Ntina ya koboya kolekisa ndelo
YEHOVA amonisaka bokatikati na ndenge ya kokoka. “Mosala na ye ebongi,” mpe boyengebene na ye ezalaka mabe te mpamba te etambolaka nzela moko na motema mawa na ye. (Deteronome 32:4) Bolingo na ye elandaka ntango nyonso mibeko na ye ya sembo. (Nzembo 89:14; 103:13, 14) Bankɔkɔ na biso ya liboso bazalaki na bokatikati na makambo nyonso ntango Nzambe akelaki bango. Bazalaki na mposa ya kolekisa ndelo na makambo te. Nzokande, nsima ya kosala lisumu, “libebi” to kozanga kokoka esalaki ete bázala lisusu na bokatikati te.—Deteronome 32:5.
Tópesa ndakisa: Osilá kotambwisa motuka to velo oyo pinɛ na yango ezali na litutu? Na ntembe te motuka to velo yango ezalaki kotambola malamu te, mpe ekokaki kosalisa yo aksida. Esengelaki kobongisa pinɛ wana liboso ebeba makasi to epasuka. Ndenge moko mpe, tosalaka mabunga mingi mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Soki totiki “matutu” to mabunga yango ekóma makasi, mobembo oyo tozali kosala na nzela ya bomoi ekoki kozala mpasi, ata mpe na makama.
Na bantango mosusu, tokoki kozanga bokatikati na makambo ya malamu. Na ndakisa, atako Mibeko ya Moize esɛngaki Bayisalaele bátya malenda na nsɔngɛ ya bilamba na bango, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Bafalisai bazangaki bokatikati na ndenge ‘bakómisaki nsɔngɛ ya bilamba na bango milaimilai,’ mpo balingaki komilakisa na miso ya bato. Balingaki ete bato bámona bango ete baleki basantu.—Matai 23:5; Mituya 15:38-40.
Lelo oyo, bato mingi bazali koluka na ndenge nyonso kobenda likebi ya basusu ata na makambo ya mabe. Yango ekoki kozala lokola nde bazali koloba: “Bótala ngai! Ngai mpe nazali moto!” Kasi, kolekisa ndelo na molato, na bizaleli, mpe na misala, ebongi te mpo na moklisto.
Bokatikati na mosala
Ata soki ozali nani mpe ofandaka na mokili nini, mosala esalisaka yo ozala na bomoi ya ntina. Tokelamá na mposa ya kosala mosala oyo ekosepelisa biso. (Genese 2:15) Yango wana, Biblia epekisi gɔigɔi. Mpo na yango, ntoma Paulo alobaki boye: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.” (2 Batesaloniki 3:10) Moto oyo alingaka mosala te akoki kozanga mbongo mpe esengo; kasi mpe Nzambe akosepela na ye te.
Nzokande, ezali na bato mosusu oyo bazangaka bokatikati, bakómaka baombo ya mosala. Ntango bazali kokende mosala ntɔngɔntɔngɔ mpe kozonga kaka butu, bakoki kokanisa ete bazali kosala bongo mpo na bolamu ya libota. Nzokande, kosala ndenge wana ezali kopimela libota makambo mosusu. Mwasi moko oyo mobali na ye asalaka tii nsima ya ngonga ya mosala alobaki boye: “Soki bayebisi ngai bálongola biloko nyonso ya kitoko oyo ezali na ndako oyo mpo mobali na ngai alekisaka ntango mingi elongo na ngai mpe na bana, nakondima.” Bato oyo balingaka koboma nzoto na mosala basengeli komanyola makambo oyo Mokonzi Salomo amonaki ye moko: “Ngai natali misala nyonso misalaki mabɔkɔ na ngai mpe na makambo nyonso mamekaki ngai kosala, mpe talá, nyonso ezalaki bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ.”—Mosakoli 2:11.
Ya solo, tosengeli kozala na bokatikati na mosala; tózala gɔigɔi te, tózala mpe baombo ya mosala te. Tokoki kozala makasi na mosala mpe kobosana te ete kozala moombo ya mosala ekolongola biso esengo mpe mbala mosusu makambo ya ntina mingi.—Mosakoli 4:5, 6.
Bokatikati na kominanola
Biblia esakolaki mpo na ntango na biso ete: “Bato bakozala . . . bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” (2 Timote 3:2, 4) Koluka bisengo ekómi moko na mitambo ya Satana oyo ezali kopusa bato mingi bápesa Nzambe mokɔngɔ. Bato mingi bakómi komipesa na masano mpe na kominanola ya makasi. Lolenge ya masano yango ezali se kokóma mingi mpe bato oyo bazali komipesa na yango bazali se kobakisama. Mpo na nini ekómi ndenge wana? Bato mingi bazali koluka bisengo na masano mpo bomoi na bango ezali na esengo te. Nzokande, mpo na koyoka esengo yango ntango nyonso, ezali kosɛnga bátya bomoi na likama. Baklisto oyo basalelaka makoki na bango ya kokanisa baboyaka masano oyo ekoki kozala likama mpo na bomoi na bango mpamba te bamemyaka bomoi mpe Mopesi na yango.—Nzembo 36:9.
Ntango Nzambe akelaki mwasi ná mobali ya liboso, atyaki bango wapi? Atyaki bango na elanga ya Edene, nkombo oyo elakisi “Esengo.” (Genese 2:8) Emonani polele ete mokano ya Yehova ezalaki ete bato bázala na bomoi oyo etondi na esengo.
Yesu atikaki ndakisa ya malamu na oyo etali kozala na bokatikati na ndenge ya kotalela kominanola. Amipesaki mobimba na kokokisa mokano ya Yehova, mpe azalaki te kokakola mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Azalaki kosalisa basusu, ata na bantango oyo azalaki ya kolɛmba. (Matai 14:13, 14) Yesu azalaki mpe kondima kokende epai ya bato oyo babengisi ye mpo na kolya mpe azalaki kozwa mwa ntango mpo na kopema. Na ntembe te, ayebaki ete banguna na ye mosusu bazalaki kosepela na ye te mpo azalaki kosala makambo wana. Balobaki mpo na ye ete: “Talá! Moto oyo amipesá na kolunda mpe na komɛla vinyo.” (Luka 7:34; 10:38; 11:37) Kasi, Yesu ayebaki malamu ete komipesa na Nzambe elimboli te koboya makambo nyonso oyo ekoki kopesa esengo na bomoi.
Tomoni ete ezali malamu tólekisaka ndelo te na oyo etali kominanola. Kotya bisengo mpe kominanola na esika ya liboso na bomoi ekoki komemela biso bolamu ya solosolo ata mokolo moko te. Ekoki nde kotinda biso tóbosana makambo eleki ntina, ata mpe boyokani na biso na Nzambe. Kasi, tosengeli te koboya bisengo nyonso to mpe koloba mabe mpo na bato mosusu oyo basepelaka na bomoi kozanga kolekisa ndelo.—Mosakoli 2:24; 3:1-4.
Zalá na bokatikati mpo ozala na bomoi ya esengo
Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Ntango tozali kosala milende mpo na koboya kolekisa ndelo, tokoki komona ete maloba yango ezali solo. Nini ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati? Tosengeli koyeba makasi na biso mpe bolɛmbu na biso. Yango ezalaka pɛtɛɛ te. Tokoki kolekisa ndelo na likambo moko kozanga ete tóyeba yango. Yango wana, tosengeli kozala penepene ya baklisto oyo bakɔmeli mpe koyokaka toli. (Bagalatia 6:1) Tokoki kosɛnga mpe toli epai ya moninga moko oyo totyelaka motema to epai ya nkulutu moko na lisangá. Batoli na bango mpe makanisi euti na Biblia ekoki kozala lokola “talatala” oyo ekosalisa biso tótala mpe tóyeba soki, na miso ya Yehova, tozali kolekisa ndelo te.—Yakobo 1:22-25.
Likambo ya esengo, tokoki kozala na bokatikati na bomoi na biso. Milende oyo tokosala mpe lisalisi ya Yehova ekoki kosalisa biso tókóma na bokatikati mpe na bongo, tózala na bomoi ya esengo. Soki tosali bongo, tokobongisa boyokani na biso na bandeko ya lisangá, mpe tokokóma bandakisa ya malamu mpo na bato oyo tozali koteya Biblia. Longola nyonso wana, tokomekola Yehova, Nzambe na biso ya bokatikati mpe ya bolingo.—Baefese 5:1.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
©Greg Epperson/age fotostock