Bayinami kaka mpamba
“Bayinaki ngai kaka mpamba.”—YOANE 15:25.
1, 2. (a) Mpo na nini bato mosusu bakamwaka ntango bazali koloba mabe mpo na baklisto, kasi mpo na nini yango ekamwisaka biso te? (b) Na lisolo oyo, liloba “koyina” ezali na ndimbola nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
BATATOLI YA YEHOVA basalaka makasi bátosa Liloba ya Nzambe na bomoi na bango. Yango wana, na mikili mingi, bayebani ete bazali bato malamu. Kasi, na bantango mosusu mpe bato balobaka mabe mpo na bango. Na ndakisa, mosali moko ya Leta na engumba Saint-Pétersbourg, na ekólo Russie, alobaki boye: “Bazalaki koyebisa biso ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba moko ya molili, babomaka bana na bango mpe bamibomaka.” Kasi, ntango asalaki na Batatoli ya Yehova na liyangani moko oyo esangisaki bato bautaki na mikili ndenge na ndenge, mobali yango alobaki boye: “Sikoyo namoni ete bazali bato malamu, balingá kosɛka . . . Bazali bato ya kimya mpe ya boboto, mpe balinganaka mingi.” Abakisaki boye: “Nayebi te mpo na nini bakoselaka bango makambo ndenge wana.”—1 Petelo 3:16.
2 Basaleli ya Nzambe bayokaka esengo te ntango bazali kokosela bango ete bazali bato mabe; kasi, bakamwaka te soki bazali koloba mabe mpo na bango. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino. . . . Ezali mpo liloba oyo ekomamá na kati ya Mibeko na bango ekokisama ete, ‘Bayinaki ngai kaka mpamba.’”a (Yoane 15:18-20, 25; Nzembo 35:19; 69:4) Liboso na yango, alobaki na bayekoli na ye boye: “Soki babengi nkolo-ndako Belezebubu, na koleka boni bakobenga baoyo ya ndako na ye bongo?” (Matai 10:25) Baklisto bayebaka ete koyikela makambo ya ndenge wana mpiko ezali mpe komema ‘nzete ya mpasi’ oyo bandimaki ntango bakómaki bayekoli ya Klisto.—Matai 16:24.
3. Ndenge nini bazali konyokola basambeli ya solo?
3 Konyokola basambeli ya solo ebandá kala, ntango banyokolaki “mosembwi Abele.” (Matai 23:34, 35) Ezali te likambo oyo esalemaki kaka na mwa mbala ya kotánga. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala “biloko ya koyinama na bato nyonso” mpo na nkombo na ye. (Matai 10:22) Longola yango, ntoma Paulo akomaki ete basaleli nyonso ya Nzambe, bakisa mokomoko na biso, tokonyokwama mokolo mosusu. (2 Timote 3:12) Mpo na nini bongo?
Moto oyo azali kotinda bato báyina biso kaka mpamba
4. Ndenge nini Biblia emonisi moto oyo azali kotinda bato báyina biso kaka mpamba?
4 Liloba ya Nzambe emonisi ete banda na ebandeli, ezali na moto moko oyo tomonaka te, oyo atindaka bato báyina basambeli ya solo. Kanisá ndenge Abele, moto ya liboso oyo azalaki na kondima, abomamaki na nko. Biblia elobi ete Kaina, ndeko na ye oyo abomaki ye, “autaki na moto mabe,” Satana Zabolo. (1 Yoane 3:12) Kaina alandaki makanisi ya Satana, mpe Zabolo asalelaki ye mpo na kokokisa mikano mabe na ye. Lisusu, Biblia emonisi oyo Satana asalaki mpo na konyokola Yobo ná Yesu Klisto. (Yobo 1:12; 2:6, 7; Yoane 8:37, 44; 13:27) Mokanda ya Emoniseli emonisi polele moto oyo azali kobimisela bayekoli ya Yesu minyoko, ntango elobi boye: “Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na kati ya bolɔkɔ mpo bómekama mpenza na mobimba.” (Emoniseli 2:10) Ya solo, koyina nyonso oyo bazali koyina basaleli ya Nzambe kaka mpamba ezali kouta epai ya moto mosusu te, kaka Satana.
5. Mpo na nini Satana azali koyina basambeli ya solo?
5 Ntina nini Satana azali koyina basambeli ya solo? Satana alonaki mposa mabe oyo emonisi ete azali mpenza na lolendo; atɛmɛlaki “Mokonzi ya seko,” Yehova Nzambe. (1 Timote 1:17; 3:6) Satana alobi ete Nzambe atyelaka bikelamu na ye ebele ya mibeko mpe ete moto moko te asalelaka Yehova na bosembo mpenza, bato basalelaka ye kaka mpo na matomba na bango moko. Alobi lisusu ete soki batikeli ye nzela ameka bato, akoki kopɛngwisa moto nyonso atika kosalela Nzambe. (Genese 3:1-6; Yobo 1:6-12; 2:1-7) Lokola Satana azali kobebisa lokumu ya Yehova na ndenge azali koluka komonisa ete Yehova anyokolaka bato, ete abukaka lokuta mpe ete alongi te kokokisa mokano na ye, azali nde kowela bokonzi na Nzambe. Na yango, soki azali koyokela basaleli ya Nzambe nkanda makasi, ezali mpo azali na mposa básambelaka ye.—Matai 4:8, 9.
6. (a) Na ndenge nini likambo ya bokonzi ya Yehova etali mpe biso? (b) Ndenge nini koyeba ntina ya likambo yango ezali kosalisa biso tótikala sembo? (Talá etanda, lokasa 16.)
6 Ozali komona ete likambo yango etali mpe yo? Lokola ozali mosaleli ya Yehova, na ntembe te omoni ete atako kosala mokano ya Nzambe esɛngi kozala na molende, matomba na yango ezali minene mpenza. Kasi, okosala nini soki okutani na mikakatano oyo ezali kopekisa yo okoba kotosa mibeko ya Yehova? Okosala nini soki ozali komona lokola nde kotosa Yehova ezali komemela yo litomba moko te? Okoloba nde ete kosalela Yehova ezali mosala ya mpunda? To nde, lokola olingaka Yehova mpe osepelaka na bizaleli na ye, okokoba kotambola na banzela na ye nyonso? (Deteronome 10:12, 13) Lokola Yehova atikeli Satana nzela ya kopesa biso mpasi, apesi mokomoko na biso libaku ya kopesa Satana eyano.—Masese 27:11.
“Ntango bazali kolobela bino mabe”
7. Wapi moko na mayele oyo Zabolo asalelaka mpo na kolongola biso na nzela ya Yehova?
7 Sikoyo, tótalela naino malamumalamu moko na mayele mabe oyo Satana asalelaka mpo na kondimisa ete alobaki solo: lokuta mpo na kobebisa lokumu ya basaleli ya Nzambe. Yesu abengaki Satana “tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Nkombo Zabolo, oyo elimboli “Motɔngi,” ezali komonisa ete azali motɔngi ya liboso ya Nzambe, ya liloba na ye, mpe ya nkombo na ye mosantu. Zabolo asalelaka makanisi ya mabe, kokosela makambo, mpe lokuta ya miso makasi mpo na kotɛmɛla bokonzi ya Yehova; asalelaka mpe kaka mayele wana mpo na kobebisa lokumu ya basaleli ya sembo ya Yehova. Ntango azali kobebisa lokumu ya Batatoli yango, ekoki kosala ete báyoka lisusu mpasi koleka mpo na koyikela monyoko mpiko.
8. Ndenge nini Satana abebisaki lokumu ya Yobo, mpe yango esalaki ye nini?
8 Tótalela makambo oyo ekómelaki Yobo, oyo nkombo na ye elimboli “Oyo ayinami.” Satana abebisaki biloko ya Yobo, abomaki bana ye mpe apesaki ye maladi; longola yango, alukaki Yobo amonana ete azali moto ya masumu mpe mpasi na ye ezali etumbu ya Nzambe. Atako liboso bato bazalaki komemya Yobo mingi, ezala bandeko mpe baninga na ye ya motema bakómaki kotyola ye. (Yobo 19:13-19; 29:1, 2, 7-11) Lisusu, Satana atindaki babɔndisi ya lokuta mpo na ‘kobukabuka Yobo na maloba’; balobaki naino ete asali lisumu ya monene mpe na nsima, balobaki na ye ete azali mosali ya mabe. (Yobo 4:6-9; 19:2; 22:5-10) Na ntembe te makambo wana elɛmbisaki Yobo!
9. Satana asalaki nini mpo na kobimisa Yesu moto ya masumu na miso ya bato?
9 Lokola Mwana ya Nzambe azali moto ya liboso mpo na kokumisa bokonzi ya Yehova, Satana ayinaki ye makasi. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Satana alukaki kobebisa lokumu na ye; alukaki kobimisa ye moto ya masumu na miso ya bato, ndenge asalaki mpo na Yobo. (Yisaya 53:2-4; Yoane 9:24) Bato mosusu babengaki ye molangwi masanga mpe molundi mpe balobaki ete ‘azali na demo.’ (Matai 11:18, 19; Yoane 7:20; 8:48; 10:20) Bakoselaki ye ete azali kofinga Nzambe. (Matai 9:2, 3; 26:63-66; Yoane 10:33-36) Likambo yango epesaki Yesu mpasi, mpamba te ayebaki ete ezali kobebisa lokumu ya Tata na ye. (Luka 22:41-44) Nsukansuka, babakaki ye na nzete lokola mosali ya mabe oyo balakeli mabe. (Matai 27:38-44) Lokola Yesu atikalaki mpenza sembo, ‘ayikaki mpiko na maloba ya botɛmɛli ya basumuki.’—Baebele 12:2, 3.
10. Ndenge nini Satana azali kongalisa nkanda na ye epai ya bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé?
10 Na ntango na biso, Zabolo azali mpe koyina bayekoli bapakolami ya Klisto, oyo bazali naino awa na mabelé. Biblia elobi ete Satana azali “mofundi ya bandeko [ya Klisto] . . . , oyo afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso.” (Emoniseli 12:9, 10) Banda babenganá ye na likoló mpe babwaká ye awa na nse, Satana angali na kobimisa bandeko ya Klisto na miso ya bato ete bazali bato oyo esengeli ata kopusana penepene na bango te. (1 Bakolinti 4:13) Na bikólo mosusu, bazali kokosela bango ete bazali mwa lingomba ya mabe mpenza, ndenge kaka bazalaki kobenga baklisto ya liboso. (Misala 24:5, 14; 28:22) Ndenge tolobaki na ebandeli, bazali kopanza bango nsango ya lokuta. Kasi, “na nzela ya lokumu ya mabe mpe ya lokumu ya malamu,” bandeko ya Klisto oyo bazali bapakolami, ná baninga na bango “bampate mosusu,” bazali kosala nyonso mpo na ‘kotosa bakomandema ya Nzambe mpe kosala mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.’—2 Bakolinti 6:8; Yoane 10:16; Emoniseli 12:17.
11, 12. (a) Wapi bantina mosusu oyo balobaka mabe mpo na baklisto? (b) Na ndenge nini moklisto akoki konyokwama kaka mpamba mpo na kondima na ye?
11 Tolobi te ete balobelaka mosaleli ya Nzambe mokomoko mabe kaka “mpo na boyengebene.” (Matai 5:10) Tokoki kokutana na mikakatano mosusu mpo na ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Ezali na litomba moko te soki, ntango tozali ‘kosala lisumu mpe kobɛtama mbata, tozali kokangela yango motema.’ Kasi, soki moklisto moko, “mpo na lisosoli na ye liboso ya Nzambe, azali kokanga motema na kati ya makambo ya mpasi mpe azali konyokwama atako asali mabe te, yango ezali likambo malamu” na miso ya Yehova. (1 Petelo 2:19, 20) Ntango nini ekoki kosalema bongo?
12 Basilisaki bamosusu loposo mpo baboyaki kosangana na milulu oyo basalaka ntango moto akufi, oyo Biblia epekisi yango. (Deteronome 14:1) Bilenge mosusu oyo bazali Batatoli bafingamaki mingi mpo balingi kotosa mibeko ya Yehova. (1 Petelo 4:4) Balobaki na baboti mosusu ete “bazali na mitema makasi” to mpe “bandɔki” mpo baboyaki ete bázongisa bana na bango makila. (Misala 15:29) Baklisto mosusu bayinamá na bandeko mpe baninga na bango kaka mpo bakómá basaleli ya Yehova. (Matai 10:34-37) Bato nyonso wana bazali kolanda nzela ya basakoli mpe ya Yesu na ndenge bazali kondima konyokwama kaka mpamba.—Matai 5:11, 12; Yakobo 5:10; 1 Petelo 2:21.
Tókanga motema ntango bazali koloba na biso mabe
13. Nini ekoki kosalisa biso tólɛmba na elimo te ntango bazali koloba na biso mabe?
13 Ntango bazali koloba na biso mabe mpo na losambo na biso, tokoki kolɛmba nzoto, ndenge Yilimia alɛmbaki, mpe tokoki koyoka lokola nde tokokoka te kokoba kosalela Nzambe. (Yilimia 20:7-9) Nini ekoki kosalisa biso tólɛmba na elimo te? Tóluka kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Mpo na Yehova, moto oyo atikali sembo na komekama, alongi; kasi ezali te ete balongi ye. (Baloma 8:37) Kanisá naino bato oyo bakobaki kokumisa bokonzi ya Yehova atako Zabolo asalaki bango makambo ndenge na ndenge ya mabe; bato lokola Abele, Yobo, Malia mama ya Yesu, mpe bato mosusu ya sembo na ntango ya kala, bakisa mpe basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango na biso. (Baebele 11:35-37; 12:1) Kanisá malamumalamu bosembo na bango. Ebele ya bato wana ya sembo oyo Biblia ebengi lipata monene bazali kobenga biso tólanda lokolo na bango mpo na kozala bato oyo, na kondima na bango, balongi mokili.—1 Yoane 5:4.
14. Ndenge nini kobondela na molende epesaka makasi ya kotikala sembo?
14 Soki ‘totondi na makanisi oyo ebulunganisaka,’ tokoki kobondela Yehova na molende, mpe ye akobɔndisa biso mpe akopesa biso makasi. (Nzembo 50:15; 94:19, NW) Akopesa biso bwanya oyo esengeli mpo na kolonga komekama yango mpe kosalisa biso tóbosana te ntembe monene etaleli bokonzi ya Yehova, oyo ebimisi koyina oyo bazali koyina basaleli na ye kaka mpamba. (Yakobo 1:5) Yehova akoki mpe kopesa biso “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya wana oyo euti na Nzambe esalisaka biso tómitungisa te mpe tózala na mpiko ntango tomekami makasi, mpo tókakatana to mpe tóbanga te. Na nzela ya elimo na ye, Yehova akoki kosalisa biso tólonga mokakatano nyonso oyo atiki nzela ekómela biso.—1 Bakolinti 10:13.
15. Nini ekoki kosalisa biso tókangela bato oyo bazali konyokola biso nkanda te?
15 Nini ekosalisa biso tókangela bato oyo bazali konyokola biso nkanda te? Tóbosana te ete banguna na biso ya liboso ezali Satana ná bademo na ye. (Baefese 6:12) Atako bato mosusu bazali konyokola biso na nko, mingi oyo batɛmɛlaka basaleli ya Nzambe basalaka yango kozanga koyeba ntina to mpe mpo bakosaka bango. (Danyele 6:4-16; 1 Timote 1:12, 13) Mposa ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Kutu, bato mosusu oyo bazalaki kotɛmɛla biso bazali lelo oyo bandeko na biso baklisto mpo bamonaki etamboli malamu na biso. (1 Petelo 2:12) Longola yango, tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Yozefe, mwana ya Yakobo. Atako Yozefe anyokwamaki mingi mpo na mabe oyo bandeko na ye basalaki ye, akangelaki bango nkanda te. Mpo na nini? Mpo asosolaki ete Yehova nde alingaki ete makambo esalema ndenge wana mpo na kokokisa mokano na Ye. (Genese 45:4-8) Yehova akoki mpe kotika bányokola biso kaka mpamba mpo na lokumu ya nkombo na ye.—1 Petelo 4:16.
16, 17. Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te ntango banguna bazali koluka kopekisa mosala na biso ya kosakola?
16 Tosengeli komitungisaka mingi te ntango tomoni lokola nde banguna bazali kozongisa mosala ya kosakola nsango malamu nsima. Na nzela ya litatoli oyo ezali kopesama na mokili mobimba, Yehova azali koningisa bikólo, mpe biloko kitoko ezali kokɔta na ndako na ye. (Hagai 2:7) Klisto Yesu, Mobateli ya bampate oyo aleki malamu, alobaki boye: “Bampate na ngai bayokaka mongongo na ngai, mpe nayebi bango, mpe balandaka ngai. Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko, . . . mpe moto moko te akobɔtɔla bango na mabɔkɔ na ngai.” (Yoane 10:27-29) Baanzelu ya Nzambe mpe bazali kosangana na mosala monene yango ya kobuka mbuma. (Matai 13:39, 41; Emoniseli 14:6, 7) Yango wana, eloko moko te oyo banguna balobi to basali ekoki kobebisa mokano ya Nzambe.—Yisaya 54:17; Misala 5:38, 39.
17 Mbala mingi, mabe oyo banguna balukaka kosala biso ebongwanaka malamu. Na mboka moko ya Afrika, bakoselaki Batatoli ya Yehova ebele ya makambo; na ndakisa, balobaki ete basambelaka Zabolo. Yango wana, mbala nyonso oyo Batatoli bakei kotala bango, Grace azalaki kobombana na nsima ya ndako tii bakokende. Mokolo mosusu, pastɛrɛ na bango alakisaki mokanda moko ya Batatoli mpe ayebisaki bato nyonso na ndako-nzambe ete bátánga yango te noki bakobungisa kondima na bango. Yango epesaki Grace mposa ya koyeba makambo oyo ezali na mokanda yango. Ntango Batatoli bakendaki lisusu kotala bango, na esika abombana ndenge amesanaki, asololaki na bango mpe batikelaki ye mokanda yango. Bakómaki koyekola na ye Biblia, mpe na 1996, azwaki batisimo. Lelo oyo, Grace alukaka bato mosusu oyo bayebisá bango makambo ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova mpo na kosalisa bango.
Lendisá kondima na yo sikoyo
18. Mpo na nini tosengeli kolendisa kondima na biso liboso mikakatano makasi ebima, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
18 Lokola Satana akoki kobimisela biso mikakatano kaka mpamba ata na ntango nini, esengeli mpenza tólendisa kondima na biso sikoyo. Ndenge nini tokoki kosala yango? Lapolo moko oyo eutaki na ekólo moko oyo banyokolaki basaleli ya Yehova elobaki boye: “Likambo moko emonani polele: Baoyo bazali na mimeseno malamu na elimo mpe basepelaka mingi na solo ya Biblia bazalaka na mokakatano te mpo na kobatela kondima ntango bamekami. Kasi baoyo, na ‘eleko ya malamu,’ bazangisaka makita, basakolaka sanza na sanza te, mpe bazongaka nsima na mwa mikakatano ya mikemike, bakweaka na ntango ya komekama ‘makasi.’” (2 Timote 4:2) Soki ezali na makambo oyo osengeli kobongisa, salá nyonso obongisa yango sikoyo, kozela te.—Nzembo 119:60.
19. Atako bazali koyina basaleli ya Nzambe kaka mpamba, bosembo na bango ezali kokokisa likambo nini?
19 Atako Satana azali koyina basambeli ya solo, bosembo na bango ezali litatoli monene ete bokonzi ya Yehova nde ebongi mpe ezali sembo. Bosembo na bango ezali kosepelisa motema ya Nzambe. Atako bato bakoki koloba mabe mpo na bango, ye oyo lokumu na ye eleki mabelé mpe likoló “azali koyoka nsɔni te na ntina etali bango, mpo na kobengama Nzambe na bango.” Mpo na bato nyonso wana ya sembo, tokoki mpenza koloba ete: “Mokili ebongaki na bango te.”—Baebele 11:16, 38.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Biblia, liloba “koyina” ezali na ndimbola mingi. Na bisika mosusu, elimboli kaka kolinga moke. (Deteronome 21:15, 16) “Koyina” moto ekoki mpe kolimbola kosepela na ye te, kasi mpo na kosala ye mabe te, kokima ye mpo ozali koyoka mabe kozala pembeni na ye. Nzokande, liloba “koyina” ekoki mpe kolimbola kolinga ata moke te, to kozala na motema mabe oyo esangani na likunya. Na lisolo oyo, liloba koyina ezali na ndimbola oyo ya nsuka.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini bazali konyokola basambeli ya solo kaka mpamba?
• Ndenge nini Satana asalelaki maloba ya mabe mpo na kobebisa bosembo ya Yobo mpe ya Yesu?
• Ndenge nini Yehova alendisaka biso mpo tótikala sembo atako Satana azali koyina biso?
[Etanda/Elilingi na lokasa 16]
Basosolaki ntina mpenza oyo bazalaki konyokwama
Na Ukraine, ekólo oyo mosala ya kosakola Bokonzi epekisamaki na boumeli ya mbula koleka 50, Motatoli moko ya Yehova alobaki boye: “Tokoki koloba te ete makambo oyo biso Batatoli ya Yehova tokutanaki na yango ezalaki kaka mpo bato balingaki biso te. . . . Basali mingi ya Leta bazalaki kaka kosala mosala na bango. Na ntango guvɛrnema mosusu ezwi bokonzi, basali ya Leta bazalaki kotosa mibeko ya sika ndenge kaka bazalaki kotosa oyo ya liboso; kasi biso tozalaki kotikala kaka ndenge tozalaki. Tososolaki ete Biblia emonisi moto oyo azali kobimisa mikakatano oyo tozalaki kokutana na yango.
“Tozalaki komona te ete ezali kaka bato mabe nde bazali konyokola biso mpamba. Oyo esalisaki biso na koyika mpiko ezali ete tososolaki malamu likambo oyo ebimaki na elanga ya Edene: ntembe mpo na lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi. . . . Toponaki oyo ya biso ngámbo na likambo wana oyo ezali kotalela kaka matomba ya bato te, kasi mpe oyo ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Tososolaki mpenza ntina oyo bazalaki konyokola biso. Yango epesaki biso makasi mpe esalisaki biso tótikala sembo ata na ntango ya mpasi makasi.”
[Elilingi]
Victor Popovych, akangamaki na 1970
[Elilingi na lokasa 13]
Nani atindaki bato báloba mabe mpo na Yesu?
[Bililingi na lokasa 15]
Yobo, Malia, mpe basaleli ya Nzambe na ntango na biso, lokola Stanley Jones, baponaki bokonzi ya Yehova