Liyangani na “Motɔlu ya Mokili”
Osí oyoká maloba “Te Pito o Te Henua”? Na Rapa Nui, monɔkɔ oyo balobaka na Esanga Pâques, elimboli “Motɔlu ya Mokili.” Liyangani oyo esalemaki kuna ekesanaki na mayangani mosusu na nini?
MOKILI ya mosika, mokili ya kokamwa, mokili kitoko. Wana ezali bankombo mosusu oyo babengaka na yango Esanga Pâques, to Rapa Nui, mpo na bankóló mboka. Esanga yango ezali mpenza mosika, na sudi ya Mbu ya Pasifike, na ntaka ya kilomɛtrɛ 3 790 na Santiago, na ekólo Chili. Esanga yango ekómaki etúká ya Chili na mokolo ya 9 Sɛtɛmbɛ 1888.
Esanga yango oyo ezali na etando ya kilomɛtrɛ-kare 166, ezali nde ngomba misato ya mɔtɔ oyo ekufá. Lokola bisanga mingi ya Pasifike, esanga yango ezali nde nsɔngɛ ya bangomba ya nse ya mai. Esanga yango mobimba ezali moko ya bisika ya mokili oyo bapaya bakoki kokende kotala. Na ntembe te, esanga yango eyebani mingimingi mpo na bikeko na yango ya mabanga oyo babengaka moai.a
Longola kitoko ya mokili na yango mpe bisika oyo ezali na biloko ya kala, Esanga Pâques ezali mpe na biloko kitoko ya kolya. Bambuma lokola ananasi, avoka, paipai mpe lolenge libwa ya makemba. Mbu na yango mpe etondi na mbisi ya ndenge na ndenge mpe biloko mosusu ya mbu.
Esanga Pâques ezali na molunge makasi te, mpiɔ makasi mpe te; mbula ebɛtaka basanza nyonso mpe mbala mingi monama emonanaka na likoló, yango wana bapaya oyo bakendaka kotala mboka yango basepelaka na kitoko na yango. Esanga yango ezali sikoyo na bato soki 3 800. Bato oyo bafandi na esanga yango lelo oyo bazali bankɔkɔ ya bato oyo bautá na Polynésie, bakisá mpe bato ya Mpoto, ya Chili mpe ya mikili mosusu. Esanga yango ezwaka mbongo mingi na nzela ya ebele ya bapaya bautaka na Mpoto mpe na Azia mpo na kokende kotala yango.
Mbóto ya Bokonzi elonami mpo na mbala ya liboso
Annuaire des Témoins de Jéhovah 1982 elobaki boye: “Na boumeli ya mwa bambula, tozalaki na mosakoli kaka moko na Esanga Pâques. Azalaki kozwa lisalisi ya elimo na nzela ya mikanda oyo azalaki kokomelana na misionɛrɛ moko ya mwasi oyo azalaki na filiale [ya Chili]. Atako ndeko yango así azongá na Chili, bato mingi ya esanga yango bazwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nzela ya poste. Likambo oyo ekamwisaki biso ezali ete, na sanza ya Aprili 1980, moto moko ya esanga yango ya mosika oyo asepelaka na solo abengaki na telefone mpo na kotuna biso dati ya Ekaniseli. Na nsima, kaka na mbula yango, ndeko mobali moko ná mwasi na ye, oyo bautaki na engumba Valparaiso, bakendaki kofanda kuna, mpe bazalaki koyekola Biblia na bato oyo basepelaki na solo. Na Aprili 1981, mpo na mbala ya liboso na esanga yango, bato 13 bayanganaki na Ekaniseli. Tozali na esengo mpenza na ndenge ‘nsango malamu’ ezali kokɔta na mokili yango ya mosika!”
Na nsima, na mokolo ya 30 Yanuali 1991, biro ya filiale etindaki babongisi-nzela monene mibale kuna: Dario Fernandez ná mwasi na ye Winny. Ndeko Fernandez alobaki boye: “Tosalaki mobembo ya ngonga mitano na mpɛpɔ tii na mokili eleki mosika na mabelé mobimba, mokili oyo bato na yango bazali na makambo ya ndenge mosusu mpenza.” Ntango kaka bakómaki, bayokanaki mikolo ya makita mpe babongisaki mosala ya kosakola elongo na libota ya ndeko moko oyo azali moto ya esanga yango oyo bautaki kozonga mboka ná mwasi na ye mpe bana na bango mibale. Atako bato mingi bazalaki kopekisa bandeko na bango báyekola Biblia mpe bato bamipesaki na mangomba na bango mpe bonkɔkɔ ya bato ya Polynésie, Yehova apambolaki mpenza milende ya bandeko yango. Ndeko Fernandez ná mwasi na ye bazali lisusu babongisi-nzela monene te, kasi batikalá kaka na esanga yango, epai bazali kobɔkɔla mwana na bango ya mobali, oyo abotamaki kuna. Lelo oyo, basakoli ya Bokonzi 32 bazali na esanga yango. Bamosusu kati na bango bazali bana-mboka, bamosusu bazali bapaya oyo bakendá kofanda na esanga yango to basakoli oyo bakendá kuna mpo na kopesa mabɔkɔ lokola basakoli ya Bokonzi bazali mingi te.
Bibongiseli mpo na liyangani ya zongazonga
Lokola esanga yango ezali mpenza mosika na Amerika, mbula nyonso bazalaki kotindela bandeko kasɛti-video ya liyangani ya mokolo moko, ya liyangani ya zongazonga mpe ya liyangani ya etúká. Kasi na nsuka ya mobu 2000, komite ya filiale ya Chili ezwaki likanisi ya kobanda kosala liyangani na esanga yango. Nsukansuka, bazwaki mokano ya kosala liyangani ya zongazonga na esanga yango na Novɛmbɛ 2001, mpe babengisaki mwa bandeko ya bamboka ndenge na ndenge ya Chili mpo bákende na liyangani yango. Lokola mikolo mosusu ya pɔsɔ aviɔ ekendaka te, liyangani esengelaki kosalema mokolo ya lomingo ná mokolo ya mosala moko.
Bandeko 33 oyo babengamaki mpo na liyangani yango bazalaki mpenza na esengo ya kokende na esanga yango mpo na kolanda liyangani ya zongazonga ya liboso oyo ebongisamaki na mokili yango ya mosika. Nsima ya mobembo molai na aviɔ likoló ya Mbu ya Pasifike, bandeko yango basepelaki mpenza na komona bandeko ya esanga yango oyo bakendaki koyamba bango na libándá ya mpɛpɔ. Bandeko yango balatisaki bapaya na bango bansinga etondá na bafololo na nkingo, ndenge oyo bayambaka bapaya na esanga yango. Na nsima, bamemaki bango na bisika ya kolala oyo babongiselaki bango mpe, nsima ya kotambwisa bango mwa moke mpo na kotala mboka, bandeko nyonso oyo bazalaki na masukulu na liyangani yango bakutanaki na Ndako ya Bokonzi.
Moto mosusu apanzi nsango ya liyangani
Ntango bandeko bazalaki kokende na liyangani yango, bayokaki na radio sángo moko azali koloba ete bapaya moko bayei na esanga. Ayebisaki balandi ete bato yango oyo bauti na Chili bakotambola na bandako mpo na koyebisa bato ete nsuka ya mokili ezali koya. Atako ayebisaki bandimi na ye ete báyamba bango te, liyebisi na ye ezalaki lokola piblisite oyo asalaki mpo bato báyeba ete ebele ya Batatoli ya Yehova bayei na esanga yango. Yango ebendaki likebi ya bato ya esanga yango. Na mikolo oyo elandaki, bandeko oyo bayaki mpo na liyangani bazalaki kosolola na bato mpe koyebisa bango nsango malamu ya kolendisa.
Liyangani ebandi
Mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, bandeko ya esanga yango batɛlɛmaki liboso ya Ndako ya Bokonzi mpo na koyamba bandeko oyo bautaki na bisika mosusu ntango bazali koya mpo na mokolo ya liboso ya liyangani. “Iorana Koe! Iorana Koe!” “Boyei malamu!” Bandeko basi mosusu balataki molato ya mboka na bango mpe balataki bafololo kitoko na nsuki, na ndenge mpenza ya bato ya Polynésie.
Nsima ya miziki kitoko ya ebandeli, bayangani monkama basangisaki mingongo mpo na koyemba loyembo “Tótɛlɛma ngwi, tótengatenga te!”; ezalaki mbala ya liboso na esanga yango ete loyembo ya Bokonzi eyembama na ebele ya bato bongo. Bandeko ya esanga yango batangisaki mpisoli ya esengo ntango prezida ya liyangani atombelaki bayangani boyei malamu na Rapa Nui, monɔkɔ ya mboka na bango. Na bopemi na midi, Batatoli ya sika misato bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Na nsuka ya programɛ ya mokolo ya liboso, bayangani nyonso bamimonaki lisusu penepene na Yehova mpe na bandeko ya mokili mobimba.—1 Petelo 5:9.
Litatoli na ntɔngɔ
Mpo na makambo mosusu na esanga yango, programɛ ya mokolo ya mibale ya liyangani ebandaki nsima ya midi. Yango wana, bayangani basalelaki libaku yango mpo na kosakola na ntɔngɔ. Makambo nini bakutanaki na yango?
Mobange moko ya mwasi oyo azalaki na bana mwambe alobaki na Batatoli ete akoki kosolola na bango te mpo azali mondimi ya Katolike. Ntango bayebisaki ye ete balingi kosolola na ye makambo oyo bato nyonso bazali kokutana na yango, lokola komɛla bangi mpe matata na kati ya mabota, andimaki koyoka bango.
Mobange moko ya mwasi aboyaki koyamba Motatoli moko ná mwasi na ye. Alobaki na bango bákende kosakola epai ya bato ya bamboka epai bautaki oyo banyokolaka baninga na bango. Bandeko yango bayebisaki ye ete “nsango malamu ya bokonzi” ezali kosakolama epai ya bato nyonso mpe ete bakendaki na esanga yango koyangana na liyangani moko oyo mateya oyo ekopesama kuna ekoki kosalisa bato nyonso na kokolisa bolingo na bango mpo na Nzambe. (Matai 24:14) Batunaki ye soki akosepela kozala na bomoi molai na kati ya mokili kitoko, lokola esanga oyo bafandi, kasi epai maladi mpe liwa ekozala te. Ntango babendaki likebi na ye na ebele ya bambula oyo bangomba ya mɔtɔ (volcan) ya esanga yango eumeli, asosolaki ete bomoi ya moto ezali mpenza mokuse mpe atunaki bango ete: “Mpo na nini bomoi na biso ezali mokuse ndenge wana?” Akamwaki mpenza ntango atángaki Nzembo 90:10.
Na ntango wana, Batatoli yango bayokaki bato bazali koloba makasi na ndako oyo elandi. Bango bayokaki makambo oyo bazalaki koloba te, kasi mwasi oyo bazalaki kosolola na ye ayebisaki bango ete bato ya ndako yango bazalaki kofinga Batatoli mpe koyebisa bango ete bazali na mposa te ete Batatoli básolola na bango. Kasi, mwasi yango azalaki nua, elingi koloba mwana ya liboso na libota na bango. Lokola tata na bango akufá, ye nde azalaki na mokumba ya kozwa bikateli mpo na libota na bango. Liboso ya bandeko na ye, akɔtelaki Batatoli na monɔkɔ ya mboka na bango mpe, na boboto nyonso, azwaki mikanda oyo bapesaki ye. Nsima ya mwa mikolo, kaka na pɔsɔ yango, ntango bazalaki koleka na motuka pene na Batatoli, asɛngaki na leki na ye atɛlɛmisa motuka. Atako leki na ye amonisaki mpenza ete asepeli te, ye apesaki bandeko mbote mpe atombelaki bango mosala malamu.
Atako na ebandeli bato mosusu ya esanga yango basalaki lokola báboya koyoka nsango malamu oyo Batatoli oyo bautaki na Chili bazalaki kosakola, bapaya yango bamonaki mpenza ete bato ya Rapa Nui bazali bato ya boboto mingi. Mingi kati na bango bayokaki nsango malamu na esengo mpenza. Kutu, na kati ya Batatoli 20 ya esanga yango oyo bazwá batisimo, motoba bazali bana-mboka. Moko na bango ayokaki solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso mokolo moko oyo Batatoli bazalaki koyekola Biblia na mwasi na ye mpe ye abatamaki na shambre mpo na koyoka bango. Lelo oyo ye ná mwasi na ye bazali Batatoli oyo bazwi batisimo, mpe azali mosaleli na misala.
Mokolo ya mibale ya liyangani
Nsima ya midi, programɛ ya mokolo ya mibale ebandaki. Lokola mokolo ya liboso, bato mosusu oyo basepelaka na solo bayaki koyangana elongo na bandeko 32 ya esanga yango ná bandeko 33 oyo bautaki na Chili. Pene na bato monkama balandaki programɛ yango; lisukulu ya bato nyonso ezalaki na motó ya likambo “Ndenge nini bolingo mpe kondima ezali kolonga mokili?” Bayangani bamonaki na miso ndenge basaleli ya Yehova balinganaka, atako bakeseni bikólo.—Yoane 13:35.
Na liyangani yango, mokɛngɛli ya zongazonga ná mokɛngɛli ya etúká basalaki likita moko na babongisi-nzela. Babongisi-nzela monene oyo bautaki na Chili bazalaki mpe na likita yango elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza misato ya esanga yango. Bango nyonso balendisamaki makasi.
