Elaka moko ya ntina mingi
NAZALI na elaka moko ya ntina mingi. Tiká nayebisa bino eloko nini etindaki ngai, mama moko na Espagne, napesa elaka wana.
Kimya mpe bomoko ezalaki te na ndako ya baboti na ngai. Libota na biso etungisamaki makasi ntango leki na ngai ya mobali ya mbula minei akufaki na likama moko ya nsɔmɔ. Longola yango, bizaleli mabe ya tata epekisaki mama azala na esengo na libala na ye. Kasi, mokakatano wana epekisaki ye te koteya ngai ná yaya ndenge moto asengeli kozala.
Nsukansuka, ngai ná ndeko na ngai tobalaki. Mosika te, minganga bazwaki mama na kanser, mpe akufaki na maladi yango. Liboso akufa, atikelaki biso eloko moko ya motuya.
Moninga na ye moko ayebisaki ye elikya ya lisekwa oyo Makomami ezali kopesa, mpe mama andimaki koyekola na ye Biblia. Na nsuka ya bomoi na ye, nsango ya Biblia epesaki ye elikya mpe esalisaki ye akóma na esengo.
Ntango tomonaki ndenge nsango ya Biblia esalisaki mama, ngai ná ndeko na ngai mpe tobandaki koyekola Liloba ya Nzambe. Nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova sanza moko liboso mwana na biso ya mibale abotama. Azalaki mwasi kitoko oyo topesaki nkombo Lucía.
Mokolo oyo nazwaki batisimo ezalaki mokolo moko ya ntina mingi mpo na ngai. Moko ya bantina ezalaki ete nakómaki moto ya Yehova mpenza, lokola namipesaki mpo na kosalela ye libela na libela. Ntina mosusu ezali ete nakokaki koteya bana na ngai bindimeli na ngai.
Kasi mosika te, esengo wana oyo nazalaki na yango ya koteya bana na ngai bindimeli na ngai ekatanaki. Ntango Lucía akómaki na mbula minei, akómaki kotungisama mingi na libumu. Nsima ya kosalisa baekzamɛ ndenge na ndenge, ekzamɛ ya radio emonisaki ete mbuma moko monene lokola lilala ebimi ye na libale. Monganga alobaki ete Lucía azali na kanser moko ya mabe mpenza. Abundaki na maladi yango mbula sambo mobimba mpe akɔtaki lopitalo mbala na mbala.
Elimo ya komipimela
Na boumeli ya bambula wana ya mpasi, Lucía azalaki kolendisa ngai na ndenge azalaki koyamba ngai mpe kopesa ngai mwa lipwepwe. Ndenge azalaki mpe koyikela maladi na ye mpiko ekamwisaki minganga. Azalaki ntango nyonso kosalisa minganga na kokabolela bana mosusu oyo bakɔtaki mpe lopitalo yaourt, jus, mpe biloko mosusu. Minganga bapesaki ye kutu elamba ya minganga ná karte moko oyo azalaki kolata lokola “monganga mosungi.”
Mwasi moko oyo azalaki kosala na lopitalo yango alobi ete, “Lucía akamwisaki ngai. Azalaki mwana moko oyo alingi mosala, mayele mpe azalaki kolinga kosala mayemi. Azalaki kasakasa mpe azalaki kosala makambo lokola mokóló.”
Eloko ezalaki kopesa Lucía makasi mpe kimya ezali Liloba ya Nzambe. (Ebe. 4:12) Azalaki kondima elikya oyo Liloba ya Nzambe epesi ete na mokili ya sika, “liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu te.” (Emon. 21:4) Lokola azalaki komibanzabanza mpo na basusu, azalaki kolekisa ata libaku moko te mpo na kosakola nsango ya Biblia. Elikya makasi na lisekwa ezalaki kosalisa Lucía abungisa kimya mpe esengo te atako azalaki na elikya te ete maladi na ye ekosila. (Yis. 25:8) Abatelaki elikya wana tii mokolo oyo kanser ebomaki ye.
Ezali na mokolo wana nde napesaki elaka moko ya ntina mingi. Lucía akokaki lisusu kofungola miso te. Tata na ye asimbaki ye lobɔkɔ moko mpe ngai nasimbaki oyo mosusu. Nalobaki na litoi na ye ete: “Kobanga te, nakotika yo te. Pemá malɛmbɛ. Ntango okosekwa, okoyoka malamu. Okoyoka lisusu mpasi te, mpe nakozala na yo.”
Sikoyo, nasengeli kobatela elaka wana. Nayebi ete kozela lisekwa ekozala pɛtɛɛ te. Kasi, nayebi mpe ete soki nazeli Yehova na motema mpio mpe natikali sembo epai na ye, nakozala wana ntango Lucía akosekwa.
Libula oyo Lucía atikeli biso
Mpiko ya Lucía mpe lisungi ya bandeko ya lisangá esimbaki mpenza motema ya mobali na ngai, oyo azalaki Motatoli ya Yehova te. Mokolo oyo Lucía akufaki, alobaki ete asengeli kotalela lisusu bomoi na ye. Mwa bapɔsɔ na nsima, asɛngaki nkulutu moko ya lisangá ayekola Biblia na ye. Mosika te, abandaki koyangana na makita nyonso. Na lisalisi ya Yehova, atikaki makaya, eloko oyo azalaki kokoka te liboso.
Mawa oyo nayokaki na liwa ya Lucía esilá naino te, kasi nazali na botɔndi epai na Yehova mpo na libula oyo Lucía atikaki. Elikya ya lisekwa esalisaka ngai ná mobali na ngai tóbɔndisana, mpe tokanisaka ntango tokomona lisusu Lucía na elongi na ye ya esengo.
Liwa ya Lucía epesaki mpe moninga na ngai moko mpasi. Mokolo moko ya pɔsɔ na ntɔngɔ, mwasi moko oyo mwana na ye azalaki kotánga esika moko na Lucía ayaki na nse ya mbula epai na biso. Mwana na ye mosusu ya mbula 11 akufaki mpe na maladi yango. Ntango ayokaki likambo oyo ekómelaki Lucía, mwasi wana alukaki adrɛsi na biso mpe ayaki kotala biso. Alukaki koyeba soki nazali kosala nini mpo na kolonga mawa ya liwa ya Lucía mpe apesaki likanisi ete tósala mwa ebongiseli moko mpo na kobɔndisaka bamama mosusu oyo bazali kokufela bana na maladi ya kanser.
Nayebisaki ye ete eloko epesaki ngai libɔndisi ya solosolo ezali moko ya bilaka ya Biblia, oyo moto moko te akoki kopesa. Namonaki esengo na elongi na ye ntango nazalaki kotángela ye maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 5:28, 29. Andimaki koyekola Biblia mpe mosika te akómaki na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Filp. 4:7) Soki tozali koyekola Biblia, mbala mingi topemaka mpe tokanisaka ndenge tokozala na mokili ya sika, mpe ndenge tokoyamba bandeko mpe baninga na biso ntango bakosekwa.
Ya solo, atako Lucía aumeli mingi te na mokili, atiki libula ya solosolo. Kondima na ye esalaki ete tata na ye mpe akóma kosalela Nzambe elongo na ngai, mpe elendisaki ekateli na ngai ya kotikala makasi na kondima. Na ntembe te, biso nyonso oyo tobungisá bandeko mpe baninga oyo bakoki kosekwa tozali na elaka moko ya ntina mingi.
[Elilingi na lokasa 20]
Elilingi ya paladiso oyo Lucía asalaki