Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/2 nk. 11-14
  • Mpo na nini kobondelaka na nkombo ya Yesu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kobondelaka na nkombo ya Yesu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mbongwana monene na likambo ya kobondela”
  • Nkombo oyo ezali “likoló ya nkombo mosusu nyonso”
  • Ekóma lokola nzembo te
  • Tosengeli kotinda mabondeli epai na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tosengeli nde kobondela Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/2 nk. 11-14

Mpo na nini kobondelaka na nkombo ya Yesu?

YESU azalaki mbala mingi kolobela libondeli na mateya na ye. Na mikolo na ye, Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kobondela “na bikutanelo ya banzela minene.” Mpo na nini? “Mpo bato bámona bango.” Bazalaki kosala bongo mpo bazalaki kolinga bato bámona bango lokola bango nde bayebi kosambela. Mingi bazalaki kosala mabondeli milaimilai mpe kozongela makambo mokomoko mbala na mbala, lokola nde Nzambe akoyoka bango soki bazali “koloba mingi.” (Matai 6:5-8) Yesu amonisaki ete kosala bongo ezali mosala ya mpunda, mpe asalisaki bato ya motema sembo báyeba makambo oyo basengeli kosalaka te ntango bazali kobondela. Kasi, asukaki kaka wana te; ateyaki bango mpe makambo mosusu.

Yesu ateyaki ete tosengeli komonisaka na mabondeli na biso ete tolingi nkombo ya Nzambe esantisama, Bokonzi na ye eya mpe mokano na ye esalema. Yesu ateyaki mpe ete ezali malamu tósɛngaka Yehova akokisela biso bamposa na biso. (Matai 6:9-13; Luka 11:2-4) Yesu asalelaki bandakisa mpo na komonisa ete soki tolingi Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli kozala na mbamba, na kondima mpe na komikitisa. (Luka 11:5-13; 18:1-14) Mpe longola koteya, Yesu azalaki mpe kopesa ndakisa na likambo yango.​—Matai 14:23; Malako 1:35.

Na ntembe te, toli wana esalisaki mpenza bayekoli ya Yesu bábongisa lolenge na bango ya kobondelaka. Kasi, Yesu azelaki tii mokolo na ye ya nsuka awa na mabelé mpo apesa bango liteya moko ya ntina na likambo etali libondeli.

[Elilingi na lokasa 12]

“Mbongwana monene na likambo ya kobondela”

Yesu alekisaki butu na ye ya nsuka na kolendisa bayekoli na ye ya sembo. Ezalaki ntango oyo ebongi mpo na koyebisa bango likambo moko ya sika. Alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” Na nsima, apesaki bango elaka ya kolendisa oyo: “Nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango, mpo Tata azwa nkembo mpo na Mwana. Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.” Pene na nsuka ya lisolo na ye, alobaki boye: “Tii sikoyo naino bosɛngi ata eloko moko te na nkombo na ngai. Bósɛnga mpe bokozwa, mpo esengo na bino etonda mɛkɛ.”​—Yoane 14:6, 13, 14; 16:24.

Maloba wana ezalaki na ntina mpenza. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia ebengaki yango “mbongwana monene na likambo ya kobondela.” Yesu alingaki koloba te ete tótika kobondela Nzambe mpe tókóma kobondela nde ye. Alakisaki nde lolenge ya sika ya kopusana pene na Yehova Nzambe.

Ya solo, Nzambe ayokaka ntango nyonso mabondeli ya basaleli ya sembo. (1 Samwele 1:9-19; Nzembo 65:2) Kasi, kobanda ntango Nzambe asalaki kondimana na Yisalaele, baoyo balingaki ete Nzambe andima mabondeli na bango, basengelaki kondima ete Yisalaele ezali ekólo oyo Nzambe aponi. Mpe na nsima, na ntango ya Salomo, basengelaki kondima ete tempelo ezalaki esika oyo Nzambe aponaki mpo na kopesa mbeka. (Deteronome 9:29; 2 Ntango 6:32, 33) Kasi, ebongiseli wana ya kobondela ezalaki kaka mpo na mwa ntango moke. Ndenge ntoma Paulo akomaki, Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele mpe bambeka oyo bazalaki kopesa na tempelo ezalaki ‘elili ya makambo malamu oyo esengelaki koya, kasi bosolo mpenza ya makambo te.’ (Baebele 10:1, 2) Makambo oyo ezalaki elili esengelaki kolongwa mpo oyo ya solo ezwa esika na yango. (Bakolose 2:17) Kobanda na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), esengelaki lisusu te kolanda Mibeko ya Moize mpo na kozala na boyokani na Yehova. Esengelaki nde kotosa moto oyo Mibeko ezalaki kolobela: Yesu Klisto.​—Yoane 15:14-16; Bagalatia 3:24, 25.

Nkombo oyo ezali “likoló ya nkombo mosusu nyonso”

Yesu abandisaki lolenge eleki malamu ya kopusana pene na Yehova. Alobaki ete ye azali moninga ya solosolo, oyo afungoli nzela mpo Nzambe ayokaka mabondeli na biso. Nini epesaki Yesu likoki asala bongo mpo na biso?

Lokola biso nyonso tobotamá na lisumu, makambo nyonso oyo tosalaka to bambeka oyo topesaka ekoki te kopɛtola biso na lisumu yango to kopesa biso lotomo ya kozala na boyokani na Yehova, Nzambe na biso oyo azali mosantu. (Baloma 3:20, 24; Baebele 1:3, 4) Kasi, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na kolimbisama ya masumu ya bato oyo bakoki kosikolama. (Baloma 5:12, 18, 19) Lelo oyo, baoyo nyonso balingi ete masumu na bango elimbisama, bakoki kozala na etamboli ya pɛto liboso ya Yehova mpe kozala na “elobeli ya polele” liboso ya Nzambe; mpe bakosala bongo kaka soki bandimeli mbeka ya Yesu mpe bazali kobondela na nkombo na ye.​—Baefese 3:11, 12.

[Elilingi na lokasa 13]

Ntango tozali kobondela na nkombo ya Yesu, tozali komonisa kondima na makambo soki misato oyo eyokani na mokumba monene oyo azali na yango na kokokisama ya mokano ya Nzambe: (1) Azali “Mwana-Mpate ya Nzambe,” oyo na lisalisi ya mbeka na ye masumu na biso ezali kolimbisama. (2) Yehova asekwisaki ye mpe azali sikoyo “nganga-nzambe monene” mpo na kopesa bato matomba ya lisiko. (3) Kaka ye nde “nzela” oyo moto akoki kosalela mpo na kopusana pene na Yehova na libondeli.​—Yoane 1:29; 14:6; Baebele 4:14, 15.

Kobondela na nkombo ya Yesu epesaka ye lokumu. Lokumu ya ndenge wana ebongi, mpo mokano ya Yehova ezali ete “na nkombo ya Yesu mabɔlɔngɔ nyonso egumbama . . . , mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” (Bafilipi 2:10, 11) Kasi, likambo eleki ntina ezali ete kobondela na nkombo ya Yesu epesaka Yehova lokumu, ye oyo apesaki Mwana na ye mpo na bolamu na biso.​—Yoane 3:16.

Tosengeli kobondelaka na ‘motema na biso mobimba,’ kasi kozongelaka te makambo lokola tsaku

Nzokande, mpo tóyeba malamu bonene ya mokumba ya Yesu, Biblia esaleli batitre mpe bankombo ndenge na ndenge mpo na kolobela ye. Yango ezali kosalisa biso tóyeba ntina ya ebele ya mapamboli oyo tozali kozwa na makambo oyo Yesu asalá, azali kosala, mpe akosala mpo na biso. (Talá etanda “Mokumba monene ya Yesu,” .) Lisusu, Nzambe apesi Yesu “nkombo oyo ezali likoló ya nkombo mosusu nyonso.”a Bokonzi nyonso na likoló mpe na nse epesami na mabɔkɔ na ye.​—Bafilipi 2:9; Matai 28:18.

Ekóma lokola nzembo te

Ya solo, tosengeli kobondelaka na nkombo ya Yesu soki tolingi ete Yehova ayoka mabondeli na biso. (Yoane 14:13, 14) Kasi, tosengeli te kokómisa maloba “na nkombo ya Yesu” lokola nzembo. Mpo na nini?

Tózwa ndakisa. Ntango moto moko ya kompanyi atindeli yo mokanda oyo esuki na maloba “Wa yo wa bolingo . . . ,” okokanisa ete moto wana alingaka yo solosolo, to alandi kaka mibeko ya kokoma mikanda? Ya solo, kosalela nkombo ya Yesu na mabondeli na biso esengeli kozala na ntina mingi koleka maloba oyo etyamaka na nsuka ya mokanda ya kompanyi. Atako tosengeli ‘kobondelaka ntango nyonso,’ tosengeli kosala yango na ‘motema na biso mobimba,’ kasi esengeli kokóma te lokola nzembo.​—1 Batesaloniki 5:17; Nzembo 119:145.

Ndenge nini okoki koboya kokómisa maloba “na nkombo ya Yesu” lokola nzembo? Mpo na nini te komanyola na bizaleli kitoko ya Yesu? Kanisá makambo oyo asalá mpe oyo azali kokana kosala mpo na yo. Ntango ozali kobondela, pesáká Yehova matɔndi mpe kumisáká ye mpo na lolenge malamu oyo asaleli Mwana na ye. Soki osali bongo, okokóma na kondima na elaka ya Yesu oyo: “Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.”​—Yoane 16:23.

a Diksionɛrɛ ya Vine (Expository Dictionary of New Testament Words) elobi ete liloba ya Grɛki oyo babongoli na “nkombo” ekoki kolimbola “makambo nyonso oyo etali nkombo, na ndakisa bokonzi, bizaleli ya moto, lokumu, nguya, mpe bongo na bongo.”

MOKUMBA MONENE YA YESU

Mpo na koyeba malamumalamu mokumba ya Yesu, tótalela mwa batitre mpe bankombo oyo Biblia epesi ye, mpe makambo mosusu oyo elobi na ntina na ye.

  • Amen.​—2 Bakolinti 1:19, 20; Emoniseli 3:14.

  • Ntoma.​—Baebele 3:1.

  • Kapita ya bomoi.​—Misala 3:15.

  • Klisto/​Masiya.​—Matai 16:16; Yoane 1:41.

  • Tata ya seko.​—Yisaya 9:6.

  • Motatoli ya sembo.​—Emoniseli 1:5.

  • Mobateli ya bampate oyo aleki malamu.​—Yoane 10:11.

  • Mokonzi ya lisangá.​—Baefese 5:23.

  • Nganga-nzambe monene.​—Baebele 4:14, 15.

  • Emanuele.​—Matai 1:23.

  • Mosambisi.​—Misala 10:42.

  • Mokonzi.​—Emoniseli 11:15.

  • Mwana-Mpate ya Nzambe.​—Yoane 1:29.

  • Adama ya nsuka.​—1 Bakolinti 15:45.

  • Motambwisi.​—Matai 23:10.

  • Nkolo.​—Yoane 13:13.

  • Moyokanisi.​—1 Timote 2:5.

  • Mikaele Anzelu-Mokonzi.​—1 Batesaloniki 4:16; Yuda 9.

  • Nzambe ya nguya.​—Yisaya 9:6.

  • Nkolo ya kimya.​—Yisaya 9:6.

  • Mobikisi​—Luka 2:11.

  • Mwana ya Nzambe.​—Yoane 1:34.

  • Mwana ya moto.​—Matai 8:20.

  • Moteyi.​—Yoane 13:13.

  • Liloba.​—Yoane 1:1.

  • Mosungi ya kokamwa.​—Yisaya 9:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto