Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/10 nk. 8-11
  • Bazali kozwa biloko ya motuya ya elimo na Guinée

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kozwa biloko ya motuya ya elimo na Guinée
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • Biloko ya motuya ya elimo euti na bamboka mosusu
  • “Biloko kitoko” bazali kobongwana
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/10 nk. 8-11

Bazali kozwa biloko ya motuya ya elimo na Guinée

NA BOUMELI ya bankama ya bambula, bato ndenge na ndenge bazalaki kotambola na mokili mpe batyaki bomoi na bango na likama mpo na koluka biloko ya motuya. Baoyo bakómaki na Guinée, ekólo moko ya Afrika ya Wɛsti, bamonaki biloko ya motuya ya lolenge mibale​—ya mabelé mpe ya elimo. Mabelé ya mboka Guinée etondi na diama, wolo, ebende, mpe aluminium; bato koleka milio libwa bafandaka na ekólo yango.

Atako mangomba ya boklisto ezali makasi te na ekólo yango, bato balingi kosambela mpe mingi bazalaka na limemya mpo na biloko ya motuya ya elimo. Kasi, biloko yango ya motuya ezali nini? Ezali basaleli ya sembo ya Yehova, oyo Hagai 2:7 (NW) ebengi bango “biloko kitoko ya bikólo nyonso.”

Biloko ya motuya ya elimo

Kotimola mabelé mpo na koluka biloko ya motuya esɛngaka milende mingi mpenza. Ezali mpe bongo na mosala ya kosakola, esɛngaka milende mpo na kozwa biloko ya motuya ya elimo. Nsango malamu ya Bokonzi ekɔtaki na Guinée na ebandeli ya bambula ya 1950 kasi, ekómaki na Conakry, engumba-mokonzi na ebandeli ya bambula ya 1960. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali soki 900, na kati ya masangá mpe bituluku 21.

Na 1987, batindaki bamisionɛrɛ na Guinée mpe basalaki elongo na bandeko ya lisangá kaka moko oyo ezalaki na Conakry. Lelo oyo, bamisionɛrɛ bazali koleka 20 na engumba-mokonzi mpe na bingumba mosusu. Na molende nyonso, bazali kolendisa bandeko mpe bazali kosakola na bango elongo.

Na Conakry, ndeko moko nkombo na ye Luc, asepelaki mingi ndenge ayekolaki Biblia na monganga moko nkombo na ye Albert. Albert akɔtaki na mangomba ndenge na ndenge mpo na koluka mateya ya solo, mpe azalaki kosala bikelakela. Azalaki kolata lopɛtɛ moko oyo nganga-nkisi apesaki ye mpo azala makila malamu. Lokola Albert amonaki lingomba ya solo te, abwakaki lopɛtɛ yango mpe abondelaki boye: “Nzambe, soki mpenza ozali, salisá ngai nayeba yo mpe nasalela yo. Soki te, nakosala makambo oyo motema na ngai ekosepela na yango.” Mwa moke na nsima, Albert akendaki kotala yaya na ye ya mwasi mpe ayokaki Motatoli ya Yehova moko azali koyekola Biblia na mwana ya yaya na ye. Na nsima, Albert ayokanaki na Motatoli yango mpo abanda koyekola na ye Biblia.

Pɔsɔ na pɔsɔ, Luc azalaki kotambola kilomɛtrɛ koleka mitano na kokende mpe na kozonga mpo na koyekola na Albert. Atako Luc atángá kelasi mingi te, kondima makasi oyo azalaki na yango na Biblia mpe lolenge oyo azalaki kolimbola ndenge ya kosalela boyebi ya Biblia esimbaki mpenza motema ya Albert, oyo atángá kelasi tii na iniversite. Albert asepelaki mingi ntango ayekolaki ete soki bato bazali konyokwama, ezali foti ya Nzambe te; kutu, Yehova akani kosilisa bampasi nyonso mpe kokómisa mabelé paladiso. (Nzembo 37:9-11) Mateya ya Biblia ná ezaleli ya malamu oyo Albert amonaki epai ya bandeko na lisangá esimbaki mpenza motema na ye.

Nzokande, kaka ndenge balongolaka salite na diama mpo engɛnga, Albert asengelaki kolongola bizaleli ya mabe mpo na koyokanisa bomoi na ye na mitinda ya sembo ya Nzambe. Atikaki kosala bikelakela, atikaki kolangwa masanga mpe kobɛta masano ya mbongo. Albert abundanaki mingi mpo atika likaya. Kasi, ntango abondelaki Yehova mpo na kosɛnga ye lisalisi, alongaki. Sanza motoba na nsima, akomisaki libala na ye na buku ya Leta. Mwasi na ye mpe abandaki koyekola Biblia. Lelo, bango mibale bazali basaleli ya Yehova oyo bazwi batisimo.

Moto mosusu oyo azali mpe diama ya elimo ezali Martin. Ye abandaki koyekola Biblia na engumba Guéckédou ntango azalaki na mbula 15. Ntango akómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, baboti na ye oyo bazali Bakatolike, bapekisaki ye. Bapasolaki mikanda na ye oyo elimbolaka Biblia, babɛtaki ye mpe babenganaki ye na ndako. Botɛmɛli oyo Martin akutanaki na yango esalisaki ye akolisa bolingo mpo na mateya ya Biblia. Na nsima, baboti na ye balɛmbisaki motema, mpe bazongisaki ye na ndako. Mpo na nini balɛmbisaki motema? Bamonaki ete etamboli ya Martin ekesanaki na oyo ya baleki na ye, oyo bakómaki motó makasi mpe kosala pite. Ntango tata ya Martin amonaki ete na lingomba na ye bazali koteya ye malamu, akómaki kosepela ete bandeko ya lisangá bákendaka na ndako na ye. Mbala mingi mama ya Martin apesaki bandeko matɔndi mpo na nyonso oyo basali mpo na mwana na ye. Martin azwaki batisimo ntango akómaki na mbula 18, na nsima akɔtaki Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe lelo oyo, azali mobongisi-nzela monene.

Biloko ya motuya ya elimo euti na bamboka mosusu

Biloko ya motuya oyo bazwaka na mabelé ya ekólo Guinée etɛkamaka na mikili misusu; kasi biloko ya motuya ya elimo ya ekólo yango eutaki mpe na bikólo mosusu. Bato mosusu oyo bafandaka na ekólo yango bautaki na bikólo mosusu ya Afrika, mingimingi mpo na kokima mpasi. Bamosusu mpe mpo na kokima bitumba.

Ernestine, oyo autaki na Cameroun, asali mbula 12 na Guinée. Ayekolá na Batatoli ya Yehova mpe azalaki koyangana na makita banda bambula mingi, kasi azalaki kozwa batisimo te. Na liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova na 2003, mpisoli etondaki ye na miso ntango amonaki bato bazali kozwa batisimo. Lisosoli na ye etungisamaki mingi mpe abondelaki Yehova boye: “Nazali sikoyo na mbula 51, mpe nasaleli yo ata eloko moko te. Nazali na mposa ya kosalela yo.” Na nsima, Ernestine asalaki makambo oyo asɛngaki na libondeli na ye. Ayebisaki mobali oyo azalaki kofanda na ye ete bakokoba kofanda kaka soki bakomisi libala na bango na buku ya Leta. Mobali yango andimaki mpe na nsima, Ernestine atangisaki nde mpisoli ya esengo ntango ye moko azwaki batisimo na sanza ya Novɛmbɛ 2004.

Na ebandeli ya bambula ya 1990, bato mingi, ata mpe Batatoli ya Yehova, oyo bautaki na Liberia mpe Sierra Leone, bazalaki kokima bitumba na bamboka na bango mpe bakómaki kofanda na Guinée. Ntango bandeko bakómaki na kaa ya bato bakimá mboka, bazwaki bibongiseli mpo básalaka makita, básakolaka, mpe bátonga Ndako ya Bokonzi. Bato mosusu bakómi basaleli ya Yehova na kaa ya bato bakimá mboka. Moko na bango ezali Isaac. Nsima ya kozwa batisimo na ye, bayebisaki ye ete akoki kozongela mosala na ye na kompanyi moko monene na Liberia. Kasi, aboyaki mpe aponaki kotikala na Lainé, kaa ya bato bakimá mboka, epai azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Alobi boye: “Awa nazali na mposa te ya kosɛnga patrɔ moko nzela mpo na kokende na makita to mayangani. Nazali kosalela Yehova na bonsomi.” Na Desɛmbɛ 2003, basalaki liyangani ya etúká mpo na Batatoli 150 ya kaa yango oyo ezalaki na bato 30 000. Bayangani bazalaki 591, kati na bango bababa 9 oyo balandaki mateya na bajɛstɛ mpo na kosolola na bababa. Bato zomi na mibale bazwaki batisimo. Bandeko ya kaa yango basepelaki mingi mpo na milende oyo esalemaki mpo na koleisa bango na elimo.

“Biloko kitoko” bazali kobongwana

Bato oyo balukaka diama to wolo balongaka ata mokakatano ya monene ndenge nini. Ndenge moko mpe, ezali esengo mingi komona ndenge bato ya sika bazali kolonga mikakatano mpo na kosalela Yehova. Tozwá ndakisa ya Zainab.

Ntango Zainab azalaki na mbula 13, batɛkaki ye lokola moombo. Bautaki na ye na ekólo mosusu na Wɛsti ya Afrika mpe bamemaki ye na Guinée. Ntango akokisaki mbula 20, ayokaki mateya ya Biblia. Azalaki mpenza na mposa ya kosalela makambo oyo azalaki koyekola.

Zainab azalaki na mokakatano mpo na koyangana na makita. Kasi, azalaki kosepela mingi na makita mpe azwaki ekateli ya kozangisaka yango te. (Baebele 10:24, 25) Azalaki kobomba mikanda na ye na libándá mpo azwa yango na nzela ntango azali kokende na makita. Mbala mingi, “bankolo” na ye bazalaki kobɛta ye soki akei na makita.

Nsukansuka, makambo ebongwanaki mpe Zainab alongwaki na boombo. Abandaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, mpe na bongo, akolaki noki na elimo. Aboyaki mosala ya mbongo mingi oyo elingaki kotinda ye azangisaka makita. Akomisaki nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, akómaki mosakoli, na nsima amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo. Aumelaki te, akómaki mobongisi-nzela mosungi. Sanza motoba na nsima, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

Nsima ya koyangana na mwa makita, moto moko oyo azali koyekola Biblia alobaki boye: “Soki nazali awa, nabosanaka ete nazali mobola.” Atako bato mingi basepelaka kaka na biloko ya motuya oyo ezali na nse ya mabelé ya Guinée, baoyo balingaka Yehova bazali koluka biloko ya motuya ya elimo. Ya solo, lelo oyo, “biloko kitoko ya mabota nyonso” ezali kokɔta na losambo ya pɛto ya Yehova!

[Etanda na lokasa 8]

GUINÉE-2005

Motángo ya Batatoli: 883

Bato oyo bazali koyekola Biblia: 1 710

Bayangani na Ekaniseli: 3 255

[Karte na lokasa 8]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

GUINÉE

Conakry

SIERRA LEONE

LIBERIA

[Elilingi na lokasa 9]

Albert ná Luc

[Elilingi na lokasa 9]

Ndako ya Bokonzi na Conakry

[Elilingi na lokasa 10]

Ernestine

[Elilingi na lokasa 10]

Martin

[Elilingi na lokasa 10]

Zainab

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

USAID

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto