Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/10 nk. 5-7
  • Ndenge nini koyekola koyeba Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini koyekola koyeba Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazali koluka solo
  • Nzela oyo Nzambe asalelaka mpo na koteya
  • ‘Yehova apesaka mayele’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yehova​—Nzambe oyo azali na mokano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Yehova​—⁠Nzambe oyo akomonisaka makambo mabombami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/10 nk. 5-7

Ndenge nini koyekola koyeba Nzambe?

Bato mosusu bandimaka te ete Nzambe alingaka mpenza koyebisa bato ndenge oyo ye azali. soki alingaka, asalaka yango ndenge nini?

JEAN CALVIN, moko na bato oyo babandisaki Lingomba ya Protesta na bambula ya 1 600, alobaki solo ete bato bakoki koyeba Nzambe na ndenge na bango moko te, kaka ye moko nde akoki koyebisa bango ndenge oyo azali. Kasi, bato mosusu bakoki komituna soki Nzambe alingaka mpenza koyebisa bato ndenge oyo ye azali. Mpe soki alingaka, asalaka yango ndenge nini?

Yehova, “Mozalisi Monene,” asalaka makambo nyonso na ntina. Lisusu, lokola azali “Nzambe ya Nguya Nyonso,” akoki kokokisa mikano na ye nyonso. (Mosakoli 12:1, NW; Exode 6:3) Tóyeba ete Nzambe alingaka koyebisa bato mikano na ye, mpamba te elimo santu na ye etindaki mosakoli Amosa akoma boye: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai ya baombo na ye, bango basakoli.” Vɛrsɛ yango elobi ete Nzambe ayebisaki mikano na ye kaka epai ya baombo na ye, elingi koloba bato oyo balingaka ye na motema mobimba. Omoni te ete ebongi mpenza ezala bongo? Oyebisaka basɛkɛlɛ na yo epai ya nani? Epai ya moto nyonso to epai ya baninga na yo ya motema?​—Amosa 3:7; Yisaya 40:13, 25, 26.

Bwanya mpe boyebi oyo Nzambe azali na yango etindaka bato ya komikitisa bázala na limemya epai na ye mpe ebongi bongo. Kasi, limemya mpamba ekoki te soki tolingi kozwa litomba na bwanya mpe boyebi ya Nzambe. Biblia emonisi ete mpo na koyeba makanisi ya Nzambe, tosengeli kozala na komikitisa: ‘Bombá maloba na ngai kati na yo. Sembolá litoi na yo epai ya mayele. Tyá motema na yo na koluka boyebi. Lelá mpo na bososoli mpe gangá mpo na boyebi. Luká ye lokola palata.’​—Masese 2:1-4.

Moto ya komikitisa oyo azali kosala ndenge wana, akozanga te koyeba Nzambe. Vɛrsɛ yango ebakisi boye: “[Yehova] akopesaka mayele, boyebi mpe bososoli ekoutaka na monɔkɔ na ye.” Ya solo, bato ya mitema sembo oyo bazali koluka solo bakoki ‘koyeba boyengebene mpe kosambisa-sembo mpe kokata na solo, ɛɛ nzela nyonso malamu.’​—Masese 2:6-9.

Bazali koluka solo

Buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi boye: “Moto alukaka kokesenisa makambo ya solo na oyo ya lokuta, ya nguya na oyo ezangi nguya, ya sembo na oyo ezangi sembo, ya pɛto na oyo ya mbindo, ya polele na oyo ya molili, alukaka mpe koyeba soki bokeseni kati na makambo yango ezali monene ndenge nini.” Banda kalakala bato balukaka solo mpo na kokokisa mposa yango. Soki baluki yango epai ya Yehova, ye oyo mokomi ya nzembo abengi “Nzambe ya solo,” bakozwa yango.​—Nzembo 31:5, NW.

Nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” (Genese 2:4) Boye, ndimbola ya nkombo ya Nzambe emonisi ete azali Mozalisi mpe azali na mokano. Kutu, koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango ezali mpe elembo ya lingomba ya solo. Yesu amonisaki likambo yango polele. Na libondeli moko, alobaki mpo na bayekoli na ye boye: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”​—Yoane 17:26.

Ntango basɛngaki Yozefe, Moebele moko oyo azalaki kotyela Yehova motema, alimbola bandɔtɔ, alobaki na kondima nyonso ete: “Kolimbola ntina ezali mpo na Nzambe te?”​—Genese 40:8; 41:15, 16.

Bankama ya bambula na nsima, Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone alɔtaki ndɔtɔ moko kasi bato na ye ya mayele bakokaki kolimbola yango te. Mosakoli Danyele alobaki na mokonzi boye: “Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami mpe ye ayebisi mokonzi Nebukadanesala makambo makobima na mikolo ya nsuka.”​—Danyele 2:28.

Lisolo ya Yozefe mpe ya Danyele ezali komonisa ete kaka basambeli ya Yehova Nzambe nde bakoki kozwa bwanya mpe boyebi na ye. Ekoki mpe kosɛnga tóbwaka makanisi oyo tozalaki na yango liboso mpo Nzambe andima biso. Bayuda ya ekeke ya liboso oyo bakómaki baklisto basalaki bongo. Lokola bazalaki kotosa mpe kolanda mibeko ya ebongiseli ya Bayuda banda bomwana na bango, esɛngaki mwa ntango mpo bándima ete Yesu azali Masiya. Ayaki mpo na kokokisa Mibeko ya Moize, oyo ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Baebele 10:1; Matai 5:17; Luka 24:44, 45) “Mobeko ya Klisto,” oyo eleki Mibeko ya Moize, ezwaki esika na yango.​—Bagalatia 6:2; Baloma 13:10; Yakobo 2:8.

Biso nyonso tozali na kati ya mokili oyo bato mingi bapesi Nzambe mokɔngɔ. Lokola Adama ná Eva batikelá biso lisumu, tobotamaka lokola bato bazali mosika na Nzambe, oyo bazangi boyebi ya solosolo ya mikano na ye. Longola yango, motema na biso ezalaka na bokosi. (Yilimia 17:9; Baefese 2:12; 4:18; Bakolose 1:21) Mpo tókóma baninga ya Nzambe, tosengeli koyokanisa makanisi na biso na oyo ya Nzambe. Kosala yango ezali pɛtɛɛ te.

Ekoki kozala mpasi mpo na kotika mateya mpe misala ya mangomba ya lokuta, mingimingi soki bateyá biso yango banda bomwana. Kasi, okanisi ete ekozala likambo ya mayele kotikala na nzela ya mabe? Te! Eleki malamu kobongola makanisi na biso mpe na bongo, kondimama epai ya Nzambe.

Nzela oyo Nzambe asalelaka mpo na koteya

Epai wapi tokoki kozwa lisalisi mpo na koyeba mateya ya solo ya Biblia mpe na nsima, kosalela yango na bomoi na biso? Na Yisalaele, Nzambe aponaki mikóló ya sembo mpe apesaki bango mikumba mpo na kotambwisa makambo ya ekólo. Ndenge moko mpe lelo oyo, Klisto, Mokonzi ya lisangá ya boklisto, azali kotambwisa bato ya mitema sembo oyo bazali koluka solo. Na nzela ya bayekoli na ye ya sembo, azali kokamba mpe kobatela bango. (Matai 24:45-47; Bakolose 1:18) Kasi, ndenge nini moto akoki koyeba nzela oyo Nzambe asalelaka mpo na koteya?

Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto basalaka makasi mpo na komekola bizaleli oyo Yesu amonisaki ntango azalaki moto awa na mabelé. Na mokili oyo etondi na mabe, tokoki koyeba bayekoli yango na bizaleli na bango ya malamu. (Talá etanda na lokasa 6.) Omonaka bizaleli ya ndenge wana epai ya bato ya lingomba na bino to na mangomba mosusu oyo oyebi? Ebongi otalela likambo yango na kolanda makambo oyo Biblia elobi.

Tozali kolendisa yo oyekola Biblia mpo na koyeba yango. Na mbula eleki, bato koleka miliare 6 na mikili 235 bayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova. Koyekola Biblia mpo na kozwa bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali likambo oyo ezali na ndelo te, epesaka esengo mingi, mpe ezali na mbano. Mpo na nini te yo mpe obanda koyekola Biblia mpo ozwa bwanya mpe boyebi ya Nzambe? Okosepela mingi soki osali yango. Ya solo, tokoki mpenza koyeba Nzambe!

[Etanda na lokasa 6]

BATO OYO BASALAKA MAKAMBO OYO NZAMBE ASƐNGI . . .

bakɔtaka na makambo ya politiki te.​—Yisaya 2:4.

babotaka mbuma ya malamu mpo basalaka mokano ya Nzambe.​—Matai 7:13-23.

balinganaka mpenza.​—Yoane 13:35; 1 Yoane 4:20.

bateyaka makambo ndenge moko.​—Mika 2:12.

balandaka te makanisi mpe etamboli mabe ya bato oyo bazali zingazinga na bango.​—Yoane 17:16.

bateyaka solo mpe bakómisaka bato bayekoli.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

bayanganaka na makita mpo na kolendisana.​—Baebele 10:25.

na mokili mobimba, bakumisaka Nzambe na bomoko.​—Emoniseli 7:9, 10.

[Bililingi na lokasa 7]

Boyekoli ya Biblia na ndako, na libota, mpe na lisangá esalisaka moto ayeba Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto