Lisolo ya bomoi
Nayekolaki kotyela Yehova motema
Ya Aubrey Baxter
Mokolo moko ya pɔsɔ na mpokwa, na 1940, mibali mibale bakangaki ngai, babɛtaki ngai makasi mpe nakweaki na mabelé. Bapolisi mibale batɛlɛmaki pembeni wana, kasi na esika básalisa ngai, bazalaki nde kofinga ngai mpe kokumisa bato oyo bazalaki kobɛta ngai. Makambo oyo ememelaki ngai minyoko ya ndenge wana ebandaki mbula mitano liboso, ntango nazalaki kosala na kompanyi moko ya kobimisa makala na nse ya mabelé. Tiká nayebisa bino.
NA BANA minei ya libota na biso, ngai nazali mwana ya misato. Nabotamaki na mobu 1913 na Swansea, engumba moko oyo ezali na bokula ya mbu na Nouvelle-Galles du Sud, na ekólo Australie. Ntango nakómaki na mbula mitano, libota na biso mobimba tobɛlaki grippe espagnole, oyo ebomaki bamilio ya bato na mokili mobimba. Likambo ya esengo, biso nyonso tobikaki. Kasi, na 1933, likambo ya mawa ekómelaki biso: mama akufaki ntango azalaki na mbula 47. Lokola azalaki kolinga Nzambe mingi, azalaki na volimi mibale ya buku Lumière, oyo azwaki epai ya Batatoli ya Yehova.
Na ntango wana, nazalaki kosala na kompanyi moko ya kobimisa makala na nse ya mabelé. Lokola na bangonga mosusu mosala ezalaki mingi te, nazalaki komema babuku yango na mosala mpe kotánga yango na mwa mwinda oyo ezalaki na ekɔti na ngai. Mosika te, namonaki ete nazwi solo. Nabandaki mpe kolanda masolo ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kolekisa na radio. Esengo na ngai ebakisamaki lisusu ntango tata ná bandeko na ngai nyonso babandaki kosepela na solo ya Biblia.
Na mobu 1935, likambo mosusu ya mawa ekómelaki biso: leki na ngai Billy abɛlaki maladi ya mpema mpe akufaki. Azalaki kaka na mbula 16. Nzokande, na mbala wana, elikya ya lisekwa ebɔndisaki biso. (Misala 24:15) Na nsima, tata ná bayaya na ngai, Verner ná Harold mpe basi na bango, bamipesaki epai ya Nzambe. Libota mobimba bakufá, natikalá kaka ngai moko. Nzokande, Marjorie, mwasi oyo Verner abalaki na nsima mpe Elizabeth, mwasi ya Harold, bazali mpe kokoba kosalela Yehova na molende.
Nayekolaki kotyela Yehova motema
Nakutanaki na Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso na mobu 1935, ntango mwasi moko ya ekólo Ukraine ayaki na velo epai na biso. Mokolo ya lomingo oyo elandaki, nayanganaki na makita mpo na mbala ya liboso, mpe pɔsɔ moko na nsima, nabandaki kobima na mosala ya kosakola na bandeko. Ndeko oyo atambwisaki likita ya mosala ya kosakola apesaki ngai mwa babuku, mpe likambo ya kokamwa, atindaki ngai kaka ngai moko! Na ndako ya liboso oyo nakɔtaki, mayele esilaki ngai mpe namonaki lokola mabelé efungwama mpe emɛla ngai. Kasi, nkolo-ndako asepelaki mpe andimaki kutu mikanda oyo napesaki ye.
Mikapo lokola Mosakoli 12:1 mpe Matai 28:19, 20 esepelisaki ngai mingi, mpe namonaki malamu nakóma mobongisi-nzela. Tata andimaki likanisi na ngai. Atako nazwaki naino batisimo te, namityelaki mokano ya kobanda mosala yango mwa 15 Yuli 1936. Mokolo yango, nakendeki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Sydney, mpe kuna batindaki ngai nakende kosala elongo na babongisi-nzela mosusu 12 na mboka moko ya mosika, na Ngomba Dulwich. Balakisaki ngai ndenge ya kosalela masini ya konika blé, oyo babongisi-nzela bazalaki kosalela na ntango wana mpo na kosala farini bango moko, mpo bábungisaka mbongo mingi te.
