Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/8 nk. 8-11
  • Bankolo mboka Mexique bazali koyoka nsango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bankolo mboka Mexique bazali koyoka nsango malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Yehova ayoki mabondeli
  • “Bazali kosala milende”
  • “Matɔndi, Yehova!”
  • “Kualtsin Tajtoua”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/8 nk. 8-11

Bankolo mboka Mexique bazali koyoka nsango malamu

MOKOLO ya 10 Novɛmbɛ 2002, etuluku moko ya Ba-Mixe, ekólo moko ya Mexique, bayanganaki na San Miguel, engumba moko ya Quetzaltepec, na sudi ya etúká kitoko ya Oaxaca. Bato yango bazalaki na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Eloko oyo bato basepelaki na yango mingi na programɛ ya ntɔngɔ ya mokolo wana ezali drame.

Bayangani bakamwaki mpenza ntango bayokaki maloba ya liboso ya drame yango. Babɛtaki mabɔkɔ makasi, mpe mingi balelaki. Drame yango ezalaki na monɔkɔ ya Mixe! Na nsuka ya drame, bandeko mingi bamonisaki botɔndi na bango mpo na likabo kitoko wana. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Ezali mbala ya liboso nakanga ntina ya drame. Yango esimbi mpenza motema na ngai.” Ndeko mwasi mosusu alobaki boye: “Sikoyo, ata nakufi, nazali na esengo mpo Yehova apesi ngai libaku ya koyoka drame na monɔkɔ ya mboka na ngai.”

Drame wana ezali moko ya makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala mpo na koyebisa bankolo mboka Mexique nsango malamu ya Bokonzi.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

Yehova ayoki mabondeli

Na Mexique, bankolo mboka bazali koleka milio 6, bakoki kosala ekólo mobimba ya bato ya mimeseno ndenge na ndenge mpe balobaka minɔkɔ 62. Na kati ya minɔkɔ yango 62, minɔkɔ 15 elobamaka mokomoko na bato koleka 100 000. Bato koleka milio moko bayebi Espagnol te, monɔkɔ oyo basalelaka na misala ya Leta. Lisusu, bato mingi oyo balobaka Espagnol, bakoki koyekola solo ya Biblia malamu koleka nde na minɔkɔ na bango ya mboka. (Misala 2:6; 22:2) Bamosusu babandá koyekola Biblia mpe koyangana na makita nyonso banda kala, kasi, bakangaka mpenza ntina te ya makambo oyo bayekolaka. Yango wana, bazalaki kobondela mpo na koyoka nsango ya solo na minɔkɔ ya mboka na bango.

Yango wana, na 1999 biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya Mexique ezwaki bibongiseli mpo makita ebanda kosalemaka na minɔkɔ mosusu ya mboka. Babongisaki mpe bikipi ya kobongola mikanda na minɔkɔ yango. Na liyangani ya etúká ya mobu 2000, drame esalemaki na monɔkɔ ya Maya, mpe na nsima na minɔkɔ mosusu.

Na nsima, babandaki kobongola mikanda oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpo na koyekola Biblia na bato. Libosoliboso, babongolaki mwa buku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! na monɔkɔ ya Huave, ya Maya, ya Mazatec, ya Totonac, ya Tzeltal, mpe ya Tzotzil. Na nsima, babongolaki mpe mikanda mosusu, mpe Mosala na biso ya Bokonzi ekómaki kobima sanza na sanza na monɔkɔ ya Maya. Babimisaki mpe bakasɛti ya mikanda mosusu. Bandeko bazali kobongisa mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma mpo na kosalisa bato oyo batángá te na koyeba kotánga mpe kokoma na minɔkɔ na bango ya mboka. Lelo oyo, bazali kobimisa mikanda na minɔkɔ 15, mpe bazali kobongola mikanda mosusu.

“Bazali kosala milende”

Kobongola mikanda na minɔkɔ yango ezali pɛtɛɛ te. Ya liboso, bakomá mikanda mingi te na minɔkɔ ya mboka ya Mexique. Mbala mingi ezali mpasi kozwa badiksionɛrɛ ya minɔkɔ yango. Lisusu, monɔkɔ mokomoko elobamaka ndenge moko te na bisika nyonso. Na ndakisa, monɔkɔ lokola Zapotec balobaka yango ndenge soki mitano. Lelo oyo, minɔkɔ yango ebongwaná mingi na boye ete soki bato oyo balobaka Zapotec na esika moko balobi, bato ya esika mosusu bakoyoka te.

Lisusu, na minɔkɔ oyo mibeko ya lokota na yango ekomamá te, babongoli basengeli koyokana ndenge ya kosalela yango. Yango esɛngaka kotunatuna makanisi ya bato mingi. Yango wana, na ebandeli, babongoli mingi bayokaki lokola Élida, moko ya bandeko oyo babongolaka na monɔkɔ ya Huave! Ye alobi boye: “Ntango babengaki ngai na biro ya Batatoli ya Yehova mpo na kobongola mikanda, nazalaki na esengo, kasi nazalaki mpe kobanga.”

Babongoli basengeli mpe koyekola kosalela ordinatɛrɛ, kobongisa programɛ ya mosala mpe mayele ya kobongola. Ezalaki mosala makasi mpenza. Ndenge nini batalelaka yango? Gloria oyo abongolaka na monɔkɔ ya Maya alobi boye: “Toyebi te ndenge tokoki kolobela esengo oyo tozali na yango ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na Maya, monɔkɔ ya mboka na biso.” Mokɛngɛli ya Departema ya kobongola mikanda alobaki boye: “Babongoli bazali na mposa makasi ya kozala na mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ na bango, yango wana bazali kosala nyonso mpo na kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango.” Milende na bango eboti mbuma nini?

“Matɔndi, Yehova!”

Emonani mpenza ete Yehova azali kopambola mosala ya koteya nsango malamu epai ya bankolo mboka Mexique. Bato oyo bazali koyangana na makita mpe na mayangani bazali se kokóma mingi. Na ndakisa, na 2001, Batatoli ya Yehova 223 oyo balobaka monɔkɔ ya Mixe bayanganaki mpo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Nzokande, bayangani nyonso bazalaki 1 674​—elingi koloba motuya ya Batatoli mbala nsambo na ndambo!

Bato mosusu oyo bazali koyekola solo bazali mpenza kokanga ntina na yango banda na ebandeli. Mirna azali kokanisa lisusu likambo oyo akutanaki na yango liboso makita ekóma kosalema na monɔkɔ ya Maya. Alobi boye: “Nsima ya koyekola Biblia sanza misato, nazwaki batisimo. Nayebaki ete nasengeli kozwa batisimo, kasi mpo na koloba solo, nakangaki mpenza ntina ya mateya ya Biblia na ndenge esengeli te. Nakanisi ete ezali mpo nayebi Espagnol malamu te, monɔkɔ na ngai mpenza ezali nde Maya. Esɛngaki mwa ntango mpo nayeba solo malamumalamu.” Lelo oyo ye ná mobali na ye bazali na esengo ya kozala na kati ya bandeko oyo babongolaka mikanda na monɔkɔ ya Maya.

Na masangá nyonso, bandeko bazali na esengo mpenza ya kozwa mikanda na minɔkɔ ya mboka na bango. Ntango mwa buku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! ebimaki na monɔkɔ ya Tzotzil, mwasi moko oyo akómaki koyangana na makita akangaki yango makasi na ntolo mpe alobaki boye: “Matɔndi, Yehova!” Balapolo emonisi ete bayekoli mingi ya Biblia bakómi kokola nokinoki tii na batisimo, basakoli oyo bazalaki lisusu kosakola te bakómi kosakola sanza na sanza, mpe bandeko mibali mingi bakómi komona ete bakoki kondima mikumba na lisangá. Lokola mikanda oyo elimbolaka Biblia ekómi kobima na monɔkɔ na bango, bato mosusu bazali lisusu kokakatana te mpo na kozwa mpe koyekola yango.

Mokolo mosusu, Motatoli moko akendeki kotala mwasi moko oyo ayekolaka na ye Biblia, kasi akutaki ye te. Ntango mobali ya mwasi yango ayaki na porte, Motatoli yango atunaki ye soki akosepela atángela ye mwa makambo na kati ya mwa buku moko. Mobali yango ayanolaki boye: “Nalingi eloko te.” Ndeko mwasi yango alobaki na ye na monɔkɔ ya Totonac ete mwa buku yango ezali na monɔkɔ na bango. Ntango mobali yango ayokaki bongo, azwaki kiti mpe bafandaki. Ntango ndeko mwasi wana azalaki kotánga, mobali yango azalaki ntango nyonso koloba ete: “Ya solo, ezali mpenza bongo.” Mobali yango azali sikoyo koyangana na makita.

Na etúká ya Yucatán, mobali ya Motatoli moko azalaki kosepela na solo te mpe azalaki ntango mosusu kobɛta mwasi na ye soki auti na makita. Ntango makita ekómaki kosalema na monɔkɔ ya Maya, ndeko mwasi wana abengaki ye na makita. Mobali yango ayaki mpe asepelaki mingi. Azali sikoyo koyangana na makita nyonso mpe koyekola Biblia; kutu, atiká kobɛta mwasi na ye.

Mobali moko oyo alobaka monɔkɔ ya Totonac ayebisaki Batatoli mibale ete abondelaka te mpo sango ayebisaki ye ete Nzambe ayokaka mabondeli kaka na Espagnol. Yango wana, asengelaki kofuta sango mbongo mpo abondela mpo na Ba-Totonac. Batatoli bamonisaki ye ete Nzambe ayokaka mabondeli na minɔkɔ nyonso, bapesaki ye mwa buku oyo ezalaki na monɔkɔ ya Totonac, mpe azwaki yango na esengo mpenza.​—2 Ntango 6:32, 33; Nzembo 65:2.

“Kualtsin Tajtoua”

Nyonso wana ezali kosepelisa basakoli mingi, yango wana, mingi bakómi kosala milende mpo na koyekola monɔkɔ moko ya mboka to koyeba yango malamu. Yango nde mokɛngɛli moko ya zongazonga oyo atalaka masangá mitano ya monɔkɔ ya Nahuatl na nɔrdi ya Puebla azali kosala. Alobi boye: “Soki nazali koloba na monɔkɔ ya Nahuatl, bana oyo bazalaki na momeseno ya kolala na makita bafungolaka mpenza matoi mpe balandaka ngai na likebi mpenza. Na nsuka ya likita moko, mwana mobali moko ya mbula minei ayaki epai na ngai mpe alobaki na ngai boye: ‘Kualtsin tajtoua’ (oyebi mpenza koloba). Yango emonisi ete nalekisaki ntango na ngai mpamba te na koyekola monɔkɔ yango.”

Ya solo, elanga epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ ya mboka “eteli mpo na bobuki mbuma,” mpe baoyo nyonso bazali kosala na elanga yango bazali kolendisama mpenza. (Yoane 4:35) Roberto, ndeko moko oyo atambwisaki mosala ya kobongola mikanda alobi na mokuse boye: “Komona bandeko na biso mibali mpe basi bazali kobimisa mai ya miso na esengo ntango bazali koyoka solo na monɔkɔ na bango ya mboka mpe bazali kokanga ntina na yango, ezali likambo oyo tokobosana ata mokolo moko te. Soki nakanisi yango, nayokaka esengo mpenza.” Na ntembe te, kosalisa bato wana ya mitema sembo bápona Bokonzi esepelisaka mpe motema ya Yehova.​—Masese 27:11.

[Etanda na lokasa 10, 11]

Tóyoka babongoli mosusu

● “Baboti na ngai bateyaki ngai solo banda bomwana. Kasi, ntango nakómaki na mbula 11, tata na ngai atikaki lisangá. Mbula mibale na nsima, mama asundolaki biso. Tozalaki bana mitano, mpe lokola nazali mwana ya liboso, ngai nde nakómaki kosala makambo oyo mama asengelaki kosala, atako nazalaki naino na kelasi.

“Bandeko na biso ya elimo bazalaki mpenza kosalisa biso na bolingo, atako bongo, bomoi ezalaki mpasi. Ntango mosusu nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini kaka ngai? Nazali naino mwana!’ Kaka Yehova nde asalisaki ngai nalonga. Nsima ya kozwa diplome, nabandaki mosala ya ntango nyonso, mpe yango esalisaki ngai mpenza. Ntango bakómaki koluka bato mpo na kobongola mikanda na monɔkɔ ya Nahuatl, babengaki ngai mpe.

“Sikoyo, tata azongá na lisangá, mpe baleki na ngai bazali kosalela Yehova. Milende nasalaki mpo na kotikala sembo epai na Yehova ezali mpamba te. Apamboli mpenza libota na biso.”​—Alicia.

● “Moninga moko ya kelasi oyo azalaki Motatoli asalaki lisolo moko oyo elobelaki ndenge bomoi ebandá. Mokolo yango, nazalaki na kelasi te, mpe lokola nazalaki kobanga ete nakozwa te soki batuni makambo yango na ekzamɛ, nasɛngaki ye alimbolela ngai yango. Nazalaki ntango nyonso komituna mpo na nini bato bakufaka. Apesaki ngai buku Créationa mpe nandimaki koyekola na ye Biblia. Mokano ya Mozalisi mpe bolingo na ye esimbaki mpenza motema na ngai.

“Ntango nasilisaki kelasi, nakokaki kokóma molakisi ya Espagnol mpe ya Tzotzil. Kasi, yango elingaki kosɛnga nakende kofanda mosika, natángaka na bawikende mpe nazangisaka makita. Yango wana, nakómaki kosala mosala ya masɔ. Lokola tata na ngai azalaki Motatoli te, asepelaki na ekateli na ngai te. Mwa moke na nsima, ntango nazalaki mobongisi-nzela, babengisaki bandeko mpo na kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Tzotzil. Nasepelaki mingi kosala elongo na bandeko yango.

“Soki bandeko bazwi mikanda na minɔkɔ na bango, bamonaka mpenza ete balingaka bango mpe bapesaka bango lokumu. Yango epesaka ngai esengo mingi. Nasepelaka mingi na libaku oyo nazwá ya kopesa mabɔkɔ na mosala oyo.”​—Humberto.

● “Ntango nazalaki na mbula motoba, mama asundolaki biso. Ntango nakómaki elenge, tata akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Mokolo moko, ndeko mwasi moko asɛngaki ngai ayekolaka na ngai Biblia mpe apesaka ngai toli etali bilenge. Lokola nazalaki elenge mpe nazalaki esika moko na mama te, namonaki ete ezalaki mpenza oyo nazalaki na yango mposa. Ntango nakómaki na mbula 15, nazwaki batisimo.

“Na 1999, bato ya mitema mabe babomaki tata na ngai mpo na kozwa mabelé na ye. Likambo yango etungisaki ngai mingi. Natungisamaki mingi na makanisi mpe nandimaki te ete nakozala lisusu na bomoi ntango molai. Kasi, nazalaki ntango nyonso kobondela Yehova apesa ngai makasi. Mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye balendisaki ngai mingi mpenza. Mwa moke na nsima, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

“Mokolo moko namonaki bato batambolaki na makolo ngonga motoba mobimba kaka mpo na koyoka lisukulu ya miniti 20 na monɔkɔ ya Totonac, atako masolo mosusu ya likita yango ezalaki kosalema na Espagnol, monɔkɔ oyo bango bayokaka te. Yango wana, nasepelaki mingi ntango babengaki ngai nakende kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Totonac.

“Nazalaki mbala na mbala koyebisa tata na ngai ete nasepelaka kosala na Betele. Kasi, azalaki koyebisa ngai ete ezali mpasi mpo bándima elenge mwasi oyo azali naino monzemba. Nazali komona ndenge akosepela ntango akosekwa, soki nayebisi ye ete bandimaki ngai mpe nasalaki mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya mboka na biso!”​—Edith.

[Maloba na nse ya lokasa]

a La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? ebimisamaki na Batatoli ya Yehova na 1985.

[Elilingi na lokasa 9]

Bandeko oyo babongolaka mikanda na monɔkɔ ya Tzotzil bazali kotalela liloba moko ya mpasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto