Teyá mwana na yo alukaka kimya
Lokola azalaki na esengo ya mobembo ya molai oyo libota na bango elingaki kosala, Nicole, mwana mwasi moko ya mbula mwambe, azalaki ntango nyonso koyebisa Gabrielle, moninga na ye ya motema, bibongiseli nyonso oyo bazalaki kozwa mpo na mobembo yango. Mokolo moko, Gabrielle akataki ye maloba mpe alobaki na ye ete azali na mposa ya koyeba makambo ya mobembo na bango te. Epesaki Nicole mpasi mpe nkanda, mpe alobaki na mama na ye ete: “Nalingi komona Gabrielle lisusu na miso na ngai te!”
MBALA mingi, makambo lokola oyo elekaki na kati ya Nicole ná Gabrielle esɛngaka baboti básalisa bango. Baboti basengeli kaka te kokitisa bango mitema, kasi mpe kolakisa bango ndenge ya kosilisa likambo yango. Bana nyonso bazalaka na “bizaleli ya mwana moke,” mpe mbala mingi bayebaka te mpasi oyo maloba na bango to makambo oyo bazali kosala ekoki koyokisa basusu. (1 Bakolinti 13:11) Esengeli básalisa bango bálona bizaleli oyo ekoki kosalisa bango bázalaka na kimya na basusu na kati ya libota mpe epai mosusu.
Baklisto balingaka mpenza koteya bana na bango ‘báluka kimya mpe bálanda yango.’ (1 Petelo 3:11) Lokola kozala na kimya na basusu ememelaka moto esengo, esengeli mpenza kosala nyonso mpo na kolonga makanisi mabe, nkanda mpe kowelana. Soki ozali moboti, ndenge nini okoki koteya bana na yo bázalaka na kimya na bato?
Salisá ye alukaka kosepelisa “Nzambe ya kimya”
Biblia ebengi Yehova “Nzambe ya kimya” mpe elobi ete ye nde “apesaka kimya.” (Bafilipi 4:9; Baloma 15:33) Yango wana, baboti ya bwanya basalelaka Biblia, Liloba ya Nzambe, na mayele mpenza mpo na kosalisa bana na bango bálukaka kosepelisa Nzambe mpe komekola bizaleli na ye. Na ndakisa, salisá bana na yo bákanisa likambo ya kokamwa oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli moko; amonaki monama moko ya langi ya mai ya mpondu, oyo ezalaki kitoko lokola emelodi, ezingi kiti ya bokonzi ya Yehova.a (Emoniseli 4:2, 3) Limbolelá bango ete elilingi wana ya monama ezali komonisa ete Yehova atondi na kimya, mpe ete bato nyonso oyo bakotosa ye bakozala mpe na kimya.
Yehova atambwisaka biso mpe na nzela ya mwana na ye, Yesu, oyo abengami “Nkolo ya kimya.” (Yisaya 9:6, 7) Na yango, tángá mpe lobelá elongo na bana na yo masolo ya Biblia oyo ezali na mateya kitoko oyo Yesu ateyaki ete tóboya bitumba mpe koswana. (Matai 26:51-56; Malako 9:33-35) Limbolá ntina oyo Paulo, oyo azalaki liboso “moto ya lofundo,” abongwanaki mpe akomaki ete “moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso, . . . amipekisaka na ntango basaleli ye mabe.” (1 Timote 1:13; 2 Timote 2:24) Okoki kokamwa ete batoli wana ebongoli mpenza mwana na yo.
Evan amikundolaka ndenge elenge mobali moko atumolaki ye na kati ya bisi oyo ezalaki komema bango na eteyelo ntango azalaki na mbula nsambo. Alobi boye: “Nasilikaki makasi mpe nalingaki kozongisa. Na nsima, namikundolaki liteya moko nayekolaki na ndako oyo elobelaki bato oyo balukaka bitumba. Nayebaki ete Yehova alingaka ‘tózongisa mabe na mabe na moto te’ mpe ete ‘tózala na kimya elongo na bato nyonso.’” (Baloma 12:17, 18) Evan azwaki makasi mpe mpiko ya kosilisa likambo wana na boboto. Alingaki kosepelisa Nzambe ya kimya.
Zalá moboti ya kimya
Ndako na yo ezalaka esika ya kimya? Soki ezali bongo, bana na yo bakoyekola kimya ata soki oteyi bango na maloba te. Soki ozali kolanda banzela ya kimya ya Nzambe mpe ya Klisto, yango ekosalisa mpenza na koteya bana na yo koluka kimya.—Baloma 2:21.
Russ ná Cindy basalaka nyonso mpo na koteya bana na bango mibale ya mibali; balendisaka bango bámonisaka bolingo soki basusu batumoli bango. Cindy alobi boye: “Ezaleli oyo ngai ná Russ tozalaka na yango epai ya bana na biso mpe bato mosusu ntango mikakatano ebimi ezali ndakisa monene mpo na bana na biso ntango bazali kokutana na mikakatano ya ndenge yango.”
Ata soki osali libunga (moboti nyonso asalaka mabunga), okoki kokoba koteya bana mateya ya ntina mingi. Stephen alobi boye: “Ntango mosusu, ngai ná Terry tozalaki kosilika mpe kopesa bana na biso misato bitumbu kozanga ete tóluka naino koyeba malamu ndenge likambo ezali.” Terry abakisi ete: “Soki esalemi bongo, tozalaki kosɛnga bolimbisi. Tozalaki komonisa bango ete biso mpe tozali bato ya kozanga kokoka, mpe tosalaka mabunga. Tomonaka ete yango ezalaki kosalisa biso tózala na kimya na kati ya libota, mpe esalisaki bana báyekola ndenge ya koluka kimya.”
Makambo oyo bosalaka bana na bino esalisaka bango báyekola kozala bato ya kimya? Yesu apesaki toli ete: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Atako osalaka mabunga, osengeli koyeba ete bolingo oyo omoniselaka bana na yo ekobota mbuma ya malamu. Bana na yo bakokakatana te mpo na kolanda toli na yo soki ozali kotambwisa bango na bolingo.
Koyokaka nkanda noki te
Masese 19:11 elobi: “Bososoli ya moto ya mayele [ekokitisa] nkanda na ye.” Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo akóma na bososoli ya ndenge wana? David alobeli ndenge ye ná mwasi na ye Mariann basalaki mpo na kosalisa bana na bango. Alobi boye: “Soki basiliki mpo moto moko alobi na bango mabe to asali bango mabe, tosalisaka bango bámitya na esika ya moto wana. Totunaka bango mituna ya mikemike lokola oyo: ‘Moto yango akutani lelo na likambo moko oyo epesi ye mpasi? Azali na zuwa? Moto moko ayokisi ye mpasi?’” Mariann abakisi boye: “Yango ekitisaka bana motema, elongolaka bango makanisi ya mabe mpe esalisaka bango bátika koluka soki nani azali na foti.”
Koteya bana ndenge wana ekoki komema matomba ya malamu mpenza. Talá ndenge Michelle, mama ya Nicole, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, asalisaki ye ayokana na Gabrielle mpe amitya na esika na ye. Michelle alobi ete: “Ngai ná Nicole, totángaki mokapo 14 ya buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.b Na nsima, nasalisaki ye asosola oyo Yesu alingaki koloba ntango alobaki ete tosengeli kolimbisa moto oyo asali biso mabe ‘tii na mbala ntuku nsambo na nsambo.’ Nsima ya koyoka makanisi ya Nicole, nasalisaki ye amitya na esika ya Gabrielle oyo azali koyoka mawa mpo moninga na ye ya motema azali kokende mosika.”—Matai 18:21, 22.
Ntango Nicole asosolaki nini etindaki Gabrielle asilika, abengaki ye na telefone mpo na kosɛnga ye bolimbisi. Michelle alobi boye: “Banda wana, Nicole asepelaka komitya na esika ya baninga mpe kosala bango makambo oyo ekosepelisa bango mingi.”—Bafilipi 2:3, 4.
Salisá mwana na yo asilikaka mpambampamba te soki moninga asali mwa libunga to bayokani te. Ntango mosusu, okosepela komona bana na yo bazali kosala basusu malamu mpe komonisa bango boboto.—Baloma 12:10; 1 Bakolinti 12:25.
Salisá mwana amona nkembo ya kolimbisa
Masese 19:11 elobi: “Nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” Ntango Yesu azalaki kobunda na liwa, amekolaki ezaleli ya Tata na ye ya kolimbisa bato. (Luka 23:34) Bana na yo bakoki komona nkembo ya kolimbisa ntango bazali komona yo ozali kolimbisa.
Na ndakisa, Willy, mwana moko ya mbula mitano asepelaka kopakola langi na bililingi ná nkɔkɔ na ye ya mwasi. Mokolo moko, nkɔkɔ yango atikaki kopakola langi, agangelaki Willy mpe akendaki. Willy ayokaki mpasi. Sam, tata na ye, alobaki ete: “Nkɔkɔ ya Willy abɛlaka maladi moko ya mabe. Na yango, tosalisaki ye ayeba ete maladi yango nde etindi nkɔkɔ na ye asala bongo.” Nsima ya koyebisa Willy ete asengeli koyeba kolimbisa mpo ye mpe balimbisaka ye, tata ya Willy akamwaki na likambo oyo mwana na ye asalaki. Sam alobi boye: “Kanisá ndenge ngai ná mwasi na ngai toyokaki ntango tomonaki mwana na biso wana ya moke akei epai ya nkɔkɔ na ye ya mbula 80, asɛngi ye bolimbisi mpe abendi ye na lobɔkɔ tii na mesa!”
Ezalaka mpenza nkembo soki bana bayekoli ‘kokoba kokanga motema’ na mabunga ya basusu mpe kolimbisa bango. (Bakolose 3:13) Ata soki basali ye mabe na nko, yebisá mwana na yo ete koluka kimya ekoki mpenza kosalisa, mpo soki ‘ezaleli ya moto esepelisi Yehova akofanda ata na bayini na ye na kimya.’—Masese 16:7.
Kobá kosalisa mwana na yo alukaka kimya
Soki baboti bazali kosalela Liloba ya Nzambe mpo na koteya bana na bango “na kimya,” yango ekosalisa bana na bango mingi. (Yakobo 3:18) Baboti oyo basalaka ndenge wana basalisaka bana na bango báyeba kosilisaka mikakatano mpe bázala na kimya na basusu. Yango ekosalisa bango mpenza bázala na esengo bomoi na bango mobimba.
Dan ná Kathy bazali na bana misato oyo bazali makasi mpenza na elimo. Dan alobi boye: “Atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kobɔkɔla bango ntango bazalaki naino mike, tozali na esengo ya komona ete bana na biso bakómi makasi na elimo. Sikoyo bayokanaka malamu na basusu, mpe balimbisaka soki basali bango mabe.” Kathy mpe alobi boye: “Yango elendisaka biso mingi, mpo kimya ezali moko ya makambo oyo elimo ya Nzambe ememelaka moto.”—Bagalatia 5:22, 23.
Yango wana, atako ekoki kozala mpasi na ebandeli, baboti baklisto ‘batikaka te’ to ‘balɛmbaka te’ koteya bana na bango bázalaka na kimya na basusu. Soki bosali bongo, bóyeba ete “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino.”—Bagalatia 6:9; 2 Bakolinti 13:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá elilingi na lokasa 75 ya buku Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi! ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 20]
EZALI MPENZA NA LITOMBA?
Lisolo moko oyo ebimaki na internet ezalaki na motó ya likambo ete “Masano mpe bafilme ya bitumba.” Lisolo yango elobaki: “Lelo oyo, bafilme ezali kolongisa likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete esengeli kobunda to kobimisa makasi mpo na kosilisa likambo. Na bafilme yango, balakisaka ntango nyonso bato ya mobulu to bilombe bazali kobunda to kobɛta bato.” Na kati ya masano ya televizyo, bafilme mpe miziki oyo totalelaki, kaka moke (10%) nde emonisaki ete masano ya mobulu ezali mabe. Nzokande, lisolo yango ebakisi boye: “Masano mpe bafilme yango ezali komonisa ete bitumba mpe mobulu ezali mabe te, mpe ete moto nyonso asengeli kosalela yango, mpo ezali lolenge eleki malamu ya kosilisa likambo.”
Omoni te ete osengeli kotalela lisusu makambo oyo bosengeli kotalaka na televizyo na ndako na yo? Kotika te ete bafilme ebebisa milende oyo ozali kosala mpo na koteya bana na yo bázalaka na kimya na basusu.
[Elilingi na lokasa 17]
Salisá bana na yo bákóma na mposa ya kosepelisa “Nzambe ya kimya”
[Elilingi na lokasa 18]
Zwáká ntango ya kosembola maloba mabe oyo bazali kobimisa mpe makambo mabe oyo bazali kosala
[Elilingi na lokasa 19]
Bana na yo basengeli koyekola kosɛngaka bolimbisi mpe kolimbisa basusu