya liboso bazalaki pene ya kondima ata liwa—ezala na konyonga bango, kobwaka bango na bisika ya banyama ya yauli, to na lolenge mosusu nyonso—mpo na kokokisa etinda ya Nkolo Yesu Klisto: “Bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.”—Misala 1:8.
12. Mpo na nini minyoko ezalaki kaka te mpo na baklisto ya kala?
12 Soki moto akanisi ete banyokolaki bayekoli ya Yesu makasi ndenge wana kaka na ntango ya kala, azali komikosa. Paulo, oyo mpe anyokwamaki ndenge tomoni yango, akomaki boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Na ntina na minyoko, Petelo alobaki boye: “Ya solo, ezali na nzela yango nde bobengamaki, mpamba te Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Tii lelo oyo, na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo oyo, bato bazali se koboya mpe koyina basaleli ya Yehova. (2 Timote 3:1) Ezala na bikólo oyo eyangelami na bakonzi ya mabe to oyo ezali na demokrasi, Batatoli ya Yehova, ezala mokomoko kati na bango to bango nyonso, bakutanaka na minyoko.
Mpo na nini bayinaka mpe banyokolaka biso?
13. Likambo nini basaleli ya Yehova na mikolo na biso basengeli kobosana te na ntina etali minyoko?
13 Atako mingi kati na biso lelo oyo tozali na mwa bonsomi mpe kimya mpo na kosakola mpe koyangana, tosengeli kobosana te likambo oyo Biblia elobi ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (1 Bakolinti 7:31) Makambo ekoki kobongwana nokinoki, mpe soki tobongisaki makanisi, motema mpe elimo na biso te, tokoki mpenza kobɛta libaku. Na yango, ndenge nini tokoki komibatela? Lolenge ya malamu mpenza ya komibatela ezali ya kobosana te ntina oyo bayinaka mpe banyokolaka baklisto, atako balingaka kimya mpe batosaka mibeko.
14. Po na Petelo, ntina nini banyokolaki baklisto?
14 Ntoma Petelo alobelaki likambo yango na mokanda na ye ya liboso, oyo akomaki soki na mobu 62-64 T.B., na eloko oyo bazalaki konyokola baklisto na Ampire ya Loma mobimba. Alobaki boye: “Balingami, bómitungisa te mpo na mɔtɔ oyo ezali kopela na kati na bino, oyo ezali kokómela bino mpo na komekama, lokola nde likambo moko ya kokamwa ezali kokwela bino.” Mpo na kolimbola makanisi na ye, Petelo abakisaki boye: “Moko te na kati na bino anyokwama mpo azali mobomi-bato to moyibi to mosali-mabe to mpo azali moto oyo amikɔtisaka na makambo ya bato mosusu. Kasi soki azali konyokwama mpo azali moklisto, ayoka nsɔni te, kasi akoba nde kopesa Nzambe nkembo na nkombo yango.” Petelo amonisaki ete soki bazalaki konyokwama, ezali te mpo basalaki makambo ya mabe, kasi mpo bazalaki baklisto. Soki bazalaki komibalola na “libulu moko wana ya pɔtɔpɔtɔ ya misala ya mbindo” elongo na bato oyo bafandaki na bango, balingaki kosepela na bango. Kasi, banyokwamaki mpo bazalaki kosala makasi mpo bákokisa mokumba na bango ya bayekoli ya Klisto. Makambo ezali se ndenge yango mpo na baklisto ya solo lelo oyo.—1 Petelo 4:4, 12, 15, 16.
15. Bongolabongola nini ezali komonana na ndenge oyo bazali kosalela Batatoli ya Yehova makambo lelo oyo?
15 Na bisika mingi na mokili, bakumisaka Batatoli ya Yehova mpo na bomoko mpe boyokani na bango na mayangani mpe na misala ya kotonga, mpo na bosembo mpe makasi na mosala, mpo na bizaleli malamu mpe mpo mabota na bango ezalaka malamu, mpe mpo molato na bango ezalaka malamu mpe bazalaka na bonkonde.a Nzokande, ntango tozali kokoma lisolo oyo, mosala na bango epekisami to batyeli yango ebele ya mibeko na mikili soki 28, mpe Batatoli mingi bazali komona mpasi mpe bazali kobungisa biloko na bango mpo na kondima na bango. Mpo na nini bongolabongola ndenge wana? Mpe mpo na nini Nzambe azali kotikela yango nzela?
16. Wapi ntina ya libosoliboso oyo Nzambe atiki nzela ete basaleli na ye bányokwamaka?
16 Libosoliboso, tosengeli te kobosana maloba ya Masese 27:11: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” Ezali nde mpo na likambo ya kalakala oyo etaleli boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Atako ebele ya bato oyo batikalaki sembo epai ya Yehova na boumeli ya bankama ya bambula bapesi litatoli monene, Satana atiki te kotumola Yehova ndenge asalaki na mikolo ya Yobo, moto ya sembo. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Na ntembe te, Satana angali mpenza kongala na molende ya nsuka oyo azali kosala mpo na komilongisa, na ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ezwi misisa, mpe bato ya bokonzi yango ná bamonisi na yango bazali na mabelé mobimba. Bato yango bakotikala sembo epai ya Nzambe ata soki bamekami mpe banyokwami makasi? Mosaleli mokomoko ya Yehova asengeli kopesa eyano na motuna yango.—Emoniseli 12:12, 17.
17. Yesu alingaki koloba nini na maloba “ekozala libaku bokozwa mpo na litatoli”?
17 Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye makambo oyo ekosalema na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo,” apesaki ntina mosusu oyo Yehova atiki ete basaleli na ye bányokwama. Alobaki na bango boye: “Bakomema bino liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ mpo na nkombo na ngai. Yango ekozala libaku bokozwa mpo na litatoli.” (Matai 24:3, 9; Luka 21:12, 13) Yesu apesaki Elode ná Ponsi Pilato litatoli. Ntoma Paulo mpe ‘amemamaki liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ.’ Na litambwisi ya Nkolo Yesu Klisto, Paulo alukaki kopesa litatoli epai ya mokonzi oyo alekaki monene ntango alobaki boye: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!” (Misala 23:11; 25:8-12) Ndenge moko mpe lelo oyo, mbala mingi, mikakatano mosusu epesaki nzela na kopesa bakonzi mpe ebele ya bato litatoli malamu.b
18, 19. (a) Na ndenge nini koyikela minyoko mpiko ezali na litomba mpo na biso? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo elandi?
18 Ya nsuka, koyikela mikakatano mpe minyoko mpiko ekoki kozala na litomba mpo na biso moko. Na ndenge nini? Moyekoli Yakobo alobaki na baninga na ye baklisto boye: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge, mpo bino moko boyebi ete motindo ya kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.” Ya solo, minyoko ekoki kobongisa kondima na biso mpe kolendisa ezaleli na biso ya koyika mpiko. Yango wana, tobangaka minyoko na koleka ndelo te, tokimaka te to mpe koluka kosukisa minyoko na mayele oyo Biblia epesi nzela te. Kasi, tolandaka toli ya Yakobo ete: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bino bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.”—Yakobo 1:2-4.
19 Atako Liloba ya Nzambe ezali kosalisa biso na kokanga ntina oyo basaleli ya sembo ya Nzambe bazali konyokwama mpe mpo na nini Yehova azali kotikela yango nzela, yango elingi koloba te ete koyikela minyoko mpiko ezali pɛtɛɛ. Nini ekoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko? Tokoki kosala nini ntango tokutani na minyoko? Tokotalela mituna yango ya ntina na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1995, nkasa 27-29; 15 Aprili 1994, nkasa 16-17; mpe Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ 1993, nkasa 6-13, ebimeli ya Lifalanse.
b Talá Lamuká! ya 8 Yanuali 2003, nkasa 3-11, ebimeli ya Lifalanse.
Okoki kolimbola?
• Yesu azalaki martiru libosoliboso na ndimbola nini?
• Minyoko esalaki baklisto ya ekeke ya liboso nini?
• Lokola Petelo alimbolaki yango, mpo na nini baklisto ya ekeke ya liboso banyokwamaki?
• Wapi bantina oyo Yehova atiki ete basaleli na ye bányokwamaka?
[Bililingi na lokasa 10, 11]
Soki baklisto ya ekeke ya liboso banyokwamaki, ezali te mpo bazalaki kosala mabe, kasi mpo bazalaki baklisto
PAULO
YOANE
ANTIPASI
YAKOBO
SETEFANO