Liloba ya Yehova ezali kokola na “Mokili ya mpongo”
“MOKILI ya mpongo.” Bato ya Albanie babengaka mboka na bango ndenge wana na monɔkɔ na bango. Mboka yango oyo ezali na bokula ya Mbu Adriatique, ezali moko ya mikili ya Balkans, ezali na kati ya Grèce mpe ex-Yougoslavie. Atako bato ya mayele bazalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na esika oyo bato ya Albanie bautá mpe esika oyo monɔkɔ na bango eutá, mingi balobaka ete bato ya Albanie bazali bankɔkɔ ya bato ya Illyrie ya kala; buku moko (The Encyclopædia Britannica) emonisi ete bato yango bazalaká na bomoi na bambula ya 2000 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
Albanie ezali mokili kitoko ya bangomba ya nsɔngɛnsɔngɛ na nɔrdi, mpe na sudi ezali na mabɔngɔ milai ya zɛlo ya mpɛmbɛ pembenipembeni ya Mbu Adriatique. Kasi, kitoko na yango ya libosoliboso ezali nde bato. Bato ya Albanie bazalaka bato ya esengo, bayambi bapaya, bayebi kosolola, balukaka koyekola makambo mpe bamonisaka makanisi na bango na esengo nyonso.
Misionɛrɛ moko akei na mboka yango
Na ntembe te bizaleli malamu ya bato mpe kitoko ya mboka yango ebendaki likebi ya moto moko oyo asalaki mobembo kuna esili koleka bankama ya bambula. Na mobu soki 56 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo, moto oyo asalaki mibembo mingi, akomaki boye: “Tii na Ililikomi nasili kosakola malamumalamu mpenza nsango malamu oyo etali Klisto.” (Baloma 15:19) Lelo oyo, ntei mpe nɔrdi ya Albanie ezali esika oyo ezalaká kala sudi ya Ililikomi. Paulo akomaki mokanda na ye na Kolinti, na ekólo Grèce, mboka oyo ezalaki na sudi ya Ililikomi. Lokola alobaki ete asakolaki malamumalamu mpenza “tii na Ililikomi” emonisi ete akómaki tii na ndelo ya mboka yango to akɔtaki mpenza na kati. Ata soki ezalaki bongo to te, asakolaki na oyo ezali lelo sudi ya Albanie. Na yango, tokoki koloba ete moto ya liboso oyo asakolaki na Albanie ezalaki Paulo.
Bankama ya bambula elekaki. Bikonzi ndenge na ndenge ebimaki mpe ekweaki. Bikólo ndenge na ndenge ya makasi eyangelaki Albanie, tii ntango mwa mboka wana ya Mpoto ezwaki lipanda na 1912. Nsima ya bambula soki zomi, nsango ya Bokonzi ya Yehova eteyamaki lisusu na Albanie.
Ebandeli ya esengo
Na bambula ya 1920, bato mosusu ya Albanie oyo bakendaki kofanda na États-Unis, oyo bakómaki koyangana ná Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana, bazongaki na Albanie mpo na koyebisa bato mosusu makambo oyo bayekolaki. Moko na bango nkombo na ye ezalaki Nasho Idrizi. Bato mosusu bandimaki nsango yango. Na 1924, biro ya Roumanie ezwaki mokumba ya kokamba mosala ya kosakola na Albanie, mpo na kokokisa mposa ya bato nyonso oyo bazalaki kondima koyoka nsango yango.
Thanas Duli (Athan Doulis) azalaki moko ya bato oyo bayekolaki mateya ya Yehova na Albanie na bambula wana. Alobi boye: “Na 1925 masangá ezalaki misato na Albanie, mpe mwa Bayekoli mosusu ya Biblia mpe bato oyo bazalaki kosepela na nsango ya solo bazalaki kofanda na bisika ndenge na ndenge. Bolingo oyo bazalaki na yango kati na bango ekesenisaki bango mpenza . . . na bato mosusu!”a
Lokola banzela ya malamu ezalaki te, ezalaki mpasi mingi kosala mibembo. Kasi, mokakatano yango elɛmbisaki te basakoli ya molende. Na ndakisa, na sudi ya Albanie, na Vlorë, Areti Pina azwaki batisimo na 1928, ntango azalaki na mbula 18. Azalaki komata mpe kokita bangomba milai ná Biblia na ye na mabɔkɔ mpo na kosakola. Azalaki na lisangá moko oyo ezalaki na basakoli ya molende na Vlorë na ebandeli ya bambula ya 1930.
Na 1930, biro ya Batatoli ya Yehova na Athènes, na ekólo Grèce, nde ezalaki kotambwisa mosala ya kosakola na Albanie. Na 1932, mokɛngɛli moko ya zongazonga autaki na Grèce mpe akendaki na Albanie mpo na kolendisa bandeko. Bandeko mingi oyo bayekolaki Biblia na ntango wana bazalaki na elikya ya kokende na likoló. Lokola bayebanaki lokola bato ya pɛto mpe ya sembo bipai nyonso bato bazalaki komemya bango. Mosala ya bandeko wana ya sembo ebotaki mbuma mingi. Na Albanie, basakoli bakabolaki mikanda 6 500 na 1935 mpe na 1936.
Mokolo moko, na Vlorë, Nasho Idrizi abɛtaki diske ya fono oyo ezalaki na lisukulu ya Ndeko Joseph Rutherford. Bato bakangaki bamagazini na bango mpo na koya koyoka lisukulu yango oyo Ndeko Idrizi azalaki kobongola na monɔkɔ ya Albanais. Milende ya bateyi wana ya mpiko epambolamaki. Na 1940, Batatoli bazalaki 50 na Albanie.
Ekólo oyo endimaka Nzambe te
Na 1939, Bafasiste bakɔtaki na Albanie. Bapekisaki Lingomba ya Batatoli ya Yehova mpe mosala na bango ya kosakola. Mosika te, basoda ya Allemagne bakɔtaki na mboka yango. Na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Enver Hoxhaun, mokonzi moko ya basoda oyo bato bazalaki kolinga mingi abimaki. Parti na ye oyo ezalaki kolendisa politiki ya Bakoministe elongaki na voti oyo esalemaki na 1946, mpe akómaki ministre-mokonzi. Bambula oyo elandaki ebengamaki bambula ya bonsomi, kasi yango ezalaki bongo te mpo na basaleli ya Yehova.
Guvɛrnɛma ezalaki lisusu kondima mangomba te. Lokola bazali bato ya mokili te, Batatoli ya Yehova na Albanie baboyaki kosimba mandoki mpe kokɔta na makambo ya politiki. (Yisaya 2:2-4; Yoane 15:17-19) Bakangaki Batatoli mingi, bazalaki kopesa bango biloko ya kolya te, to biloko mosusu ya ntina. Mbala mingi, bandeko basi oyo bazalaki na bolɔkɔ te bazalaki kosukolela bango bilamba mpe kolambela bango.
Bazalaki na mpiko atako minyoko
Na ebandeli ya bambula ya 1940, na mboka moko pene na Përmet, elenge mwasi moko nkombo na ye Frosina Xheka, ayokaki makambo oyo Nasho Dori,b Motatoli moko oyo azalaki kosala basapato, azalaki koteya bayaya na ye ya mibali. Bakonzi bazalaki kopekisa Batatoli ya Yehova, kasi atako baboti na ye batɛmɛlaki ye, kondima ya Frosina ekómaki makasi. “Bazalaki kobomba basapato na ngai mpe kobɛta ngai soki nakei na makita. Balukaki kobalisa ngai na mobali moko oyo azalaki Motatoli te. Ntango naboyaki, babenganaki ngai na ndako. Mokolo yango, nɛjɛ ezalaki kokwea. Nasho Dori asɛngaki ndeko Gole Flloko oyo azalaki kofanda na Gjirokastër asalisa ngai. Nakómaki kofanda ná libota na ye. Bandeko na ngai baumelaki mbula mibale na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Ntango babimaki na bolɔkɔ, nakendaki kofanda ná bango na Vlorë.
“Bapolisi bamekaki kokɔtisa ngai na makasi na makambo ya politiki. Kasi naboyaki. Bakangaki ngai, batyaki ngai na ndako moko boye mpe bazingaki ngai. Moko alobaki na ngai mpo na kobangisa ngai ete: ‘Oyebi oyo tokoki kosala yo?’ Nayebisaki bango ete: ‘Bokoki kosala kaka likambo oyo Yehova atikeli bino nzela.’ Alobaki na ngai ete: ‘Ozali ligboma! Bimá awa!’”
Bandeko nyonso ya Albanie bazalaki na elimo wana ya bosembo. Na 1957 basakoli ya Bokonzi bakómaki 75. Na ebandeli ya bambula ya 1960, biro monene ya Batatoli ya Yehova etindaki John Marks, ndeko moko ya Albanie oyo akendaki kofanda na États-Unis, akende na Tirana mpo na kotambwisa mosala ya kosakola kuna.c Kasi, mosika te, Luçi Xheka, Mihal Sveci, Leonidha Pope, mpe bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba batindamaki na bakaa oyo basalisaka bato misala na makasi.
Elikya ebandi koya
Na bambula nyonso wana tii na 1967, ekólo Albanie ezalaki kosepela na mangomba te. Nsukansuka bapekisaki yango. Sango to moteyi moko te, ezala ya Lingomba ya Katolike, ya Ɔrtɔdɔkse, to ya Mizilma, akokaki koteya na ndako-nzambe. Bakangaki bandako-nzambe mpe bamoské to mpe bakómisaki yango bisika ya kosala ngalasisi, bisika ya kobomba biloko ya kala to mpe bamagazini. Moto moko te asengelaki kozala na Biblia. Moto moko te asengelaki ata komonisa ete andimelaka Nzambe.
Likoki ezalaki te ya kosakola mpe koyangana na makita. Atako bazalaki bango nyonso esika moko te, Motatoli mokomoko asalaki makasi mpo na kosalela Yehova. Kobanda na bambula ya 1960 tii na bambula ya 1980 motángo ya Batatoli ya Yehova ekitaki mpenza. Kasi, bazalaki kaka makasi na elimo.
Na nsuka ya bambula ya 1980, makambo ya politiki ekómaki kobongwana mokemoke na Albanie. Bilei mpe bilamba ezalaki mingi te. Bato bazalaki na esengo te. Mbongwana monene oyo esalemaki na mikili ya Mpoto ya Ɛsti esalemaki mpe na Albanie na ebandeli ya bambula ya 1990. Nsima ya mbula 45 ya boyangeli ya makambo makasimakasi, guvɛrnɛma ya sika epesaki lisusu bato bonsomi ya kosambela.
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova epesaki malako na babiro ya Batatoli ya Yehova na Autriche mpe na Grèce mpo na koluka nokinoki bandeko ya Albanie. Bandeko ya Grèce baoyo bayebaki monɔkɔ ya Albanais bamemaki mikanda ya sika oyo elimbolaka Biblia na engumba Tirana mpe Berat. Bandeko wana oyo kala bazalaki na likoki ya kokutana te basepelaki mingi ntango bakutanaki lisusu nsima ya bambula mingi na Batatoli ya Yehova oyo bautaki na mikili mosusu.
Babongisi-nzela bakei kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola
Na ebandeli ya 1992, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaki na ekólo yango Michael DiGregorio ná mwasi na ye Linda, bamisionɛrɛ oyo baboti na bango bautá na Albanie. Basalisaki bandeko ya sembo oyo bakómaki mibange mpo básangana lisusu na libota ya bandeko ya elimo na mokili mobimba. Babongisi-nzela monene 16 oyo bautaki na Italie bakómaki kuna na Novɛmbɛ elongo na babongisi-nzela minei oyo bautaki na Grèce. Bazwaki ebongiseli mpo na koyekolisa babongisi-nzela yango monɔkɔ ya Albanais.
Bomoi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na babongisi-nzela wana. Kura ezalaki kokatana mingi. Na eleko ya mpiɔ malili ezalaki makasi. Bato bazalaki kotɛlɛma na molɔngɔ bangonga mingi mpo na kosomba bilei mpe biloko mosusu ya ntina. Kasi, mokakatano monene oyo bandeko bazalaki na yango ezalaki ya kozwa bandako ya minene epai ebele ya bato oyo bazalaki kosepela na solo bakokaki koyanganaka!
Babongisi-nzela oyo bazalaki kosala milende mpo na koyekola monɔkɔ ya Albanais bamonaki ete koloba monɔkɔ esalisaka kaka mpo na kosolola na bato. Ndeko moko, moteyi malamu ya Biblia, ayebisaki bango boye: “Ezali kosɛnga te bóyeba monɔkɔ malamumalamu mpo na kosɛka na esengo to koyamba bandeko. Bato ya Albanie bakolinga bino soki bozali kolakisa ete bolingi bango, kasi te mpo bozali koloba monɔkɔ na bango malamu. Bómitungisa te, ata bolobi malamu te, bakoyoka.”
Nsima ya koyekola monɔkɔ ya Albanais, babongisi-nzela babandaki kosakola na Berat, Durres, Gjirokastër, Shkodër, Tirana, mpe na Vlorë. Eumelaki te, masangá efungwamaki na bingumba yango. Areti Pina, ndeko oyo akómaki na mbula koleka 80, azalaki lisusu nzoto kolɔngɔnɔ te, kasi azalaki kaka na Vlorë. Batindaki babongisi-nzela mibale kuna mpo básakolaka elongo na Areti. Bato bazalaki kokamwa ete bapaya bazali koloba monɔkɔ ya Albanais: “Bamisionɛrɛ ya mangomba mosusu basɛngaka biso tóyekola Lingelesi to Italien soki tolingi báteya biso. Bino boyekoli monɔkɔ ya Albanais; emonisi ete bolingi biso mpenza mpe bozali na makambo ya ntina ya koyebisa biso!” Areti atikalaki sembo tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé na Yanuali 1994, azalaki ntango nyonso kosakola tii na sanza ya nsuka ya bomoi na ye. Molende na ye mpe ya babongisi-nzela mosusu epambolamaki. Na 1995, lisangá efungwamaki lisusu na Vlorë. Lelo oyo, masangá misato oyo ezali na basakoli ya molende ezali na engumba yango oyo ezali na libongo.
Na ekólo yango mobimba, bato bazalaki na nzala ya elimo mpe bazalaki koboya mpenza te makambo ya Nzambe. Bazalaki kotánga mikanda nyonso oyo elimbolaka Biblia oyo Batatoli bazalaki kopesa bango. Bilenge mingi babandaki koyekola Biblia mpe bakolaki noki na elimo.
Masangá mpe bituluku koleka 90 ezali kokoba “kokóma makasi na kondima mpe kobakisama motángo mokolo na mokolo” na ekólo yango mobimba. (Misala 16:5) Batatoli 3 513 ya Albanie bazali naino na mosala mingi. Na sanza ya Marsi 2005, bato 10 144 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Basakoli yango bazali koyekola Biblia na bato koleka 6000. Emonani mpenza ete bato ebele bazali kotánga Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebimi sika na monɔkɔ ya Albanais. Ya solo, liloba ya Yehova ezali kokola na “Mokili ya mpongo” mpe yango ezali kopesa Yehova nkembo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya bomoi ya Athana Dulis ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1969 (ebimeli ya Lifalanse).
b Lisolo ya Nasho Dori ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1996.
c Lisolo ya Helen, mwasi ya John Marks, ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2002.
[Etanda na lokasa 20]
BITUMBA ESILI NA KOSOVO!
Na nsuka ya bambula ya 1990, nkombo Kosovo ezalaki koyokana mingi ntango matata ezalaki na teritware yango mpe koyinana makasi oyo ezalaki na kati ya bituluku ndenge na ndenge ebimisaki bitumba mpe mikili mosusu etindaki basoda mpo na kosilisa bitumba yango.
Na ntango ya bitumba yango, Batatoli mingi bakimaki na bikólo ya pembeni. Nsima ya bitumba, ndambo bazongaki na Kosovo, mpe bakobaki mosala. Babongisi-nzela ya Albanie mpe ya Italie basɛngaki bákende na Kosovo mpo na kosalisa bato 2 350 000 ya mboka yango. Masangá minei mpe bituluku motoba oyo esangisi basakoli soki 130, bazali kosalela Yehova na ekólo yango.
Na mobu 2003, liyangani ya mokolo moko esalemaki na Priština mpe bato 252 bayanganaki. Na kati na bango ezalaki na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Albanais, ya Allemand, ya Gitan, ya Italien, mpe ya Serbe. Na nsuka ya lisukulu ya batisimo, molobi atunaki mituna mibale. Bakandida misato batɛlɛmaki mpo na kondima: Ɛɛ; moko azalaki koloba monɔkɔ ya Albanais, mosusu ya Gitan mpe mosusu ya Serbe.
Bayangani babɛtaki mabɔkɔ makasi ntango bayokaki: “Va!” “Da!” mpe “Po!” oyo bakandida misato wana balobaki moto na moto na monɔkɔ ya mboka na ye. Bakandida yango bayambanaki. Bazali lisusu koyinana te ndenge bato ya bikólo ndenge na ndenge ya mboka na bango bayinanaka.
[Karte na lokasa 17]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mbu ya Meditelane
ITALIE
ALBANIE
GRÈCE
[Elilingi na lokasa 18]
Bilenge Batatoli ya Yehova bazali komekola milende ya mikóló
[Elilingi na lokasa 18]
Areti Pina asalaki na bosembo nyonso banda 1928 tii na liwa na ye na 1994
[Elilingi na lokasa 19]
Etuluku ya liboso ya babongisi-nzela oyo bayekolaki monɔkɔ ya Albanais
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa16]
Mpongo: © Brian K. Wheeler/VIREO