Koyanganisama ya biloko oyo ezali na likoló mpe oyo ezali na mabelé
“Yango ezali engebene bosepeli na ye . . . koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.”—BAEFESE 1:9, 10.
1. “Bosepeli” ya Yehova ezali nini mpo na likoló mpe mabelé?
KIMYA NA MOLƆ́NGƆ́ MOBIMBA! Yango nde mokano monene ya Yehova, “Nzambe ya kimya.” (Baebele 13:20) Na kopemama na Nzambe, ntoma Paulo akomaki ete “bosepeli” na Yehova ezali ya “koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.” (Baefese 1:9, 10) Kasi, na vɛrsɛ yango maloba ‘koyanganisa lisusu esika moko’ elimboli mpenza nini? John Lightfoot, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi boye: “Maloba yango ezali komonisa boyokani na molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo ekozala lisusu te na biteni oyo ekabwani, kasi oyo Klisto akozala na ntei mpe akozala ekanganeli mpo na bomoko ya biteni nyonso. Lisumu, liwa, mawa, mabe mpe bampasi, ekosila.”
“Biloko oyo ezali na likoló”
2. Banani bazali “biloko oyo ezali na likoló” oyo esengeli koyanganisama?
2 Ntoma Petelo amonisaki na mokuse elikya kitoko ya baklisto ya solo ntango akomaki boye: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) “Likoló ya sika” oyo vɛrsɛ yango elaki ezali guvɛrnema ya sika, to Bokonzi ya Masiya. “Biloko oyo ezali na likoló” oyo Paulo alobeli na mokanda na ye epai ya Baefese ekoyanganisama “na kati ya Klisto.” Ezali bato moke oyo Nzambe aponi mpo báyangela ná Klisto na likoló. (1 Petelo 1:3, 4) Baklisto yango 144 000 oyo bapakolami na elimo ‘basombami na mabelé,’ ‘basombami na kati ya bato,’ mpo na kozwa libula ya Bokonzi ya likoló elongo na Klisto.—Emoniseli 5:9, 10; 14:3, 4; 2 Bakolinti 1:21; Baefese 1:11; 3:6.
3. Mpo na nini tokoki koloba ete bapakolami ‘bafandi na bisika ya likoló’ ata ntango bazali naino awa na mabelé?
3 Baklisto bapakolami babotami lisusu na elimo santu mpo na kokóma bana ya elimo ya Yehova. (Yoane 1:12, 13; 3:5-7) Lokola Yehova andimi bango lokola “bana” na ye, bakómi bandeko ya Yesu. (Baloma 8:15; Baefese 1:5) Na ndenge yango, ata ntango bazali naino awa na mabelé, Biblia elobi mpo na bango ete ‘balamuki mpe bafandi elongo na kati ya bisika ya likoló na bomoko elongo na Klisto Yesu.’ (Baefese 1:3; 2:6) Bazwi lokumu wana na elimo mpo ‘batyamaki elembo na elimo santu oyo elakamaki, oyo ezali ndanga epesami libelalibela ya libula na bango’ oyo ebombami na likoló. (Baefese 1:13, 14; Bakolose 1:5) Na bongo, bango nde “biloko oyo ezali na likoló,” oyo motángo na bango mobimba oyo Yehova asilá kokana, esengelaki koyanganisama.
Ebandeli ya mosala ya koyanganisa
4. Ntango nini mpe ndenge nini koyanganisama ya “biloko oyo ezali na likoló” ebandaki?
4 Na kolanda ‘mosala ya kotambwisa makambo’ ya Yehova, “biloko oyo ezali na likoló” esengelaki kobanda koyanganisama “na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá.” (Baefese 1:10) Ntango yango ekokaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) Mokolo yango, elimo santu ekitelaki bantoma ná bayekoli mosusu, mibali mpe basi. (Misala 1:13-15; 2:1-4) Yango emonisaki polele ete kondimana ya sika ebandi mpe lisangá ya boklisto mpe ekólo ya sika ya Yisalaele ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” ebotami.—Bagalatia 6:16; Baebele 9:15; 12:23, 24.
5. Mpo na nini Yehova asalaki “ekólo” ya sika mpo ezwa esika ya ekólo Yisalaele?
5 Kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki na ekólo Yisalaele ebimisaki te “bokonzi ya banganga-nzambe mpe ekólo ya bosantu” oyo ekokaki kosala mpo na libela na likoló. (Exode 19:5, 6, NW) Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba ya Bayuda ete: “Bokonzi ya Nzambe ekolongolama epai na bino mpe ekopesama na ekólo moko oyo ekobota bambuma na yango.” (Matai 21:43) Ekólo yango oyo ebengami Yisalaele ya elimo ezali lisangá mobimba ya baklisto bapakolami oyo Nzambe asali na bango kondimana ya sika. Na ntina na bango, ntoma Petelo akomaki boye: “Bino bozali ‘libota moko eponami, bonganga-nzambe moko ya bokonzi, libota moko mosantu, ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa. Mpo liboso bozalaki ekólo te, kasi sikoyo bozali ekólo ya Nzambe.” (1 Petelo 2:9, 10) Yehova alongolaki kondimana oyo asalaki na ekólo Yisalaele. (Baebele 8:7-13) Ndenge Yesu asakolaki yango, balongolaki bango libaku malamu ya koyangela na Bokonzi ya Masiya mpe bapesaki yango na ba 144 000, Bayisalaele ya elimo.—Emoniseli 7:4-8.
Bakɔti na kondimana mpo na Bokonzi
6, 7. Kondimana nini Yesu asalaki na bandeko na ye bapakolami na elimo, mpe yango elimboli nini mpo na bango?
6 Na butu oyo Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, ayebisaki bantoma na ye ya sembo boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko, mpo bólya mpe bómɛla na mesa na ngai na kati ya bokonzi na ngai, mpe bófanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisalaele.” (Luka 22:28-30) Awa Yesu alobelaki kondimana mosusu, oyo ye moko asalaki na bandeko na ye 144 000 oyo babotami na elimo, oyo basengelaki kotikala “sembo ata tii na liwa” mpe kozala ‘balongi.’—Emoniseli 2:10; 3:21.
7 Bato moke oyo bazali na etuluku yango balongoli na makanisi na bango elikya nyonso ya kozala na bomoi awa na mabelé lokola bato oyo bazali na nzoto ya mosuni. Bakoyangela elongo na Klisto na likoló, bakofanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa bato nyonso. (Emoniseli 20:4, 6) Sikoyo, tólobela bavɛrsɛ mosusu oyo etaleli kaka bapakolami yango, oyo ezali komonisa ntina oyo “bampate mosusu” balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te na Ekaniseli.—Yoane 10:16.
8. Bapakolami bamonisaka nini ntango balyaka limpa? (Talá etanda na lokasa 23.)
8 Bapakolami basengeli konyokwama ndenge Klisto anyokwamaki mpe kondima ata kokufa liwa lokola oyo ye akufaki. Paulo, oyo azali moko na bango, alobaki ete akondima ata likambo nini ya mpasi mpo ‘azwa Klisto mpo na koyeba ye mpe nguya ya lisekwa na ye mpe bosangani na kati ya bampasi na ye.’ Yango elingi koloba ete Paulo andimaki ata “kokufa na liwa lokola oyo ya ye.” (Bafilipi 3:8, 10) Bapakolami mingi banyokwami na “monyoko ya liwa oyo banyokolaki Yesu.”—2 Bakolinti 4:10.
9. Limpa ya Ekaniseli ezalaka elilingi ya nzoto nini?
9 Ntango Yesu abandisaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, alobaki boye: “Oyo elakisi nzoto na ngai.” (Malako 14:22) Azalaki kolobela nzoto na ye ya mosuni oyo, mwa moke na nsima esengelaki kobɛtama fimbo mpe kotanga makila. Limpa oyo batye levire te ezali elilingi ebongi mpenza ya nzoto wana. Mpo na nini? Mpamba te na Biblia, levire esalelamaka ntango mosusu lokola elilingi ya lisumu to mabe. (Matai 16:4, 11, 12; 1 Bakolinti 5:6-8) Yesu azalaki moto ya kokoka, mpe nzoto na ye ezalaki na lisumu te. Asengelaki kopesa nzoto wana ya kokoka lokola mbeka mpo na kobikisa bato. (Baebele 7:26; 1 Yoane 2:2) Likambo yango elingaki komema matomba mpo na baklisto nyonso ya sembo, ezala baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló to baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.—Yoane 6:51.
10. Na ndimbola nini bato oyo bamɛlaka vinyo na Ekaniseli ‘basanganaka na makila ya Klisto’?
10 Mpo na vinyo oyo baklisto bapakolami bamɛlaka na Ekaniseli, Paulo akomaki boye: “Kɔpɔ ya lipamboli oyo tozali kopambola, ezali nde te bosangani moko na makila ya Klisto?” (1 Bakolinti 10:16) Na ndimbola nini baoyo bamɛlaka vinyo ‘basanganaka na makila ya Klisto’? Ezali te ete basanganaka na kopesa lisiko, mpamba te bango moko mpe basengeli kosikolama. Mpo na kondima na bango na nguya ya kobikisa ya makila ya Klisto, masumu na bango ezali kolimbisama mpe bazali kotángama bayengebene mpo na kozwa bomoi na likoló. (Baloma 5:8, 9; Tito 3:4-7) Ezali na nzela ya makila ya Klisto oyo esopamaki nde ba 144 000 oyo bakozwa libula elongo na Klisto ‘basantisami,’ to baponami, bapɛtolami na masumu mpo bázala “basantu.” (Baebele 10:29; Danyele 7:18, 27; Baefese 2:19) Na makila na ye oyo esopamaki, Klisto ‘asombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso, mpe akómisi bango bokonzi ya banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso mpe basengeli koyangela mabelé.’—Emoniseli 5:9, 10.
11. Bapakolami bamonisaka nini ntango bamɛlaka vinyo ya Ekaniseli?
11 Ntango Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, apesaki bantoma na ye ya sembo kɔpɔ ya vinyo mpe alobaki boye: “Bómɛla yango, bino nyonso; mpo yango elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.” (Matai 26:27, 28) Se ndenge makila ya bangɔmbɛ ná bantaba esimbaki kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki na ekólo Yisalaele, makila ya Yesu esimbaki kondimana ya sika oyo Yehova asalaki na Yisalaele ya elimo, banda na Pantekote ya mobu 33 T.B. (Exode 24:5-8; Luka 22:20; Baebele 9:14, 15) Ntango bapakolami bamɛlaka vinyo oyo ezali elilingi ya “makila ya kondimana,” bamonisaka ete bazali na kati ya kondimana ya sika mpe bazali kozwa matomba na yango.
12. Na ndimbola nini bapakolami bazali kobatisama na liwa ya Klisto?
12 Komɛla vinyo ekundwelaka mpe bapakolami likambo mosusu. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ya sembo boye: “Kɔpɔ ngai nazali komɛla bino bokomɛla yango, mpe batisimo oyo ngai nazali kobatisama bino bokobatisama na yango.” (Malako 10:38, 39) Bambula mingi na nsima, ntoma Paulo alobaki ete baklisto bazali ‘kobatisama na kati ya liwa [ya Klisto].’ (Baloma 6:3) Bomoi ya bapakolami ezali bomoi ya bato oyo bandimi komipesa lokola mbeka. Liwa na bango ezali mbeka na boye ete balongoli na makanisi na bango elikya nyonso ya bomoi ya seko awa na mabelé. Batisimo ya bapakolami yango na liwa ya Klisto esukaka soki bakufi sembo mpe basekwisami lokola bikelamu ya elimo mpo na ‘koyangela elongo’ na Klisto na likoló.—2 Timote 2:10-12; Baloma 6:5; 1 Bakolinti 15:42-44, 50.
Kolya limpa mpe komɛla vinyo
13. Mpo na nini bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te na Ekaniseli, kasi mpo na nini bayanganaka na Ekaniseli?
13 Lokola kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli elimbolaka makambo nyonso wana, tomoni polele ete ebongi te baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bálya yango. Baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bayebi ete bazali bapakolami te, basangani na nzoto ya Klisto te, mpe bakɔti te na kondimana oyo Yehova asali na bato oyo bakoyangela elongo na Yesu Klisto. Lokola “kɔpɔ” ezali komonisa kondimana ya sika, kaka bato oyo Nzambe asali na bango kondimana yango nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo. Bato oyo bazali na elikya ya bomoi ya kokoka awa na mabelé oyo Bokonzi ekoyangela babatisamaka na liwa ya Yesu te, babengami mpe te na koyangela na ye na likoló. Soki balei limpa mpe bamɛli vinyo, ekomonisa ete basali likambo moko oyo ezali solo te mpo na bango. Yango wana, balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te, kasi bayanganaka na Ekaniseli lokola batali mpamba. Bazali na botɔndi mpo na makambo nyonso oyo Yehova asali mpo na bango na nzela ya Mwana na ye, oyo moko na yango ezali bolimbisi na nzela ya makila ya Klisto oyo esopamaki.
14. Ndenge nini bapakolami balendisamaka na elimo ntango balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo?
14 Etikali moke etuluku moke ya baklisto oyo basengeli koyangela elongo na Klisto na likoló básila kotyama elembo. Liboso básukisa bomoi na bango ya bato oyo bandimi komipesa lokola mbeka awa na mabelé, bapakolami balendisamaka na elimo ntango balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli. Bamonaka ete bazali na bomoko ná bandeko na bango bapakolami mosusu, lokola basangani ya nzoto ya Klisto. Kolya limpa mpe komɛla vinyo ezongisaka na makanisi na bango ete bazali na mokumba ya kotikala sembo tii na liwa.—2 Petelo 1:10, 11.
Koyanganisama ya “biloko oyo ezali na mabelé”
15. Banani oyo bayanganisami na ngámbo moko ná baklisto bapakolami?
15 Banda na katikati ya bambula ya 1930, bato oyo bazali na “etonga moke” te, kasi bazali nde “bampate mosusu” oyo motángo na bango ezali se kobakisama mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé, bamitye ngámbo moko ná bapakolami. (Yoane 10:16; Luka 12:32; Zekalia 8:23) Bakómi baninga ya sembo ya bandeko ya Klisto, bazali kopesa bango mabɔkɔ na mosala ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” mpo na kopesa litatoli na bikólo nyonso. (Matai 24:14; 25:40) Na ndenge yango, baponi esika malamu mpo Klisto abenga bango “bampate” na ye, akotya bango na “lobɔkɔ na ye ya mobali,” yango elingi koloba ete akondima bango ntango akoya kosambisa bikólo nyonso. (Matai 25:33-36, 46) Bakozala “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene” mpo na kondima na bango na makila ya Klisto.—Emoniseli 7:9-14.
16. Banani lisusu bakotángama na kati ya “biloko oyo ezali na mabelé,” mpe ndenge nini bango nyonso bakozwa libaku ya kokóma “bana ya Nzambe”?
16 Soki bato 144 000 basili kotyama elembo, ntango ekokoka mpo na kotika “mipɛpɛ” oyo ekobebisa ebongiseli ya makambo mabe ya Satana awa na mabelé. (Emoniseli 7:1-4) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto elongo na banganga-nzambe mpe bakonzi, bato mosusu oyo motángo na bango eyebani te bakosekwa mpe bakosangana na ebele ya bato. (Emoniseli 20:12, 13) Bato yango bakozwa libaku malamu ya kofanda libela na mabelé oyo Mokonzi Masiya, Klisto Yesu, akoyangela. Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, bango nyonso wana, oyo babengami “biloko oyo ezali na mabelé,” bakomekama mpo na mbala ya nsuka. Baoyo bakotikala sembo, bakondimama lokola “bana ya Nzambe” oyo bakofanda awa na mabelé.—Baefese 1:10; Baloma 8:21; Emoniseli 20:7, 8.
17. Ndenge nini mokano ya Yehova ekokokisama?
17 Na ndenge yango Yehova, na nzela ya ‘mosala ya kotambwisa makambo’ oyo ezali komonisa bwanya na ye ezangi nsuka, akokokisa mokano na ye ya “koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.” Bikelamu ya elimo na likoló mpe bato awa na mabelé bakoyanganisama mpe kimya ekozala na molɔ́ngɔ́ mobimba, bango nyonso bakotosa na esengo bokonzi ya sembo ya Yehova, Mobongisi Monene ya mikano.
18. Litomba nini bapakolami mpe baninga na bango bakozwa na koyangana na Ekaniseli?
18 Likita oyo ekosalema mokolo ya 12 Aprili 2006 ekolendisa mpenza kondima ya bato moke oyo bazali bapakolami mpe bamilio ya baninga na bango bampate mosusu! Bakosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto, lokola Yesu atindaki ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Bayangani nyonso basengeli kobosana te makambo oyo Yehova asali mpo na bango na nzela ya Mwana na ye ya bolingo, Klisto Yesu.
Bozongeli
• Yehova azali na mokano nini mpo na biloko oyo ezali na likoló mpe oyo ezali awa na mabelé?
• Banani bazali “biloko oyo ezali na likoló,” mpe ndenge nini bayanganisami?
• Banani bazali “biloko oyo ezali na mabelé,” mpe bazali na elikya nini?
[Etanda na lokasa 23]
“Nzoto ya Klisto”
Na 1 Bakolinti 10:16, 17, Paulo asalelaki liloba “nzoto” na ndimbola ya sikisiki ntango amonisaki ntina ya limpa mpo na bandeko ya Klisto oyo bapakolami na elimo. Alobaki boye: “Limpa oyo tozali kobuka, ezali nde te bosangani moko na nzoto ya Klisto? Lokola limpa ezali kaka moko, biso, atako tozali mingi, tozali nzoto kaka moko, mpo biso nyonso tozali kolya limpa wana moko.” Ntango baklisto bapakolami balyaka limpa na Ekaniseli, bamonisaka bomoko na bango na kati ya lisangá ya bapakolami, oyo ezali lokola nzoto mpe Klisto azali Motó na yango.—Matai 23:10; 1 Bakolinti 12:12, 13, 18.
[Bililingi na lokasa 23]
Mpo na nini kaka bapakolami nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo?
[Elilingi na lokasa 25]
Na nzela ya mosala na ye ya kotambwisa makambo, Yehova akoyanganisa bikelamu nyonso na likoló mpe awa na mabelé