Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/6 lok. 27
  • Yesu alobelaki nde lifelo ya moto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu alobelaki nde lifelo ya moto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Laki ya mɔto ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Yesu ateyaki nini na ntina na lifelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lifelo​—Monyoko ya seko to bobele nkunda?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Pole mpo na bikólo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/6 lok. 27

Yesu alobelaki nde lifelo ya mɔtɔ?

BATO mosusu oyo bandimaka liteya ya lifelo ya mɔtɔ basalelaka maloba ya Yesu oyo ezali na Malako 9:48 (to vɛrsɛ 44, mpe 46). Yesu alobelaki nkusu oyo ekufaka te mpe mɔtɔ oyo ebomamaka te. Soki moto moko atuni yo ndimbola ya maloba yango, okopesa eyano nini?

Na kolanda libongoli ya Biblia oyo bozali na yango, akoki kotánga vɛrsɛ 44, 46, to 48 mpamba te maloba ya bavɛrsɛ yango ezali ndenge moko na mabongoli mosusu.a Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika elobi boye: “Soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, bwaká yango; eleki malamu mpo na yo kokɔta liso moko na bokonzi ya Nzambe na esika ya kobwakama ná miso mibale na Gehena, epai nkusu na yango ekufaka te mpe mɔtɔ ebomamaka te.”​—Mko. 9:47, 48.

Atako bongo, bato mosusu balobaka ete maloba ya Yesu emonisi ete nsima ya liwa, milimo ya bato mabe enyokwamaka libela na libela. Na ndakisa, Biblia moko na monɔkɔ ya Espagnol (Sagrada Biblia) oyo ebongolamaki na Iniversite ya Navarre elobi boye: “Nkolo asalelaki [maloba yango] mpo na kolobela monyoko ya lifelo. Mbala mingi, ‘nkusu oyo ekufaka te’ elimbolamaka lokola monyoko ya seko ya bato oyo bazali na lifelo; mpe ‘mɔtɔ oyo ebomamaka te’ emonisaka mpasi oyo bato yango bayokaka na nzoto.”

Kasi, tókokanisa maloba ya Yesu na vɛrsɛ ya nsuka ya esakweli ya Yisaya.b Tomoni ete Yesu azalaki kolobela vɛrsɛ ya Yisaya mokapo 66, boye te? Na vɛrsɛ yango, emonani ete mosakoli alobelaki kobima na libándá ya “Yelusaleme mpe kokende na lobwaku ya Hinomo (Gehena), epai kala bazalaki kotumba bato lokola mbeka (Yil. 7:31) mpe na nsima ekómaki esika ya kobwaka bosɔtɔ ya engumba.” (The Jerome Biblical Commentary) Ezali polele ete Yisaya 66:24 elobeli te bato oyo bazali konyokwama; elobeli nde bibembe. Biloko oyo vɛrsɛ yango elobi ete ekufaka te ezali mpambo (to nkusu)​—kasi te bato ya bomoi to milimo. Na yango, Yesu alingaki mpenza koloba nini?

Talá oyo buku moko ya Lingomba ya Katolike (El evangelio de Marcos. Análisis lingüístico y comentario exegético, Volimi II) elobi mpo na Malako 9:48: “Maloba yango euti na Yisaya (66:24). Na vɛrsɛ yango, mosakoli amonisi ndenge mibale oyo bibembe ezalaki kobebisama: kopɔla mpe kotumbama . . . Ndenge oyo vɛrsɛ elandisi maloba nkusu mpe mɔtɔ emonisi mpenza likanisi ya libebi. . . . Vɛrsɛ emonisi biloko yango mibale ete ezali koumela seko (‘ekufaka te, ebomamaka te’): elakisi ete ndenge ya kokima yango ezali te. Na maloba yango ya elilingi, biloko oyo etikali na bomoi ezali nkusu mpe mɔtɔ, kasi bato te; mpe ezali kobebisa eloko nyonso. Nyonso wana emonisi ete vɛrsɛ yango elobeli monyoko ya seko te, kasi kobebisama ya seko oyo mpo na yango lisekwa ezali te mpamba te ezali liwa ya seko. Na yango, [mɔtɔ] ezali elilingi ya libebi ya libela.”

Moto nyonso oyo ayebi ete Nzambe ya solo azali na bolingo mpe azali sembo akoki kozala na mokakatano te ya komona ete ndimbola yango ya maloba ya Yesu ebongi mpenza. Yesu alingaki koloba te ete bato ya mabe bakonyokwama libela na libela. Kasi, bakoki kobebisama mpo na libela, kozanga elikya ya lisekwa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bamaniskri oyo eleki malamu, vɛrsɛ 44 mpe 46 ezali te. Mpo na bato ya mayele na maloba ya Biblia, ekoki kozala ete bavɛrsɛ yango mibale ebakisamaki na nsima. Profesɛrɛ Archibald Robertson akomaki boye: “Na bamaniskri oyo eleki koumela mpe oyo ya malamu mingi, bavɛrsɛ yango mibale ezali te. Bavɛrsɛ yango ezali na bamaniskri oyo ebengami Occidental mpe Syrien (to Byzantin). Ezongeli kaka maloba oyo ezali na vɛrsɛ 48. Yango wana, biso [tolongoli] vɛrsɛ 44 mpe 46 mpo ezalaki te.”

b “Bakobima mpe bakomona bibembe ya bato baoyo batombokelaki ngai; zambi lopambo [to nkusu] na bango ekokufa te, mɔtɔ na bango ekozimana te mpe bakoboyama na nyonso baoyo bazali na nzoto.”​—Yis. 66:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto