Nakozongisela Yehova nini?
Lisolo ya Ruth Danner
Mpo na kosɛkisa, mama azalaki koloba ete 1933 ezalaki mbula ya makambo: Hitler azwaki bokonzi, pápa abengaki mobu yango “Mobu Mosantu,” mpe ngai nabotamaki.
BABOTI na ngai bazalaki kofanda na engumba Yutz, na Lorraine, etúká ya France oyo ezali pene na ndelo ya Allemagne, epai makambo mingi esalemaki. Na 1921, mama, oyo azalaki mondimi ya molende ya Katolike, abalaki tata, mondimi ya Protesta. Helen, yaya na ngai ya mwasi, abotamaki na 1922, mpe baboti na biso babatisaki ye na bomwana na Lingomba ya Katolike.
Mokolo moko na 1925, bapesaki tata buku La Harpe de Dieu, na monɔkɔ ya Allemand. Ntango atángaki buku yango, andimaki ete azwi solo. Akomelaki babimisi ya buku yango, mpe basalisaki ye akutana na Ba-Bibelforscher, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na Allemagne na ntango wana. Eumelaki te, tata abandaki kosakola makambo oyo ayekolaki. Mama azalaki kosepela na likambo yango te. Azalaki koyebisa tata na Allemand kitoko oyo azalaki koloba ete: “Salá nyonso oyo olingi, kasi kosangana na Ba-Bibelforscher te!” Kasi, tata asilaki kozwa ekateli mpe na 1927 azwaki batisimo mpe akómaki moko na bango.
Mpo na yango, nkɔkɔ ya mwasi oyo abotaki mama abandaki kopusa mama aboma libala. Mokolo moko na misa, sango ayebisaki bandimi na ye ete “bákeba na Danner, mosakoli ya lokuta.” Ntango nkɔkɔ azongaki na ndako nsima ya misa yango, abwakelaki tata mbɛki moko oyo bazalaki kotya bafololo, longwa na etaje ya ndako na biso. Mbɛki wana ya kilo elingaki kozwa tata na motó kasi ekwelaki ye na lipeka. Likambo wana etindaki mama akanisa ete: ‘Lingomba oyo etindaka bato báboma basusu ekoki kozala lingomba ya solo te.’ Abandaki kotánga mikanda ya Batatoli ya Yehova. Eumelaki te, andimaki ete azwi solo mpe azwaki batisimo na 1929.
Baboti na biso basalaki nyonso mpo básalisa ngai ná yaya na ngai tóyeba ete Yehova azali mpenza. Bazalaki kotángela biso masolo ya Biblia mpe na nsima kotuna biso ntina oyo bato oyo balobeli na masolo yango basalaki boye to boye. Na ntango wana, na mosala na bango, tata aboyaki kosalaka na butu to mpokwa, atako ekateli yango esalaki ete lifuti oyo azalaki komemela libota ekita mingi. Alingaki kozala na ntango mpo na koyanganaka na makita, kosakola mpe koyekola Biblia na bana na ye.
Mikakatano ezalaki koya
Baboti na biso bazalaki mbala na mbala koyamba bakɛngɛli-batamboli mpe bandeko ya Betele ya Suisse mpe ya France, mpe bandeko yango bazalaki koyebisa biso mikakatano oyo bandeko bazalaki na yango na Allemagne, oyo ezalaki mosika te na mboka na biso. Guvɛrnema ya Nazi ezalaki kotinda Batatoli ya Yehova na bakaa ya bakangami mpe ezalaki kobɔtɔla bango bana.
Ngai ná Helen tobongisamaki mpo na mikakatano oyo ezalaki kozela biso. Baboti na biso basalisaki biso tókanga na motó bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekokaki kotambwisa biso. Na ndakisa, bazalaki koloba boye: “Soki boyebi ndenge ya kosala te, bókanisa Masese 3:5, 6. Soki bozali kobanga mikakatano na kelasi, bósalela 1 Bakolinti 10:13. Soki bakaboli biso na bino, bózongela maloba ya Masese 18:10.” Nakangaki na motó maloba ya Nzembo 23 mpe 91 mpe nakómaki na elikya ete Yehova akobatela ngai ntango nyonso.
Na 1940, Banazi bakómisaki Alsace-Lorraine teritware ya Allemagne, mpe guvɛrnema wana ya sika esɛngaki mikóló nyonso bákɔta na parti Nazi. Tata aboyaki mpe basoda ya Gestapo bakanelaki ye ete bakokanga ye. Ntango mama aboyaki kotonga bilamba ya basoda, basoda ya Gestapo bakanelaki mpe ye.
Kokende kelasi ekómaki kobangisa ngai. Mokolo nyonso, mpo na kobanda kelasi, esɛngaki tóloba “Heil Hitler,” mpo na kopesa Hitler losako, mpe koyemba loyembo ya ekólo, wana lobɔkɔ ya mobali esembolami. Na esika báyebisa ngai ete nasengeli kopesa Hitler losako te, baboti na ngai basalisaki ngai nde nateya lisosoli na ngai. Yango wana, ngai moko nazwaki ekateli ya koboya kopesa losako ya Banazi. Balakisi bazalaki kobɛta ngai bambata mpe koloba ete bakolongola ngai na kelasi. Mokolo moko ntango nazalaki na mbula nsambo, basɛngaki ngai natɛlɛma liboso ya balakisi nyonso 12 ya eteyelo. Bamekaki kopusa ngai napesa Hitler losako. Kasi, natikalaki ngwi, na lisalisi ya Yehova.
Molakisi moko alukaki kobebisa makanisi na ngai. Ayebisaki ngai ete nazali mwana-kelasi ya malamu, alingaka ngai mingi mpe akoyoka mawa soki balongoli ngai na kelasi. Alobaki boye: “Esengeli te otombola mpenza lobɔkɔ. Tombolá yango kaka moke. Mpe osengeli koloba ‘Heil Hitler!’ mpenza te. Ningisá kaka mbɛbu na yo mpe salá lokola nde ozali koloba.”
Ntango nayebisaki mama makambo molakisi wana azalaki kosala, abɛtelaki ngai lisusu lisolo ya Biblia oyo elobeli bilenge Baebele misato liboso ya ekeko oyo mokonzi ya Babilone atɛlɛmisaki. Atunaki ngai: “Bilenge wana basengelaki kosala nini?” Nayanolaki boye: “Kofukama.” Abakisaki boye: “Soki na ngonga wana oyo basengelaki kofukamela ekeko, bilenge wana bafukamaki mpo na kokanga bansinga ya sandale na bango, elingaki kozala malamu? Yo moko zwá ekateli; salá oyo okanisi ete ezali malamu.” Na ndakisa ya Sadalaka, Mesaka mpe Abedenego, nazwaki ekateli ya kotikala sembo kaka epai ya Yehova.—Dan. 3:1, 13-18.
Balakisi babenganaki ngai na kelasi mbala mingi mpe bazalaki kokanela ngai ete bakobɔtɔla ngai na mabɔkɔ ya baboti na ngai. Natungisamaki mingi, kasi baboti bakobaki kolendisa ngai. Liboso nakende kelasi, mama azalaki kobondela elongo na ngai mpo na kosɛnga Yehova abatela ngai. Nayebaki ete Yehova akopesa ngai makasi ya kotikala ngwi kati na solo. (2 Kol. 4:7) Tata azalaki koyebisa ngai ete soki mikakatano ekómi makasi, nabanga te kozonga na ndako. Alobaki ete: “Tolingaka yo. Okozala kaka mwana na biso. Ezali nde likambo na yo ná Yehova.” Maloba wana ekolisaki mposa na ngai ya kobatela bosembo.—Yobo 27:5.
Basoda ya Gestapo bazalaki koya mbala na mbala na ndako na biso mpo na koluka mikanda ya Batatoli mpe kotuna baboti na ngai mituna. Bazalaki kozwa mama mpe kokende na ye bangonga ebele mpe bazalaki kokende kozwa tata mpe yaya na ngai ya mwasi na bisika na bango ya mosala. Nazalaki koyeba te soki nakokuta mama na ndako ntango nakouta kelasi. Ntango mosusu mwasi moko oyo azalaki kofanda pene na biso azalaki koyebisa ngai ete: “Bakei na mama na yo.” Na nsima, nazalaki komibomba na kati ya ndako mpe komituna: ‘Bazali konyokola ye? Nakomona ye lisusu?’
Bamemi biso na mboka mosusu
Na mokolo ya 28 Yanuali 1943, basoda ya Gestapo balamusaki biso na ngonga ya misato na ndambo ya ntɔngɔ. Balobaki ete soki ngai ná yaya na ngai ná baboti na biso tondimi kokɔta na parti ya Nazi, bakomema biso na mboka mosusu te. Bapesaki biso ngonga misato mpo tómibongisa. Lokola mama asilaki komibongisa mpo na likambo ya ndenge wana mpe asilaki kotya bilamba mpe Biblia moko na basakosi na biso, tosalelaki ntango yango mpo na kobondela mpe kolendisana. Tata akundwelaki biso ete ‘eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe.’—Lom. 8:35-39.
Basoda ya Gestapo bayaki lisusu. Nabosanaka te ndenge Anglade, ndeko mwasi moko ya mobange, azalaki kopɛpa lobɔkɔ mpo na kopesa biso mbote ya bokabwani na mai na miso. Basoda ya Gestapo bamemaki biso na gare ya engbunduka na engumba Metz. Nsima ya mobembo ya mikolo misato na engbunduka, tokómaki na Kochlowice, mwa kaa oyo ezalaki kotambwisama na kaa monene ya Auschwitz, na Pologne. Nsima ya sanza mibale, batindaki biso na Gliwice, ndako moko ya bamamɛlo oyo bakómisaki kaa ya misala ya makasi. Banazi bayebisaki biso ete soki mokomoko na biso atye sinyatire na papye moko mpo na komonisa ete aboyi Yehova, bakobimisa biso mpe bakozongisela biso biloko na biso. Tata ná mama baboyaki, mpe basoda wana balobaki ete: “Bokozonga ndako ata mokolo moko te.”
Na sanza ya Yuni, batindaki biso na Swietochlowice, epai nakómaki koyoka motó mpasi, mpe esalaka ngai tii lelo. Maladi moko ekɔtaki na misapi na ngai mpe doktɛrɛ moko alongolaki ngai manzaka mingi ya misapi kozanga kotya anesthésie. Likambo ya esengo ezalaki ete lokola nazalaki moto oyo bakɛngɛli ya bolɔkɔ bazalaki kotinda bitinda, mbala mingi nazalaki kokóma esika basalaka mampa. Kuna, mwasi moko azalaki kokabela ngai mwa eloko ya kolya.
Tii ntango wana, bazalaki kotya libota na biso esika moko te na bato mosusu ya bolɔkɔ. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1943, batindaki biso na kaa moko na engumba Ząbkowice. Tozalaki kolala, elongo na bato 60, mibali, basi mpe bana, na bambeto ya etaje na esika babombaka mboto. Basoda ya etuluku ya SS bazalaki kosala nyonso mpo bilei na biso ezala salite mpe mpasi mpo na kolya yango.
Ata na bampasi wana nyonso, tobungisaki elikya te. Totángaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ete mosala monene ya kosakola esengeli kosalema nsima ya etumba. Na yango, toyebaki ntina oyo tozalaki konyokwama mpe ete mosika te, bampasi na biso nyonso ekosila.
Ntango toyokaki ete basoda ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobundisa Allemagne bazali se kopusana, toyebaki ete Banazi bakómi kokwea. Na ebandeli ya 1945, basoda ya Nazi bazwaki ekateli ya kosundola kaa na biso. Na mokolo ya 19 Febwali, batindaki biso na makasi tósala mobembo ya kilomɛtrɛ soki 240 na makolo. Nsima ya pɔsɔ minei, tokómaki na engumba Steinfels, na Allemagne, esika bakɛngɛli basangisaki bato ya bolɔkɔ na mabulu oyo batimolá mpo na koluka mabanga. Mingi bakanisaki ete bakoboma biso. Kasi, na mokolo yango, basoda ya bikólo oyo basanganaki mpo na kobundisa Allemagne bakómaki, basoda ya SS bakimaki, mpe minyoko na biso esilaki.
Nakokisi mikano na ngai
Na mokolo ya 5 Mai 1945, nsima ya mbula soki 2 na ndambo, tozongaki na ndako na biso na engumba Yutz, totondi na salite mpe na nsili. Banda na sanza ya Febwali, tolataki bilamba mosusu te, yango wana totumbaki bilamba yango. Nazali kokanisa lisusu ndenge mama ayebisaki biso: “Mokolo ya lelo ezala mokolo oyo eleki malamu na bomoi na bino. Tozali na eloko te. Ata bilamba oyo tozali kolata ezali ya biso te. Atako bongo, biso nyonso minei tozongi ndako mpe tobateli bosembo na biso. Towangani Yehova te.”
Nsima ya sanza misato oyo nalekisaki na Suisse mpo nakóma nzoto makasi, nazongaki na kelasi, kozanga kobanga ete bábengana ngai. Sikoyo, tokokaki kokutana na bandeko na biso ya elimo mpe kosakola kozanga kobombana. Na mokolo ya 28 Augusto 1947, wana nazali na mbula 13, nakokisaki elaka oyo napesaki Yehova mwa bambula liboso. Tata abatisaki ngai na Ebale Moselle. Nalingaki kokóma mobongisi-nzela na mbala moko, kasi tata alingaki ete nayekola mosala moko. Na yango nayekolaki mosala ya kotonga bilamba. Na 1951, wana nazali na mbula 17, nakómaki mobongisi-nzela mpe batindaki ngai nakende kosakola na Thionville, komine oyo ezalaki pene na biso.
Na mbula yango, nakɔtaki na liyangani moko na Paris mpe natondisaki formilɛrɛ mpo na kokóma misionɛrɛ. Bambula na ngai ekokaki naino te, kasi ndeko Nathan Knorr alobaki ete akobomba formilɛrɛ na ngai “mpo na mikolo ekoya.” Na sanza ya Yuni 1952, babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 21 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na engumba South Lansing, etúká ya New York, na États-Unis.
Gileadi mpe makambo oyo esalemaki na nsima
Ezalaki nsɔmɔ mpenza! Mbala mingi, ata na monɔkɔ ya mboka na ngai, nazalaki kokoka koloba liboso ya bato te. Sikoyo, nasengelaki koloba na Lingelesi. Atako bongo, balakisi basungaki ngai na bolingo. Ndeko moko akómaki kobenga ngai Mosɛki ya Bokonzi mpo nazalaki kosɛka mwa moke soki nayoki nsɔni.
Na mokolo ya 19 Yuli 1953, bapesaki biso badiplome na Yankee Stadium, na New York, mpe batindaki ngai na Paris elongo na Ida Candusso (na nsima azwaki nkombo ya mobali na ye Seignobos). Koteya bato minene ya Paris ezalaki kobangisa, kasi nakómaki koyekola na bato mingi ya Paris oyo bazalaki na komikitisa. Ida abalaki mpe bakendaki na Afrika na 1956, kasi ngai natikalaki na Paris.
Na 1960, nabalaki ndeko moko ya Betele, mpe tosalaki lokola babongisi-nzela monene na Chaumont mpe na engumba Vichy. Mbula mitano na nsima, nabɛlaki maladi ya ntolo mpe esengelaki nakata mosala ya mobongisi-nzela monene. Nayokaki mpasi mingi mpo banda bomwana nazalaki na mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso bomoi na ngai mobimba. Mwa moke na nsima, mobali na ngai atikaki ngai mpe azwaki mwasi mosusu. Bandeko ya elimo basalisaki ngai mingi na bambula wana ya mpasi, mpe Yehova akobaki komema mokumba na ngai.—Nz. 68:19.
Lelo oyo, nazali kofanda na Louviers, na etúká ya Normandie, pene na Betele ya France. Atako nazali na mikakatano mpo nzoto ezali malamu te, nazali na esengo ya komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na ngai. Ndenge baboti na ngai babɔkɔlaki ngai esalisaka ngai ata lelo nazala na makanisi ya malamu. Baboti na ngai bateyaki ngai ete Yehova azali mpenza moto oyo nakoki kolinga, kosolola na ye, mpe oyo akoki koyanola mabondeli na ngai. Ya solo, “nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?”—Nz. 116:12.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
“Nazali na esengo ya komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na ngai”
[Elilingi na lokasa 5]
Ná masque na ngai ya komibatela na mopɛpɛ mabe, ntango nazalaki na mbula 6
[Elilingi na lokasa 5]
Ná bamisionɛrɛ mpe babongisi-nzela na Luxembourg na kampanye ya mosala ya kosakola, ntango nazalaki na mbula 16
[Elilingi na lokasa 5]
Ná tata mpe mama na liyangani ya etúká na 1953