Tiká ete bikelamu nyonso esakola nkembo ya Yehova
“Bópesa Yehova nkembo mpe nguya. Bópesa Yehova nkembo oyo ekoki na nkombo na ye.”—NZEMBO 96:7, 8, NW.
1, 2. Biloko nini ezali kopesa Yehova nkembo, mpe balendisi banani ete bango mpe bápesa Yehova nkembo?
NTANGO Davidi, mwana ya Yese, azalaki kokola na Beteleme, azalaki mobateli ya mpate. Tokanisi mpenza ete ntango azalaki kokɛngɛla bampate ya tata na ye na bisobe na zingazinga ya Beteleme, azalaki kozwa mabaku mingi ya kotala ebele ya minzoto na likoló! Na ntembe te, ntango asalaki Nzembo 19, akanisaki lisusu esengo oyo azalaki koyoka ntango azalaki kotala minzoto: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye. Nde lokito na bango ekómi na mokili mobimba, maloba na bango kino nsuka na mokili.”—Nzembo 19:1, 4.
2 Likoló oyo ezali mosala ya Yehova, atako elobaka te, esakolaka nkembo na ye mokolo na mokolo. Biloko oyo Nzambe akelá esakolaka ntango nyonso nkembo na ye mpe, ntango moto azali kotala biloko yango oyo ezali komonana na “mokili mobimba,” amimonaka mpenza ete azali mpamba. Nzokande, ezali kaka te bikelamu oyo elobaka te nde esengeli kosakola nkembo ya Nzambe. Bazali kolendisa bato ya sembo ete bápesa Nzambe nkembo na mongongo na bango. Mokomi moko ya nzembo alobaki na bato oyo bazali kosambela Nzambe na bosembo ete: “Bópesa Yehova nkembo mpe nguya. Bópesa Yehova nkembo oyo ekoki na nkombo na ye.” (Nzembo 96:7, 8, NW) Bato oyo bazali na boyokani malamu na Nzambe bazalaka na esengo ya kosala yango. Kasi, kopesa Nzambe nkembo esɛngi nini?
3. Mpo na nini bato bapesaka Nzambe nkembo?
3 Kopesa Nzambe nkembo esuki kaka na maloba te. Na ntango ya Yisaya, Bayisalaele bazalaki kopesa Nzambe nkembo na maloba, kasi mingi kati na bango bazalaki sembo te. Yehova alobaki na nzela ya Yisaya ete: “Bato oyo babɛlɛmi na monɔkɔ na bango mpe bakumisi ngai na bibɛbu na bango, naino motema na bango ezali na ngai mosika.” (Yisaya 29:13) Masanzoli ya bato wana ezalaki na ntina moko te. Mpo masanzoli ya moto ezala na ntina, esengeli kouta na motema oyo etondi na bolingo mpo na Yehova mpe moto yango asengeli kondima ete Yehova aleki na nkembo. Kaka Yehova nde azali mozalisi. Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Moyengebene mpe azali bolingo. Azali mobikisi na biso mpe Nkolo Mokonzi ya boyengebene oyo bikelamu nyonso ya likoló mpe ya mabelé basengeli kotosa. (Emoniseli 4:11; 19:1) Soki tondimaka mpenza makambo yango, boye tókumisa ye na motema na biso mobimba.
4. Wapi ndenge ya kopesa Nzambe nkembo oyo Yesu alakisaki mpe ndenge nini tokokokisa yango?
4 Yesu Klisto ayebisaki biso ndenge oyo tokoki kopesa Nzambe nkembo. Alobaki boye: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo, ete bozali kokoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.” (Yoane 15:8) Ndenge nini tokoki kobota mbuma mingi? Ya liboso, soki tozali komipesa na mosala ya kosakola “nsango malamu ya bokonzi” mpe na bongo, tozali kosangana na biloko mosusu nyonso oyo Nzambe akelá mpo na “kolobela” “bizaleli [ya Nzambe] oyo emonanaka te.” (Matai 24:14; Baloma 1:20) Lisusu, na ndenge wana nde biso nyonso tozali kosangana na mosala ya kokómisa bato bayekoli oyo bakosangisa mingongo na bango na masanzoli mpo na Yehova Nzambe. Ya mibale, tosengeli kolona mbuma ya elimo santu ya Nzambe mpe kosala makasi mpo na komonisa bizaleli malamu ya Yehova Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23; Baefese 5:1; Bakolose 3:10) Na ndenge yango, etamboli na biso ya mokolo na mokolo ekopesa Nzambe nkembo.