Na mokolo oyo elandaki, bandeko mosusu ya esanga yango, oyo basalaka mosala ya kotambwisa bapaya mpo na kolakisa bango mboka, batambwisaki mpe bandeko oyo bautaki na Chili. Bakendaki kotala esika mabanga oyo basalelá bikeko babengaka moai eutá, batalaki mpe bangomba ya mɔtɔ epai mimekano ya kala ezalaki kosalema mpe libongo ya zɛlɔ kitoko ya Anakena, esika masuwa ya bato ya liboso oyo bafandaki na esanga yango esɛmaki.b
Mbala ya nsuka oyo bapaya bayanganaki na bandeko ya esanga yango ezalaki na Boyekoli ya mokanda. Nsima ya likita, bandeko ya esanga yango bapesaki bapaya biloko ya kolya oyo balambaki na ndenge mpenza ya mboka na bango. Na nsima, balataki molato ya mboka na bango mpe babinelaki bango mabina kitoko ya bonkɔkɔ. Bango nyonso bamonaki mpenza ete milende oyo basalaki mpo na kobongisa liyangani yango ezalaki mosala ya mpunda te.
Bandeko nyonso oyo bautaki na Chili bakómaki kolinga makasi bandeko na bango ya mokili wana ya mosika, oyo balekisaki na bango pɔsɔ moko ya esengo. Ezalaki mpasi mingi mpo na bango kotika esanga yango. Bakobosana ata mokolo moko te baninga ya sika mpe bilendiseli ya elimo oyo bazwaki kuna. Na libándá ya mpɛpɔ, bandeko ya esanga yango balatisaki bandeko oyo bautaki na Chili ndako ya mbɛmbɛ oyo basali lokola mayaka na nkingo.
Ntango bandeko oyo bautaki Chili balingaki kotika esanga yango, balakaki ete: “Iorana! Iau he hoki mai e Rapa Nui ee,” elingi koloba: “Tikalá malamu! Nakoya lisusu epai na yo, Rapa Nui.” Ya solo, bazali mpenza na mposa ya kozonga lisusu kotala baninga ya sika, oyo bazali mpe bandeko na bango ya elimo, oyo bazwaki na Esanga Pâques, mokili kitoko, ya mosika mpe ya kokamwa!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 22 Yuni 2000, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Na libulu ya ngomba ya mɔtɔ na nkombo Rano Raraku, okomona makomi mingi ya bato ya kala likoló ya mabanga. Momekano ya bato oyo bazalaki na mposa ya kokóma bakonzi na esanga yango ezalaki na Rano Kau. Momekano yango ezalaki kosɛnga kokita lobwaku moko molai tii na mbu, kobɛta mai tii na moko ya bisanga ya mike, kozwa likei moko ya ndɛkɛ, kobɛta lisusu mai na likei yango na mabɔkɔ mpe kobatela yango epasuka te tii na esanga ya monene mpe komata na yango na ngomba ya mabanga tii na mokili.
[Etanda na lokasa 24]
Mosala ya kotatola na Esanga Pâques
Pene na mbula mibale liboso liyangani wana esalemá, mokɛngɛli ya zongazonga moko ná mwasi na ye bakendaki kotala bandeko na esanga yango mpe kuna bakutanaki na makambo mingi oyo esepelisaki bango mpenza. Na ndakisa, kanisá naino esengo oyo bayokaki ntango ndeko mwasi oyo akendaki kolakisa bango esika ya kolala ayebisaki bango ete bango nde bayekolaki na ye Biblia na sudi ya Chili ntango azalaki naino elenge, elekaki soki mbula 16. Mombóto yango ebotaki mbuma nsima ya bambula na Rapa Nui.
Mokɛngɛli yango ná mwasi na ye bakutanaki mpe na likambo ya kosɛkisa oyo: Nkolo butiki moko andimaki kozwa Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ná buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko; yango mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ntango bazongaki lisusu kotala ye, ayebisaki bango ete akoki kotánga Biblia yango te. Nzokande, na esika bátikela ye Biblia ya Espagnol, batikelaki ye nde Biblia ya Lifalanse! Bapesaki ye mbala moko Biblia ya Espagnol mpe, na lisalisi ya Batatoli ya esanga yango mpe na Biblia ya monɔkɔ ya mboka na bango, amonaki ete Biblia ezali mpasi te.
[Karte na lokasa 22]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ESANGA PÂQUES
CHILI
[Bililingi na lokasa 23]
Bandeko mibale na kati ya baoyo bazwaki batisimo na liyangani ya zongazonga
[Bililingi na lokasa 25]
Lobwaku ya ngomba ya mɔtɔ Rano Raraku; elilingi ya moke: Mbuma guayaba oyo ebotaka na esanga yango