Makambo ya Nzambe mpe bolamu na yo
NA NTEMBE te olekisaka ngonga mingi na kobatela nzoto na yo ezala kolɔngɔnɔ. Ntango mosusu, na mokolo moko, olalaka ngonga mwambe; kolamba mpe kolya ezwaka yo bangonga mingi, osalaka mosala ngonga mwambe to koleka mpo ozwa mbongo ya kofutela ndako mpe kosomba biloko ya kolya. Soki obɛli, okendaka kokutana na monganga to olukaka nkisi ya bonkɔkɔ mpe obimisaka mbongo na kosomba nkisi. Otyaka bopɛto na ndako, osukolaka nzoto na yo, osalaka fizike; nyonso wana mpo ozala nzoto kolɔngɔnɔ.
Kasi, mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ, esengeli kaka te kokokisa bamposa ya mosuni. Ezali mpe na likambo mosusu ya ntina mingi. Minganga bamoni ete mpo moto azala nzoto malamu asengeli mpe kokokisa bamposa ya elimo.
Makambo ya elimo mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto
Hedley Peach, molakisi na iniversite ya Melbourne, na Australie, alobaki boye: “Bato mingi ya mayele oyo bayekoli likambo yango bamonisi ete soki moto amipesi na makambo ya elimo, nzoto na ye ekómaka malamu koleka.” Mpo na yango, mokanda moko ya minganga (The Medical Journal of Australia) eyebisaki boye: “Kosambela esalisaka . . . moto abɛla tansiɔ te, azala mafutamafuta te . . . mpe azala mpenza na likama te ya kozwa kanser ya misɔpɔ.”
Na États-Unis mpe, na mobu 2002, bato ya mayele na iniversite ya Californie bayekolaki bomoi ya bato 6 545 mpe bamonaki ete “bato oyo bakendaka ndako-nzambe mbala moko na pɔsɔ bazali na likama moke ya kokufa koleka bato oyo bakendaka mingi te to oyo bakendaka ata moke te.” Doug Oman, mokambi ya boyekoli yango, ye azali molakisi na Eteyelo ya minganga ya iniversite ya Californie, alobaki boye: “Bokeseni yango emonanaki ata nsima ya kotalela bomoi ya bato oyo bazali na boyokani malamu na bandeko mpe baninga na bango mpe makambo mosusu oyo basalaka, na ndakisa bamɛlaka likaya te mpe basalaka fizike.”
Mokanda ya minganga oyo toutaki kolobela emonisi matomba mosusu bato oyo balingaka makambo ya Nzambe bazwaka: “Na Australie, minganga mingi oyo bayekoli bomoi ya bato bamoni ete kimya ezalaka na mabala ya bato oyo balingaka makambo ya elimo, bato yango bamipesaka na masanga te mpe bamɛlaka bangi te, kati na bango bato oyo bamibomaka bazalaka mingi te mpe mingi bamonaka likambo yango mabe, bazalaka mpenza na mitungisi to na mpasi na makanisi te, mpe bazalaka na boboto mingi.” Longola yango, zulunalo mosusu ya minganga (nkombo na yango ya kala ezali The British Medical Journal) eyebisi boye: “Bato oyo bazali na kondima makasi, soki babungisi ndeko to moninga, baumelaka na mawa te mpe babosanaka mpasi yango noki koleka bato oyo bakipaka makambo ya Nzambe te.”
Makanisi ezali ndenge na ndenge mpo na likambo oyo tobengi kolinga makambo ya Nzambe. Kasi, ndenge ozali kokokisa bamposa na yo ya elimo ekoki kosala ete nzoto mpe makanisi na yo ezala malamu to te. Likambo yango eyokani na maloba oyo Yesu Klisto alobaki eleki sikoyo mbula soki 2 000. Alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Lokola kokokisa bamposa na yo ya elimo ekoki kosala ete ozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe ozala malamu, ebongi mpenza omituna boye: ‘Wapi nzela malamu nakoki kolanda na makambo ya elimo? Mpe kozala moto ya elimo elimboli nini?’