“Na mabelé mobimba”
5. Limbolá ndenge oyo Paulo amonisaki mokumba ya baklisto ya kosakola kondima na bango epai ya bato mosusu mpo na kopesa Nzambe nkembo.
5 Na mokanda na ye epai ya Baloma, Paulo amonisaki ete baklisto basengeli kosakola kondima na bango epai ya bato mosusu mpo na kopesa Nzambe nkembo. Likanisi moko ya ntina na mokanda ya Baloma ezali ete kaka baoyo bandimeli Yesu Klisto nde bakobika. Na Baloma mokapo 10, Paulo amonisaki ete Bayuda ya mikolo na ye bazalaki naino koluka komonana sembo na kotosa Mibeko ya Moize, nzokande “Klisto [azalaki] nsuka ya Mibeko.” Yango wana, Paulo alobaki ete: “Soki ozali kosakola polele ‘liloba wana na monɔkɔ na yo mpenza,’ ete Yesu azali Nkolo, mpe ozali komonisa kondima na kati ya motema na yo ete Nzambe alamwisaki ye na bakufi, okobikisama.” Kobanda ntango wana, “bokeseni [ezalaka lisusu te] na kati ya Moyuda mpe Mogrɛki, mpo ezali na Nkolo kaka moko wana likoló ya bato nyonso, oyo azali moto ya bomɛngo epai ya baoyo nyonso babelelaka ye. Mpo ‘moto nyonso oyo azali kobelela nkombo ya Yehova akobika.’”—Baloma 10:4, 9-13.
6. Ndenge nini Paulo asalelaki maloba ya Nzembo 19:4?
6 Na nsima, Paulo atunaki mituna ebongi mpenza ete: “Ndenge nini bakobelela moto oyo bango bandimeli te? Mpe, ndenge nini bakondimela moto oyo bango bayoki nsango na ye te? Mpe, ndenge nini bakoyoka nsango soki moto oyo akosakola azali te?” (Baloma 10:14) Na oyo etali Bayisalaele, Paulo alobaki ete: “Bango nyonso batosaki te nsango malamu.” Mpo na nini? Ezali te ete batosaki te mpo bazwaki libaku ya kosala yango te, kasi nde mpo bazangaki kondima. Mpo na komonisa yango, Paulo atángaki maloba ya Nzembo 19:4 mpe asalelaki yango na mosala ya kosakola, kasi te mpo na bikelamu oyo elobaka te. Alobaki boye: “Ɛɛ, ya solo, ‘na mabelé mobimba lokito na bango eyokani, mpe na bansukansuka ya mabelé oyo efandami maloba na bango.’” (Baloma 10:16, 18) Ya solo, se ndenge bikelamu oyo elobaka te epesaka Yehova nkembo, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola nsango malamu ya lobiko bipai nyonso mpe na bongo, bazalaki kopesa Nzambe nkembo “na mabelé mobimba.” Na mokanda oyo akomelaki Bakolose, Paulo alobelaki ndenge nsango malamu epalanganaki. Alobaki ete nsango malamu esakolamaki “na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”—Bakolose 1:23.
Batatoli ya molende
7. Na kotalela maloba ya Yesu, mokumba nini bayekoli na ye bazali na yango?
7 Emonani ete Paulo akomelaki Bakolose soki mbula 27 nsima ya liwa ya Yesu Klisto. Ndenge nini mosala ya kosakola ekokaki kokóma tii na Kolose nsima ya mwa ntango mokuse ndenge wana? Esalemaki bongo mpo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na molende, mpe Yehova apambolaki molende na bango. Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakozala basakoli ya solosolo na maloba oyo: “Na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.” (Malako 13:10) Yesu abakisaki etinda oyo ezali na mokapo ya nsuka ya evanzile ya Matai: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Ntango Yesu amataki na likoló, mwa moke na nsima, bayekoli na ye babandaki kokokisa etinda na ye.
8, 9. Na kolanda mokanda ya Misala, ndenge nini baklisto batalelaki etinda ya Yesu?
8 Ntango bayekoli ya sembo ya Yesu bazwaki elimo santu na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), babandaki mbala moko kosakola, bayebisaki ebele ya bato na Yelusaleme “makambo minene ya Nzambe.” Basalaki mosala na bango ya kosakola malamu mpenza, mpe “milimo soki nkóto misato” ezwaki batisimo. Bayekoli bakobaki kosanzola Nzambe liboso ya bato nyonso mpe na molende mpenza, mpe bazalaki kobota mbuma ya malamu.—Misala 2:4, 11, 41, 46, 47.
9 Eumelaki te, mosala oyo baklisto yango bazalaki kosala ebendaki likebi ya bakonzi ya mangomba. Lokola bakonzi yango batungisamaki na ndenge ntoma Petelo ná ntoma Yoane bazalaki koloba polelepolele, bayebisaki bango bátika kosakola. Bantoma bayanolaki ete: “Tokoki te kotika kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” Nsima ya kobangisa bango na maloba, batikaki bango, mpe Petelo ná Yoane bakendaki kokutana na bandeko na bango, mpe babondelaki Yehova elongo. Na mpiko nyonso babondelaki Yehova boye: “Pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.”—Misala 4:13, 20, 29.
10. Banani bakómaki kopekisa mosala ya baklisto ya solo, mpe bango basalaki nini mpo na yango?
10 Mwa moke na nsima, emonanaki ete libondeli wana eyokanaki na mokano ya Yehova. Batyaki bantoma na bolɔkɔ mpe anzelu moko abimisaki bango na ndenge ya likamwisi. Anzelu yango alobaki na bango boye: “Bókende, mpe, kotɛlɛmáká na tempelo, bókoba koloba na bato ya ekólo maloba nyonso etali bomoi oyo.” (Misala 5:18-20) Lokola bantoma batosaki, Yehova akobaki kopambola bango. Yango wana, “mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” (Misala 5:42) Emonani mpenza ete bato oyo bazalaki kotɛlɛmɛla bayekoli ya Yesu bakokaki kopekisa bango te kopesa Nzambe nkembo liboso ya bato nyonso.
11. Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela mosala ya kosakola?
11 Eumelaki te, bakangaki Setefano mpe babomaki ye na mabanga. Nsima ya liwa na ye, babandaki mbala moko konyokola bayekoli makasi mpenza na Yelusaleme, mpe bango nyonso, longola kaka bantoma, bapanzanaki na bamboka mosusu. Monyoko yango elɛmbisaki bango nde? Ata moke te. Tozali kotánga boye: “Baoyo bapanzanaki bakatisaki mokili yango mobimba kosakoláká nsango malamu ya liloba.” (Misala 8:1, 4) Molende na bango ya kopesa Nzambe nkembo emonanaki mbala mingi. Tozali kotánga na Misala mokapo 9 ete ntango Mofalisai Saulo moto ya Talasia azalaki kokende na Damasi mpo na konyokola bayekoli ya Yesu oyo bazalaki kuna, amonaki emonaneli ya Yesu mpe akufaki miso. Kuna na Damasi, Ananiasi afungolaki miso ya Saulo na ndenge ya likamwisi. Likambo ya liboso Saulo—oyo na nsima akómaki ntoma Paulo—asalaki ezalaki nini? Biblia elobi ete: “Na mbala moko na basinagoga abandaki kosakola Yesu, ete Ye azali Mwana ya Nzambe.”—Misala 9:20.
Bango nyonso bazalaki kosakola
12, 13. (a) Bato ya mayele na masolo ya kala balobi ete baklisto ya ekeke ya liboso bayebanaki na likambo nini? (b) Ndenge nini mokanda ya Misala mpe maloba ya Paulo emonisi ete bato wana ya mayele balobaki solo?
12 Eyebani malamu ete baklisto nyonso ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola. Philip Schaff akomaki boye: “Lisangá mokomoko ezalaki etuluku ya bamisionɛrɛ, mpe moklisto mokomoko azalaki misionɛrɛ.” (History of the Christian Church) William Williams alobaki boye: “Eyebani ete baklisto nyonso ya ekeke ya liboso, mingimingi baoyo bazwaki makabo ya kosala makamwisi [to makabo ya elimo santu], bazalaki kosakola nsango malamu.” (The Glorious Ministry of the Laity) Alobaki lisusu ete: “Ata mokolo moko te Yesu Klisto alobaki ete mosala ya kosakola ezali kaka mpo na bakonzi ya lingomba.” Ata mpe Celse, moto moko oyo azalaki kotɛmɛla boklisto, akomaki ete: “Basali ya nsuki ya meme, baoyo basalaka sapato, baoyo babongisaka mposo ya nyama, bato oyo batángá te mpe bato mpamba, bazalaki basakoli ya molende ya nsango malamu.”
13 Mokanda ya Misala ezali komonisa ete makambo oyo bato yango balobaki ezali solo. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango bayekoli bazwaki elimo santu, bango nyonso, mibali mpe basi, bazalaki kosakola misala minene ya Nzambe na miso ya bato nyonso. Nsima ya liwa ya Setefano, baklisto nyonso oyo bapanzanaki na bisika mosusu mpo bakómaki konyokola bango bamemaki nsango malamu na bamboka mosika mpenza. Mbula soki 28 na nsima, Paulo akomelaki Baebele nyonso oyo bakómaki baklisto, kasi bakonzi ya lingomba te, ete: “Na nzela na ye tiká tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Paulo alobelaki ndenge azalaki kotalela mosala ya kosakola boye: “Nzokande, soki nazali kosakola nsango malamu, yango ezali te epai na ngai ntina ya komikumisa, mpo ezali nde mokumba oyo batye likoló na ngai. Ya solo, mawa na ngai soki nasakoli te nsango malamu!” (1 Bakolinti 9:16) Emonani polele ete baklisto nyonso ya sembo na ekeke ya liboso bazalaki mpe kotalela mosala yango ndenge wana.
14. Boyokani nini ezali na kati ya kondima mpe mosala ya kosakola?
14 Moklisto ya solosolo asengeli kosakola, mpamba te mosala yango etambolaka nzela moko na kondima. Paulo alobaki boye: “Ezali na motema nde moto amonisaka kondima mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto asalaka eyambweli mpo na lobiko.” (Baloma 10:10) Tokoki nde koloba ete kaka mwa bato moke—na ndakisa bakonzi ya mangomba—bamonisaka kondima mpe na bongo, bazali na mokumba ya kosakola?a Te! Baklisto nyonso ya solo bazali na kondima makasi epai ya Nkolo Yesu Klisto mpe yango etindaka bango báyambola kondima na bango. Soki bazali kosala yango te, ekomonana ete kondima na bango ekufá. (Yakobo 2:26) Lokola baklisto nyonso ya sembo na ekeke ya liboso bazalaki komonisa kondima na bango na lolenge wana, lokito makasi ya masanzoli mpo na nkombo ya Yehova eyokanaki.
15, 16. Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ete mosala ya kosakola ezalaki kokola atako mikakatano ezalaki.
15 Na ekeke ya liboso, Yehova asalisaki basaleli na ye bákóma ebele atako bazalaki na mikakatano oyo ezalaki kouta na kati mpe na libándá ya lisangá. Na ndakisa, Misala mokapo 6 elobeli matata oyo ebimaki na kati ya bandimi oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Liebele ná baoyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Bantoma basilisaki matata yango. Mpe mpo na yango, “Liloba ya Nzambe ekobaki kokola, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na kati ya Yelusaleme; mpe ebele moko ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.”—Misala 6:7.
16 Na nsima, boyokani ezalaki malamu te kati na Elode Agilipa, Mokonzi ya Yuda, ná bato ya Tulo mpe Sidona. Bato ya bingumba yango babondelaki ye mpo na kosɛnga kimya, mpe mpo na yango Elode asalaki mitingi liboso ya ebele ya bato. Bato oyo bazalaki koyoka ye babandaki koganga ete: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” Na mbala moko, anzelu ya Yehova abɛtaki Elode Agilipa mpe akufaki, “mpo apesaki Nzambe nkembo te.” (Misala 12:20-23) Bato oyo batyaki elikya na bango epai ya bato oyo bazali na bokonzi bayokaki eloko! (Nzembo 146:3, 4) Nzokande, baklisto bakobaki kopesa Yehova nkembo. Yango wana, atako makambo ezalaki mpenza malamu te na mboka, “liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kopalangana.”—Misala 12:24.
Na ntango wana mpe lelo oyo
17. Na ekeke ya liboso, ebele ya bato bazalaki kosangana na mosala nini?
17 Bato oyo bazalaki na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso bazalaki na molende mpe bamipesaki mpenza mpo na kopesa Yehova Nzambe nkembo. Baklisto nyonso ya sembo bazalaki kopalanganisa nsango malamu. Bamosusu bakutanaki na bato oyo basepelaki na nsango yango mpe, kaka ndenge Yesu alobaki, bateyaki bango kotosa makambo nyonso oyo atindaki bango. (Matai 28:19, 20) Mpo na yango, lisangá ezalaki kokola, mpe bato mingi bakómaki kopesa Yehova nkembo, ndenge Davidi, mokonzi ya kala azalaki kosala. Bango nyonso bazalaki koloba ndenge ekomami ete: “Ɛ Nkolo Nzambe, nakotɔnda yo na motema na ngai mobimba, mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko. Zambi boboto na yo ezali monene epai na ngai.”—Nzembo 86:12, 13.
18. (a) Bokeseni nini ezali komonana na kati ya lisangá ya boklisto ye ekeke ya liboso ná mangomba ya boklisto lelo oyo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Na kotalela likambo yango, maloba ya Allison Trites, molakisi moko ya teoloji, ezali mpenza kotinda na kokanisa. Ye amonisaki bokeseni oyo ezali na kati ya mangomba ya boklisto ya lelo ná boklisto ya ekeke ya liboso na maloba oyo: “Lelo oyo, mangomba ezali kokola mingimingi na nzela ya mabota (ntango bana ya bandimi oyo basambelaka na parwasi moko bazali kokóma bandimi) to na nzela ya bapaya (ntango bato oyo bauti esika mosusu bakómi koyangana na parwasi ya esika oyo bakómi kofanda). Kasi, na mokanda ya Misala, kobongwana ya bato ya sika nde ezalaki kokolisa lingomba, mpamba te lingomba ezalaki naino na ebandeli na yango.” Elingi nde koloba ete lingomba ya boklisto ya solo ezali lisusu te kokola na ndenge oyo Yesu alobaki? Ezali bongo te. Lelo oyo, baklisto ya solo bazali kopesa Nzambe nkembo liboso ya bato nyonso na molende lokola kaka baklisto ya ekeke ya liboso. Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba oyo ebongolamaka na “bakonzi ya lingomba” mpe “mokonzi ya lingomba” eutá libosoliboso na liloba ya Grɛki klêros, oyo elimboli “libula.” Na 1 Petelo 5:2, 3, liloba klêros esalelami mpo na komonisa ete “etonga [mobimba] ya Nzambe” ezali libula na ye.
Okoki kolimbola?
• Na balolenge nini topesaka Nzambe nkembo?
• Ndenge nini Paulo asalelaki maloba ya Nzembo 19:4?
• Boyokani nini ezali na kati ya kondima mpe mosala ya kosakola?
• Likambo nini ezalaki komonana na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso?
[Elilingi na nkasa 8, 9]
Likoló esakolaka ntango nyonso nkembo ya Yehova
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Anglo-Australian Observatory, fɔtɔ ya David Malin
[Bililingi na lokasa 10]
Mosala ya kosakola ekendaka nzela moko na mabondeli