Tozali babongisi-nzela na zamba
Nsima ya kozwa batisimo mwa basanza na nsima, batindaki ngai ná babongisi-nzela mosusu mibale, Aubrey Wills mpe Clive Shade, na etúká ya Queensland. Biloko oyo tozalaki na yango ezalaki motuka ya Aubrey, bavelo, fono moko mpo na koyokisa bato masolo ya Biblia, hema moko oyo tozalaki kolalela na boumeli ya mbula misato, mbeto misato, mesa moko mpe lituka moko. Mokolo moko na mpokwa, ezalaki ngala na ngai ya kolamba, nakanisaki ete nalambi elubu moko kitoko ya ndunda ná pɔtɔpɔtɔ ya blé. Kasi, tokokaki kolya yango te. Napesaki yango mpunda moko oyo ezalaki pembeni wana. Elumbutaki biloko yango, eningisaki motó mpe ekendaki. Banda wana, natikaki kolamba biloko oyo nalambá naino te.
Lokola tozalaki na ekateli ya kosilisa teritware na biso noki, tokabolaki yango na biteni misato mpe moto na moto asalaki oyo ya ye. Mbala mingi na mpokwa, nazalaki mosika na esika oyo tozalaki kolala, mpe nazalaki mbala mosusu kolala epai ya bato ya mboka oyo bazalaki koyamba ngai. Mokolo moko, nalalaki na mbeto moko ya kitoko na shambre ya bapaya na ferme moko ya bangɔmbɛ, mpe na butu oyo elandaki, nalalaki na mabelé, na kati ya mwa ndako moko ya mobomi ya bakanguru, pembeni ya mposo ya banyama oyo ezalaki kotindika nsolo. Mbala mingi, nazalaki kolala na zamba. Mokolo moko, bambwa ya zamba bazingaki ngai na mosika mpe bazalaki koganga makasi butu mobimba. Nalalaki te butu mobimba, mpe na ntɔngɔ nayaki koyeba ete bazalaki kolanda ngai te, kasi biloko ya kati ya banyama oyo babwaki pembeni wana.
Kosakola na motuka oyo ezalaki na mikro
Motuka yango esalisaki biso mingi na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. Na engumba Townsville, oyo ezali na nɔrdi ya etúká ya Queensland, bapolisi bandimaki tósala wana. Kasi, masolo oyo tobandaki koyokisa bato esilikisaki bato mosusu ya Lingomba ya Armée du salut mpe balobaki na biso tólongwa wana. Ntango toboyaki, mitano kati na bango babandaki koningisa motuka na biso makasi. Na ntango wana, ngai nazalaki na kati, nazalaki kotya masolo. Tomonaki ete ekozala malamu te tótikala kaka wana atako bapolisi bapesaki biso nzela, yango wana ntango mibali yango batikaki koningisa motuka, tokendaki.
Na engumba Bundaberg, moto moko oyo asepelaki na nsango malamu adefisaki biso bwato mpo tótambola na yango na Ebale Burnett oyo eleká na katikati ya engumba, mpo na koyokisa bato nsango malamu na lisalisi ya fono na biso. Aubrey ná Clive bakɔtaki na bwato yango ná bikóliseli ya lolaka mpe ngai natikalaki na ndako oyo tozalaki kofutela. Na butu wana, bato ya engumba Bundaberg bayokaki mongongo makasi ya Joseph F. Rutherford, oyo azalaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova, ezali kosakola mateya ya Biblia. Na ntembe te, wana ezalaki ntango moko ya esengo mpenza, oyo ezalaki kosɛnga basaleli ya Nzambe bázala na mpiko mpe kondima.
Etumba ebakisi mikakatano
Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, oyo ebandaki na Sɛtɛmbɛ 1939, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ elimbolaki ndenge oyo moklisto asengeli komonisa ete akɔtaka te na politiki mpe na bitumba. Nsima ya bambula, makambo oyo natángaki na lisolo yango esalisaki ngai mingi. Nsima ya kosala mbula misato elongo, batindaki biso moto na moto na teritware na ye. Nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga na nɔrdi ya etúká ya Queensland, epai kondima na ngai etyamaki na komekama mbala na mbala.
Na Augusto 1940, natalaki lisangá ya engumba Townsville, oyo ezalaki na babongisi-nzela minei: Percy Iszlaub ná mwasi na ye Ilma,a mpe Norman Bellotti ná ndeko na ye Beatrice Bellotti. Mbula motoba na nsima, ngai ná Beatrice tobalanaki. Mokolo moko ya pɔsɔ na mpokwa, ntango tosilisaki kosakola, batɛmɛli bakangaki ngai mpe babɛtaki ngai, ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo. Kasi, likambo yango ebakisaki lisusu nde molende na ngai na mosala ya Yehova.
Bandeko basi mibale, Una Kilpatrick ná Merle Kilpatrick, bazalaki babongisi-nzela ya molende mpenza na nɔrdi. Nalekisaki mokolo moko ya esengo mpenza elongo na bango na mosala ya kosakola, mpe na nsima basɛngaki ngai nakatisa bango ebale na bwato mpo na kokende epai ya libota moko oyo basepelaki na nsango malamu. Yango esɛngaki nabɛta mai tii na ngámbo mosusu, nazwa bwato, mpe nazonga kozwa bango. Kasi, ntango nakɔtaki na bwato yango, namonaki bankai te. Na nsima, toyaki koyeba ete motɛmɛli moko abombaki yango. Atako bongo, yango epekisaki biso te tókoba mobembo na biso. Lokola nazalaki kosala mosala ya kobikisa bato oyo balingi kozinda na mai, nazalaki mobɛti monene ya mai. Na yango, namikangaki nsinga ya bwato yango na loketo, nabendaki yango tii na ngámbo mosusu, nazwaki bango mpe tokatisaki lisusu. Yehova apambolaki mpenza milende na biso, mpo nsukansuka libota yango bakómaki Batatoli.
Lobɔkɔ ya Yehova ezalaki na biso
Mpo na kobatela mboka, basoda bakangaki nzela pene na engumba Innisfail. Lokola nazalaki kofanda pene na esika yango, nazalaki na mikanda oyo ezalaki kopesa ngai ndingisa ya kokɔta na engumba yango, mpe yango esalisaki mingi ntango bandeko ya biro ya filiale bayaki kotala biso. Mpo na kolekisa bango na esika oyo basoda bakangaki nzela, nabombaki bango na nse ya kiti ya nsima ya motuka.
Na ntango wana, esansi ekómaki mpasi mpe mituka mingi ekómaki kosalela masini moko oyo ebotaka gaze. Mpo na kopelisa motɛrɛ, masini yango ezalaki kobongola makala gaze. Nazalaki kotambola na butu, natondisi basaki ya makala na esika oyo nabombi bandeko. Soki natɛlɛmi na esika moko oyo basoda bakangi nzela, nazalaki kotika motɛrɛ ezali kobaluka makasi mpe kosala ete ndako ya makala ezala na mɔtɔ makasi, mpo na kolongola likebi ya basoda. Na butu moko, nalobaki na basoda ete: “Soki nakati motɛrɛ, gaze ekokita mpe ekozala mpasi mpo na kopelisa yango lisusu.” Lokola mɔtɔ ná lokito ezalaki makasi mpe mputulu ya makala ezalaki kobima, basoda batalaki motuka yango kaka likolólikoló mpe balekisaki ngai.
Na mikolo wana, bapesaki ngai mokumba ya kobongisa liyangani ya etúká na engumba Townsville mpo na bandeko ya engumba yango. Lokola biloko ekómaki mpasi, tosengelaki kozwa ndingisa epai ya zuzi ya engumba mpo na kozwa biloko oyo tosengelaki na yango mpo na liyangani. Na ntango yango, bazalaki kokanga bandeko mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili. Yango wana, ntango nasɛngaki nakutana na zuzi yango, namitunaki boye: ‘Likambo oyo nazali kosala ezali mpenza bwanya to nazali nde kotumola nkoi oyo alali?’ Kasi, nasalaki kaka ndenge bandeko basɛngaki ngai nasala.
Ntango nakɔtaki, nakutaki zuzi yango afandi liboso ya mesa moko ya monene mpe asɛngaki ngai nafanda. Ntango nayebisaki ye ntina oyo nayaki kokutana na ye, atikalaki nyɛɛ mpe atalaki ngai ntango molai. Na nsima, atunaki ngai boye: “Bolingi biloko ya ntalo boni?” Napesaki ye liste ya mwa biloko oyo tozalaki na mposa na yango. Atalaki yango mpe alobaki boye: “Namoni lokola biloko oyo bosɛngi ezali moke. Ekozala malamu bóbakisa.” Ntango nabimaki na biro na ye, natɔndaki mpenza Yehova mpo na liteya mosusu oyo autaki kopesa ngai ya kotyela ye motema.
Na sanza ya Yanuali 1941, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Australie. Bato mingi bakómaki kozwela biso makanisi mabe, mpe bazalaki ata koloba ete tozali kotɛka mboka epai ya bato ya Japon. Mokolo moko, mituka mibale oyo etondaki na bapolisi ná basoda ekɔtaki na Ferme ya Bokonzi, mabelé oyo tosombaki na Ngomba Atherton mpo na kolonaka biloko. Bazalaki koluka mwinda moko oyo bazalaki koloba ete tosalelaka mpo na koyebisa banguna makambo. Bafundaki biso mpe ete tozali kolona masango na ndenge oyo ekosalisa bato oyo bazali na mpɛpɔ bátánga makambo. Kasi, bifundeli nyonso wana ezalaki ya lokuta.
Lokola bapekisaki mosala na biso, tosengelaki kozala na bokɛngi mpe kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kokabola mikanda. Na ndakisa, ntango buku Bana ebimaki, nazwaki kartɔ na yango moko na engumba Brisbane, nakendaki na yango na engbunduka na ngámbo ya nɔrdi mpe nazalaki kotika yango nzelanzela, na esika nyonso oyo lisangá ezalaki. Mpo bapolisi báfungola kartɔ yango te, nazalaki kotambola na sii moko, mpe liboso ya kokita na engbunduka, nazalaki kotya yango likoló ya kartɔ. Atako ezalaki kaka mwa mayele ya moke, bakangaki ngai ata mbala moko te. Na esengo ya basaleli ya Yehova, epekiseli yango, oyo tribinale elobaki ete ezali na boyokani na mibeko te, elongwaki na sanza ya Yuni 1943.
Basɛngi biso tókóma basoda
Mbula moko liboso, basɛngaki ngai ná Aubrey Wills mpe Norman Bellotti tókɔta na mosala ya soda. Bakangaki Aubrey ná Norman pɔsɔ moko liboso bákanga ngai, mpe bakatelaki bango bolɔkɔ ya sanza motoba. Na ntango wana, biro ya posita ezalaki kokanga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bazalaki kotindela Batatoli ya Yehova oyo bayebanaki, kasi te oyo ya batángi mosusu. Mokumba na biso ezalaki ya koluka moko ya batángi yango, kosala bakopi mpe kokabolela bandeko. Na ndenge yango, tozalaki kozanga bilei ya elimo te.
Ntango bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ oyo nazalaki kozela ya sanza motoba, nasɛngaki mbala moko ete tribinale etalela likambo yango, ndenge biro ya filiale esɛngaki ngai nasala. Tozalaki kosala nyonso wana kaka mpo ntango eleka, kino bakotya moto mosusu na esika na ngai mpo na kotambwisa misala na biso. Nasalelaki mwa mikolo ya bonsomi oyo natikalaki na yango mpo na kotala Batatoli soki 21 oyo bazalaki na bolɔkɔ na nɔrdi ya etúká ya Queensland. Mingi na bango bazalaki na bolɔkɔ moko, mpe mokonzi ya bolɔkɔ yango azalaki koyina biso mabe. Ntango nakundwelaki ye ete bakonzi ya mangomba mosusu bayaka mpe kotala bato na bango, asilikaki makasi. Alobaki boye: “Soki ngai nde nazalaka mokonzi na mboka oyo, mbele totandaki Batatoli ya Yehova nyonso molɔngɔ mpe tobɛti bango masasi.” Basoda babwakaki ngai libándá.
Ntango mokolo oyo nasɛngelaki kosamba ekokaki, bapesaki ngai avoka ndenge mobeko esɛngi. Kasi, nakoki koloba ete nasambaki kaka ngai moko, yango wana, natyaki motema epai ya Yehova, mpe ye atikaki ngai te. (Luka 12:11, 12; Bafilipi 4:6, 7) Likambo ya kokamwa, nalongaki likambo yango mpo mokomeli ya tribinale asalaki mabunga ntango azali kokoma makambo oyo bafundaki ngai na yango.
Na 1944, batindaki ngai nakende kotalaka masangá na zongazonga moko ya monene, oyo ezwaki sudi mobimba ya Australie, nɔrdi ya etúká ya Victoria, mpe engumba Sydney, na Nouvelle-Galles du Sud. Na mbula oyo elandaki, masukulu ya bato nyonso ebandaki kosalema na mokili mobimba. Molobi mokomoko asengelaki kobongisa lisolo na ye moko na kolanda plan ya moombo ya sembo. Kosala lisolo na boumeli ya ngonga mobimba ezalaki mama ya likambo; kasi tosalaki yango mpo totyelaki Yehova motema, mpe Yehova apambolaki milende na biso.
Libala mpe mikumba mosusu
Na Yuli 1946, ngai na Beatrice Bellotti tobalanaki, mpe tokómaki kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo. Ndako na biso ezalaki wagɔ moko ya mabaya oyo tozalaki kotambolatambola na yango. Jannyce (Jann), mwana kaka moko oyo tobotaki, abotamaki na Desɛmbɛ 1950. Tosakolaki na bisika ebele, na ndakisa na engumba Kempsey, na Nouvelle-Galles du Sud, epai tozalaki Batatoli kaka biso moko. Mokolo nyonso ya lomingo, tozalaki kokende na ndako moko ya makita ya engumba yango mpe nazalaki kosala lisukulu ya bato nyonso oyo toyebisaki bato liboso ete ekosalema. Na boumeli ya mwa basanza, kaka Beatrice ná bebe Jann nde bazalaki kolanda masukulu yango. Kasi mosika te, ebele ya bato mosusu babandaki koya. Lelo oyo, masangá mibale ya minene ezali na engumba Kempsey.
Ntango Jann akómaki na mbula mibale, tokómaki kofanda na engumba Brisbane. Ntango asilisaki kelasi, tosalaki libota mobimba lokola babongisi-nzela na boumeli ya mbula minei na engumba Cessnock, na etúká ya Nouvelle-Galles du Sud, liboso tózonga na Brisbane, mpo na kosalisa mama ya Beatrice, oyo akómaki kobɛla. Lelo oyo, nazali nkulutu na lisangá ya Chermside, kartye moko na engumba Brisbane.
Ngai ná Beatrice tozali mpenza kotɔnda Yehova mpo na ebele ya mapamboli oyo asopeli biso, na ndakisa tosalisi bato 32 báyeba ye. Ngai moko natɔndaka Yehova mpo na mwasi na ngai ya bolingo oyo, atako alobaka mingi te, azalaki koteya solo na mpiko nyonso. Lokola alingaka Nzambe mingi, atyelaka ye motema mpe alukaka makambo ya minene te, yango esali ete azala mwasi mpe mama ya solosolo. (Matai 6:22, 23; Masese 12:4) Elongo na ye, nakoki koloba na motema moko ete: “Moto apambolama oyo akotalela [Yehova] mpe oyo [Yehova] azali elikya na ye.”—Yilimia 17:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya bomoi ya Percy Iszlaub ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1981 (na Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 9]
Tosalelaki motuka ya mikro oyo na nɔrdi ya etúká ya Queensland
[Elilingi na lokasa 10]
Nazali kosalisa bandeko basi Una Kilpatrick ná Merle Kilpatrick na kotindika motuka na bango na ntango ya mpela, na nɔrdi ya etúká ya Queensland
[Elilingi na lokasa 12]
Mokolo ya libala na biso