Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/5 nk. 28-30
  • Tokoki kozala na mosala mingi ya kosala mpe kozala na esengo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki kozala na mosala mingi ya kosala mpe kozala na esengo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokumba oyo mokokisami malamu mokopesaka esengo
  • Tozala na bokatikati
  • Myango malamu mpo na kozala na bokatikati ntango nyonso
  • Tozala na bososoli
  • Ozali mobongisi-nzela oyo azali na bokatikati?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tozali na mosala mingi koleka?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Zala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Toli ya bwanya mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/5 nk. 28-30

Tokoki kozala na mosala mingi ya kosala mpe kozala na esengo?

MPO na mingi kati na biso tozalaka na makambo mingi ya kokokisa kati na bomoi, mbala mingi bomoi yango ezalaka mpenza ya yikiyiki. Mpo na kotikala na bomoi, bopusi ya mbala na mbala kati na bomoi ya lelo ezali kosenga na biso ete tosala milende makasi. Mibali mpe batata na mabota bazali na mikumba minene liboso na mabota na bango, liboso na bakonzi na bango ya mosala, mpe bongo na bongo. Basi mpe bamama na mabota basengeli kokokisa bamposa ya mosuni ya mabota na bango mpe, lisusu, mbala mingi bazali kosala epai mosusu. Bilenge bango mpe batalelami kati na mikumba misusu ya libota oyo basengeli kokokisa yango, nzokande, epai mosusu bazali kobongisama mpo na mokumba oyo bakozala na yango kati na libota ya bato.

Kasi ezali boni mpo na baoyo basili kopesa bomoi na bango mpo na mosala ya Jéhovah Nzambe mpe baoyo bazali Batemwe na ye babatisami? Likoló na misala ya moto na moto, bakisa libyangami ya nokinoki oyo lisalemi na ntóma Paulo: “Bongo, bandeko na ngai balingami, botelema ngwi, boninganaka te, bosalaka mosala na Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.” (1 Bakolinti 15:58) Ee, losambo na peto ezali kolimbola ebele na mikumba misusu. Ndenge nini tosengeli kokokisa mikumba nyonso wana na kobatelaka kimya ya elimo mpe na kozaláká na esengo?

Mokumba oyo mokokisami malamu mokopesaka esengo

Esengo, ezali liyoki ya bolamu to ya bosepeli, yango ekangisami mpenzampenza na likoki na biso ya komema mikumba ya bomoi. Ntango tozalaka na likoki ya komema mikumba na biso ya mokolo na mokolo na lolenge moko ya malamu mpenza, na kokokisa mikumba na ntango esengeli mpe na mayele, tozalaka na liyoki ya kokokisa malamu mosala na biso mpe tokozwaka na yango bosepeli. Yango nde ezali nzela malamu, oyo ezali kokamba na bolamu.

Kati na makanisi ya Jéhovah Nzambe akanisa soko moke te ete kokokisama ya mikumba na biso ezali bozito. Nkutu, mposa na ye ezali ntango nyonso ete, tokoka nde ‘kosepela mpo na malamu na mosala na biso makasi.’ (Mosakoli 3:12, 13) Soki tozali na esengo ya kosala, mpenza tokobota mbuma mingi. Tozali kondima mitinda na motema moko mpe tozali na boyokani ya kimya elongo na baninga. Nzokande, soki, tozali na mawa, mosala na biso ekozala ya malonga te, ekozala ntango nyonso lolenge moko, ekotungisa biso to mpe ekopesa mpasi na makanisi. Yango ekobimisaka motindo na misala oyo mizangi kobota mbuma mpe elimo ya kozanga kolónga. Na ntina na ebele na makambo oyo yango ezali kosenga epai na biso, bomoi ekomi etumba ya mokolo na mokolo. Na bongo soki toyebi mwango ya kozala ntango nyonso na esengo kati na misala na biso, tokozala na mabaku malamu mingi ya kozala na bomoi moko kitoko mpe ya kosepelisa.

Tozala na bokatikati

Soki tozali na mosala mingi, esengeli na biso komonisa ezalela ya bokatikati mpo na kozala na esengo. Kasi, bokatikati ezali nini? Ezali “kozanga kotengatenga kati na makanisi mpe mayoki.” Moto oyo azali na bokatikati asalaka nyonso mpo na kobongisa makambo na ye malamu. Akotya mikano mpo na mosala na ye, azongisaka mbala na mbala te makambo na ye mpo na mokolo mosusu mpe azali na bizaleli malamu. Azali komonisa ezalela ya komikanga motema mpo na kolya, komela, kominanola, na kolekisa ntango mpambampamba mpe kati na masano. Ya solo, “azali komipekisa na makambo nyonso.”​—1 Bakolinti 9:24-27; tala Tito 2:2.

Libondeli ezali na ntina mpo na kobatela bokatikati ya boklisto. Ye oyo azali kosalela Jéhovah, akoki kati na libondeli, kosenga ye lisungi ya elimo santu na ye mpe kobondela Tata na ye ya likoló ete asalisa ye na kolóna mbuma na yango, oyo kati na yango komikanga motema ezwami bongo na kati. (Luka 11:13; Bagalatia 5: 22, 23) Moklisto asengeli mpenza kobondela Nzambe soki akutani na mimekamo makasi oyo mizali koluka kobebisa bokatikati na ye. Mokomi na nzembo Davidi alobaki ete: “Kitisa mokumba na yo likoló na Jéhovah, zala na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 37:5, MN) Na bantango mosusu, tokoki mbala mosusu kozala na mposa ya kobondela Nzambe motindo moko lokola Davidi: “Ɛ Nzambe, yaka noki epai na ngai; yo ozali mosungi na ngai mpe mosikoli na ngai. Ɛ Jéhovah koumela te.” (Nzembo 70:5) Tokoki kobosana te ete likoki ezali ya kobatela bokatikati na biso na lisalisi ya libondeli mpe na bongo, ‘kosepela na kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso mpe ezali kobatela mitema na biso mpe bikaniselo na biso.’​—Bafilipi 4: 6, 7.

Mpo ete azali kotya elikya nyonso likoló na Jéhovah mpe azali kosepela na kimya na Nzambe, moklisto oyo azali na bokatikati akoki komonisa ete azali moto na elimo ebongi. (Tito 2: 11, 12) Yango nde ezali litomba ya bososoli malamu ya mitinda na Bíblia mpe kosalelama na yango. Moklisto motindo wana azali mokosi te mpe akozwaka makambo na bopotu te. Lokola azali moto ayebi kokanisa, akoboya kozala na motó makasi. Azali komikumisa te mpo na makoki na ye, likambo oyo likopesa ye nzela ete ayokana na bamosusu mpo na kosalana na bango elongo. (Mika 6:8) Ezali esengo na koyeba ete elili ya moto oyo azali na bokatikati ekokani na bizaleli oyo bisengami epai na baoyo baponami mpo na kokokisa mikumba ya bakengeli kati na lisangá ya boklisto.​—1 Timoté 3:2, 3.

Tokoki kozala na esengo mingi lisusu koleka soki tozali kosala milende mpo na kozala na bokatikati kati na misala na biso ya mokolo na mokolo. Soki tozali komonisa bizaleli oyo bikangisami na bokatikati, tokozala na likoki ya kokokisa mikumba na biso kozanga ete yango ebendela biso mindondo to kopesa biso mpasi kati na nzoto to na makanisi. Bomoi na biso ekomonisa bolongi monene, mpe tokobota mbuma mingi koleka. Na bongo bamosusu bakosepela mingi na biso mpe tokotonda na nsai mpe na esengo koleka. Kasi totalela mwa ndambo na myango malamu mpo na kozala na bokatikati.

Myango malamu mpo na kozala na bokatikati ntango nyonso

Mpo na kobatela bokatikati na biso, tosengeli kosala molende na kokokisa nokinoki mpe na mayele mikumba na biso moko. Esengeli na biso komibongisa liboso, na kotaleláká makambo makeseni na lolenge ya ebongiseli moko malamu. Baoyo bazali na ebongiseli malamu te mpe bazali na momeseno ya komema mbala na mbala makambo nyonso mpo na lobi, bazali komibendela mindondó kati na bomoi mpe mbala mingi bakomitungisaka kati na makanisi. Bolongi kati na likambo yango ekopesa biso liyoki ya komesena na ezalela yango, kasi oyo ya kolongama te na makambo oyo tozali kokutana na yango.

Tosengeli te koluka kosala makambo nyonso biso moko. Baoyo bakoboyaka lisalisi ya bas mosusu, mbala mingi bazwaka mpasi makasi, mpamba te bakosilikaka mpe bazali kolemba. Ebele na mikumba mikoki kokokisama epai na bamosusu. Mpo na yango, ezali likambo na mayele na kozwa litomba na makoki ya baoyo bazali na mposa ya kopesa biso maboko. Yango ekokitisa bobele mokumba na biso te, kasi ekopesa mpe libaku epai na bamosusu ete babelema pene na biso.

Ezali likambo na mayele te na komimekisa na bamosusu, baoyo bazali na makoki ya kosala mingi koleka biso. Komeka komekola baoyo bazali kosala mingi koleka biso elembisaka, mpamba te tozali komitalela ete tozali na makoki te lokola bango. Makanisi motindo wana makolembisaka, makotemelaka ekateli na biso mpe kotya motema na oyo biso moko tozali kosala. Paulo akomaki, “Tika ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na moto mosusu te.” (Bagalatia 6:4) Toyebaka ete mosali oyo alingami mingi, ezali ye oyo akolandaka malako, oyo abongi na kotyela motema mpe oyo azali kokokisa mosala malamu. Soki ezali bongo mpo na biso, boye misala na biso mikosepelisa mpe mikobenda bato mingi.​—Masese 22:29.

Tosengeli kobatela malamu kolongono na biso ya nzoto. Ezali moko na biloko na biso kitoko, mpo ete soki yango te, mbele tokokokisa bobele mwa mosala moke. Na bongo tosengeli mpenza kozala na momeseno ya kolya bilei oyo bizali malamu mpo na nzoto. Ezali malamu na kopemisa nzoto, mpe bongo kolala na bangonga malamu. Soki moleki mingi to soki toyoki ebandeli ya maladi, tosengeli te komeka kolekisa ndelo ya makasi na biso; yango ekoki kobendela biso mindondó.

Tosengeli kosenzela ete tokóma te moto oyo akomilelalelaka ntango nyonso. Soki tozali kopesa nzela na makanisi mabe, na ntembe te tokomona nzela ya koimaima mpo na makambo nyonso mpe mpo na bato nyonso. Ezali nde mwango ebongi mpo na komipimela esengo, mpe ya kopimela bato mosusu. Na esika ya kotonga baoyo bazali kopesa biso mpasi, to komilelalela, tosengeli nde koyebisa yango epai na baoyo bakotalelaka likambo yango mpe kotika bango ete babongisa. (Tala 1 Bakolinti 1:10-12.) Ezali malamu mpo na biso na kotalela makambo na lolenge ya kolónga, na koluka kososola bizaleli malamu epai na moninga to komizela na kokutana na makambo malamu kati na makambo oyo mazali kotambwisa bomoi na biso.​—Tala Yuda 3, 4, 16.

Ntango tozali kotya mikano mpo na misala na biso, tosengeli kobosana te ete kosala kozanga kopema, ezali solo nzela na koleka bamosusu, kasi yango ekoumelaka mingi te. Kolemba ntango molai na ntina na mosala esilisaka bobele makasi te, kasi ezali mpe na likámá ya kolembisa biso kino kobebisa ekateli na biso ya kolanda kosala na molende. Eleki malamu komityela motindo oyo mokoki kopesa nzela na koumela ntango molai. Na ndakisa ezali malamu na komityela ebongiseli esengeli mpo na kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola mpe na mitindo misusu ya mosala na boklisto. Tosengeli kobongisa bantango mpo na kominanola to komipesa na masano ya peto. Ezali malamu kosolola elongo na baninga na biso oyo bazali na mibu mingi ya ekspérianse, mpamba te basili koyekola kokokisa mikumba na bango kozanga ete balemba kati na nzoto to na makanisi.

Tozala na bososoli

Ezali malamu na kozala na mposa ye kokokisa mikumba nyonso oyo mipesameli biso, ezala oyo tozwi kati na lisangá ya basaleli na Jéhovah, to na komipesa mokumba ya kokokisa yango. Nzambe osepelaka na basali oyo bazali na molende, baoyo babongi na kotyela motema. (Tala Matai 25:21; Tito 2:11-14.) Nzokande, Makomami mapesi biso toli oyo ete: ‘Batela mayele mpe bososoli.’ (Masese 3:21) Soki tolandi batoli kitoko ya Biblia, tokozwa matomba; kasi esengeli na biso mpenza komonisa elimo ya moto na makambo mabongi mpe bososoli. Na bongo tokosama mikano malamu mpe tokosala bobele na bandelo ya makasi na biso.

Elendiseli ya kozala na mosala mingi kati na mosala ya Nkolo, esengeli kotalelama na kongengisama ya toli oyo ezwami kati na Mosakoli 9:4. Totangi boye: “Mbwa na bomoi eleki nkosi ekufi na malamu.” Ya solo, mbwa ya bomoi, ata soki etyolami epai na bato mosusu, ezali na motuya koleka nkosi ekufi, atako na miso ya bato mingi nkosi ezali, nyama ya lokumu. Kozaláká na bokatikati, kobateláká kolongono ya nzoto na biso, boye tokotikala na bomoi mpe tokokóba kokokisa mwa mosala moko. Bakufi, mpo na bango, bazali kosangana ata na mosala moko te. Bososoli ekosalisa biso mpo na kokokisa misala ya ntina kozanga ete tobungisa esengo na biso.

Ezali mpenza te mpo ete tozali na makambo mingi ya kosala nde tokoki kozala na esengo te. Bato oyo bazali na mosala mingi mpenza bakoki kozala na esengo koleka soki nde bazali na makanisi mabongi, soki balandi kotalela makambo na makanisi ya kolonga mpe bazali na bososoli mpo na kozala na bokatikati ntango nyonso. Tokoki kozwa esengo ya monene koleka soki tomonisi mayele, na kosanganaka na misala kitoko mpe na kotyaka elikya na biso likoló na Jéhovah Nzambe.​—1 Timote 6:17-19.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto