Mateya ya Yesu Klisto esalaka nini na bomoi na yo?
SOKI totaleli makambo nyonso oyo tolobeli na lisolo eleki, ntembe ezali te ete mateya ya Yesu eyebani na mokili mobimba. Kasi, motuna eleki ntina oyo moto na moto asengeli komituna yango oyo: “Mateya ya Yesu esalaka nini epai na ngai?”
Yesu ateyaki makambo ndenge na ndenge. Okoki kosalela batoli ya ntina mingi oyo ezali na mateya yango na makambo nyonso ya bomoi na yo. Tótalela naino mateya ya Yesu mpo na makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi, kokóma moninga ya Nzambe, koyokana malamu na bato, kosilisa mikakatano, mpe koboya mobulu.
Makambo ya kotya na esika ya liboso
Bomoi ya lelo oyo ezali kozwa biso ngonga mingi mpe ezali kosilisa biso makasi; yango wana, mbala mingi tozali kozanga ntango ya komipesa na makambo ya Nzambe. Tózwa ndakisa ya mobali moko oyo azali na mbula koleka 20. Tobengi ye na nkombo ya Jerry. Jerry alingaka kosolola masolo ya makambo ya Nzambe mpe asepelaka na mateya oyo ayekolaka; kasi alobi boye: “Nazalaka na ntango te ya komipesa mpenza. Na pɔsɔ mobimba, nasalaka mikolo motoba. Napemaka kaka mokolo ya lomingo. Soki nasilisi misala nyonso, nayokaka ete nzoto elɛmbi mpenza.” Soki yo mpe ozali na mokakatano ya ndenge wana, makambo oyo Yesu ateyaki na Lisolo Likoló ya Ngomba ekoki kosalisa yo.
Yesu alobaki na ebele ya bato oyo bayanganaki mpo na koyoka ye boye: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata. Molimo eleki nde bilei te mpe nzoto eleki bilamba te? Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te? . . . Boye bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:25-33) Maloba yango ezali koteya biso nini?
Yesu alingaki koloba te ete tósala eloko te mpo na kokokisa bamposa na biso mpe ya libota na biso. Biblia elobi boye: “Soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8) Yesu alakaki ete soki tozali koyeba ete makambo ya elimo nde eleki ntina mpe tozali kotya yango na esika ya liboso, Nzambe akosalisa biso na kokokisa bamposa na biso. Toli oyo tosengeli kozwa na maloba yango ezali ya kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Soki tosali bongo, tokozala na bomoi ya esengo, mpamba te “esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—Matai 5:3.
Tókóma baninga ya Nzambe
Bato oyo bayebi bobola na bango ya elimo bamonaka ete kokóma moninga ya Nzambe ezali likambo ya ntina mingi. Ndenge nini tokómaka moninga ya moto? Tolukaka naino koyeba moto yango malamu, boye te? Tozwaka ntango ya koyekola makanisi na ye, bizaleli na ye, makoki na ye, misala na ye, makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka. Ezali mpe bongo mpo na kokóma moninga ya Nzambe. Tosengeli koyeba ye malamumalamu. Mokolo moko, Yesu abondelaki Nzambe mpo na bayekoli na ye boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Tomoni ete mpo na kokóma moninga ya Nzambe, esɛngaka koyeba ye. Mokanda kaka moko oyo ekoki kopesa biso boyebi ya Nzambe ezali Liloba na ye, Biblia. (2 Timote 3:16) Tosengeli kozwaka ntango ya koyekola Biblia.
Kasi, boyebi yango moko ekoki te. Na libondeli na ye, Yesu alobaki lisusu boye: “[Bayekoli na ngai] batosi liloba na yo.” (Yoane 17:6) Tosengeli kosuka kaka te na kozwa boyebi ya Nzambe, kasi tosengeli mpe kosalela yango. Yango nde nzela kaka moko oyo tokoki kokóma baninga ya Nzambe. Tokoki nde kokóma baninga ya motema ya moto moko soki tosalaka na nko makambo oyo asepelaka na yango te? Na yango, makanisi mpe mitinda ya Nzambe esengeli kotambwisa bomoi na biso mobimba. Tótalela ndenge oyo mitinda na ye mibale ekoki kosalisa biso na kozala na boyokani malamu na bato mosusu.
Kozala na boyokani malamu na bato
Mokolo mosusu, Yesu abɛtaki mwa lisolo moko mpo na koteya bayekoli na ye ndenge ya kozala na boyokani malamu na bato. Alobaki ete ezalaki na mokonzi moko oyo alingaki kotalela makambo ya mbongo na bato na ye ya mosala. Moko na bango azalaki na nyongo na ye monene, kasi azalaki na likoki ya kofuta yango te. Mokonzi alobaki ete bátɛka moto yango, mwasi na ye, ná bana na ye mpo azwa mbongo na ye. Moto yango afukamaki mpe abondelaki ye boye: “Zalá na motema molai epai na ngai mpe nakozongisela yo biloko nyonso.” Mokonzi ayokelaki ye mawa mpe atikaki nyongo yango. Kasi, ntango moombo yango abimaki, akutanaki na moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye ya moke, mpe asɛngaki ye afuta yango. Atako moninga na ye abondelaki ye ayokela ye mawa, moninga wana akangisaki ye tii ntango afutaki ye nyongo na ye nyonso. Ntango mokonzi ayokaki likambo yango, asilikaki makasi. Alobaki na ye boye: “Osengelaki nde te . . . koyokela moninga na yo moombo mawa, ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa?” Mokonzi akangisaki moombo oyo aboyaki kolimbisa moninga na ye tii ntango afutaki nyongo na ye nyonso. Lokola liteya, Yesu alobaki boye: “Ezali ndenge wana nde Tata na ngai ya likoló mpe akosalela bino soki bozali kolimbisa te moto na moto ndeko na ye na mitema na bino.”—Matai 18:23-35.
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka mabunga mingi. Tokokoka te kofuta nyongo monene ya masumu oyo tosalaka na miso ya Nzambe. Nyonso oyo tokoki kosala ezali kaka kosɛnga ye bolimbisi. Yehova aboyaka te kolimbisa mabunga na biso soki biso mpe tozali kolimbisa mabe oyo bandeko basalaka biso. Tomoni ete liteya yango ezali mpenza kosimba motema! Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.”—Matai 6:12.
Tókendaka tii na mosisa ya likambo
Yesu ayebaki mpenza ndenge bato bazalaka. Yango wana, apesaki toli ya kokende mpenza na mosisa ya likambo mpo na kosilisa yango. Tótalela bandakisa mibale.
Yesu alobaki boye: “Boyokaki ete elobamaki na baoyo ya ntango ya kala, ‘Osengeli koboma moto te; kasi moto nyonso oyo akoboma moto akozongisa monɔkɔ na esambiselo.’ Nzokande, ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo akokoba kozala na nkanda na ndeko na ye akozongisa monɔkɔ na esambiselo.” (Matai 5:21, 22) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete koboma moto ebandaka mosika koleka kosala likambo mpo na kosukisa bomoi na ye. Makanisi ya koboma moto ebandaka na motema. Soki moto atiki nzela te ete makanisi ya mabe to nkanda ekola na motema na ye, akokóma te tii na kosala likambo ya mabe. Kanisá ebele ya bato oyo balingaki kobomama te soki bato nyonso bazalaki kolanda liteya yango!
Tótala ndenge Yesu akendaki tii na mosisa ya likambo mosusu oyo epesaka mpasi mingi. Alobaki na bato boye: “Boyokaki ete elobamaki, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye. Nzokande, soki liso na yo wana ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.” (Matai 5:27-29) Yesu ateyaki ete ekobo ebandaka te ntango moto asangisi nzoto. Ebandaka liboso mpenza, elingi koloba na bamposa ya mabe. Soki moto aboyi kokanisakanisa makambo ya mabe mpe ‘apikoli yango’ na motó na ye, akomibatela mpo akwea na ekobo te.
“Zongisá mopanga na yo na esika na yango”
Na butu oyo bakabaki Yesu, moyekoli na ye moko abimisaki mopanga mpo na kobatela ye. Yesu alobaki na ye boye: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Mokolo oyo elandaki, Yesu alobaki na Ponsi Pilata ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama te epai ya Bayuda. Kasi nde, bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Liteya yango ebongi mpenza?
Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela liteya ya Yesu ya koboya kobunda? Buku moko (The Early Christian Attitude to War) elobi boye: “Lokola [mateya ya Yesu] epekisaki kobunda to kobɛta, yango ezalaki komonisa polele ete kosimba mandoki ezali mabe . . . Baklisto ya liboso bazalaki mpenza kolanda mateya ya Yesu, mpe bakangaki ntina ete alobaki na bango bázala na boboto mpe báboya matata. Bazalaki komona ete losambo na bango ezali ya bato ya kimya; bazalaki koboya mpenza bitumba mpamba te ezalaki kotangisa makila.” Kanisá ndenge mokili elingaki kozala soki bato nyonso oyo bamibengaka baklisto bazalaki mpenza kolanda mateya yango!
Okoki kozwa matomba na mateya nyonso ya Yesu
Mateya ya Yesu oyo tolobeli na lisolo oyo ezali malamu mingi, ezali mindɔndɔ te, mpe ezali mpenza kosimba motema. Bato bakoki kozwa matomba soki bayekoli mateya ya Yesu mpe bazali kosalela yango.a
Batatoli ya Yehova bakosepela mingi kosalisa yo oyeba ndenge oyo okoki kozwa litomba na mateya eleki mosusu nyonso oyo bato bateyá. Tozali kolendisa yo okutana na bango to otinda mokanda na adrɛsi oyo ebongi kati na oyo ezali na lokasa 2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mateya nyonso ya Yesu elobelami na buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
“Tata na bino ya likoló aleisaka bango”
[Elilingi na lokasa 7]
Mateya ya Yesu ekoki kobongisa bomoi na yo