Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/10 nk. 12-15
  • Ndenge boklisto epalanganaki epai ya Bayuda na ekeke ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge boklisto epalanganaki epai ya Bayuda na ekeke ya liboso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bayuda na ekeke ya liboso
  • Mibembo ya Paulo mpe Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu
  • Bayuda oyo bafandaki na Ɛsti
  • Lisangá ya Yelusaleme mpe Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu
  • Liteya nini tokoki kozwa?
  • “Batondaki na elimo santu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Boklisto ekɔti na Asie Mineure
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baklisto mpe Mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Batondaki na esengo mpe na elimo santu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/10 nk. 12-15

Ndenge boklisto epalanganaki epai ya Bayuda na ekeke ya liboso

LIKITA moko ya ntina mingi esalemaki na Yelusaleme na mobu soki 49 ya ntango na biso (T.B.). Yoane, Petelo, ná Yakobo, ndeko ya Yesu​—“baoyo bazalaki lokola makonzí” ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso—​bazalaki na likita yango. Bato mosusu mibale oyo batángi bankombo na bango oyo bazalaki mpe wana ezali ntoma Paulo ná moninga na ye Balanabasi. Na likita basengelaki kokabola teritware monene mpo na mosala ya kosakola. Paulo alobaki boye: “Bapesaki ngai ná Balanabasi lobɔkɔ ya mobali ya kosangana elongo, mpo biso tókende epai ya bikólo mosusu, kasi bango epai ya baoyo bakatamá ngenga.”​—Bagalatia 2:1, 9.a

Ebongiseli yango elimboli nini? Elingi nde koloba ete basengelaki kokabola teritware ya kosakola nsango malamu na biteni mibale: mosusu ya Bayuda ná Baprozelite, mpe mosusu ya bato ya bikólo mosusu? To bayokanaki nde kokata ndelo moko na bateritware na bango? Mpo na kozwa eyano, tosengeli koyeba mwa makambo etali Bayuda oyo bazalaki kofanda libándá ya Palestine na ntango wana.

Bayuda na ekeke ya liboso

Bayuda boni bazalaki kofanda na bikólo mosusu na ekeke ya liboso? Bato mingi ya mayele bandimaka likanisi ekomami na buku moko oyo elobi boye: “Ezali mpasi koyeba motángo ya sikisiki, kasi emonani mpenza ete mwa moke liboso ya mobu 70, Bayuda milio mibale ná ndambo bazalaki kofanda na Yudea mpe koleka milio minei na mikili mosusu oyo Loma ezalaki koyangela. . . . Na kati ya bato ya mikili nyonso oyo Loma ezalaki koyangela, ekoki mpenza kozala ete Bayuda bazalaki zomi likoló ya monkama (10%), mpe na bisika oyo balekaki mingi, na bingumba ya bitúká ya ɛsti, bakokaki kozala bato 25 likoló ya monkama (25%) to koleka.”​—Atlas of the Jewish World.

Bitúká oyo Bayuda bazalaki mingi ezalaki na Ɛsti: na Sulia, na Asie Mineure, na Babilone, mpe na Ezipito, mpe mwa bituluku mikemike ezalaki na Mpoto. Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto oyo bankombo na bango eyebani mingi bazalaki bato oyo babotamaki to bakolaki na mikili mosusu; na ndakisa, Balanabasi autaki na Sipele, Pilisika ná Akila bautaki na Ponti mpe na nsima na Loma, Apolo autaki na Alezandria, mpe Paulo autaki na Talasi.​—Misala 4:36; 18:2, 24; 22:3.

Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu bazalaki kosala makambo mingi mpo na ekólo na bango. Moko na yango ezalaki kotinda mpako ya tempelo na Yelusaleme, mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ya tempelo mpe ya losambo oyo ezalaki kosalema kuna. Na likambo yango, John Barclay, moto ya mayele na makambo ya Biblia, alobi boye: “Bilembeteli mingi ezali komonisa ete Bayuda oyo bafandaki na bikólo mosusu bazalaki kobosana ata moke te likambo ya kokɔngɔla mbongo wana, bakisa mpe makabo mosusu oyo bato ya bozwi bazalaki kopesa.”

Likambo mosusu oyo bazalaki kobosana te ezali mibembo na Yelusaleme na bileko ya bafɛti oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. Lisolo oyo ezali na Misala 2:9-11, oyo elobeli Pantekote ya mobu 33 T.B. emonisi yango polele. Bayuda oyo bazalaki na fɛti wana bautaki na Palatia, Mɛdi, Elama, Mezopotamia, Kapadosi, Ponti, Azia, Filigia, Pamofilia, Ezipito, Libya, Loma, Krɛti, mpe Alabia.

Bakambi ya tempelo na Yelusaleme bazalaki kotindela Bayuda oyo bafandaki na bikólo mosusu mikanda. Na ndakisa, eyebani malamu ete Gamaliele, molakisi ya mibeko oyo balobeli na Misala 5:34, atindaki mikanda na Babilone mpe na bamboka mosusu. Ntango ntoma Paulo oyo azalaki mokangami akómaki na Loma na mobu soki 59 T.B., “bato minene na kati ya Bayuda” balobaki na ye ete “tozwi mikanda te uta na Yudea na ntina etali yo, moto moko mpe te na kati ya bandeko oyo bayaki apesi biso nsango to ayebisi biso likambo moko ya mabe mpo na yo.” Yango emonisi ete Bayuda ya Loma bazalaki mbala mingi kozwa mikanda mpe bansango oyo ezalaki kouta na Yudea.​—Misala 28:17, 21.

Biblia oyo Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu bazalaki kosalela mingi ezali libongoli na monɔkɔ ya Grɛki ya Makomami ya Liebele oyo babengaka Septante. Buku moko elobi boye: “Tokoki mpenza koloba ete Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu bazalaki kotánga mpe kondima LXX [Septante] lokola Biblia to ‘Makomami Mosantu’ ya Bayuda oyo bafandi na bikólo mosusu.” Baklisto ya liboso bazalaki mpe kosalela mingi libongoli yango mpo na koteya.

Lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá ya boklisto na Yelusaleme bayebaki makambo nyonso wana malamu. Nsango malamu esilaki kokóma epai ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Damasi mpe na Antiokia, na ekólo Sulia, mpe elekaki tii na bikólo mosusu. (Misala 9:19, 20; 11:19; 15:23, 41; Bagalatia 1:21) Na ntembe te, likita oyo esalemaki na mobu 49 T.B. ezalaki mpo na kobongisa makambo mpo na kokoba mosala na mikolo ezalaki liboso. Tiká tótalela makambo oyo Biblia elobi na ndenge oyo nsango malamu epalanganaki epai ya Bayuda mpe Baprozelite.

Mibembo ya Paulo mpe Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu

Mokumba ya liboso ya ntoma Paulo ezalaki ya “komema nkombo [ya Yesu Klisto] epai ya bikólo mosusu mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisalaele.”b (Misala 9:15) Nsima ya likita ya Yelusaleme, Paulo akobaki kosakola epai ya Bayuda ya bikólo mosusu na bisika nyonso oyo atambolaki. (Talá etanda na lokasa 14.) Yango emonisi ete boyokani oyo basalaki mpo na teritware elimboli ete bakataki ndelo moko boye. Paulo ná Balanabasi basalaki mosala ya misionɛrɛ na wɛsti, mpe bamosusu basakolaki na ekólo ya Bayuda mpe epai ya ebele ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na mikili oyo ezalaki na Ɛsti.

Ntango Paulo ná baninga na ye babandaki mobembo ya mibale na mosala ya misionɛrɛ na Antiokia ya Sulia, bakendaki na ngámbo ya wɛsti, bakatisaki Asie Mineure tii na Toloasi. Kolongwa wana, bakatisaki na Masedonia mpamba te bamonaki ete “Nzambe asili kobengisa [bango] mpo na kosakola nsango malamu epai [ya bato ya Masedonia].” Na nsima, masangá ya boklisto efungwamaki na bingumba ya Mpoto, na ndakisa na Atene mpe na Kolinti.​—Misala 15:40, 41; 16:6-10; 17:1–18:18.

Na mobu soki 56 T.B., na nsuka ya mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ, Paulo akanaki kokende mosika lisusu na wɛsti mpe kokɔta mpenza na teritware oyo bapesaki ye na likita ya Yelusaleme. Akomaki boye: “Nazali na mposa moko makasi ya kosakola nsango malamu mpe epai na bino baoyo bofandi na Loma,” mpe, “nakosimba nzela mpo na kokende na Espagne.” (Baloma 1:15; 15:24, 28) Kasi, ezali boni mpo na ebele ya Bayuda oyo bafandaki na mikili ya Ɛsti?

Bayuda oyo bafandaki na Ɛsti

Na ekeke ya liboso T.B., Bayuda ya bikólo mosusu oyo balekaki mingi bazalaki na Ezipito, mingimingi na Alezandria, engumba-mokonzi. Bankóto na bankóto ya Bayuda bafandaki na mboka wana ya mombongo mpe misala ya ntɔki; basinagoga ezalaki ebele na engumba mobimba. Philon, Moyuda moko ya Alezandria, alobaki ete na ntango wana, na Ezipito mobimba, Bayuda bazalaki soki milio moko. Mingi mpe bafandaki pembeni ya Libya, na engumba Kilene mpe zingazinga na yango.

Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto babotamaki na bamboka wana. Biblia elobeli “Apolosi, mobotami ya Alezandria,” “bato ya Sipele mpe ya Kilene,” mpe “Lisiusi ya Kilene,” oyo bazalaki na lisangá ya Antiokia ya Sulia. (Misala 2:10; 11:19, 20; 13:1; 18:24) Longola makambo wana, Biblia elobi eloko mosusu te mpo na mosala ya baklisto ya ekeke ya liboso na Ezipito mpe bamboka ya pembeni; elobi kaka ete mosakoli Filipo apesaki mokube Moetiopia litatoli.​—Misala 8:26-39.

Mboka mosusu epai Bayuda bazalaki mingi ezali Babilone, tii na bitúká ya Palate, Mɛdi, mpe Elama. Moto moko ya mayele na makambo ya kala alobi ete, “Bayuda bazalaki na etúká mokomoko na lobwaku ya Tigre mpe Efelata, banda na Arménie tii na golfe Persique, bakisa mpe na ngámbo ya nɔrdi tii na mer Caspienne, mpe na ngámbo ya ɛsti tii na Mɛdi.” Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi ete ekoki kozala bazalaki bato 800 000 to koleka. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala na ekeke ya liboso, alobi ete mbula na mbula, bankóto ya Bayuda ya Babilone bazalaki kosala mobembo na Yelusaleme mpo na bafɛti.

Na kati ya bato oyo bazwaki batisimo na Pantekote ya mobu 33 T.B., ezalaki mpe na baoyo bautaki na Babilone? Toyebi te, kasi kati na bato oyo bayokaki ntoma Petelo mokolo yango, bato mosusu bautaki na Mezopotamia. (Misala 2:9) Toyebi ete ntoma Petelo azalaki na Babilone na mobu soki 62 tii 64 T.B. Kutu, akomaki mokanda na ye ya liboso, mpe mbala mosusu ya mibale, ntango azalaki kuna. (1 Petelo 5:13) Emonani ete Babilone, epai ebele ya Bayuda bazalaki kofanda, ezalaki na kati ya teritware oyo bapesaki Petelo, Yoane, ná Yakobo na likita oyo mokanda ya Bagalatia elobeli.

Lisangá ya Yelusaleme mpe Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu

Yakobo, oyo azalaki mpe na likita oyo batalelaki likambo ya bateritware, azalaki mokɛngɛli na lisangá ya Yelusaleme. (Misala 12:12, 17; 15:13; Bagalatia 1:18, 19) Amonaki makambo oyo elekaki mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango bankóto ya Bayuda oyo bautaki na bikólo mosusu bandimaki nsango malamu mpe bazwaki batisimo.​—Misala 1:14; 2:1, 41.

Na ntango wana mpe na nsima, bankóto ya Bayuda bazalaki kokende mbula na mbula na bafɛti na Yelusaleme. Engumba ezalaki kotonda na bato, mpe bapaya bazalaki kofanda na bamboka ya pembenipembeni to na bandako ya kapo. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi ete longola kokutana na baninga, bapaya wana bazalaki kokende na tempelo mpo na kosambela, kopesa bambeka, mpe koyekola Torah.

Na ntembe te, Yakobo ná bandeko mosusu ya lisangá ya Yelusaleme bazalaki kosalela mabaku wana mpo na kopesa Bayuda ya bikólo mosusu litatoli. Ekoki kozala ete bantoma basalaki yango na bokɛngi na ntango “monyoko moko monene ebimelaki lisangá oyo ezalaki na Yelusaleme” nsima ya liwa ya Setefano. (Misala 8:1) Liboso mpe nsima ya likambo yango, lisolo elobi ete molende ya baklisto yango mpo na kosakola esalaki ete bato bákoba kobakisama.​—Misala 5:42; 8:4; 9:31.

Liteya nini tokoki kozwa?

Baklisto ya liboso basalaki mpenza milende mpo na kopesa litatoli epai ya Bayuda na mboka nyonso oyo bazalaki kofanda. Kaka na ntango yango, Paulo ná bamosusu bazalaki kokende epai ya bato ya bikólo mosusu na Mpoto. Balandaki malako ya nsuka oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ete bákómisa bato bayekoli “na bikólo nyonso.”​—Matai 28:19, 20.

Ndakisa na bango ezali koteya biso ntina ya kobongisa makambo malamu mpo elimo ya Yehova esunga biso na mosala ya kosakola. Tomoni mpe ete koluka bato oyo bamemyaka Liloba ya Nzambe, mingimingi na bateritware oyo Batatoli ya Yehova bazali mingi te ezali na matomba mingi. Bateritware mosusu ya lisangá na bino ebotaka mbuma koleka mosusu? Ekoki kozala malamu kosakola mingi na bateritware yango. Soki na kartye to na engumba na bino na bileko mosusu babongisaka makambo oyo ebele ya bato bayaka kotala, bokoki komibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu to litatoli na balabala mikolo oyo makambo yango esalemaka.

Ezali malamu mingi tósuka kaka te na kotánga masolo ya Biblia oyo elobeli baklisto ya ekeke ya liboso kasi mpe tóyeba malamu makambo mosusu ya kala mpe ndenge bamboka ekabolamaki. Mokanda oyo tokoki kosalela mpo tóyeba makambo yango malamu ezali mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ oyo ezali na ebele ya bakarte mpe bafɔtɔ.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekoki kozala ete likita yango esalemaki na ntango oyo lisangani ya mikóló-bakambi etalelaki likambo ya kokatama ngenga.​—Misala 15:6-29.

b Lisolo oyo elobeli mosala ya Paulo epai ya Bayuda, kasi te mosala na ye lokola “ntoma epai ya bikólo mosusu.”​—Baloma 11:13.

[Etanda na lokasa 14]

MOSALA YA NTOMA PAULO EPAI YA BAYUDA OYO BAFANDAKI NA BIKÓLO MOSUSU

LIBOSO YA LIKITA YA YELUSALEME NA MOBU 49 T.B.

Misala 9:19, 20 Damasi—“na basinagoga abandaki kosakola”

Misala 9:29 Yelusaleme—“azalaki kosolola . . . na Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki”

Misala 13:5 Salamisi, Sipele—“babandaki kosakola liloba ya Nzambe na basinagoga ya Bayuda”

Misala 13:14 Antiokia ya Pisidia—“kokendáká na sinagoga”

Misala 14:1 Ikoniumu—“bakɔtaki . . . na sinagoga ya Bayuda”

NSIMA YA LIKITA YA YELUSALEME NA MOBU 49 T.B.

Misala 16:14 Filipi—“Lydia, . . . mosambeli ya Nzambe”

Misala 17:1 Tesalonika—“sinagoga moko ya Bayuda”

Misala 17:10 Beloa—“sinagoga ya Bayuda”

Misala 17:17 Atene—“abandaki kososola na kati ya sinagoga elongo na Bayuda”

Misala 18:4 Kolinti—“azalaki kosala lisukulu moko na sinagoga”

Misala 18:19 Efese—“akɔtaki na sinagoga mpe azalaki kososola elongo na Bayuda”

Misala 19:8 Efese—“kokɔtáká na sinagoga, azalaki koloba na mpiko na boumeli ya sanza misato”

Misala 28:17 Loma—“abengisaki . . . bato minene na kati ya Bayuda”

[Karte na lokasa 15]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Bato oyo bayokaki nsango malamu na Pantekote ya mobu 33 T.B. bautaki na bisika ndenge na ndenge

ILILIKOMI

ITALI

Loma

MASEDONIA

GRÈCE

Atene

KELETE

Kilene

LIBYA

BITINIA

GALATIA

AZIA

FILIGIA

PAMOFILIA

SIPELE

EZIPITO

ETIOPIA

PONTI

KAPADOSE

SILISIA

MEZOPOTAMIA

SILIA

SAMALIA

Yelusaleme

YUDEA

MEDIA

Babilone

ELAMA

ALABIA

PALATIA

[Mai]

Mbu ya Meditelane

Mbu Moindo

Mbu Motane

Golfe Persique

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto