Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/3 nk. 3-4
  • Yesu ayebani na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu ayebani na mokili mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Yesu Klisto Azali nani?
    Yesu Klisto azali nani?
  • Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yesu oyo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Makambo oyo bato balobaka mpo na Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/3 nk. 3-4

Yesu ayebani na mokili mobimba

EDGAR GOODSPEED, mobongoli moko ya Biblia, alobaki boye: “Maloba nyonso oyo Yesu alobaki, ezala liboso ya bayekoli na ye to liboso ya ebele ya bato, ndenge ekomami na Baevanzile, akokaki koloba yango na ngonga mibale. Kasi, maloba moke wana esimbaka mpenza motema; yango wana, tokoki koloba ete ezali na moto mosusu te oyo ateyá makambo eyebani na mokili mobimba lokola oyo ya ye.”

Ntango Yesu Klisto asukisaki mosala na ye awa na mabelé na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), atikaki bayekoli soki 120, mibali mpe basi. (Misala 1:15) Lelo oyo, bato koleka miliare mibale bamibengaka baklisto. Bamilio ya bato mosusu bandimaka ete Yesu azalaki mosakoli. Mateya na ye eyebani mpenza na mokili mobimba.

Ata bato minene oyo bazali baklisto te bandimaka ete Yesu ayebani na mokili mobimba. Na ndakisa, Hyman Enelow, labi moko ya Lingomba ya Bayuda, akomaki boye: “Yesu ayebani mingi, bato bayekolaka makambo na ye mingi, mpe bato mingi balandaka mateya na ye koleka moto mosusu nyonso na mokili.” Enelow abakisaki boye: “Moto moko te akoki koyeba oyo mateya ya Yesu esali epai ya bato ya mokili mobimba, bolingo oyo aloná na mitema ya bato, libɔndisi oyo apesá bato, bolamu nyonso oyo asalá, elikya mpe esengo oyo epesá bato; asalá makambo nyonso wana koleka moto mosusu nyonso na mokili. Na bato nyonso ya minene mpe ya malamu oyo baleká na mokili, ezali na moko te oyo bato ya mokili mobimba basepelaka na ye lokola Yesu to azali na lokumu lokola ye. Bato balingaka Yesu koleka moto mosusu nyonso.” Mohandas Gandhi, mokonzi moko ya Lingomba ya Hindu, alobaki boye: “Nayebi moto mosusu te oyo asalá makambo mingi mpo na bato koleka Yesu. Kutu, mateya ya boklisto ezali mabe ata moke te.” Kasi, abakisaki boye: “Bino baklisto nde bozali mabe. Bosalelaka te makambo oyo boteyaka.”

Makambo mingi ezali komonisa ete mangomba ya boklisto elandaka mateya ya Yesu te. Cecil John Cadoux, mokomi ya masolo ya boklisto, alobaki ete “misala ya mbindo oyo ebandaki kokɔta mokemoke na Lingomba ezalaki kobenda likebi ya bakonzi ya mangomba banda na . . . mobu 140 T.B.” Alobaki boye: “Baklisto batikaki etamboli ya malamu oyo bazalaki na yango na ebandeli mpe mokemoke bakómaki kolanda banzela ya mokili.”

Likambo yango emonanaki mingi na ekeke ya minei, ntango Amperɛrɛ Constantin akómaki moklisto. Cadoux akomaki boye: “Bakomi ya masolo ya kala bamonaki ndenge oyo boklisto ekómaki kotika makambo na yango mingi mpo na kondimana oyo esalaki na Constantin; kutu, bakomi mosusu bazalaki komonisa ete likambo yango ezalaki koyokisa bango mawa.” Kobanda wana mpe na bankama ya bambula oyo elandaki, baklisto ya nkombo mpamba basalaka makambo mingi ya mabe oyo eyokisaka nkombo ya Klisto nsɔni.

Na bongo, mituna oyo tokoki komituna yango oyo: Yesu ateyaki mpenza makambo nini? Mateya na ye esengeli kotinda biso tósala makambo nini?

[Elilingi na lokasa 3]

“Nayebi moto mosusu te oyo asalá makambo mingi mpo na bato koleka Yesu.”​—Mohandas Gandhi

[Elilingi na lokasa 3]

“Ezali na moto mosusu te oyo ateyá makambo eyebani na mokili mobimba lokola oyo ya ye.”​—Edgar Goodspeed

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Culver Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto