Mosala moko ya kotambwisa makambo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe
“[Nzambe] azali kosala makambo nyonso na kolanda toli oyo mokano na ye ezali kopesa.”—BAEFESE 1:11.
1. Mpo na nini na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova bakoyangana mokolo ya 12 Aprili 2006?
MOKOLO ya misato, mwa 12 Aprili 2006, na mpokwa, bato soki milio 16 bakoyangana mpo na kosala Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. Na esika mokomoko oyo bakosala likita yango, bakobongisa mesa epai bakotya saani oyo ekozala na limpa oyo ezangi levire, oyo ezali elilingi ya nzoto ya Klisto, mpe kɔpɔ ya vinyo ya motane, oyo ezali elilingi ya makila na ye oyo esopanaki. Na nsuka ya lisukulu oyo ekolimbola ntina ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu, bakolekisa liboso limpa epai ya bayangani nyonso, na nsima bakolekisa vinyo. Na masangá mosusu ya Batatoli ya Yehova, bato moke mpenza, mbala mosusu mpe moto moko kaka, nde akolya limpa mpe akomɛla vinyo. Nzokande, na masangá mingi, ata moto moko te akolya yango. Mpo na nini kaka baklisto moke, oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló, nde bakolya limpa mpe bakomɛla vinyo, kasi bato mingi, elingi koloba baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé bakolya mpe bakomɛla te?
2, 3. (a) Ndenge nini Yehova akelaki biloko na kolanda mokano na ye? (b) Yehova akelaki mabelé mpe bato na mokano nini?
2 Yehova azali Nzambe oyo azali na mokano. Mpo na kokokisa yango, “azali kosala makambo nyonso na kolanda toli oyo mokano na ye ezali kopesa.” (Baefese 1:11) Akelaki liboso Mwana na ye mobotami-se-moko. (Yoane 1:1, 14; Emoniseli 3:14) Na nsima, na nzela ya Mwana yango, Yehova akelaki ebele ya baanzelu mpe na nsuka, akelaki mokili mpe biloko nyonso, bakisa mpe mabelé esika oyo atyaki bato.—Yobo 38:4, 7; Nzembo 103:19-21; Yoane 1:2, 3; Bakolose 1:15, 16.
3 Yehova akelaki mabelé te mpo ezala esika ya komeka bato liboso bákóma bana na ye ya elimo kuna na likoló, ndenge mangomba mingi ya boklisto eteyaka yango. Akelaki mabelé mpo “bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Nzambe akelaki mabelé mpo na moto mpe moto mpo na mabelé. (Nzembo 115:16) Esengelaki ete mabelé mobimba ekóma paladiso oyo etondi na bato ya sembo, oyo bakobanda kolona mpe kobatela yango. Ata mokolo moko te Nzambe apesaki mobali ná mwasi ya liboso elikya ya kokende na likoló.—Genese 1:26-28; 2:7, 8, 15.
Mokano ya Yehova ebɛtelami ntembe
4. Mwa moke nsima ya kokela bato ya liboso, ndenge nini bokonzi ya Yehova ebɛtelamaki ntembe?
4 Mwana moko ya elimo atombokelaki Nzambe mpe akómaki na makanisi ya kobebisa mokano ya Yehova; asalelaki malamu te likabo ya kopona oyo Nzambe apesaki ye. Abebisaki kimya oyo bato nyonso oyo balingaka kotosa bokonzi ya Yehova bazalaka na yango. Satana amemaki mobali ná mwasi ya liboso bápesa Nzambe mokɔngɔ. (Genese 3:1-6) Atyaki ntembe te ete Yehova aleki na nguya, kasi alobaki ete azali kosalela malamu te bokonzi na Ye, yango wana abongi te koyangela bato. Na ndenge yango, ntango moke kaka nsima ya kokela bato ya liboso, ntembe monene ebimaki awa na mabelé mpo na koyeba soki Yehova azali na lotomo ya kozala mokonzi.
5. Ntembe nini mosusu ebimaki, mpe etalelaki banani?
5 Na mikolo ya Yobo, Satana abimisaki ntembe mosusu oyo ezali na boyokani na likambo ya bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba. Amonisaki ete bikelamu ya Yehova batosaka Ye mpe basalelaka Ye na bosembo mpenza te. Alobaki ete soki bato batosaka mpe basalelaka Nzambe, ezali se mpo na bolamu na bango mpe ete, soki bameki bango, bakopesa Ye mokɔngɔ. (Yobo 1:7-11; 2:4, 5) Atako abimisaki ntembe yango libosoliboso mpo na mosaleli moko ya Yehova, ntembe yango etalelaki mpe bana na Ye ya elimo, ata mpe Mwana na Ye mobotami-se-moko.
6. Ndenge nini Yehova amonisaki ete abosanaki te mokano na ye mpe ndimbola ya nkombo na ye?
6 Yehova abosanaki mokano na ye te mpe na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye, amikómisaki Mosakoli mpe Mobikisi.a Alobaki na Satana boye: “Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okoswa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Yehova akanaki kosalela Momboto ya “mwasi” yango, elingi koloba ebongiseli na ye ya likoló mpo na kosukisa ntembe ya Satana mpe kopesa bana ya Adama elikya ya lobiko mpe bomoi.—Baloma 5:21; Bagalatia 4:26, 31.
“Sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye”
7. Mokano nini Yehova amonisaki na nzela ya ntoma Paulo?
7 Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese, asalelaki maloba ya kitoko mpenza mpo na kolimbola ndenge oyo Yehova atambwisaka makambo mpo na kokokisa mokano na ye. Akomaki boye: “Ayebisaki biso sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye. Yango ezali engebene bosepeli na ye ndenge akanaki na kati na ye moko mpo na mosala moko ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, elingi koloba, koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.” (Baefese 1:9, 10) Mokano monene ya Yehova ezali ya koyanganisa bikelamu oyo balingaka kotosa bokonzi na ye. (Emoniseli 4:11) Na ndenge wana nde nkombo na ye ekosantisama, ekomonana ete Satana azali mobuki-lokuta, mpe mokano ya Nzambe ekokokisama “na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”—Matai 6:10.
8. Liloba oyo ebongolami na “mosala moko ya kotambwisa makambo” elimboli nini?
8 Vɛrsɛ wana elobi ete “bosepeli” to mokano ya Yehova ekokokisama na nzela ya “mosala moko ya kotambwisa makambo.” Liloba oyo Paulo asalelaki elimboli mpenzampenza “kotambwisa misala ya ndako.” Yango ezali guvɛrnema te, na ndakisa Bokonzi ya Masiya, kasi nde ndenge ya kotambwisa makambo.b Ndenge ya malamu mingi oyo Yehova asengelaki kotambwisa makambo mpo na kokokisa mokano na ye ezalaki “sɛkɛlɛ mosantu” oyo esengelaki kolimbolama mokemoke, na boumeli ya bankama ya bambula.—Baefese 1:10; 3:9, maloba na nse ya lokasa na NW.
9. Ndenge nini Yehova azalaki komonisa mokemoke sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye?
9 Yehova asalaki kondimana na bato ndenge na ndenge; na nzela na yango azalaki komonisa mokemoke ndenge oyo mokano na ye mpo na Momboto oyo alakaki na Edene ekokokisama. Kondimana oyo asalaki na Abalayama emonisaki ete Momboto oyo alakaki akobima na libota ya Abalayama mpe ete “bikólo nyonso ya mabelé” ekopambolama na nzela ya momboto yango. Kondimana wana emonisaki mpe ete bato mosusu bakosangana na moto oyo akozala eteni ya liboso ya momboto yango. (Genese 22:17, 18) Kondimana ya Mibeko oyo Yehova asalaki na ekólo Yisalaele emonisaki mokano na ye ya kozala na “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” (Exode 19:5, 6, NW) Kondimana oyo asalaki na Davidi emonisaki ete Momboto oyo alakaki akozala Mokonzi ya Bokonzi oyo ekoumela seko. (2 Samwele 7:12, 13; Nzembo 89:3, 4) Kondima ya Mibeko ekambaki Bayuda epai ya Masiya; na nsima, Yehova amonisaki makambo mosusu oyo akosala mpo na kokokisa mokano na ye. (Bagalatia 3:19, 24) Bato mosusu oyo bakosangana na moto oyo azali eteni ya liboso ya momboto bakozala ‘bokonzi ya banganga-nzambe’ oyo esakolamaki mpe Nzambe akosala na bango “kondimana ya sika” lokola “Yisalaele” ya sika, to Yisalaele ya elimo.—Yilimia 31:31-34; Baebele 8:7-9.c
10, 11. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki Momboto oyo alakaki? (b) Mpo na nini Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe ayaki awa na mabelé?
10 Ndenge mosala ya kotambwisa makambo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe esɛngaki, Momboto oyo alakamaki ayaki awa na mabelé. Yehova atindaki anzelu Gabiliele epai ya Malia mpo na koyebisa ye ete akobota mwana moko oyo akopesa ye nkombo Yesu. Anzelu alobaki na Malia boye: “Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” (Luka 1:32, 33) Na bongo, Momboto oyo alakamaki ayebanaki.—Bagalatia 3:16; 4:4.
11 Mwana mobotami-se-moko ya Yehova asengelaki koya awa na mabelé mpe komekama makasi. Yesu azalaki na mokumba ya kosukisa malamumalamu ntembe ya Satana. Alingaki nde kotikala sembo epai ya Tata na ye? Likambo yango ezalaki sɛkɛlɛ mosantu. Ntoma Paulo alimbolaki mokumba ya Yesu na maloba oyo: “Sɛkɛlɛ mosantu ya ezaleli oyo ya kokangama na Nzambe endimami mpenza ete ezali monene: ‘Amonisamaki polele na mosuni, atángamaki moyengebene na elimo, abimelaki baanzelu, asakolamaki na kati ya bikólo mosusu, andimelamaki na mokili, akamatamaki na kati ya nkembo.’” (1 Timote 3:16) Bosembo ya Yesu tii na liwa esukisaki mpenza ntembe ya Satana. Kasi, makambo mosusu oyo etali sɛkɛlɛ mosantu eyebisamaki naino te.
“Sɛkɛlɛ mosantu ya Bokonzi ya Nzambe”
12, 13. (a) Wapi moko na makambo oyo ezalaki na “sɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya Nzambe”? (b) Lokola Yehova aponaki motángo moke ya bato mpo bákende na likoló yango esɛngaki nini?
12 Ntango Yesu azalaki kotambola na bamboka ya Galilai mpo na kosakola, amonisaki ete sɛkɛlɛ mosantu etalelaki Bokonzi ya Masiya. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Likoki ya kososola basɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya likoló [“bokonzi ya Nzambe,” Malako 4:11] epesami epai na bino.” (Matai 13:11) Likambo mosusu na sɛkɛlɛ yango ezali ete Yehova asengelaki kopona “etonga moke” ya bato 144 000 mpo básangana na Mwana na ye mpe bázala momboto mpo na koyangela na likoló.—Luka 12:32; Emoniseli 14:1, 4.
13 Lokola Yehova akelaki bato mpo bázala awa na mabelé, asengelaki kokómisa bato mosusu ‘bikelamu ya sika’ mpo bákende na likoló. (2 Bakolinti 5:17) Ntoma Petelo, oyo azali na kati ya bato oyo baponamaki mpo na kozwa bomoi na likoló, akomaki boye: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto apambolama, mpo engebene motema mawa na ye monene apesaki biso kobotama moko ya sika mpo na elikya moko ya bomoi na nzela ya lisekwa ya Yesu Klisto na bakufi, mpo na libula oyo ekoki kopɔla te mpe oyo ezangi mbindo mpe oyo enzulukaka te. Yango ebombami na likoló mpo na bino.”—1 Petelo 1:3, 4.
14. (a) Ndenge nini “sɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya Nzambe” etalelaki mpe bato mosusu oyo bazali Bayuda te? (b) Nini ezali kosalisa biso tókanga ntina ya “makambo mozindo ya Nzambe”?
14 Likambo mosusu oyo etali sɛkɛlɛ mosantu ya Bokonzi ezali ete Nzambe azalaki na mokano ya kokɔtisa bato oyo bazali Bayuda te na kati ya bato moke oyo bakoyangela elongo na Klisto na likoló. Paulo alimbolaki likambo wana oyo etaleli mpe “mosala” ya Yehova “ya kotambwisa makambo” mpo na kokokisa mokano na ye: “Na boumeli ya mabota mosusu sɛkɛlɛ yango eyebisamaki te epai ya bana ya bato ndenge yango emonisami sikoyo epai ya bantoma na ye basantu mpe basakoli na lisalisi ya elimo, elingi koloba, ete bato ya bikólo mosusu basengeli kozala bazwi-ya-libula elongo na biso mpe binama ya nzoto elongo na biso mpe basangani ya elaka elongo na biso na kati ya bomoko elongo na Klisto Yesu na nzela ya nsango malamu.” (Baefese 3:5, 6) Likambo yango oyo ezali mpe na kati ya sɛkɛlɛ mosantu eyebisamaki epai ya ‘bantoma basantu.’ Lelo oyo mpe ndenge moko, soki na lisalisi ya elimo santu te, tolingaki te kokanga ntina ya “makambo mozindo ya Nzambe” oyo tozali kolobela.—1 Bakolinti 2:10; 4:1; Bakolose 1:26, 27.
15, 16. Mpo na nini Yehova aponaki bato awa na mabelé mpo báyangela na Klisto?
15 Biblia elobi ete “bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei” oyo batɛlɛmi elongo na “Mwana-Mpate” na Ngomba Siona ya likoló “basombamaki na kati ya bato lokola mbuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana-Mpate,” Klisto Yesu. (Emoniseli 14:1-4) Yehova aponaki mwana ya liboso na kati ya bana na ye ya elimo mpo akóma eteni ya liboso ya momboto oyo alakaki na Edene; kasi, mpo na nini baoyo bakosangana na Klisto aponaki bango awa na mabelé? Ntoma Paulo alobi ete bato moke wana “babengami engebene mokano [ya Yehova],” “engebene bosepeli ya mokano na ye.”—Baloma 8:17, 28-30; Baefese 1:5, 11; 2 Timote 1:9.
16 Mokano ya Yehova ezali ete asantisa nkombo na ye monene mpe alongisa bokonzi na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba. Ndenge ‘mosala ya kotambwisa makambo’ oyo emonisi bwanya na ye ezangi nsuka esɛngaki, Yehova atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko awa na mabelé epai amekamaki tii na liwa. Longola yango, Yehova asepelaki ete na Bokonzi ya Mwana na ye Masiya, atya mpe bato oyo bakotikala sembo na bokonzi na Ye tii liwa na bango.—Baefese 1:8-12; Emoniseli 2:10, 11.
17. Mpo na nini tosengeli kosepela ete Klisto ná bato oyo bakoyangela na ye bazalaki liboso bato?
17 Yehova amonisaki ete azali na bolingo mingi mpo na bana ya Adama na ndenge atindaki Mwana na ye awa na mabelé mpe na ndenge aponaki awa na mabelé bato oyo bakoyangela na Bokonzi elongo na Mwana na ye. Ebongiseli yango ekomema matomba nini epai ya bato ya sembo, banda na Abele? Lokola bato babotamaka na boombo ya lisumu mpe liwa, basengeli kobikisama na elimo mpe na nzoto mpe kokóma bato ya kokoka, ndenge Yehova akanaki na ebandeli. (Baloma 5:12) Bato nyonso oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé bakoki mpenza kobɔndisama na koyeba ete Mokonzi na bango akolinga bango mingi mpe akoyeba komitya na esika na bango ndenge asalaki yango epai ya bayekoli na ye ntango azalaki awa na mabelé! (Matai 11:28, 29; Baebele 2:17, 18; 4:15; 7:25, 26) Likambo mosusu oyo esengeli kokitisa bango mitema ezali ete banganga-nzambe mpe bakonzi oyo bakoyangela na Klisto na likoló bazalaki liboso mibali mpe basi ya kondima, babundanaki na bolɛmbu ndenge na ndenge mpe bakutanaki na mikakatano oyo tozali kokutana na yango!—Baloma 7:21-25.
Mokano ya Yehova oyo ekoki kozanga te kokokisama
18, 19. Mpo na nini maloba ya Paulo na Baefese 1:8-11 ekómi lisusu polele na makanisi na biso, mpe tokolobela nini na lisolo elandi?
18 Sikoyo tokoki mpenza kokanga ntina ya maloba ya Paulo epai ya baklisto bapakolami, maloba oyo ezali na Baefese 1:8-11. Alobaki ete Yehova amonisaki bango “sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye,” ete ‘batyamaki bazwi-ya-libula’ elongo na Klisto, mpe ete ‘basilaki kokanama liboso engebene mokano ya moto oyo azali kosala makambo nyonso na kolanda toli oyo mokano na ye ezali kopesa.’ Tomoni ete Yehova asali nyonso wana na kolanda “mosala” na ye “ya kotambwisa makambo” mpo na kokokisa mokano na ye. Yango mpe esalisi biso tókanga ntina oyo kaka mwa baklisto moke nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo.
19 Na lisolo oyo elandi, tokolobela ntina ya Ekaniseli ya liwa ya Klisto mpo na baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi na likoló. Tokoyeba mpe ntina oyo bamilio ya bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé basengeli kotya likebi mingi na ndimbola ya Ekaniseli.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo ya Nzambe elimboli “Ye oyo akómisaka.” Yehova akoki kokóma nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mokano na ye.—Exode 3:14, maloba na nse ya lokasa na NW.
b Maloba ya Paulo ezali komonisa ete “mosala” wana “ya kotambwisa makambo” ezalaki ata na ntango na ye, nzokande Biblia emonisi ete Bokonzi ya Masiya ebandaki na 1914.
c Mpo na kozwa bandimbola ya kondimana mokomoko oyo Nzambe asalaki mpo na kokokisa mokano na ye, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1989, nkasa 10-15.
Bozongeli
• Mpo na nini Yehova akelaki mabelé mpe atyaki bato awa na mabelé?
• Mpo na nini ezalaki na ntina ete Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe amekama awa na mabelé?
• Mpo na nini Yehova aponaki awa na mabelé bato oyo bakoyangela elongo na Klisto?