Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 nk. 8-11
  • Ndenge ya kolonga mokakatano ya kobota na bomwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolonga mokakatano ya kobota na bomwana
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolonga mokakatano yango
  • Okoki kolonga
  • Ndenge ya kosalisa mpe kobatela bilenge
    Lamuká!—2005
  • Batata oyo bakimaka bana na bango​—Bakoki mpe kokima mikumba na bango?
    Lamuká!—2001
  • Bana mike bakómi kobota
    Lamuká!—2005
  • Bana mike bakómi kozwa zemi Likambo ya mawa na mokili mobimba
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/4 nk. 8-11

Ndenge ya kolonga mokakatano ya kobota na bomwana

ELENGE oyo azwi zemi na bomwana asengeli kosala makambo mosusu oyo mikóló basalaka. Elenge moko oyo abotá na bomwana alobi boye: “Nazali komona lokola nakómi na mbula 40. Nabebisi mpenza bolenge na ngai.” Mbala mingi, soki kaka mwana mwasi ayebi ete azali na zemi, abangaka mingi mpe amitungisaka mingi.

Soki ozali elenge mpe ozali na zemi, mbala mosusu ozali komiyoka ndenge wana. Kasi, soki omitiki na makanisi wana ya kozonga nsima, okoyeba eloko ya kosala te. Biblia elobi: “Ye oyo akotalaka mipɛpɛ akokona te, mpe ye oyo akotala mapata akobuka te.” (Mosakoli 7:⁠8; 11:⁠4) Mosali bilanga oyo abangaka mbula to mipɛpɛ, akosala mosala na ye ndenge esengeli te. Yango wana, kokanga mabɔkɔ te. Nsukansuka, ekosɛnga okoba na bomoi na yo mpe omema mikumba na yo.​—⁠Bagalatia 6:⁠5.

Okopona nini? Bato mosusu bakoki kotinda yo osopa zemi. Kasi, yango ezali nzela ya malamu te mpo na baoyo balingi kosepelisa Nzambe, mpamba te Biblia emonisi polele ete kosopa zemi ezali kobuka mobeko ya Nzambe. (Exode 20:​13; 21:​22, 23; Nzembo 139:​14-16) Na miso ya Nzambe, bomoi ya mwana nyonso oyo ebandi na libumu​—⁠ata soki zemi yango ezali ya balabala​—⁠ezali na motuya mingi.

Ezali boni mpo na oyo etali kobalana na tata ya mwana na yo mpo bóbɔkɔla mwana yango bino mibale? Yango ekoki ntango mosusu kolongola mwa nsɔni oyo okoki kozala na yango. Kasi, ata soki mwana mobali yango andimi mokumba ya kosalisa yo na kobɔkɔla mwana yango, kobalana na ye ekoki kozala likambo ya mayele te.a Kokanisa te ete lokola mwana mobali azali na makoki ya kobotisa mwasi, azali mpe na makoki ya kofanda malamu na mwasi mpe azali na bwanya mpo na kozala mobali malamu mpe tata malamu; to mpe akoki kozwa mbongo ya koleisa mwasi mpe mwana. Longola yango, soki yo ná mwana mobali yango bosambelaka lingomba moko te, kobalana na ye ezali kobuka mobeko ya Biblia oyo esɛngi kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakolinti 7:​39) Makambo mingi emonisi ete kowelela kobala ntango ozali naino mwana moke​—⁠mbala mosusu libala oyo ekoumela te​—⁠ebakisaka mpasi mpe minyoko.

Ezali boni mpo na likanisi ya kopesa moto mosusu mwana yango abɔkɔla ye? Atako yango ekoki kozala malamu na esika ya kosopa zemi, osengeli koyeba ete ata soki mikakatano ekozanga te, libaku ya kobɔkɔla mpe kokolisa mwana na yo epesami nde na yo.

Ndenge ya kolonga mokakatano yango

Mpo na koloba solo, kobɔkɔla mwana kozanga mobalani ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi, soki osali nyonso mpo na kolanda mitinda ya Biblia mpe otyeli Nzambe motema mpo apesa yo makasi mpe atambwisa yo, okoki kolonga ata soki okutani na mikakatano. Makanisi oyo elandi ekoki kosalisa yo.

● Zongisá boyokani elongo na Nzambe. Yebá ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali lisumu na miso ya Nzambe​—⁠kozanga botosi ya mitinda na ye ya bizaleli malamu. (Bagalatia 5:​19-​21; 1 Batesaloniki 4:​3, 4) Na yango, esengeli libosoliboso kobongola motema mpe kosɛnga Nzambe bolimbisi. (Nzembo 32:⁠5; 1 Yoane 2:​1, 2) Ezali solo ete okoki koyoka lokola obongi te kosɛnga Nzambe asalisa yo. Kasi, Yehova alaki ete akolimbisa baoyo babongoli motema na mabunga na bango, mpe asalisaka bango. (Yisaya 55:​6, 7) Na Yisaya 1:​18, Yehova alobi boye: “Ata masumu na bino ezali motane lokola ngola [kilo, minene], ekokóma pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ [ekopɛtolama nyonso].” Biblia elendisi mpe bato oyo basali masumu báluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu ya lisangá.​—⁠Yakobo 5:​14, 15.

● Boyá kosangisa nzoto liboso ya kobala. Yango elimboli kokata boyokani nyonso na tata ya mwana na yo. Soki ozali kokoba na ye kozanga ete bóbalana, yango ekozindisa yo kaka na etamboli oyo ezali kosepelisa Nzambe te. Kobosana te ete mibeko ya Nzambe, atako bakakolaka yango te, ezali mpo na kobatela biso. Nicole, oyo tolobeli na ebandeli ya masolo oyo, alobi boye: “Nsukansuka nayaki komona ete nyonso oyo Nzambe alobaka ezali solo. Alingaka tózala malamu.”​—⁠Yisaya 48:​17, 18.

● Yebisá baboti na yo. Okoki mbala mosusu kobanga ete baboti na yo bakosilika na yo. Ezali solo ete bakosilika ntango bakoyoka ete ozali na zemi mpe yango ekotungisa bango. Bakoki ata kokanisa ete bakokisaki mokumba na bango ya baboti malamu te to komipesa foti mpo na etamboli na yo ya mabe. Nzokande, soki babangaka mpenza Nzambe, nkanda ekosila. Bazali kaka baboti na yo, mpe atako osali mabunga, balingaka yo. Ntango bakomona ete obongoli motema, bakozanga te kolanda ndakisa ya tata ya mwana ya kilikili mpe kolimbisa yo na motema mobimba.​—⁠Luka 15:​11-⁠32.

● Zalá na botɔndi. Ntango mosusu baboti, bandeko, mpe baninga bakoki kosunga yo mpe kosalisa yo. Na ndakisa, baboti na yo bakoki kozwa bibongiseli mpo okendaka kilo. Ntango okobota, bakoki kolakisa yo ndenge ya komɛlisa mwana, kosukola ye, mpe kolatisa ye; to bakoki mpe kotikala na ye soki obimi. Nicole alobi boye mpo na mama na ye: “Ngai moto nabotaki mwana, kasi makambo mingi mama nde azalaki kosalela ngai.” Baninga na yo bakoki mpe kosalisa yo, na ndakisa bakoki kokabela yo, na ndenge ya kobombana, bilamba ya mwana mpe biloko mosusu oyo okosengela na yango. (Masese 17:​17) Ntango bamoniseli yo motema-boboto, kobosana te kolanda toli ya Biblia mpe ‘komimonisa moto ya botɔndi.’ (Bakolose 3:​15) Soki ozali kopesa bato oyo bazali kokabela yo matɔndi te, bakoki kokanisa ete boboto oyo bazali komonisela yo ezali mpenza na ntina te.

● Yekolá kozala mama. Na ntembe te, okolinga te ozelaka ntango nyonso kaka baboti mpe baninga básalisaka yo. Na yango, luká koyeba malamu misala ya ndako mpe kokolisa bizaleli oyo ekosalisa yo obɔkɔla mwana na yo malamu mpe obatela ndako na yo malamu. Ezali pɛtɛɛ te kobɔkɔla mwana mpo esɛngaka kosalela ye makambo nyonso. Ezali na makambo mingi oyo osengeli koyekola na oyo etali koleisa mwana, bokolɔngɔnɔ na ye ya nzoto, mpe makambo mosusu ya kobɔkɔla mwana. Lisusu, Biblia elendisi mibange basi baklisto bálakisa bilenge basi bázala “basali misala na ndako.” (Tito 2:⁠5) Na ntembe te, mama na yo​—⁠mpe mbala mosusu bandeko mosusu ya lisangá​—⁠bakoki kosalisa yo na likambo yango.

● Salelá mbongo na mayele. Biblia elobi ete ‘mosolo ebatelaka.’ (Mosakoli 7:​12) Kobotama ya mwana ememaka makambo mingi oyo esɛngaka mbongo.

Okoki libosoliboso koluka kozwa lisalisi oyo Leta apesaka. Kasi emonanaka ete bana basi mingi batalelaka kaka baboti na bango na makambo ya mbongo. Soki ezali bongo mpo na yo, okomonisa ete ozali na mayele mpe na limemya soki ozali kobebisa mbongo mpambampamba te. Atako mbala mosusu okoki kosepela kosomba biloko ya sika mpo na mwana na yo, ntango mosusu okobatela mbongo na yo soki osombi bilamba ya tombola to biloko oyo basalelá.

● Luká koyekola mosala. Masese 10:14 elobi ete: “Bato na mayele bakotya boyebi na ebombelo.” Atako mokapo yango etaleli mpenza boyebi ya Biblia, etaleli mpe kotánga kelasi. Mpo ozala na bomoi ya malamu, osengeli koyekola mosala moko.

Ezali solo ete kokende kelasi wana ozali na mwana ezalaka pɛtɛɛ te. Nzokande, soki otángi kelasi ya malonga te, okoki kotikala mobola bomoi mobimba yo ná mwana na yo; okobikela kaka na mwa lisalisi oyo Leta apesaka, okozwa mosala ya malamu te, ndako ya malamu te, mpe okolya malamu te. Yango wana, soki likoki ya kotánga ezali naino, zongelá kelasi. Mama ya Nicole asalaki nyonso mpo Nicole asilisa kelasi; mpe na nsima, alandaki formasyo ya kosalisa bato oyo basambaka na tribinale (défenseur juridique), mosala oyo abikelaka na yango lelo.

Mpo na nini te koluka koyeba kelasi nini okoki kotánga to formasyo nini okoki kolanda? Soki omoni ete kokende kelasi mikolo nyonso ekozala mpasi, okoki mbala mosusu kotala soki likoki ezali ya koyekola yo moko na ndako. Na ndakisa, kelasi oyo batindaka mateya ya kotinda (cours par correspondance) ekoki kozala malamu mpo na yo.

Okoki kolonga

Kobɔkɔla mwana kozanga kobala ezali mpasi​—⁠mingi mpenza mpo na elenge mwasi. Kasi okoki kolonga! Soki ozali na motema molai, olɛmbisi mabɔkɔ te, mpe na lisalisi ya Yehova Nzambe, okoki kokóma moboti malamu, oyo alingaka mwana na ye. Bana ya bamama oyo bazali na mibali te bakoki mpe kokola malamu mpe kokóma mikóló ya makoki. Nani ayebi soki mokolo mosusu mwana na yo akolanda nzela ya malamu mpe akosalela makambo oyo ozali kolakisa ye, mpe akokóma mosaleli ya Nzambe.​—⁠Baefese 6:⁠4.

Nicole alobi boye: “Na lisalisi ya Nzambe, nayokaki esengo komona ndenge nasalisaki mwana na ngai akóma mwasi kitoko, mwana ya botosi, mwasi ya makoki, likambo oyo nazalaki kondima te. Ntango natalaka ye, nakanisaka mikolo oyo nazalaki kolala te na butu mpe natondaka na esengo.”

Kasi, ndenge nini mikóló basengeli kotalela bana mike oyo bakómi bamama mpe bana na bango? Esengeli kosala nini mpo na kosalisa bilenge bákima mpasi ya kozwa zemi ya bomwana?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Masolo oyo elobeli mikumba mpe mikakatano bilenge mibali minzemba oyo babotá bakutanaka na yango, ebimaki na masolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2000 mpe ya 22 Mai 2000, na Lifalanse.

[Bililingi na lokasa 9]

Kobɔkɔla mwana ezali mosala ya mpasi mpo na bilenge

[Elilingi na lokasa 10]

Kobala ntango ozali naino mwana moke esilisaka makambo te

[Elilingi na lokasa 10]

Bankulutu ya lisangá bakoki kosalisa bilenge oyo babungi nzela bázongisa boyokani na bango na Nzambe

[Elilingi na lokasa 11]

Ezali malamu bana basi oyo baboti básilisa kelasi na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto