Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/11 nk. 22-27
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na ngai
  • Nakangami
  • Etumbu ya liwa
  • Misala na nsima ya etumba
  • Nazali lisusu monzemba te
  • Mapamboli kitoko ya Yehova
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nazali kopesa Yehova eloko oyo ebongi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nasalelaki Yehova na motema molai uta bolenge na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yehova apesaki “Nguya oyo eleki makasi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/11 nk. 22-27

Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’

LISOLO YA EMMANUEL PATERAKIS

Esili koleka bikeke zomi na libwa ntoma Paulo azwaki libyangi monene oyo ete: “Yaká na Makɛdɔnia kosunga biso!” Paulo andimaki na bolingi nyonso libaku yango ya sika mpo na “kosakola nsango malamu.” (Misala 16:9, 10) Atako libyangi oyo nazwaki eumeli bikeke mingi bongo te, kasi esili koleka mbula 50 nde nandimaki “koleka” na bateritware ya sika engebene makanisi ya Yisaya 6:8 oyo elobi ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” Mibembo ndenge na ndenge oyo nazalaki kosala mipesi ngai nkombo ya lisɛki Turiste ya ntango nyonso, kasi misala na ngai mizalaki mpenza na bokokani te na oyo ya turiste. Mbala mingi, ntango nakómaki na eteni na ngai ya ndako na lotɛ́lɛ, nafukamaki na mabɔ́lɔ́ngɔ́ mpe napesaki matɔ́ndi na Yehova mpo na libateli na ye.

NABOTAMAKI na mwa 16 Yanuáli 1916, na Hierápetra, na Crète, na libota moko oyo emipesaki mingi na lingomba Ortodokse. Uta ntango nazalaki naino elɛzi, mama azalaki kokenda na ngai mpe bandeko na ngai ya basi misato na ndakonzambe mokolo ya Lomingo. Nzokande tata na ngai, ye azalaki kosepela kotikala na ndako mpe kotánga Biblia. Nazalaki kolinga tata na ngai mingi​—moto na sembo, moto na boyengebene mpe moto na ngɔlu​—mpe kufa na ye, wana nazalaki na mibu libwa, epesaki ngai motema mpasi mingi.

Nazali komikundola ete ntango nazalaki na mibu mitano, natángaki mokapo moko na eteyelo oyo mozali koloba ete: “Biloko nyonso bizwami zingazinga na biso bizali kosanzola bozali ya Nzambe.” Wana nazalaki kokóla, nandimisamaki mpenza mpo na yango. Na bongo, ntango nakómaki na mibu 11, nakanaki kokoma lisoló na motó na likambo ezwami na Nzembo 104:24 oyo elobi ete: “Misala na yo mingi boni, ɛ [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na mayele malamu; mokili etondi maa na biloko bisalaki yo.” Nakamwaki mingi na kitoko ya biloko bizalisami, ata na biloko mike lokola mimbóto oyo ezalaki na mwa mapapu mike na boye ete ekokaki komemama na mopɛpɛ longwa na nsé ya nzeté oyo ebotaki yango. Pɔ́sɔ moko na nsima ya kosala lisoló na ngai, molakisi na ngai atángaki yango na mongongo makasi liboso ya kelasi mobimba, na nsima liboso ya eteyelo mobimba. Na ntango yango, balakisi bazalaki kobundisa mateya ya bakoministe mpe basepelaki koyoka lisoló na ngai litali bozali ya Nzambe. Mpo na ngai, nazalaki bobele na esengo ya komonisa kondima na ngai kati na Mozalisi.

Biyano na mituna na ngai

Bokutani na ngai ya liboso na Batatoli ya Yehova na ebandeli ya bambula 1930 ezali naino na makanisi na ngai. Emmanuel Lionoudakis azalaki kosakola na bingumba nyonso mpe bamboka nyonso ya Crète. Nazwaki mwa babúku mingi epai na ye, kasi ezalaki na moko oyo ezalaki na motó na likambo ete Bakufi bazali wapi? nde ebendaki likebi na ngai. Nazalaki na bobángi moko mabe ya bakufi na boye ete nazalaki kútu kolinga te kokɔta na eteni ya ndako epai kuna tata na ngai akufaki. Lokola natángaki mwa búku yango mbala na mbala mpe nayekolaki oyo Biblia ezali koteya na ntina na ezalela ya bakufi, namonaki ete nsɔ́mɔ na ngai oyo eutaki na biyambayamba elongwaki.

Mbala moko na mbula na boumeli ya eleko ya molungé, Batatoli bazalaki koya na engumba na biso mpe bazalaki komemela ngai mikanda mingi mpo na kotánga. Mokemoke bososoli na ngai likoló na Makomami ezalaki kokóla, kasi nazalaki kokóba kokenda na ndakonzambe ya Ortodokse. Nzokande, búku Délivrance ebongolaki bomoi na ngai. Ezalaki komonisa polele bokeseni kati na ebongiseli ya Yehova mpe oyo ya Satana. Uta ntango wana, nabandaki koyekola Biblia mbala na mbala mpe kotánga mokanda nyonso ya la Société Watch Tower oyo nakokaki kozwa. Lokola Batatoli ya Yehova bazalaki kati na epekiseli na Grèce, nazalaki koyekola na butu na nkuku. Kasi, nasepelaki mingi na makambo nazalaki koyekola na boye ete nakokaki te komipekisa mpo na kosolola na moto nyonso na ntina na yango. Mosika te, bapolisi babandaki kosɛnzɛla ngai, koya kotala ngai mbala na mbala na moi mpe na butu mpo na koluka mikanda.

Na 1936, nayanganaki na likita mpo na mbala ya liboso, na ntáka ya kilomɛtɛlɛ 125 longwa na Iráklion. Nazalaki na esengo mingi ya kokutana na Batatoli. Mingi kati na bango bazalaki bato na bopɔlɔ, ebele bazalaki basali-bilanga, kasi bandimisaki ngai ete yango ezalaki solo. Komipesa na ngai epai na Yehova esalemaki nokinoki.

Kobatisama na ngai ezali likambo oyo nakoki kobosana soko moke te. Mokolo moko na butu ya 1938, ndeko Lionoudakis akamataki ngai mpe bayekoli ya Biblia na ngai mibale, tokendaki na ntango ya molili makasi na libóngó. Nsima ya kosala libondeli, azindisaki biso na mai.

Nakangami

Mbala ya liboso mpenza oyo nabimaki kosakola, mpo na koloba kozanga kolekisa ndelo, etikala kati na makanisi na ngai. Nakutanaki na moninga moko ya kala oyo totángaki na ye eteyelo moko oyo akómaki sángó, mpe tosololanaki malamu mpenza. Kasi na nsima na yango alimbolaki ete na boyokani na etinda ya episkɔ́pɔ, asengelaki kokanga ngai. Wana tozalaki kozela kati na biro ya mondele-mboka boyei ya bapolisi oyo basengelaki kouta na mboka moko ya pembeni, etuluku ya bato bayanganaki libándá. Na bongo, nakamataki Nouveau Testament ya Greke oyo ezalaki na biro mpe nabandaki kosalela bango lisoló moko engebene Matai mokapo 24. Na ebandeli, bato balingaki kolanda te, kasi sángó azwaki maloba. Alobaki ete: “Tiká ye aloba. Ezali Biblia na biso.” Nazalaki na likoki ya koloba na boumeli ya ngonga moko na ndambo. Na yango, mokolo na ngai ya liboso kati na mosala ya kosakola ezalaki mpe libaku mpo na ngai ete nasala lisukúlu ya bato nyonso mpo na mbala ya liboso. Lokola bapolisi bakómaki naino te ntango nasilisaki, mondele-mboka mpe sángó bazwaki ekateli ete etuluku ya bato babengana ngai na engumba. Na libúnu ya liboso na nzela, nabandaki kopota na lombangu nyonso mpo na kokima mabángá oyo bazalaki kobamba ngai.

Mokolo oyo elandaki, bapolisi mibale, elongo na episkɔ́pɔ, bakangaki ngai na mosala. Na biro ya bapolisi, nazalaki na likoki ya kotatola na ntina na Biblia epai na bango, kasi lokola mokanda na ngai oyo mokolimbolaka Biblia mozalaki na sinyatili ya episkɔ́pɔ te oyo esɛngami na mobeko, nakweisamaki ete nazalaki kopalanganisa mateya ya lingomba mosusu mpe kokabola mikanda oyo mipekisami. Nabimisamaki mpo na kozela kosambisama.

Kosambisama na ngai esalemaki nsima ya sanza moko. Wana nazalaki kosamba, namonisaki ete nazalaki kotosa bobele etindá ya Klisto ya kosakola nsango malamu. (Matai 28:19, 20) Mosambisi azongisaki na litiyo nyonso ete: “Mwana na ngai, moto oyo apesaki etindá wana abakisamaki na ekulusu. Likambo ya mawa, nazali na bokonzi te ya kopesa yo etumbu lolenge yango.” Kasi, zuzi moko elenge oyo nayebaki liboso te andimelaki ngai mpe alobaki ete lokola mateya ya bakoministe mpe baoyo bandimaka te ete Nzambe azali matondi mingi, esambiselo esengelaki kosepela mpamba te ezali na bilenge oyo babongisami mpo na koteya Liloba ya Nzambe. Na nsima ayaki epai na ngai mpe apesaki ngai longonya na bosembo nyonso na ntina na makambo oyo bakonzi bakomaki na kosambisama na ngai. Kokamwáká ete nazalaki mpenza elenge, ayebisaki ngai ete akokɔtela ngai kozanga kosɛnga mosolo. Na esika ya kosala sanza soko misato na bolɔ́kɔ, nasengelaki kolekisa bobele mikolo zomi mpe kofuta amandɛ ya drachma 300. Botɛmɛli motindo wana elendisaki kútu mokano na ngai ya kosalela Yehova mpe koloba na ntina na solo.

Na libaku mosusu ntango nakangamaki, mosambisi akamwaki na lolenge nazalaki kopesa mikapo ya Biblia kozanga nkaká. Asɛngaki na episkɔ́pɔ ete abima na biro, alobaki ete: “Osili kosala mosala na yo. Ngai moko nakotalela oyo etikali.” Na nsima abimisaki Biblia na ye mpe tosololaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe na boumeli ya nsima ya nzánga mobimba. Mabaku motindo wana malendisaki ngai ete nakenda liboso atako mikakatano ezalaki.

Etumbu ya liwa

Na 1940, nabyangamaki mpo na kokɔta na mosala ya sodá mpe nakomaki nkomá oyo ezalaki kolimbola mpo na nini nakokaki te komikɔtisa na mosala yango. Nsima ya mikolo mibale nakangamaki mpe nabɛtamaki makasi na bapolisi. Na nsima, natindamaki na molɔngɔ́ ya liboso na bitumba na Albanie, epai kuna nasambisamaki na basodá mpamba te naboyaki kobunda. Bakonzi ya basodá bayebisaki ngai ete mposa na bango ezalaki mpenza te ya koyeba soki nazalaki na elónga to na ekweli nzokande bazalaki komitungisa mpo na bopusi oyo ndakisa na ngai ekokaki kozala na yango likoló na basodá. Nakatelamaki etumbu ya liwa, kasi na ntina na libunga kati na lolenge ya kosambisa, na kobɔndisama nyonso, etumbu yango ekutolamaki na mbula zomi ya mosala makasi. Nalekisaki mwa basanza oyo elandaki ya bomoi na ngai na bolɔ́kɔ moko ya basodá na Grèce kati na bizalela ya mpasi mpenza, oyo mpo na yango kino lelo nazali na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.

Atako nazalaki kati na bolɔ́kɔ, yango epekisaki ngai kosakola te. Soko moke te! Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ mpo na kobanda masoló, lokola bato mingi bazalaki kokamwa mpo na nini sivíli azalaki kati na bolɔ́kɔ ya basodá. Moko ya masoló na ngai elongo na elenge mobali moko epesaki nzela na kobanda boyekoli ya Biblia kati na lopango ya bolɔ́kɔ. Nsima ya mbula ntuku misato na mwambe nakutanaki lisusu na mobali yango na liyangani moko. Asilaki kondima solo mpe azalaki kosala lokola nkulutu kati na lisangá moko na esanga Lefkás.

Ntango mampinga ya Hitler makɔtaki na Yougoslavie na 1941, batindaki biso mosika na súdi na bolɔ́kɔ moko na Preveza. Na boumeli ya mobembo, mpɛpo ya bitumba ya Allemagne ebundisaki biso, mpe biso bakangami topesamelaki ata eloko ya kolya te. Ntango mwa limpa moke nazalaki na yango esilaki, nabondelaki Nzambe ete: “Soki ezali mokano na yo mpo na ngai ete nakufa na nzala nsima wana osili kobikisa ngai na etumbu ya liwa, na bongo tiká ete mokano na yo esalema.”

Mokolo oyo elandaki mokonzi moko ya basodá abyangaki ngai na pembeni ntango azalaki kosala nkóndo mpe, nsima ya kotuna epai nautaki, mpe soki baboti na ngai banani, mpe mpo na nini nazalaki kati na bolɔ́kɔ, ayebisaki ngai ete nalanda ye. Akendaki na ngai esika bakabolaka biloko ya bakonzi ya basodá na engumba, mpe alakisaki ngai mesa oyo ezalaki na mampa, fromaze mpe mɛ́mɛ́ ya kotumba, mpe alobaki na ngai ete nalya. Kasi nalimbwelaki ye ete lokola bato mosusu 60 oyo bazalaki na eloko ya kolya te, lisosoli na ngai likokaki te kopesa ngai nzela ete nalya. Mokonzi ya basodá azongisaki ete: “Nasengeli soko moke te koleisa moto nyonso! Tata na yo azalaki kokabela bandeko na ngai mbala mingi. Nazali na lisɛngisi ya motema epai na yo kasi epai na bato mosusu te.” Nayanolaki ete: “Soki ezali bongo, nakozonga bobele na bolɔ́kɔ.” Akanisaki mwa moke mpe apesaki ngai sakosi monene ete natya biloko ndenge nalingi.

Ntango nazongaki na bolɔ́kɔ, nalalisaki sakosi mpe nalobaki: “Mibali, oyo ezali mpo na bino.” Likambo ya kosepelisa, na mpokwa oyo elekaki, nafundamaki ete nazalaki momemi mpasi ya bakangami mosusu mpamba te nazalaki kolinga te kosangana na losambo ya Ngɔndɔ Malia. Nzokande, koministe moko akɔtelaki ngai. Sikawa ntango amonaki biloko, alobaki epai na basusu ete: “‘Ngɔndɔ Malia’ na bino azali wapi? Bolobaki ete tokokufa mpo na mobali oyo, nzokande ye nde moto amemeli biso biloko.” Na nsima abalukaki epai na ngai mpe alobaki: “Emmanuel! Yaká mpe salá libondeli.”

Mwa moke na nsima, kobɛlɛma ya basodá ya Allemagne esalaki ete bakɛngɛli ya bolɔ́kɔ bákima, na yango bakangami babimaki. Nakendaki na Patras mpo na kokutana na Batatoli mosusu liboso ya koleka na Athènes na nsuka ya sanza ya Máí na 1941. Kuna nazalaki na likoki ya kozwa mwa bilamba mpe sapato mpe kosukola nzoto mpo na mbala ya liboso na boumeli ya koleka mbula moko. Kino ntango balongwaki, basodá ya Allemagne bazalaki kopekisa ngai wana nazalaki kosakola, kasi bakangaki ngai te. Moko na bango alobaki ete: “Na Allemagne, tobɛtaka Batatoli ya Yehova masasi. Kasi awa tozali kútu kolinga ete banguna na biso nyonso bázala Batatoli!”

Misala na nsima ya etumba

Ezalaki lokola nde Grèce ebundaki naino mingi te, ebebisamaki mingi na bitumba ya banamboka kobanda 1946 kino 1949, kobomáká bankóto ya bato. Bandeko bazalaki na mposa ya kolendisama mpo ete bátikala makasi na ntango oyo bobele koyangana na makita ekokaki kopesa nzela na kokangama. Bandeko mingi bakatelamaki etumbu ya liwa mpo na etɛlɛmɛlo na bango ya kozanga komikɔtisa na makambo ya politiki. Kasi atako bongo, bato mingi bandimaki nsango ya Bokonzi mpe tozalaki kozwa mobatisami moko to babatisami mibale pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Na 1947, nabandaki kosala na babiro ya la société na Athènes na moi mpe kokenda kotala masangá lokola mokɛngɛli-motamboli na butu.

Na 1948, nazalaki na esengo ya kobyangama na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la société Watchtower na États-Unis. Kasi ezalaki na mokakatano moko. Na ntina na bolɔ́kɔ oyo nakɔtaki liboso, nakokaki te kozwa passeport. Nzokande, mobali moko oyo nazalaki koyekola na ye Biblia, azalaki na boyokani malamu na Général moko. Na lisungi ya moyekoli yango, na nsima ya mwa bapɔ́sɔ moke, nazwaki passeport na ngai. Kasi na mitungisaki mingi ntango, liboso ya kosala mobembo, nakangamaki mpo ete nazalaki kokabola zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Polisi moko akendaki na ngai epai ya mokonzi monene ya bapolisi oyo bakɛngɛlaka mboka na Athènes. Na bokamwi mpenza, azalaki moko ya bato ya kartyé na ngai! Polisi alimbolaki mpo na nini nakangamaki mpe apesaki ye liboke ya bazulunalo. Moninga ya kartyé abimisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki na biro na ye mpe alobaki na ngai: “Nazali na nimero oyo euti kobima te. Nakoki kozwa moko?” Oyo nde esengo nazalaki na yango ya komona lobɔkɔ ya Yehova kati na makambo motindo wana!

Kelasi ya mbala ya 16 ya Gileadi, na 1950, ezalaki na matomba mingi. Na nsuka na yango, natindamaki na Chypre, epai kuna nokinoki namonaki ete botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba ezalaki makasi lokola na Grèce. Mbala mingi tosengelaki kokutana na bibele ya bato na molende mabe ya mangomba oyo bapusamaki na basángó ya lingomba Ortodokse mpo na kosala mobulu. Na 1953 vizá na ngai mpo na Chypre ebimisamaki lisusu te mpe natindamaki na Istanboul, na Turquie. Kuna lisusu, naumelaki te. Matátá ya politiki kati na Grèce mpe Turquie esalaki ete, atako mpo na matomba malamu oyo emonanaki na mosala ya kosakola, nasengelaki kotika mboka yango mpo na kokenda epai mosusu​—na Egypte.

Ntango nazalaki na bolɔ́kɔ, Nzembo 55:6, 7 ezalaki koya kati na makanisi na ngai. Kuna Davidi azalaki komonisa mposa makasi ya kokima na mokili mokauki. Nakanisaki soko moke te ete mokolo moko yango ekozala mpenza esika oyo nakokaki kozwama. Na 1954, nsima ya mobembo moko ya kolɛmba oyo nasalaki na boumeli ya mikolo mingi na engbunduka mpe na masúwa na ebale Nil, nsukansuka nakómaki na esika nazalaki kokenda​—Khartoum, na Soudan. Nyonso oyo nalingaki kosala ezalaki bongo kosukola mpe kokenda kolala. Kasi nabosanaki ete ezalaki midi ya moi. Mai oyo etondisamaki na tánki likoló ya motɔ́ndɔ ya ndako, ezikisaki ngai, kosɛngisáká ngai ete nálata kásikɛ ya bayangeli bapaya na boumeli ya basanza mingi kino mpota na ngai ebelaki.

Mbala mingi namiyokaki ete nazali ngai moko kuna, ngai moko kati na mokili mokauki ya Sahara, na ntáka ya bankóto ya bakilomɛtɛlɛ longwa na lisangá oyo ezalaki pene, kasi Yehova asungaki ngai mpe apesaki ngai nguya ya kokóba. Mbala mosusu kolendisama ezalaki kouta na biutelo oyo namizelaki na yango te. Mokolo moko nakutanaki na mokambi ya Mizé ya Khartoum. Azalaki na makanisi mabongi mpe tosalaki lisoló moko kitoko. Koyebáká ete nazali mobotami na Grèce, asɛngaki na ngai soki nakosepela kokenda na ye elongo na Mizé mpo na kobongola makomi mosusu ya biloko oyo bizwamaki na ndakonzambe moko ya ekeke ya motoba. Nsima ya kolekisa ngonga mitano kati na eteni moko ya ndako na nsé ya mabelé, nakutaki etyeli ya nkɛni moko oyo ezalaki na nkombo ya Yehova ekomami na Tetragrame. Kanisá naino esengo oyo nazalaki na yango! Na Mpótó esalemaka mingi kokuta nkombo ya Nzambe kati na bandakonzambe, kasi ezalaki mpenza kosalema te kati na mokili mokauki ya Sahara.

Nsima ya liyangani ya mikili mingi oyo lisalemaki na 1958, natindamaki lokola mokɛngɛli ya zone mpo na kotala bandeko na mikili 26 mpe bateritware na Moyen-Orient mpe na Proche-Orient bipai binso zingazinga na Méditerranée. Mbala mingi nazalaki koyeba te lolenge nini nakokaki kobima longwa na ezalela ya nkaká, kasi Yehova azalaki ntango nyonso kopesa nzela.

Nazalaki ntango nyonso kokamwa na komibanzabanza oyo lisangá ya Yehova ezalaki komonisa mpo na Batatoli oyo bazalaki mosika kati na mikili mosusu. Na libaku mosusu, nakutanaki na ndeko moko mobotami na Inde oyo azalaki kosala na esika babimisaka pitɔlɔ́. Emonanaki ete azalaki Motatoli bobele moko na mboka yango. Kati na lomwale na ye azalaki na mikanda na nkóta 18 ikeseni oyo azalaki kopesa na baninga na ye ya mosala. Ata na mboka yango epai mangomba nyonso ya bapaya mazalaki kati na epekiseli makasi, ndeko na biso abosanaki te mokumba na ye ya kosakola nsango malamu. Baninga na ye ya mosala bakamwaki mingi na komona ete momonisi ya lingomba na ye ayaki kotala ye.

Na 1959 nakendaki kotala Espagne mpe Portugal. Yango nyonso mibale ezalaki na nsé ya boyangeli ya bakonzi mabe ya basodá na ntango wana, mpe mosala ya Batatoli ya Yehova ezalaki na epekiseli. Na sanza moko nazalaki na likoki ya kotambwisa makita koleka nkáma moko, kolendisáká bandeko ete bálɛmba te atako mikakatano ezalaki.

Nazali lisusu monzemba te

Na boumeli ya mbula koleka 20, nazalaki kosalela Yehova kati na mosala ya ntango nyonso lokola monzemba, kasi na pwasa namiyokaki ete nalɛmbaki na ntina na mibembo mingi oyo nazalaki kosala kozanga esika ya sikisiki. Ezalaki na ntango yango nde nakutanaki na Annie Bianucci, mobongisi-nzela monene na Tunisie. Tobalanaki na 1963. Bolingo na ye mpo na Yehova mpe mpo na solo, komipesa na ye kati na mosala ya kosakola bakisá na ntɔ́ki na ye ya koteya, mpe boyebi na ye ya nkóta ezalaki mpenza lipamboli kati na mosala na biso ya misionere mpe mosala ya mokɛngeli ya zongazonga na nɔ́rdi mpe wɛ́sti ya Afrika mpe na Italie.

Na Augústo 1965 ngai na mwasi na ngai totindamaki na Dakar, na Sénégal, epai kuna nazwaki libaku malamu ya kobongisa biro ya filiale ya la société na mboka yango. Sénégal ezalaki mboka oyo eyebanaki mpo na botiki nzela na mangomba, na ntembe te ezalaki bongo mpo na presidá na yango, Léopold Senghor, moko ya mwa ndambo ya bakonzi ya Letá na Afrika oyo bakomelaki Banda, presidá ya Malawi na kolobeláká malamu na ntina na Batatoli ya Yehova na boumeli ya minyoko makasi oyo misalemaki na Malawi na bambula 1970.

Mapamboli kitoko ya Yehova

Na 1951, ntango nautaki na Gileadi mpo na kokenda na Chypre, nasalaki mobembo na mivalisi nsambo. Na bokei na ngai na Turquie, nazalaki bobele na mivalisi mitano. Kasi na kosaláká mibembo mingi, nasengelaki komesana kozala na kilo 20 ya biloko, oyo esangisaki dosiɛ́ na ngai mpe masini ya “moke” ya kobɛta mikanda. Mokolo moko nalobaki na ndeko Knorr, wana azalaki prezidá ya la Société Watch Tower: “Ozali kobatela ngai mpo ete nazala na bolingo ya biloko ya mosuni te. Osali ete nazala bobele na kilo 20 ya biloko mpe nazali kosepela na yango.” Namiyokaki soki moke te ete nazangi mpo nazali te na biloko mingi ya mosuni.

Mokakatano na ngai monene na ntango ya mibembo ezalaki bongo kokɔta mpe kobima na mikili mikeseni. Mokolo moko, na mokili moko epai kuna mosala ya kosakola epekisamaki, mokonzi moko ya dwanɛ abandaki kofungola badosiɛ́ na ngai. Yango ezalaki likámá epai na Batatoli ya mboka yango, na bongo nabimisaki nkomá moko na kazáka na ngai, nkomá oyo mwasi na ngai atindelaki ngai mpe nalobaki na ye ete: “Namoni ete olingaka kotánga nkomá. Okosepela mpe kotánga nkomá oyo euti epai na mwasi na ngai, oyo ezali kati na dosiɛ́ te?” Abulunganisamaki, asɛngaki bolimbisi mpe atikaki ngai.

Uta 1982 ngai na mwasi na ngai tozali kosala lokola bamisionere na Nice, na súdi ya France. Mpo na kokita ya kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ya nzoto, nazali lisusu na likoki te ya kosala lokola nazalaki kosala liboso. Kasi yango elingi koloba te ete esengo na biso ekiti. Tosili komona ete ‘mosala na biso ezali ya mpamba te.’ (1 Bakolinti 15:58) Nazali na esengo ya komona ebele ya bato oyo nazwaki libaku ya koyekola na bango esili koleka mibu mingi bakisá mpe koleka basangani 40 ya libota na ngai kosalela Yehova na bosembo nyonso.

Namilelaka soko moke te mpo na komipimela oyo bomoi na ngai ya ‘kolekaleka’ esɛngaki. Nzokande, komipimela moko te oyo tosalaki ekoki kokokanisama na oyo Yehova mpe Mwana na ye, Yesu Klisto basili kosala mpo na biso. Ntango namikundolaka mbula 60 oyo esili koleka uta nayebaki solo, nakoki koloba ete Yehova asili kopambola ngai mingi. Lokola Masese 10:22 elobi yango, “Mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi.”

Kozanga ntembe, “motema boboto ya Yehova eleki bomoi.” (Nzembo 63:3) Wana mikakatano ya bobangé mizali koyikana, maloba ya mokomi na Nzembo oyo apemamaki mazalaka mbala mingi kati na mabondeli na ngai: “Ɛ [Yehova], naluki ebombelo epai na yo; tiká ete libela nazala na nsɔ́ni te. Zambi yo ozali elikya na ngai, ɛ Nkolo; nandimi yo, ɛ [Yehova], longwa na bolenge na ngai. Ɛ Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai; kino sasaipi nazali kosakola misala na yo na kokamwa. Boye, kino ntango na konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, ɛ Nzambe, tika ngai te.”​—Nzembo 71:1, 5, 17, 18.

[Elilingi na lokasa 25]

Elongo na mwasi na ngai Annie, lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto