Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/5 nk. 25-30
  • ‘Omipekisaka na ntango basaleli yo mabe’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Omipekisaka na ntango basaleli yo mabe’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azalaki na lofundo kasi azalaki moto abungá nzela
  • Yesu azalaki na elimo ya boboto kasi azalaki mpe na mpiko
  • Komipekisa na kati ya libota
  • Toli mpo na baklisto nyonso
  • Bato oyo basalaka mabe bakoki nde kobongwana?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Monyokoli amoni kongɛnga ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Lisangá “ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Yesu aponi Saulo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/5 nk. 25-30

‘Omipekisaka na ntango basaleli yo mabe’

“Moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso, . . . amipekisaka na ntango basaleli ye mabe.”​—2 TIMOTE 2:24.

1. Mpo na nini ntango mosusu na mosala ya kosakola tokutanaka na bato oyo balobaka na biso mabe?

OSALAKA nini soki okutani na bato oyo bazali kosepela na yo te to na nkombo oyo ozali komema? Ntango Paulo alobelaki makambo oyo ekosalema na mikolo ya nsuka, alobaki ete “bato bakozala . . . batuki” mpe bato oyo “bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala.” (2 Timote 3:1-5, 12) Okoki kokutana na bato ya ndenge wana na mosala ya kosakola to ntango ozali kosala makambo mosusu.

2. Mikapo nini ekoki kosalisa biso tómonisa bwanya ntango balobi na biso maloba ya mabe?

2 Elingi koloba te ete moto nyonso oyo azalaka na maloba ya mabe, asepelaka na makambo ya malamu te. Mpasi to mitungisi soki eleki ndelo ekoki kotinda moto aloba mabe epai ya moto nyonso oyo azali pene na ye. (Mosakoli 7:7) Bato mosusu basalaka bongo mpo bafandaka to basalaka esika oyo bato mingi bazalaka na maloba ya mabe. Yango elingi koloba te ete biso baklisto tosengeli komekola maloba yango, kasi ezali kosalisa biso tóyeba mpo na nini bato mosusu bazalaka na yango. Tosengeli kosala nini soki balobi na biso maloba ya mabe? Masese 19:11 elobi ete: “Bososoli ya moto ya mayele ekozikisa nkanda na ye.” Lisusu, Baloma 12:17, 18 epesi biso toli oyo: “Bózongisa mabe na mabe na moto te. . . . Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”

3. Ndenge nini tomonisaka ete tosakolaka nsango ya kimya?

3 Soki tolukaka mpenza kimya, tokomonisa yango na ezaleli na biso. Ekomonana na makambo oyo tozali koloba mpe kosala; ekoki mpe komonana na elongi na biso mpe na mongongo na biso. (Masese 17:27) Ntango Yesu atindaki bantoma na ye bákende kosakola, apesaki bango toli oyo: “Ntango bokokɔta na ndako, bópesa bato ya ndako mbote; mpe soki ndako yango ezali oyo ebongi, tiká kimya oyo botombeli yango ezala likoló na yango; kasi soki ezali oyo ebongi te, kimya na bino ezonga epai na bino.” (Matai 10:12, 13) Maloba oyo tomemelaka bato ezali nsango malamu. Biblia ebengi yango “nsango malamu ya kimya,” “nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe,” mpe “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Baefese 6:15; Misala 20:24; Matai 24:14) Mokano na biso ezalaka te ya kotyola bindimeli ya moto oyo tozali kosolola na ye to kotyana na ye ntembe, kasi nde ya koyebisa ye nsango malamu ya Liloba ya Nzambe.

4. Okoki koloba nini soki moto alobi na yo mbala moko ete “Nazali na mposa ya koyoka yo te”?

4 Tokoki kokutana na moto moko oyo alobi na biso mbala moko ete, “Nazali na mposa ya koyoka yo te.” Na ntango wana, tokoki koloba boye: “Nalingaki kaka kotángela yo mwa vɛrsɛ moko na Biblia.” Ntango mosusu akoboya te. To tokoki koloba boye: “Nalingaki kaka komonisa yo ete Biblia elaki ete ekozala na ntango moko oyo kozanga bosembo ekozala lisusu te mpe bato nyonso bakolingana.” Soki moto yango alobi eloko moko te, tokoki kobakisa boye: “Kasi, namoni ete ozali na ntango ya koyoka ngai te sikoyo.” Soki moto yango azongiseli biso maloba na nkanda, tokokanisa mbala moko ete ‘abongi te’? Ata soki balobi na biso nini, tóbosana te toli ya Biblia ya ‘kozala na boboto epai ya bato nyonso, . . . komipekisa na ntango basaleli biso mabe.’​—2 Timote 2:24.

Azalaki na lofundo kasi azalaki moto abungá nzela

5, 6. Makambo nini Saulo asalaki bayekoli ya Yesu, mpe mpo na nini azalaki kosala bongo?

5 Na ekeke ya liboso, mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Saulo ayebanaki lokola moto ya maloba mabe mpe ya makambo makasi. Biblia elobi ete azalaki “kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo.” (Misala 9:1, 2) Na nsima, ye moko alobaki ete azalaki “motuki mpe monyokoli mpe moto ya lofundo.” (1 Timote 1:13) Atako ekoki kozala ete bandeko na ye mosusu bakómaki baklisto, amonisaki ndenge azalaki konyokola bayekoli ya Klisto na maloba oyo: “Lokola nazalaki na nkanda na bango makasi mpenza, nakendaki mosika mpenza tii na konyokola bango ata na bingumba ya libándá.” (Misala 23:16; 26:11; Baloma 16:7, 11) Ezali ata na vɛrsɛ moko te oyo emonisi ete bayekoli balukaki koswanisa Saulo ntango azalaki konyokola bango ndenge wana.

6 Mpo na nini Saulo azalaki kosala bongo? Bambula mingi na nsima, akomaki boye: “Nazangaki boyebi mpe nazalaki kosala na kozanga kondima.” (1 Timote 1:13) Azalaki Mofalisai, ateyamaki “engebene bokasi ya Mibeko ya bankɔkɔ.” (Misala 22:3) Atako emonani ete Gamaliele, molakisi ya Saulo, azalaki moto ya makambo makasimakasi te, Kaifa nganga-nzambe monene oyo Saulo akómaki kosala mpo na ye, azalaki na molende ya mabe mpenza. Kaifa nde azalaki mokambi ya bato oyo basalaki mwango mpo na koboma Yesu Klisto. (Matai 26:3, 4, 63-66; Misala 5:34-39) Na nsima, abɛtisaki bantoma ya Yesu fimbo, mpe apekisaki bango kosakola na nkombo ya Yesu. Kaifa nde akambaki likita ya Sanedrina ntango basambisaki Setefano mpe na nsima bamemaki ye libándá mpe babomaki ye na mabanga. (Misala 5:27, 28, 40; 7:1-60) Saulo azalaki kotala ndenge bazalaki koboma Setefano na mabanga, mpe na nsima Kaifa apesaki ye nzela ya kokende na Damasi mpo na kokanga bayekoli nyonso ya Yesu mpe koboma bango. (Misala 8:1; 9:1, 2) Lokola Saulo azalaki kosala mpo na Kaifa, akanisaki ete makambo oyo azalaki kosala ezalaki komonisa mpenza ete azali na molende mpo na Nzambe, nzokande azangaki kondima ya solosolo. (Misala 22:3-5) Yango esalaki ete Saulo ayeba te ete Yesu azali mpenza Masiya. Kasi, ayaki komona mabe na ye ntango Yesu oyo asekwaki alobaki na ye ntango azalaki kokende na Damasi.​—Misala 9:3-6.

7. Nini ekómelaki Saulo nsima ya likambo oyo akutanaki na yango na nzela ya Damasi?

7 Mwa moke na nsima, moyekoli Ananiasi atindamaki mpo na kopesa Saulo litatoli. Soki ezalaki yo, olingaki kosala yango? Ananiasi azalaki kobanga, kasi alobaki na Saulo na boboto nyonso. Likambo ya kokamwa oyo Saulo akutanaki na yango na nzela ya Damasi ebongolaki ye. (Misala 9:10-22) Na nsima, bakómaki kobenga ye ntoma Paulo, akómaki misionɛrɛ moko ya molende.

Yesu azalaki na elimo ya boboto kasi azalaki mpe na mpiko

8. Ndenge nini Yesu amonisaki ezaleli ya Tata na ye epai ya bato mabe?

8 Yesu azalaki kosakola Bokonzi na molende, azalaki na elimo ya boboto, kasi azalaki na mpiko liboso ya bato. (Matai 11:29) Azalaki komonisa elimo ya Tata na ye ya likoló, oyo akebisaka bato mabe ete bátika banzela na bango. (Yisaya 55:6, 7) Ntango Yesu azalaki komona mbongwana oyo bato ya masumu bazalaki kosala, azalaki kolendisa bango bákende liboso. (Luka 7:37-50; 19:2-10) Na esika ya kotalela basusu kaka ndenge bazali komonana na miso, Yesu amekolaki motema malamu, ezaleli ya kokanga motema, mpe motema molai ya Tata na ye mpo azalaki koluka komema bango na kobongola motema. (Baloma 2:4) Mokano ya Yehova ezali ete bato ya ndenge nyonso bábongola motema mpe bábika.​—1 Timote 2:3, 4.

9. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu akokisaki maloba ya Yisaya 42:1-4?

9 Mokomi ya Evanzile ya Matai amonisaki ndenge oyo Yehova azalaki kotalela Yesu Klisto ntango azongelaki maloba ya esakweli oyo: “Talá! Mosaleli na ngai oyo naponi, molingami na ngai, oyo molimo na ngai endimi! Nakotya elimo na ngai likoló na ye, mpe akomonisa polele epai ya bikólo soki bosembo ezali nini. Akoswana te, mpe akoganga makasi te, mpe moto moko te akoyoka mongongo na ye na kati ya babalabala ya minene. Nkɛkɛlɛ oyo efinamá akobuka yango te, mpe nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke akoboma yango te, tii akobimisa bosembo na elonga. Ya solo, na nkombo na ye bikólo bakolikya.” (Matai 12:17-21; Yisaya 42:1-4) Yesu akokisaki mpenza maloba wana ya esakweli, azalaki kotombola mongongo te mpo na koswana. Ata ntango bazalaki kolukela ye mindɔndɔ, Yesu azalaki koteya solo na ndenge oyo ezalaki kosepelisa bato ya mitema sembo.​—Yoane 7:32, 40, 45, 46.

10, 11. (a) Atako Bafalisai bazalaki mpenza banguna ya Yesu, mpo na nini apesaki litatoli epai ya bamosusu kati na bango? (b) Na bantango mosusu ndenge nini Yesu azalaki koyanola banguna na ye, kasi likambo nini asalaki te?

10 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, asololaki na Bafalisai ebele. Atako bamosusu bazalaki koluka kozwa ye na maloba na ye, Yesu amonaki te ete bango nyonso bazalaki na makanisi ya mabe. Simona, Mofalisai moko oyo azalaki mpe kokanisa mabe mpo na Yesu, alukaki koyoka ye mpe abengisaki Yesu akende kolya na ndako na ye. Yesu andimaki mpe asakolaki epai ya bato nyonso oyo bazalaki wana. (Luka 7:36-50) Na libaku mosusu, Nikodeme, Mofalisai oyo ayebanaki mingi, akendaki kokutana na Yesu na butu. Yesu apamelaki ye te mpo ayaki epai na ye na ndenge ya kobombana. Nzokande, apesaki Nikodeme litatoli mpo na bolingo oyo Nzambe amonisaki na ndenge atindaki Mwana na ye mpo na kofungola nzela ya lobiko epai ya bato oyo bakomonisa kondima. Yesu amonisaki ye mpe ntina ya kotosa bibongiseli ya Nzambe. (Yoane 3:1-21) Na nsima, ntango Bafalisai mosusu balukaki koloba mabe mpo na Yesu, Nikodeme alobaki malamu mpo na ye.​—Yoane 7:46-51.

11 Yesu ayebaki malamu lokuta ya bato oyo bazalaki koluka kozwa ye na motambo. Azalaki kolinga te kotyana ntembe ya mpambampamba na banguna. Kasi soki amoni malamu, azalaki kosuka kaka na koyebisa etinda moko, kopesa ndakisa moko, to kozongela maloba ya Biblia. (Matai 12:38-42; 15:1-9; 16:1-4) Na bantango mosusu, Yesu azalaki kopesa eyano te soki amoni ete yango ekobimisa litomba moko te.​—Malako 15:2-5; Luka 22:67-70.

12. Ata ntango bato mosusu bazalaki kogangela ye, ndenge nini Yesu azalaki kosalisa bango?

12 Na bantango mosusu, bato oyo bazalaki na bilimo mabe bazalaki kogangela Yesu. Na ntango wana Yesu azalaki komipekisa, azalaki kutu kobikisa bango na nguya ya Nzambe. (Malako 1:23-28; 5:2-8, 15) Ntango tozali na mosala ya kosakola, soki bato mosusu basilikeli biso to bagangeli biso, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu; tosengeli komipekisa mpe kosala makasi mpo na koloba na boboto mpe na mayele.​—Bakolose 4:6.

Komipekisa na kati ya libota

13. Mpo na nini bato mosusu bapekisaka ndeko na bango oyo abandi koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova?

13 Mbala mingi ezalaka mpenza na ntina ete bayekoli ya Yesu bámonisa komipekisa na kati ya libota. Moto oyo asepeli na mateya ya solo, alingaka mpe ete bandeko na ye básepela na yango. Kasi, ndenge Yesu alobaki yango, bato ya libota bakoki koyina moto yango. (Matai 10:32-37; Yoane 15:20, 21) Ezali na makambo mingi oyo ekoki kotinda bango básala bongo. Na ndakisa, atako mateya ya Biblia ekoki kosalisa biso tózala bato ya bosembo, tókimaka mikumba na biso te, mpe tópesaka bato limemya, Biblia eteyaka biso mpe ete ata na likambo nini, tosengeli libosoliboso kokokisa mokumba na biso epai ya Mozalisi. (Mosakoli 12:1, 13; Misala 5:29) Ndeko moko ya libota akoki kosilika ntango azali komona lokola nde tozali kokitisa lokumu na ye mpo tozali sembo epai ya Yehova. Na makambo ya ndenge wana ezali na ntina mingi tólanda ndakisa ya komipekisa ya Yesu.​—1 Petelo 2:21-23; 3:1, 2.

14-16. Nini ebongolaki makanisi ya bato mosusu oyo bazalaki kopekisa bandeko na bango báyekola na Batatoli ya Yehova?

14 Bato mingi oyo bazali kosalela Yehova lelo oyo, ntango babandaki koyekola Biblia, balongani na bango to bandeko mosusu na libota na bango bazalaki kosepela te na ndenge bakómaki kolanda losambo mosusu. Ekoki kozala ete bato yango bayoká makambo ya mabe mpo na Batatoli ya Yehova mpe bazalaki kokanisa ete yango ekotya mobulu na libota na bango. Nini ebongolaki bango makanisi? Mbala mingi ezali etamboli malamu ya moto oyo azalaki koyekola Biblia. Lokola akómaki kolanda toli ya Biblia, azalaki koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe kobima na mosala ya kosakola, kokokisa mikumba na ye na libota mpe komipekisa soki balobeli ye mabe, yango elɛmbisaki nkanda ya bandeko na ye oyo bazalaki kotɛmɛla ye.​—1 Petelo 2:12.

15 Bato mosusu mpe bazalaki koboya koyoka ndimbola nyonso ya Biblia oyo bakokaki kopesa bango mpo bazalaki kokanisela Batatoli mabe to mpo na lolendo. Yango ezalaki bongo mpo na mobali moko na États-Unis oyo azalaki koloba ete alingaka ekólo na ye mingi. Mokolo moko, ntango mwasi na ye azalaki na liyangani, azwaki bilamba na ye nyonso mpe akendaki. Mokolo mosusu, abimaki na ndako na mondoki mpe alobaki ete akomiboma. Alobaki ete soki azali kosala mabe wana ezali foti ya lingomba ya mwasi na ye. Kasi, ndeko mwasi azalaki kosala nyonso mpo na kolanda toli ya Biblia. Mbula ntuku mibale na nsima, mobali na ye mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Na ekólo Albanie, mwasi moko asilikaki makasi mpo mwana na ye ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova mpe azwaki batisimo. Mama yango azalaki kopasola Babiblia ya mwana na ye; apasolaki Babiblia 12. Kasi, mokolo moko afungolaki Biblia ya sika oyo mwana na ye atikaki likoló ya mesa mpe akweaki na mokapo ya Matai 10:36; amonaki ete azalaki kosala makambo oyo balobi na vɛrsɛ yango. Kasi, lokola azalaki na mposa mwana na ye azala malamu, akendaki kotika ye ntango akendaki kozwa masuwa mpo na kokende na liyangani moko na Italie elongo na Batatoli mosusu. Ntango mama yango amonaki bolingo oyo Batatoli bazali na yango, ndenge bazalaki koyambana mpe kosɛka na esengo, makanisi na ye ekómaki kobongwana. Mwa moke na nsima, andimaki koyekola Biblia. Lelo oyo asalaka milende mpo na kosalisa bato mosusu oyo basepelaka na Batatoli te.

16 Mokolo mosusu, mobali moko asimbaki mbɛli na mabɔkɔ mpe atɛlɛmaki na nzela mpo na kopekisa mwasi na ye akɔta na Ndako ya Bokonzi mpe abandaki koloba ete azali mwasi mabe. Mwasi alobaki na ye na boboto nyonso ete: “Yo moko kɔtá na Ndako ya Bokonzi mpo omona.” Mobali yango akɔtaki mpe lelo oyo, azali nkulutu.

17. Soki matata ebimi na libota moko ya baklisto, toli nini ya Biblia ekoki kosalisa bango?

17 Ata soki libota mobimba bozali Batatoli ya Yehova, ekoki kokóma na bantango mosusu ete bólobana mabe mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Kutu, bapesaki baklisto ya Efese ya kala toli oyo: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino elongo na mabe nyonso.” (Baefese 4:31) Makambo ya mabe oyo baklisto ya Efese bazalaki komona, bomoto na bango ya kozanga kokoka mpe ntango mosusu bizaleli na bango ya kala ezalaki kobebisa bango. Nini ekokaki kosalisa bango bábongwana? Basengelaki “kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na [bango].” (Baefese 4:23) Koyekola Liloba ya Nzambe, kokanisa ndenge basengeli kosalela toli na yango, kokóma baninga ya baklisto mosusu mpe kobondela makasi esalaki ete bámonisa lisusu mingi mbuma ya elimo na bomoi na bango. Basengelaki koyekola ‘kozala na boboto na kati na bango, koyokelana mawa mingi, kolimbisana na motema moko ndenge Nzambe mpe na nzela ya Klisto alimbisaki bango na motema moko.’ (Baefese 4:32) Ata soki bato mosusu basali biso nini, tosengeli komipekisa, kozala na boboto, komonisa motema mawa, mpe kolimbisa. Tosengeli ‘kozongisa mabe na mabe na moto te.’ (Baloma 12:17, 18) Komekola ntango nyonso bolingo ya Nzambe ezali likambo ya malamu oyo tosengeli kosala.​—1 Yoane 4:8.

Toli mpo na baklisto nyonso

18. Mpo na nini toli ya 2 Timote 2:24, ebongaki na nkulutu moko ya Efese ya kala, mpe ndenge nini ekoki kosalisa baklisto nyonso?

18 Baklisto nyonso basengeli kolanda toli ya ‘komipekisa na ntango basaleli bango mabe.’ (2 Timote 2:24) Toli yango epesamaki libosoliboso epai ya Timote, oyo azalaki nkulutu na Efese. Baklisto mosusu ya lisangá yango bazalaki koluka kondimisa bato mosusu makanisi na bango mpe koteya mateya ya lokuta. Lokola bakangaki mpenza te ntina oyo Nzambe apesaki Mibeko ya Moize, bayebaki mpe te ntina ya kozala na kondima, na bolingo, mpe na lisosoli ya malamu. Lolendo ezalaki kotinda bango báwelana likoló ya maloba, mpe bazalaki kobosana mateya ya Klisto mpe ntina ya kokangama na Nzambe. Mpo Timote asilisa mokakatano yango, asengelaki kokangama na mateya ya Biblia mpe kozala na boboto epai ya bandeko. Ayebaki likambo moko oyo bankulutu ya lelo mpe bayebi, ete etonga ezalaki ya ye te mpe asengelaki koyeba ndenge nini kofanda na baklisto mosusu mpo na kolendisa bolingo mpe bomoko.​—Baefese 4:1-3; 1 Timote 1:3-11; 5:1, 2; 6:3-5.

19. Mpo na nini baklisto nyonso basengeli ‘koluka bopɔlɔ’?

19 Nzambe alendisaka basaleli na ye ete ‘báluka bopɔlɔ.’ (Sefania 2:3) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “bopɔlɔ” emonisaka elimo moko oyo esalaka ete moto ayika mpiko ntango bazali kofinga ye, asilika te mpe azongisa mabe na mabe te. Tiká tóbondela Yehova na etingya mpo asalisa biso tókolisa ezaleli ya komipekisa mpe tómonisa mpenza ete tozali komema nkombo na ye, ata soki tokutani na mikakatano.

Oyekoli makambo nini?

• Ntango balobeli yo mabe, bavɛrsɛ nini ya Biblia ekoki kosalisa yo?

• Mpo na nini Saulo azalaki na lofundo?

• Ndenge nini ndakisa ya Yesu ezali kosalisa biso tóyeba ndenge ya kozala na bato ya ndenge nyonso?

• Matomba nini tokoki kozwa soki na kati ya libota tomonisi komipekisa na maloba na biso?

[Elilingi na lokasa 26]

Atako Saulo ayebanaki lokola moto mabe, Ananiasi amoniselaki ye boboto

[Elilingi na lokasa 29]

Soki moklisto azali kokokisa mikumba na ye, yango ekoki kobongola makanisi ya bato ya libota na ye oyo bazali kotɛmɛla ye

[Elilingi na lokasa 30]

Baklisto balendisaka bolingo mpe bomoko

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto