“Nani azali moto ya bwanya mpe ya bososoli na kati na bino?”
“Nani azali moto ya bwanya mpe ya bososoli na kati na bino? Tiká ete alakisa misala na ye na etamboli na ye ya malamu na boboto oyo ezali ya bwanya.”—Yak. 3:13.
1, 2. Tokoki koloba nini mpo na bato mingi oyo bamonanaka bato ya bwanya?
MPO na yo, nani azali mpenzampenza moto ya bwanya? Ntango mosusu okanisaka ete ezali baboti na yo, mobange moko to molakisi moko? Ekoki kozala ete otalelaka bwanya na ndenge oyo bato batalelaka yango na esika oyo okolá to na kolanda makambo ya bomoi na yo. Kasi, basaleli ya Nzambe balukaka libosoliboso koyeba makanisi na ye na likambo yango.
2 Na miso ya Nzambe, ezali te bato nyonso oyo mokili emonaka ete bazali na bwanya nde bazali mpenza na bwanya. Na ndakisa, Yobo asololaki na bato oyo bazalaki kokanisa ete bazali koloba maloba ya bwanya, kasi na nsuka alobaki na bango boye: ‘Namoni moko ya mayele kati na bino te.’ (Yobo 17:10) Mpo na bato oyo baboyaki boyebi ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki boye: “Atako bazali koloba ete bazali bato ya bwanya, bakómi bazoba.” (Lom. 1:22) Lisusu, Yehova alobaki polele na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya ete: “Mawa epai na baoyo bazali na mayele na miso na bango mpenza.”—Yis. 5:21.
3, 4. Esɛngaka mpenza nini mpo na kozala moto ya bwanya?
3 Emonani mpenza ete tosengeli koluka koyeba nini mpenza epesaka moto bwanya mpe esalaka ete Nzambe akóma kosepela na ye. Masese 9:10 (NW) elobi boye: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya, mpe boyebi ya ye Oyo-Aleki-Bosantu ezali mayele.” Moto ya bwanya asengeli kobanga Nzambe mpe kotosa mibeko na ye. Nzokande, kondima kaka ete Nzambe azali mpe koyeba mibeko na ye ekoki te. Moyekoli Yakobo alendisi biso tókanisa likambo yango. (Tángá Yakobo 3:13.) Talá ndenge alobi: “Tiká ete alakisa misala na ye na etamboli na ye ya malamu.” Bwanya ya solosolo esengeli komonana na makambo oyo ozali kosala mpe koloba mokolo na mokolo.
4 Bwanya ya solosolo emonanaka na mayele, na boyebi mpe na bososoli. Makambo nini ekomonisa ete moto azali na bwanya ya ndenge wana? Yakobo atángi mwa makambo oyo emonisaka ete moto azali na bwanya.a Makambo nini alobaki oyo ekoki kosalisa biso tóyokanaka malamu na bandeko na biso baklisto mpe na bato mosusu?
Bwanya ya solosolo emonanaka na misala
5. Moto oyo azali na bwanya ya solosolo akomitambwisa ndenge nini?
5 Tóbosana te ete Yakobo alobaki ete bwanya ná bizaleli ya malamu etambolaka nzela moko. Lokola kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya, moto ya bwanya asalaka nyonso mpo na kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Tobotamaka na bwanya ya Nzambe te. Kasi, tokoki kokóma na bwanya yango soki tozali koyekola Biblia mbala na mbala mpe komanyola na makambo oyo tozali koyekola. Yango ekosalisa biso tósala oyo Baefese 5:1 ezali kolendisa biso tósala: “Bókóma bamekoli ya Nzambe.” Soki tozali komekola Yehova, tokokóma mpe komitambwisa na bwanya. Banzela ya Yehova eleki oyo ya bato mosika. (Yis. 55:8, 9) Yango wana, soki tozali komekola Yehova, bato oyo bazali baklisto te bakomona ete tokeseni mpenza na bango.
6. Mpo na nini kozala na boboto ezali elembo ya moto oyo amekolaka Nzambe, mpe ezaleli yango emonanaka ndenge nini?
6 Yakobo amonisi ete lolenge moko ya kozala lokola Yehova ezali kozala na “boboto oyo ezali ya bwanya.” Atako moto ya boboto azalaka motema malamu, moklisto aboyaka mabe na motema moko, mpe yango esalisaka ye azala na bokatikati. Atako Nzambe azali na nguya oyo ezangi nsuka, azali na boboto, yango wana tobangaka te kopusana penepene na ye. Mwana ya Nzambe amekolaki boboto ya Tata na ye, yango wana alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.”—Mat. 11:28, 29; Filp. 2:5-8.
7. Mpo na nini tokoki koloba ete Moize azali ndakisa malamu ya boboto?
7 Biblia elobeli bato mosusu oyo bazalaki na boboto mingi to bopɔlɔ. Moko na bango ezali Moize. Azalaki na mokumba monene, kasi Biblia elobi ete “azalaki na bopɔlɔ mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mit. 11:29; 12:3) Kanisá naino mpiko oyo Yehova apesaki Moize mpo akokisa mokano na Ye. Yehova azalaki kosalela bato ya boboto mpo na kokokisa mokano na ye.
8. Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki komonisa “boboto oyo ezali ya bwanya”?
8 Emonani mpenza ete bato ya kozanga kokoka bakoki komonisa “boboto oyo ezali ya bwanya.” Ezali boni mpo na biso? Ndenge nini tokoki kokóma na ezaleli yango? Boboto ezali na kati ya mbuma ya elimo santu ya Yehova. (Gal. 5:22, 23) Tokoki kosɛnga Yehova elimo santu mpe kosala makasi mpo na komonisa mbuma na yango, na elikya ete Nzambe akosalisa biso tókolisa ezaleli yango. Mokomi ya nzembo asalisi biso tóndima likambo yango; alobi boye: “[Nzambe] akolakisa bato ya bopɔlɔ nzela na ye.”—Nz. 25:9.
9, 10. Milende nini tosengeli kosala mpo na kozala na boboto ya Nzambe, mpe mpo na nini?
9 Kasi, ekoki kosɛnga milende mingi mpo na kosala yango. Na kotalela esika mpe ndenge oyo tokolá, ekoki kozala mpasi mpo na biso kozala na boboto. Longola yango, bato oyo tofandi na bango bakoki kotinda biso tózanga boboto, na ndakisa koloba ete “soki babɛti yo, yo mpe bɛtá; soki bafingi yo, yo mpe fingá.” Kasi, yango ezali mpenza bwanya? Soki mɔtɔ ya moke ebandi kozikisa ndako na yo, okoboma yango na mafuta to nde na mai? Kosopa mafuta likoló ya mɔtɔ ekongalisa yango nde kongalisa, kasi soki osopi mai, ntango mosusu ekoki kokufa. Ndenge moko, Biblia epesi biso toli oyo: “Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda, nde liloba makasi ekopesa nkɛlɛ simbisi.” (Mas. 15:1, 18) Na mbala ya nsima oyo matata ekobima, ezala na kati ya lisangá to te, tokomonisa bwanya ya solosolo soki toluki kosilisa yango na boboto.—2 Tim. 2:24.
10 Ndenge tolobaki yango liboso, bato mingi oyo balandaka elimo ya mokili oyo bazalaka na boboto mpe kimya te. Mokili etondi nde na bato ya nko mpe ya lolendo. Yakobo ayebaki likambo yango mpe akebisaki baklisto ete bátika te elimo yango ebebisa bango. Toli yango ekoki koteya biso nini lisusu?
Bizaleli ya bato oyo bazangi bwanya
11. Bizaleli nini ezali na boyokani te na bwanya ya Nzambe?
11 Yakobo amonisi polele bizaleli oyo eyokani te na bwanya ya Nzambe. (Tángá Yakobo 3:14.) Zuwa mpe kowelana ezali bizaleli ya moto ya mosuni, kasi ya moto ya elimo te. Tótala likambo oyo emonanaka soki makanisi ya mosuni eleki. Mangomba motoba ya boklisto ekabolá ndako-nzambe babengi Saint-Sépulcre na Jérusalem, oyo balobaka ete etongamá na esika oyo babomaki Yesu mpe bakundaki ye. Bawelanaka ntango nyonso. Na 2006, zulunalo moko (Time) elobelaki likambo moko oyo esalemaki kuna, ntango basango ya esika yango “babundaki na boumeli ya ebele ya bangonga, . . . mpe bazalaki kobɛtana na bisimbeli ya buji.” Lokola bango moko bazalaki koyokana te, basɛngaki moto moko ya Mizilma asimbela bango lifungola ya ndako-nzambe yango.
12. Nini ekoki kosalema soki bwanya ezangi?
12 Kowelana ya makasi ndenge wana esengeli komonana ata moke te na lisangá ya baklisto. Kasi, ntango mosusu kozanga kokoka etindaka bato mosusu bátingama kaka na makanisi na bango. Yango ekoki kobimisa matata to kowelana makasi. Ntoma Paulo amonaki likambo yango na lisangá ya Kolinti, yango wana akomaki boye: “Lokola zuwa mpe koswana ezali na kati na bino, bozali nde te bato ya mosuni mpe bozali nde te kotambola lokola bato batambolaka?” (1 Kol. 3:3) Likambo wana ya mawa eumelaki mwa ntango na lisangá wana na ekeke ya liboso. Yango wana, tosengeli kokeba ete lelo oyo elimo ya ndenge wana ekɔta na lisangá te.
13, 14. Pesá bandakisa ya makambo oyo emonisaka elimo ya mosuni.
13 Ndenge nini elimo ya ndenge wana ekoki kokɔta na lisangá? Ekoki kobanda na makambo ya mikemike. Na ndakisa, ntango Ndako ya Bokonzi ezali kotongama, bandeko bakoki kopesa makanisi ekeseni. Ndeko moko akoki kosilika mpo baboyi likanisi na ye mpe akoki kobanda kolobaloba to kotyola bikateli oyo ezwami. Akoki ata koboya kopesa mabɔkɔ na misala mosusu. Moto oyo azali kosala bongo abosani ete misala ya lisangá etambolaka malamu mingimingi soki ezali kosalema na elimo ya kimya oyo ezalaka na lisangá, kasi te na mayele boye to boye. Yehova apambolaka elimo ya boboto, kasi ya kowelana te.—1 Tim. 6:4, 5.
14 Ndakisa mosusu yango oyo: bankulutu bakoki komona ete moninga na bango moko, atako aumelá na mikumba yango, azali lisusu kokokisa masɛngami te. Ntango mokɛngɛli ya zongazonga amoni ete bapesaki ye batoli oyo ebongi kasi abongwani te, andimi ekateli oyo bankulutu mosusu bazwaki ya kolongola ye mikumba. Nkulutu yango akosala nini? Akozala mpenza na komikitisa mpe na boboto mpo na kondima ekateli wana oyo bankulutu nyonso bazwi mpe toli euti na Makomami oyo bapesi ye, mpe kosala makasi mpo na kokokisa lisusu masɛngami, mpo na kozongela mikumba na ye? Akokangela bango nde nkanda mpe akokóma koyokela bango zuwa mpo mikumba na ye elongwe? Mpo na nini ndeko yango akotingama kaka atikala nkulutu nzokande azali kokokisa masɛngami te? Ekozala malamu amikitisa mpe ayokela baninga!
15. Mpo na nini tokanisi ete toli ya Yakobo 3:15, 16 ezali na ntina mingi?
15 Ezali mpe na makambo mosusu oyo ekoki kotinda moto amonisa elimo ya mosuni. Kasi, ata soki likambo nini ebimi, tosengeli kosala nyonso mpo na kokima bizaleli ya ndenge wana. (Tángá Yakobo 3:15, 16.) Moyekoli Yakobo alobaki ete bizaleli yango ezali “ya nse,” mpo ezali ya mosuni mpe ezangi bwanya ya Nzambe. Ezali “ya bonyama,” mpo epesaka moto makanisi ya mosuni, oyo ekesani te na oyo ya banyama. Bizaleli ya ndenge wana ezali “ya bademo,” mpo emonisaka elimo ya bademo. Bizaleli ya ndenge wana ebongi na moklisto ata moke te!
16. Mbongwana nini tosengeli kosala, mpe nini ekoki kosalisa biso tólonga?
16 Ndeko mokomoko na kati ya lisangá asengeli komitalela mpe kosala nyonso mpo na kolongola bizaleli wana. Lokola bankulutu bazali bateyi na lisangá, basengeli kokeba ete bizaleli ya ndenge wana emonana epai na bango te. Kosala yango ezali pɛtɛɛ te lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali na kati ya mokili oyo etondi na bizaleli yango. Kosala bongo ekoki komonana lokola tozali komeka komata ngomba ya mosɛlu. Soki tozangi eloko ya kosimba, tokoki kosɛlumwa mpe kozonga nsima. Kasi, na lisalisi ya toli ya Biblia mpe ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabelé, tokoki kolonga.—Nz. 73:23, 24.
Bizaleli oyo moto ya bwanya alingaka kozala na yango
17. Mbala mingi moto ya bwanya asalaka nini soki amekami na mabe?
17 Tángá Yakobo 3:17. Kotalela bizaleli wana, oyo “bwanya oyo euti na likoló” epesaka, ekomemela biso matomba. Kozala pɛto na bizaleli elimboli koboya makambo mpe makanisi nyonso ya mbindo. Tosengeli kobwakaka makambo ya mabe mbala moko. Ekoki kozala ete monganga abɛti yo ebende na libɔlɔngɔ. Atako yo osalaki eloko te, lokolo na yo eninganaki yango moko. Esengeli kozala ndenge moko ntango tomekami na mabe. Lokola tozali pɛto na bizaleli mpe tozali na lisosoli oyo eteyami na Biblia, tosengeli koboyaka mabe mbala moko. (Lom. 12:9) Biblia elobeli bato oyo basalaki bongo, na ndakisa Yozefe mpe Yesu.—Gen. 39:7-9; Mat. 4:8-10.
18. Elimboli nini (a) kozala moto ya kimya? (b) kozala moto oyo atyaka kimya?
18 Bwanya ya Nzambe esɛngaka mpe tózala bato ya kimya. Mpo na yango, tosengeli koboya bitumba, mobulu to makambo mosusu oyo ekoki kobebisa kimya. Yakobo alobelaki likambo yango lisusu na mozindo boye: “Mbuma ya boyengebene, momboto na yango elonamaka na kimya mpo na baoyo batyaka kimya.” (Yak. 3:18) Awa, Yakobo alobi mpe ete “batyaka kimya.” Oyebani na kati ya lisangá lokola moto oyo atyaka kimya to lokola epanza makita? Toswanaka to towelanaka mbala mingi na basusu, toumelaka te kosilika to kopesa basusu nkanda? Tolingaka kaka basusu bándima biso ndenge tozali, to tomikitisaka mpe tolongolaka bizaleli mabe oyo baninga basepelaka na yango te? Toyebani lokola bato oyo balukaka kotya kimya, bakakatanaka te kolimbisa basusu mpe kobosana mabunga na bango? Soki tomitaleli na bosembo nyonso, tokoyeba makambo oyo tosengeli kobongisa na bomoi na biso mpo na komonisa bwanya ya Nzambe.
19. Makambo nini emonisaka ete moto azali makambo makasimakasi te?
19 Ntango Yakobo alobelaki makambo oyo emonisaka bwanya oyo euti na likoló, atángaki mpe kozala makambo makasimakasi te. Toyebani lokola bato oyo bandimaka mpe makanisi ya basusu soki ekweisi mitinda ya Biblia te, kasi te lokola bato oyo balingaka baninga bándima kaka makanisi na bango? Toyebani lokola bato ya boboto, oyo basusu babangaka te kosolola na bango? Makambo wana nde emonisaka ete toyekoli kozala makambo makasimakasi te.
20. Matomba nini tokozwa soki tozali komonisa bizaleli ya malamu oyo tolobeli na lisolo oyo?
20 Kanisá naino esengo oyo ekozala na lisangá soki bandeko bazali kosala makasi mpo na kozala na bizaleli malamu oyo Yakobo alobelaki! (Nz. 133:1-3) Soki tozali bato ya boboto, ya kimya mpe ya makambo makasimakasi te, tokozala na boyokani makasi mpe yango ekomonisa ete tozali na “bwanya oyo euti na likoló.” Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo koyekola kotalela basusu ndenge oyo Yehova atalelaka bango ekoki kosalisa biso na likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Makambo nyonso oyo Yakobo akomaki na esika wana emonisi ete azalaki kolobela bankulutu to “bateyi” ya masangá. (Yak. 3:1) Emonani polele ete mibali yango basengeli kopesa ndakisa na likambo ya komonisa bwanya ya Nzambe, kasi biso nyonso tokoki kozwa litomba na toli yango.
Okoki kolimbola?
• Nini epesaka moklisto bwanya ya solosolo?
• Makambo nini tosengeli kobongisa mpo tókóma na bwanya ya Nzambe?
• Bizaleli nini emonanaka epai ya bato oyo bazangi “bwanya oyo euti na likoló”?
• Bizaleli nini ozwi ekateli ya kolona lisusu?
[Elilingi na lokasa 23]
Ndenge nini kowelana ekoki kokɔta na lisangá lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 24]
Obwakaka makanisi ya mabe mbala moko?