Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/2 nk. 15-20
  • Kebá na bokosi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kebá na bokosi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bokosi ekómi mingi lelo oyo?
  • Kebá na bokosi ya bapɛngwi
  • Tómikosa te
  • Tókeba na lokuta ya Satana
  • Omibatela na bokosi
  • Okotya likebi na makebisi ya polele ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Kebá okosama te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tólobaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/2 nk. 15-20

Kebá na bokosi

“Bókeba: mbala mosusu ekoki kozala na moto moko oyo akomema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya . . . bokosi ya mpambampamba.”​—BAKOLOSE 2:8.

1-3. (a) Bandakisa nini ezali komonisa ete bokosi ekɔti na makambo nyonso lelo oyo? (b) Mpo na nini bokosi oyo etondi na mokili esengeli kokamwisa biso te?

ELEKI mwa bambula, profesɛrɛ moko ya makambo ya mibeko azalaki kotuna baavoka mingi motuna oyo: “Mbala boni bato oyo osambaka mpo na bango bakosá yo?” Biyano nini bazalaki kopesa ye? Alobi boye: “Natunaki baavoka ebele, kasi kaka moko nde alobaki ete bakosá ye naino te.” Mpo na nini? “Avoka yango autaki kobanda mosala na ye na kompanyi moko ya monene mpe naino asambaki likambo ya moto te.” Lisolo oyo ezali komonisa likambo moko ya mawa: lelo oyo, bato bakómi kokosa mingi.

2 Bato bazali kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kokosa mpe bazali kosala yango na makambo nyonso. Toyokaka makambo yango mingi na bansango: bato ya politiki bazali kokosa ete bakosala likambo boye to boye, bakalaka mpe baavoka ya bakompanyi bazali kokosa ete kompanyi ekozwa banefisi mingi, bato oyo basalaka piblisite bazali kokosa bakiliya, bato mosusu bakosaka ntango esengeli báfuta bango asiransi. Mangomba mpe etikali nsima te. Bakonzi ya mangomba bazali koteya bandimi makambo ya lokuta; na ndakisa, molimo ekufaka te, lifelo ya mɔ́tɔ, mpe Bosato.​—2 Timote 4:3, 4.

3 Tosengeli kokamwa na makambo wana nyonso ya bokosi? Mpenza te. Biblia elobá ete “na mikolo ya nsuka . . . bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe, kobungisáká bato nzela mpe kobungisamáká.” (2 Timote 3:1, 13) Biso baklisto tosengeli kokeba ete bokosi wana emema biso te na kotika solo. Yango wana, tokoki kotuna mituna mibale oyo: Mpo na nini bokosi ekómi mingi lelo oyo, mpe tokoki kosala nini mpo bákosa biso te?

Mpo na nini bokosi ekómi mingi lelo oyo?

4. Ndenge nini Biblia ezali kolimbola ntina oyo lokuta etondi na mokili?

4 Biblia ezali kolimbola polele ntina oyo mokili etondi na bokosi. Ntoma Yoane akomaki ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) “Moto mabe” yango ezali Satana Zabolo. Yesu alobaki mpo na ye ete: “Atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka engebene makanisi na ye moko, mpamba te azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” Yango wana, tokoki kokamwa te ete mokili oyo emonisa elimo, makanisi, mpe lokuta ya moyangeli na yango.​—Yoane 8:44; 14:30; Baefese 2:1-3.

5. Na ntango ya nsuka oyo, ndenge nini Satana angali mpo na kokosa, mpe azali koluka mingimingi banani?

5 Na ntango ya nsuka oyo, Satana angali nde kongala. Abwakamaki na mabelé. Ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga, mpe azali na “nkanda makasi.” Lokola azali na mposa ya koboma ebele ya bato, azali “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” (Emoniseli 12:9, 12) Satana akosaka te kaka soki likoki emonani. Kutu, apemaka ata te na milende oyo asalaka mpo na koluka kobungisa bato nzela.a Azali kosalela mayele nyonso​—ezala kobuba to kozimbisa​—mpo na kozipa bato miso ete bápusana penepene na Nzambe te. (2 Bakolinti 4:4) Elomba yango na oyo etali kobuka lokuta azali koluka libosoliboso kolya bato oyo bazali kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24; 1 Petelo 5:8) Tóbosana ata moke te ete Satana alobaki boye: ‘Nakoki kosala ete moto nyonso atika kosalela Nzambe.’ (Yobo 1:9-12) Tótalela sikoyo mwa ndambo ya “mayele mabe” oyo Satana azali kosalela mpe ndenge oyo tokoki komibatela.​—Baefese 6:11.

Kebá na bokosi ya bapɛngwi

6, 7. (a) Bapɛngwi bakoki koloba ete basalaka nini? (b) Ndenge nini Biblia elobeli polele mposa ya bapɛngwi?

6 Satana abandi kosalela bapɛngwi lelo te mpo na kokosa basaleli ya Nzambe. (Matai 13:36-39) Bapɛngwi yango bakoki koloba ete basambelaka Yehova mpe bandimaka Biblia, kasi bazali koboya ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabelé. Basusu kutu bazali kozongela mateya mabe ya “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Emoniseli 17:5; 2 Petelo 2:19-22) Elimo santu etindaki bakomi ya Biblia básalela maloba ya polele mpo na kolobela mikano mpe mayele oyo bapɛngwi basalelaka.

7 Bapɛngwi balukaka mpenza nini? Mingi basepelaka te kosuka kaka na kotika nzela ya solo oyo bazalaki kolanda. Balukaka mpe kobenda bato mosusu bálanda bango. Bapɛngwi mingi, na esika bákende kosakola mpo bázwa bandimi na bango, balukaka nde “kobenda bayekoli [elingi koloba bayekoli ya Klisto] bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) Ntoma Paulo alobaki mpo na balakisi yango ya lokuta boye: “Bókeba: mbala mosusu ekoki kozala na moto moko oyo akomema bino lokola nyama na ye ya kolya.” (Bakolose 2:8) Ezali yango mpenza oyo bapɛngwi mingi balukaka kosala! Bapɛngwi basalaka lokola moto oyo azali kokosa mwana moke oyo ayebi eloko te mpo akima na ye mosika. Bakosaka bandeko mosusu na lisangá oyo bakoki kondimela bango mpo bákabola bango na etonga.

8. Mayele nini bapɛngwi basalelaka mpo na kokokisa mposa na bango?

8 Bapɛngwi basalelaka mayele nini mpo na kokokisa mposa na bango? Mbala mingi babalolaka makambo, balobaka mpenza solo te, to mpe bakosaka mpenza kokosa. Yesu ayebaki ete bato ‘bakokosela bayekoli na ye makambo mabe ya ndenge nyonso.’ (Matai 5:11) Banguna wana ya mitema mabe bakoloba makambo oyo ezali solo te mpo na kokosa bato. Ntoma Petelo alobaki ete bapɛngwi bakosalela “maloba ya bokosi,” bakoteya ‘mateya ya bokosi,’ mpe ‘bakobongola Makomami ndenge mosusu’ mpo na kokokisa mposa na bango. (2 Petelo 2:3, 13; 3:16) Likambo ya mawa ezali ete bapɛngwi bazali kolonga “kokɔtisa mobulu na kondima ya bamosusu.”​—2 Timote 2:18.

9, 10. (a) Tosengeli kosala nini mpo bapɛngwi bákosa biso te? (b) Mpo na nini tomitungisaka te soki esɛngi tóbongola ndenge na biso ya kokanga ntina ya mokano ya Nzambe na makambo mosusu?

9 Tosengeli kosala nini mpo bapɛngwi bákosa biso te? Tosengeli kolanda toli ya Liloba ya Nzambe oyo: “Bótya miso na baoyo bakɔtisaka bokabwani mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku oyo ezali makambo eyokani te na mateya oyo boyekolaki, mpe bóboya kozala elongo na bango.” (Baloma 16:17) Mpo na ‘koboya kozala elongo na bango’ tokoyoka maloba na bango te, ezala na kosolola na bango to na kotánga mikanda na bango, to mpe na Internet. Mpo na nini tokosala bongo? Ya liboso, mpo Liloba ya Nzambe esɛngi tósala bongo, mpe tozali kondima ete Yehova alukaka kaka bolamu na biso.​—Yisaya 48:17, 18.

10 Ya mibale, tolingaka ebongiseli oyo eteyi biso solo ya ntina mingi oyo ebimisi biso mobimba na Babilone Monene. Toboyi te ete toyebi mokano ya Nzambe na ndenge ya kokoka te; mateya mingi ya Biblia tokómi kolimbola yango ndenge mosusu lelo oyo. Baklisto oyo bazali sembo basepelaka kozela Yehova ye moko angɛngisa bango na makambo ya ndenge wana. (Masese 4:18) Nzokande, tokotika te ebongiseli oyo Nzambe azali kosalela, mpamba te tozali komona polele ete azali kopambola yango.​—Misala 6:7; 1 Bakolinti 3:6.

Tómikosa te

11. Mpo na nini bato ya kozanga kokoka bazalaka na bolɛmbu ya komikosa?

11 Bato ya kozanga kokoka bazalaka na bolɛmbu moko oyo Satana alingaka kosalela; bolɛmbu yango ezali komikosa. Yilimia 17:9 elobi boye: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” Lisusu, Yakobo akomaki boye: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko.” (Yakobo 1:14) Soki motema ebandi kobendama na likambo moko, tokoki ata komona likambo oyo ezali lisumu ete ezali mabe te mpe ete ekosala biso mabe moko te. Makanisi ya ndenge wana ezali lokuta, mpamba te soki moto atiki nzela na bamposa ya masumu asukaka kaka na mabe.​—Baloma 8:6.

12. Ndenge nini tokoki komikosa?

12 Ezali mpasi te mpo tómikosa. Motema na biso ekoki kokosa biso mpo tóbanda kolongisa ezaleli moko mabe to lisumu moko monene. (1 Samwele 15:13-15, 20, 21) Motema ekoki mpe kotinda biso na koluka kolongisa etamboli moko ya mabe. Tózwa ndakisa ya makambo oyo bato basalaka mpo na kolekisa ntango. Masano mosusu ezali malamu mpe esepelisaka. Kasi, mosusu mingi oyo tozali komona na mokili oyo, ezala bafilme, baemisyo ya televizyo mpe na Internet, ezali makambo ya nsɔni mpe ya bosɔtɔ. Ezali mpasi te tóbanda kokanisa ete tokoki na biso kotala makambo ya mabe, kasi ekosala biso eloko te. Bato mosusu kutu balobaka ete, “Lokola ezali na yango kotungisa lisosoli na ngai te, mabe ezali wapi?” Kasi, bato ya ndenge wana bazali ‘komikosa na makanisi ya lokuta.’​—Yakobo 1:22.

13, 14. (a) Ndakisa ya nani oyo Biblia elobeli ezali komonisa ete lisosoli na biso ekoki kokosa biso? (b) Tokoki kosala nini mpo tómikosa te?

13 Tokoki kosala nini mpo tómikosa te? Ya liboso, tosengeli kobosana te ete tosengeli kotyelaka ntango nyonso lisosoli na biso motema te. Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Liboso akóma moklisto, azalaki konyokola bayekoli ya Klisto. (Misala 9:1, 2) Ekoki kozala ete lisosoli na ye ezalaki kotungisa ye te na ntango wana. Kasi, soki totali malamu, tokomona ete lisosoli yango ezalaki kosala malamu te. Paulo alobaki boye: “Nazangaki boyebi mpe nazalaki kosala na kozanga kondima.” (1 Timote 1:13) Yango wana, soki tozali kotala lisano moko boye mpe lisosoli na biso ezali kotungisama te, elingi koloba mbala moko te ete lisano yango ezali mabe te. Kaka lisosoli oyo eteyami malamu na Liloba ya Nzambe nde ekoki kolakisa nzela ya malamu.

14 Mpo tómikosa te, ezali na mwa batoli oyo tosengeli kobosana te. Omitalela malamu na libondeli. (Nzembo 26:2; 2 Bakolinti 13:5) Komituna mituna na bosembo ekoki kofungola yo miso mpo omona ete osengeli kobongola makanisi to misala na yo. Yokáká bato mosusu. (Yakobo 1:19) Lokola moto oyo azali komituna mituna akoki kolanda makanisi na ye moko, ezali malamu koyoka makanisi ya baninga baklisto oyo bakɔmɛli. Soki omoni ete ozali kozwa bikateli to ozali kosala makambo oyo bandeko na yo baklisto ya malamu, oyo batɛli na elimo, bazali komona mabe, osengeli komituna ete, ‘Mbala mosusu lisosoli na ngai ezali mpenza malamu te to motema na ngai ezali kokosa ngai?’ Tángáká ntango nyonso Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. (Nzembo 1:2) Soki ozali kosala yango, ekosalisa yo mpo makanisi, elimo, mpe motema na yo eyokana ntango nyonso na mitinda ya Nzambe.

Tókeba na lokuta ya Satana

15, 16. (a) Lokuta nini Satana azali kosalela mpo na koluka kokosa biso? (b) Tokosala nini mpo tókosama te na lokuta wana?

15 Satana asalelaka lokuta ndenge na ndenge mpo na kokosa biso. Alukaka kondimisa biso ete moto akómaka malamu mpe na esengo soki azali na biloko mingi ya mokili, nzokande ezali bongo te. (Mosakoli 5:10-12) Alukaka kondimisa biso ete mokili mabe oyo ekotikala libela na libela, atako makambo ezali komonisa polele ete tozali na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Satana azali kokɔtisa na mitó ya bato ete misala ya mbindo ememelaka moto mabe moko te, atako tozali komona ete bato oyo bamipesi na bisengo bazali kobuka mbuma mabe. (Bagalatia 6:7) Tokosala nini mpo tókosama te na makambo wana?

16 Tólanda ndakisa ya bato oyo Biblia elobeli. Mpo na kokebisa biso, Biblia elobeli masolo ya bato oyo bakosamaki na lokuta ya Satana. Bato yango balingaki biloko ya mokili, babosanaki eleko oyo bazalaki, to bamipesaki na misala ya mbindo​—mpe babukaki mbuma mabe. (Matai 19:16-22; 24:36-42; Luka 16:14; 1 Bakolinti 10:8-11) Tózwa liteya na bandakisa ya lelo. Ezali mawa ete mbala na mbala baklisto mosusu bazali kobosana ete basengeli kokɛngɛla mpe bazali kokóma na makanisi ete kosalela Nzambe ezali kozangisa bango makambo ya malamu. Basusu bazali kotika solo mpo na kolanda bisengo. Kasi, bato ya ndenge wana bazali “na nzela ya mosɛlu,” mpamba te, ata ndɛlɛ, misala mabe na bango ekozwa bango. (Nzembo 73:18, 19) Tokomonisa ete tozali na bwanya soki tozali kozwa liteya na mabunga ya bato mosusu.​—Masese 22:3.

17. Mpo na nini Satana alingaka kokɔtisa na mitó na biso ete Yehova alingaka biso te mpe tozali na ntina moko te na miso na ye?

17 Ezali na lokuta mosusu oyo Satana azali kosalela mpe azali kolonga na yango; azali koloba ete Yehova alingaka biso te mpe tozali na ntina te na miso na ye. Satana abandá koyekola bato ya kozanga kokoka eleki sikoyo bankóto ya bambula. Ayebi malamu ete moto oyo alɛmbi nzoto akoki mpe kolɛmba na elimo. (Masese 24:10) Yango wana, azali koluka kokɔtisa na mitó ya bato ete bazali na ntina moko te na miso ya Nzambe. Soki ‘tobambami na nse’ mpe tokómi kondima ete Yehova amibanzabanzaka mpo na biso te, makanisi ya kozonga nsima ekoki koyela biso. (2 Bakolinti 4:9) Ezali yango nde Mokosi monene azali koluka! Na bongo, tokosala nini mpo tózwama na lokuta ya Satana te?

18. Ndenge nini Biblia endimisi biso ete Yehova alingaka biso?

18 Kanisá malamu oyo Biblia elobi na oyo etali bolingo ya Nzambe mpo na biso. Liloba ya Nzambe esaleli maloba ya elilingi oyo ezali mpenza kosimba motema mpo na kondimisa biso ete Yehova akanisaka biso mpe alingaka mokomoko na biso. Na ndakisa, atyaka mpisoli na yo na “molangi” na ye; elingi koloba ete amonaka mpe akanisaka mpisoli oyo ozali kotángisa na ndenge ozali kobunda mpo na kotikala sembo. (Nzembo 56:8) Ayebaka ntango ‘motema na yo etutami’ mpe na ntango yango, azalaka penepene na yo. (Nzembo 34:18) Ayebi likambo na yo mokomoko, ata “nsuki mpenza ya motó na [yo] etángami yango nyonso.” (Matai 10:29-31) Oyo eleki nyonso wana ezali ete Nzambe “apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko” mpo na yo. (Yoane 3:16; Bagalatia 2:20) Ntango mosusu okoki kokakatana mpo na kondima ete maloba ya bavɛrsɛ wana etaleli mpe yo. Kasi, tosengeli kondima maloba ya Yehova. Alingi biso tóndima ete alingaka biso nyonso kaka te, kasi mpe mokomoko na biso.

19, 20. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba lokuta oyo Satana alobaka ete Yehova alingaka biso te mpe tóboya kondima yango? (b) Ndenge nini mokɛngɛli-motamboli moko asalisaki bandeko oyo balɛmbaki?

19 Yebá makambo oyo ezali lokuta mpe boyá yango. Soki oyebi ete moto moko azali kobuka lokuta, okomitika te akosa yo. Na bongo, koyeba ete Satana azali koluka kokosa yo ete Yehova alingaka yo te ekoki mpenza kosalisa yo. Ntango moklisto moko atángaki lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobelaki mayele ndenge na ndenge oyo Satana asalelaka, alobaki boye: “Nazalaki koyeba ata moke te ete Satana alukaka kosalela makanisi ya motema na ngai mpo na kolɛmbisa ngai. Lokola nayebaki bongo, nazwaki makasi ya kotika makanisi yango ya mabe.”

20 Tótalela likambo oyo mokɛngɛli-motamboli moko na ekólo moko ya Amerika ya Sudi asalaka. Mbala mingi soki akei kotala ndeko moko oyo alɛmbi, atunaka ye boye, ‘Ondimaka Bosato?’ Mbala mingi ndeko oyo alɛmbi apesaka eyano ete, ‘Te,’ mpo ayebi ete ezali lokuta ya Satana. Na nsima, mokɛngɛli yango atunaka ete, ‘Ondimaka ete lifelo ya mɔtɔ ezali?’ Ndeko akoyanola lisusu ete, ‘Te!’ Bongo, mokɛngɛli yango ayebisaka ye ete ezali lokuta mosusu oyo, mbala mingi, toyebaka te. Alakisaka likanisi oyo ezali na lokasa 249, paragrafe 21, ya buku Approchez-vous de Jéhovah,b oyo emonisi lokuta ya koloba ete Yehova alingaka mokomoko na biso te. Mokɛngɛli-motamboli yango alobi ete asalisaki bandeko oyo balɛmbi na koyeba lokuta yango ya Satana mpe koboya yango.

Omibatela na bokosi

21, 22. Mpo na nini tozali na molili te na ntina etali mayele mabe ya Satana, mpe tosengeli kozwa ekateli nini?

21 Lokola mikolo ya nsuka ezali kokende na nsuka na yango, tokanisi mpenza ete Satana akokoba kobimisa ebele ya makambo ya lokuta. Kasi, Yehova atiki biso na molili te na oyo etali mayele mabe ya Satana. Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali komonisa polele mayele mabe ya Satana. (Matai 24:45) Lokola tokebisami liboso, tokoki komibatela.​—2 Bakolinti 2:11.

22 Yango wana, tókeba na maloba ya bapɛngwi. Tózwa ekateli ete tókwea te na motambo ya komikosa. Tóyeba mpe lokuta ya Satana mpe tókima yango. Soki tozali kosala makambo wana, tokobatela boyokani na biso na “Nzambe ya solo,” oyo ayini bokosi.​—Nzembo 31:5; Masese 3:32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku moko elobi ete liloba oyo ebongolami na “azali kozimbisa” na Emoniseli 12:9, ezali “komonisa likambo oyo ekómi momeseno epai ya moto.”

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini mokili etondi na bokosi?

• Tokoki kosala nini mpo bapɛngwi bákosa biso te?

• Tokoki kosala nini mpo tómikosa te?

• Tokoki kosala nini mpo tókosama te na lokuta ya Satana?

[Elilingi na lokasa 17]

Komikosa te na masano mosusu

[Bililingi na lokasa 18]

Mpo omikosa te, omitalela malamu na libondeli, yokáká bato mosusu, mpe tángáká ntango nyonso Liloba ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto