Lisolo ya bomoi
Atako nazalaki lisusu komona te, miso na ngai efungwamaki!
YA EGON HAUSER
Nazalaki komona lisusu te na boumeli ya sanza mibale ntango, na ndenge ya elilingi, miso na ngai efungwamaki mpe nakómaki komona solo ya Biblia oyo nayebaki te banda nabotamá.
SOKI nakanisi mbula 70 oyo eleki, makambo mingi ya bomoi na ngai epesaka ngai esengo mingi. Kasi soki nakokaki kobongola likambo moko, mbɛlɛ nalukaki koyeba Yehova Nzambe ntango nazalaki naino elenge.
Nabotamaki na 1927 na Uruguay, mwa ekólo moko oyo ezali na kati ya Argentine ná Brésil mpe ezali na ebele ya bisika ya kitoko pembenipembeni ya Mbu ya Atlantique. Bato ya Uruguay bazali mingimingi bankɔkɔ ya bato oyo bautá na Italie mpe na Espagne. Kasi, baboti na ngai bautá na Hongrie mpe ntango nazalaki mwana moke tofandaki na kartye ya babola, kasi bato bazalaki kosalisana mingi. Tozalaki na ntina te ya kokanga baporte to kotya bibende na bafenetre. Tozalaki kokanisela baninga mabe te mpo bazali bato moindo to mindɛlɛ. Biso nyonso, bapaya ná bana-mboka, bato moindo mpe mindɛlɛ, tozalaki baninga.
Baboti na ngai bazalaki Bakatolike, mpe nakómaki kosalisa sango na misa ntango nazalaki naino na mbula zomi. Ntango nakómaki mokóló, nabandaki kosala na parwasi na biso mpe nazalaki na lisangá moko ya bapesi-toli ya episkɔpɔ ya diosɛzɛ na biso. Lokola naponaki mosala ya monganga, babengaki ngai na seminɛrɛ moko oyo Lingomba ya Katolike ebongisaki na ekólo Venezuela. Nazalaki na etuluku ya minganga oyo tozalaki koyekola maladi ya basi mpe bapesaki biso mokumba ya koyekola bankisi ya komɛla mpo na kopekisa kobota, oyo ebimaki sika.
Makambo oyo ekamwisaki ngai ntango nabandaki kelasi ya monganga
Na kelasi ya monganga, ntango tozalaki koyekola ndenge oyo nzoto ya moto esalemá, nazalaki se kokamwa mayele oyo Nzambe asalelaki mpo na kokela nzoto ya moto. Na ndakisa, nakamwaki likoki oyo nzoto ezali na yango ya komibikisa nsima ya mpasi moko makasi, lokola likoki oyo libale (foie) to mipanzi mosusu ezali na yango ya kokola lisusu ata soki bakati ndambo na yango.
Nazalaki mpe komona ebele ya bato oyo bazalaki kozwa makama minene mpe nazalaki koyoka mawa mingi soki bakufi mpo bazongisaki bango makila. Nabosanaka te mokakatano oyo tozalaki na yango mpo na koyebisa bandeko ya moto ya maladi oyo akufi mpo bazongisaki ye makila. Mbala mingi, minganga bazalaki koyebisa te na bandeko ya moto oyo akufi ete ndeko na bango akufi mpo bazongisi ye makila. Kasi bazalaki kopesa bango bandimbola mosusu. Atako eleki bambula ebele, nayebaka ndenge nazalaki koyoka mabe soki bazongisi moto makila, mpe nayaki komona ete kozongisa moto makila ezali malamu te. Soki na ntango wana nayebaka mobeko ya Yehova ete makila ezali eloko ya bosantu, nalingaki koyeba mpo na nini nazalaki mpenza kosepela te bázongisa bato makila!—Misala 15:19, 20.
Esengo ya kosalisa bato
Na nsima, nakómaki monganga-mopasoli mpe mokambi ya lopitalo ya Santa Lucía. Nazalaki mpe kosala na Institut national des sciences biologiques. Mosala yango ezalaki kosepelisa ngai mingi. Nabikisaki bato ya maladi, nakitisaki mpasi ya basusu, mbala mingi nabikisaki bomoi ya bato mpe nazalaki kosalisa basi oyo bazalaki koya kobota. Makambo oyo namonaki liboso mpo na oyo etali kozongisa makila ezalaki kotinda ngai naboya kozongisa bato makila, yango wana nasalaki mapaso mingi kozanga kosalela makila. Namonaki ete soki moto azali kobimisa makila, azali lokola tono ya mai oyo etɔbɔki. Likambo malamu ya kosala ezali nde ya kokanga lidusu, kasi te ya kokoba kotondisa tono.
Nasalisi Batatoli oyo bazalaki maladi
Nayebaki Batatoli ya Yehova na bambula ya 1960 ntango bakómaki koya na lopitalo na biso mpo básala bango lipaso kozanga kozongisa bango makila. Nakobosana ata mokolo moko te likambo ya Mercedes Gonzalez, mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela. Asilaki mpenza makila mpe minganga ya lopitalo ya iniversite babangaki kopasola ye mpo bamonaki ete akobika te. Atako azalaki kobima makila, topasolaki ye na lopitalo na biso. Lipaso elekaki malamu mpe akobaki lisusu mosala na ye ya mobongisi-nzela na boumeli ya mbula 30 tii liwa na ye kala mingi te ntango akokisaki mbula 86.
Nazalaki kosepela mingi komona bolingo mpe komibanzabanza oyo Batatoli bazalaki komonisa mpo na kosunga bandeko na bango soki bakɔti na lopitalo. Ntango nazali kotambola na bashambre mpo na kotala bato ya maladi, nazalaki kosepela koyoka bango ntango bazali kolobela bindimeli na bango mpe nazalaki kondima mikanda oyo bazalaki kopesa ngai. Nakanisaki ata mokolo moko te ete nsima ya mwa ntango nalingaki kozala monganga na bango kaka te, kasi mpe ndeko na bango ya elimo.
Nakómaki lisusu moninga makasi ya Batatoli ntango nabalaki Beatriz, mwana ya moto ya maladi moko. Bandeko na ye mingi bazalaki Batatoli mpe, nsima ya libala na biso, Beatriz mpe akómaki Motatoli. Nzokande, ngai namipesaki mobimba na mosala na ngai mpe nayebanaki mingi. Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu. Kasi, nayebaki te ete mwa moke na nsima, bomoi na ngai elingaki kobongwana.
Maladi enyokolaki ngai
Moko ya makambo mabe oyo ekoki kokómela monganga-mopasoli ezali kokufa miso. Yango nde ekómelaki ngai. Na mbala moko, nabɛlaki miso nyonso mibale mpe miso yango ekufaki! Nayebaki te soki nakomona lisusu. Nsima ya kosala ngai lipaso, nalalaki na mbeto na bande na miso nyonso mibale mpe nakómaki konyokwama na makanisi. Namonaki ete nazali lisusu na ntina moko te mpe na elikya te. Nazwaki kutu likanisi ya komiboma. Lokola nazalaki na etaze ya misato, nakitaki na mbeto mpe nasimbasimbaki efelo mpo na koluka esika lininisa ezali. Nazalaki kokana komibwaka na nse mpo nakufa. Kasi nabimaki nde na kulware ya lopitalo mpe monganga moko ya mwasi azongisaki ngai mbangumbangu na mbeto.
Nazongelaki lisusu te likanisi wana ya komiboma. Kasi, lokola nazalaki komona te, nazalaki kotungisama mingi na makanisi mpe nakómaki nkandankanda. Na ntango nyonso wana oyo nakufaki miso, nalakaki Nzambe ete soki namoni lisusu, nakotánga Biblia mobimba. Nsukansuka, miso na ngai ebongaki mwa moke mpe nabandaki kotánga. Kasi nakokaki lisusu te kosala mosala na ngai ya monganga. Nzokande, na Uruguay, balobaka boye: “No hay mal que por bien no venga,” elingi koloba “Ata mwa malamu ya moke ekoki kobima na eloko ya mabe.” Mwa moke na nsima namonaki bosolo ya maloba wana.
Nabandaki mabe
Nazalaki na mposa ya kosomba Bible de Jérusalem oyo ezali na makomi minene, kasi bayebisaki ngai ete Batatoli ya Yehova batɛkaka Biblia na bango na ntalo moke mpe elenge Motatoli moko andimaki koyela ngai yango na ndako. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, elenge mobali yango ayaki kotikela ngai Biblia. Mwasi na ngai afungolaki ndako mpe abandaki kosolola na ye. Kasi, na kati ya ndako esika nazalaki, nagangelaki mwasi na ngai ete soki apesi mbongo ya Biblia, elenge mobali azali lisusu na eloko ya kosala wana te, akende! Elenge yango, alobaki lisusu eloko te, akendaki mbala moko. Nayebaki te nzokande, mwa moke na nsima, kaka elenge yango asalaki likambo moko ya ntina na bomoi na ngai.
Mokolo moko, nalakaki mwasi na ngai likambo moko, kasi nakokisaki yango te. Mpo nasepelisa ye, nayebisaki ye ete nakoyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Ntango mokolo yango ekokaki, nabosanaki elaka na ngai te mpe nakendaki na ye na Ekaniseli. Nasepelaki mingi ndenge bayambaki ngai lokola moninga mpenza. Ntango molobi abandaki lisolo na ye, nakamwaki komona ete ezalaki elenge mobali oyo nabenganaki na ndako. Lisolo na ye esimbaki mpenza motema na ngai mpe nayokaki mabe ndenge nayambaki ye malamu te. Namitunaki soki nakosala nini mpo na kobongisa likambo yango?
Nayebisaki mwasi na ngai abenga ye na ndako mpo na kolya na biso elongo na mpokwa. Kasi mwasi na ngai apesaki likanisi mosusu: “Omoni te ete ekoleka malamu soki yo moko obengi ye? Tótɛlɛma kaka awa, okomona akoya kopesa biso mbote.” Mwasi na ngai alobaki solo. Ndeko yango ayaki kopesa biso mbote mpe andimaki na esengo koya epai na biso.
Masolo oyo tosololaki na mpokwa oyo ayaki kotala biso ezalaki nde ebandeli ya mbongwana mingi na bomoi na ngai. Alakisaki ngai buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko,a kasi ngai nalakisaki ye babuku yango motoba. Batatoli oyo bazalaki koya na lopitalo lokola bato ya maladi nde bazalaki kopesa ngai yango, kasi natikalá kotánga yango te. Ngonga nyonso oyo tolekisaki na ye, ntango tozalaki kolya mpe na nsima, natunaki ye mituna ebele mpe ayanolaki yango nyonso na lisalisi ya Biblia. Tosololaki tii pene na ntɔngɔ. Liboso akende, elenge mobali yango asɛngaki ayekola na ngai Biblia na lisalisi ya buku Solo. Tosilisaki koyekola buku yango nsima ya sanza misato mpe toyekolaki lisusu buku “Babylone la Grande est tombée!” Le Royaume de Dieu a commencé son règne!b Na nsima na yango namipesaki epai ya Yehova mpe nazwaki batisimo.
Nakómi lisusu na elikya
Na ntango oyo nazalaki lisusu komona te, ‘miso ya motema’ na ngai efungwamaki mpe nayebaki solo ya Biblia oyo nayebaki te banda nabotamá. (Baefese 1:18) Koyeba Yehova mpe mokano na ye malamu ebongolaki bomoi na ngai mobimba. Bomoi na ngai ekómaki lisusu na ntina mpe nakómaki na esengo. Nasalisaka bato na mosuni mpe na elimo mpe nateyaka bango ndenge bakoki kobakisa mwa mikolo ya bomoi na bango na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe kozwa bomoi ya seko na ebongiseli ya makambo ya sika.
Nazalaki kolanda makambo nyonso ya sika na mosala ya minganga, mpe natángaki makambo mingi etali makama ya kozongisa moto makila, bankisi to mayele mosusu oyo minganga bakoki kosalela na esika ya makila, ntomo ya moto ya maladi mpe mibeko ya mosala ya monganga. Nazwaki mabaku ya kolimbolela minganga ya mboka na biso makambo yango ntango babengaki ngai na baseminɛrɛ ya minganga. Na 1994, nayanganaki na likita ya liboso oyo elobelaki ndenge ya kosalisa moto ya maladi kozanga kosalela makila, oyo esalemaki na Rio de Janeiro, na Brésil, mpe nasalaki lisukulu moko oyo elobelaki ndenge nini monganga akoki kosala soki moto azali kobima makila ebele. Makambo mingi oyo nalobaki na lisukulu yango nazongelaki yango na lisolo moko oyo nakomaki na Hemoterapia, zulunalo oyo elobelaka makambo ya minganga, motó ya likambo ya lisolo yango ezali: “Una propuesta: Estrategias para el Tratamiento de las Hemorragias” (“Mayele oyo minganga bakoki kosalela ntango moto azali kobima makila mingi”)
Natikali sembo atako batyaki ngai mbamba
Na ebandeli, likanisi na ngai ya koboya kozongisaka bato makila ezalaki mpo na makambo ya siansi oyo nayekolaki. Nzokande, ntango ngai moko nakɔtaki lopitalo, ezalaki likambo moke te mpo naboya makila mpe nabatela kondima na ngai ntango minganga bazalaki kotya ngai mbamba mpo nandima bázongisa ngai makila. Ntango nabɛlaki motema, esengelaki ngonga mibale mobimba mpo na kolimbwela monganga ntina oyo nazalaki koboya bázongisa ngai makila. Baboti ya monganga yango bazalaki baninga na ngai mpe ayebisaki ngai ete akotika ngai te nakufa soki amoni ete kotya ngai makila ekobikisa ngai. Nabondelaki Yehova na motema, nasɛngaki Ye asalisa monganga yango andima mpe atosa ekateli na ngai ata soki asepeli na yango te. Nsukansuka, monganga yango alakaki ete akotosa ekateli na ngai.
Na nsima, nabɛlaki lisusu mpe esengelaki bálongola ngai mbuma moko monene oyo esalemaki na kati ya prostate. Makila ebimaki mingi. Esengelaki lisusu nalimbwela minganga ntina oyo nazalaki koboya bázongisa ngai makila. Atako nabungisaki makila mingi, minganga bandimaki kotosa ekateli na ngai.
Makanisi ya minganga ebongwani
Lokola nazali na lisangá ya minganga mpo na mibeko ya monganga, nazalaki na esengo mingi ya komona ndenge minganga mpe bakonzi ya Leta babongoli makanisi na bango mpo na ntomo ya bato ya maladi. Minganga oyo bazalaki kozongisa bato makila na makasi, babongoli makanisi na bango mpe bakómi kotosa bikateli ya bato ya maladi. Sikoyo bato ya maladi bakómi na likoki ya kopona ndenge oyo balingi básalisa bango. Minganga bazali lisusu kobengana Batatoli ya Yehova na lopitalo te na likanisi ete bandimaka kaka bindimelá mibeko ya lingomba na bango. Kasi bazali komona bango lokola bato ya maladi oyo bayebi makambo malamu mpe minganga basengeli kotosa makanisi na bango. Na baseminɛrɛ ya minganga mpe na televizyo, baprofesɛrɛ minene balobaki boye: “Milende ya Batatoli ya Yehova esalisi biso na kososola malamu . . . ” “Batatoli ya Yehova bateyi biso makambo ebele . . . ” mpe “Basalisi biso tókende liboso.”
Bato mosusu balobaka ete bomoi ezali na ntina mingi koleka biloko nyonso mpamba te soki ezali te, bonsomi mpe lokumu ekozala na ntina te. Lelo oyo, mingi bakómi kondima mobeko ya malamu koleka; bazali kondima ete moto na moto azali na ntomo na ye mpe kaka ye moko akoki kozwa ekateli ata na likambo nini, ya kopona lotomo oyo akotya na esika ya liboso. Na ndenge yango, bazali kotya na esika ya liboso lokumu ya moto, lotomo na ye ya kopona, mpe bindimeli na ye. Moto ya maladi azali na lotomo ya kozwa ekateli mpo na nzoto na ye. Biro ya makambo etali boyokani elongo na minganga oyo Batatoli ya Yehova basalá esalisi ebele ya minganga báyeba malamu ntina oyo baboyaka bázongisa bango makila.
Libota na ngai bazali kokoba kosalisa ngai, yango epesi ngai nzela nakoba kosalela Yehova mpe nazali nkulutu na lisangá ya boklisto. Ndenge nalobaki na ebandeli, likambo epesaka ngai mawa ezali ete nayebaki Yehova na bolenge na ngai te. Atako bongo, nazali na botɔndi mingi mpenza mpo Yehova afungolaki ngai miso mpo nazwa elikya malamu ya kokɔta na Bokonzi na ye, epai “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali maladi.”—Yisaya 33:24.c
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Ntango lisolo oyo ezalaki kobongisama, Ndeko Egon Hauser akufaki. Atikalaki sembo tii liwa na ye, mpe lokola ye, biso mpe tondimisami ete elikya na ye ekokokisama.
[Elilingi na lokasa 24]
Ntango nazalaki na mbula koleka mwa moke 30, nazali kosala na lopitalo moko na Santa Lucía
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai ná mwasi na ngai Beatriz na 1995