Makambo oyo tosengeli kokima
“Bana ya bitupa, nani apesi bino likanisi ya kokima nkanda oyo ezali koya?”—MAT. 3:7.
1. Wapi mwa bandakisa ya Biblia oyo elobeli kokima?
OKANISAKA nini ntango oyoki liloba “kokima”? Bato mosusu bakoki kokanisa ndenge elenge Yozefe akimaki mwasi ya Potifala oyo alukaki kosangisa na ye nzoto. (Gen. 39:7-12) Bamosusu bakoki kokanisa ndenge baklisto bakimaki Yelusaleme na mobu 66 T.B., mpo na kotosa maloba ya Yesu ete: “Ntango bokomona Yelusaleme ezingelami na mampinga oyo esalisali milako, boye . . . tiká baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa.”—Luka 21:20, 21.
2, 3. (a) Maloba oyo Yoane Mobatisi ayebisaki bakonzi ya mangomba elimbolaki mpenza nini? (b) Na maloba nini Yesu azongelaki likebisi oyo Yoane apesaki?
2 Bato oyo tolobeli basengelaki kolongwa na esika moko boye mpe kokima mpenza. Lelo oyo na mokili mobimba, baklisto ya solo basengeli kokima na ndenge ya elilingi. Yoane Mobatisi asalelaki liloba “kokima” na ndenge ya elilingi. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda, bato oyo bazalaki komimona sembo mpe bazalaki komona ete bazali na mposa ya kobongola motema te, bazalaki na kati ya bato oyo bayaki epai ya Yoane. Bakonzi yango bazalaki kotyola bato oyo bazalaki kozwa batisimo mpo na komonisa ete babongoli motema. Na mpiko nyonso, Yoane alobaki na bakonzi yango boye: “Bana ya bitupa, nani apesi bino likanisi ya kokima nkanda oyo ezali koya? Na yango bóbota mbuma oyo ebongi na kobongola motema.”—Mat. 3:7, 8.
3 Yoane alobelaki te kokima oyo esɛngaka kolongwa na esika moko boye. Akebisaki bato mpo na nkanda oyo ezali koya, to mokolo ya kosambisa; amonisaki bakonzi ya mangomba ete mpo bábika na mokolo yango, basengeli kobota mbuma oyo ekomonisa ete babongoli motema. Na nsima, Yesu apamelaki bakonzi yango ya mangomba, baoyo makanisi na bango ya koboma bato emonisaki ete Zabolo azali tata na bango. (Yoa. 8:44) Yesu azongelaki likebisi ya Yoane; abengaki bango “bana ya bitupa” mpe atunaki boye: “Bokokima lisambisi ya Gehena ndenge nini?” (Mat. 23:33) Yesu alingaki koloba nini ntango asalelaki liloba “Gehena”?
4. Yesu alingaki koloba nini ntango asalelaki liloba “Gehena”?
4 Gehena ezalaki lobwaku moko na libándá ya Yelusaleme epai bazalaki kotumba bosɔtɔ mpe banyama ekufá. Yesu asalelaki liloba Gehena lokola elilingi ya liwa ya seko. (Talá na lokasa 27.) Ndenge alobelaki Gehena na motuna na ye emonisaki ete bakonzi yango babongaki na liwa ya seko.—Mat. 5:22, 29.
5. Ndenge nini maloba ya Yoane mpe ya Yesu ekokisamaki na ntango ya kala?
5 Bakonzi ya mangomba babakisaki masumu na bango na ndenge banyokolaki Yesu mpe bayekoli na ye. Na nsima, ndenge Yoane mpe Yesu balobaki yango, mokolo ya nkanda ya Nzambe eyaki. Na ntango wana, “nkanda oyo ezali koya” ebebisaki kaka Yelusaleme mpe Yudea; yango wana likoki ya kokima na esika mosusu ezalaki. Nkanda yango emonanaki na ndenge Baloma babebisaki Yelusaleme ná tempelo na yango na mobu 70 T.B. “Bolɔzi” wana elekaki bolɔzi mosusu nyonso oyo ekómelaki Yelusaleme. Bato mingi babomamaki mpe bamosusu bamemamaki na boombo. Yango ezalaki elilingi ya kobomama oyo ekoyela bato oyo bamibengaka baklisto mpe bandimi ya mangomba mosusu.—Mat. 24:21.
Nkanda ezali koya oyo tosengeli kokima
6. Likambo nini ekómaki komonana na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso?
6 Na ekeke ya liboso, baklisto mosusu bakómaki bapɛngwi mpe babendaki basusu na nzela na bango. (Mis. 20:29, 30) Ntango bantoma ya Yesu bazalaki naino na bomoi, bazalaki lokola “mokangi-nzela” mpo na lipɛngwi yango, kasi ntango bakufaki, mwa mangomba ya baklisto ya lokuta ekómaki mingi. Lelo oyo, ezali na bankama ya bituluku oyo ezali komibenga mangomba ya boklisto. Biblia esakolaki ete bakonzi ya mangomba ya boklisto bakobima, ebengi bango “moto ya botyoli-mibeko” mpe “mwana ya libebi . . . oyo Nkolo Yesu akoboma . . . mpe akobebisa nyɛɛ na komonisama ya kozala na ye.”—2 Tes. 2:3, 6-8.
7. Mpo na nini nkombo “moto ya botyoli-mibeko” ebongi mpenza na bakonzi ya mangomba ya boklisto?
7 Bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali batyoli-mibeko mpamba te bazali kokosa bamilio ya bato na mateya, bafɛti, mpe makambo mosusu oyo Biblia epekisi. Ndenge moko na bakonzi ya mangomba oyo Yesu apamelaki, bato oyo babengami “mwana ya libebi” lelo oyo bakobomama mpo na libela. (2 Tes. 1:6-9) Kasi, ezali boni mpo na bato oyo bazali kokosama na bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe ya mangomba mosusu? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótalela makambo oyo esalemaki nsima ya kobomama ya Yelusaleme mpo na mbala ya liboso, na mobu 607 L.T.B.
Tókima longwa na Babilone
8, 9. (a) Nsango nini Yilimia asakolaki mpo na Bayuda oyo bamemamaki na boombo na Babilone? (b) Ntango Bamede ná Baperse balongaki Babilone, bato bakokaki kokima na ndenge nini?
8 Yilimia asakolaki kobomama ya Yelusaleme oyo esalemaki na mobu 607 L.T.B. Alobaki ete bato ya libota ya Nzambe bakomemama na boombo, kasi bakozonga na mboka na bango nsima ya “[mbula] ntuku nsambo.” (Yil. 29:4, 10) Esakweli ya Yilimia ezalaki mpe na nsango moko ya ntina mingi mpo na Bayuda oyo bazalaki na boombo; basengelaki kosangana te na losambo ya lokuta ya Babilone. Na ndenge yango, bakokaki kozonga na Yelusaleme mpe kozongisa losambo ya pɛto na ntango oyo Yehova atyaki. Ntango Bamede ná Baperse balongaki Babilone na mobu 539 L.T.B., mwa moke na nsima, likambo yango ekokisamaki. Sirise II, mokonzi ya Perse abimisaki mobeko moko oyo epesaki Bayuda nzela ya kozonga mpe kotonga lisusu tempelo ya Yehova na Yelusaleme.—Ezl. 1:1-4.
9 Bankóto ya Bayuda bazongaki na mboka na bango. (Ezl. 2:64-67) Na ndenge yango, balandaki maloba ya Yilimia oyo esɛngaki ete bákima, elingi koloba bákende na esika mosusu. (Tángá Yilimia 51:6, 45, 50.) Ezalaki na makambo oyo epekisaki Bayuda mosusu básala mobembo mpo na kozonga na Yelusaleme mpe na Yudea. Baoyo batikalaki na Babilone, na ndakisa mosakoli Danyele, oyo akómaki mobange, bakokaki kozwa mapamboli ya Nzambe soki basimbi na motema mobimba losambo ya pɛto oyo ezalaki kosalema na Yelusaleme mpe basangani te na losambo ya lokuta ya bato ya Babilone.
10. Tángá “biloko ya bosɔtɔ” ya “Babilone Monene.”
10 Lelo oyo, ebele ya bato bazali kolanda losambo ya lokuta oyo ebandaki na Babilone ya kala. (Gen. 11:6-9) Lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta ebengami “Babilone Monene, mama ya basi ya ndumba mpe ya biloko ya bosɔtɔ ya mabelé.” (Emon. 17:5) Banda kala, mangomba ya lokuta ekɔtaka na makambo ya politiki ya mokili oyo. Bitumba ndenge na ndenge oyo ebomi bamilio ya bato awa na mabelé ezali na kati ya “biloko ya bosɔtɔ” ya Babilone. (Emon. 18:24) “Biloko ya bosɔtɔ” mosusu ezali etamboli mabe ya bakonzi ya mangomba; bazali kosangisa nzoto na bana mike mpe bazali kosala pite, kasi lingomba ezali kokanga miso na makambo yango. Tokoki kokamwa te ete mosika te Yehova Nzambe akoboma mangomba nyonso ya lokuta.—Emon. 18:8.
11. Mokumba nini baklisto ya solo bazali na yango liboso Babilone Monene ebomama?
11 Lokola baklisto ya solo bayebi likambo yango, bazali na mokumba ya kokebisa basambeli ya Babilone Monene. Bazali kosala yango na ndenge bazali kokabola Babiblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo Yesu aponi mpo na kopesa ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ (Mat. 24:45) Soki moto asepeli na nsango ya Biblia, bazwaka bibongiseli mpo na koyekola na ye. Mbala mosusu akoki komona ntina ya ‘kobima na kati ya Babilone’ liboso nsuka eya.—Emon. 18:4.
Tókima losambo ya bikeko
12. Ndenge nini Nzambe atalelaka kosambela bililingi mpe bikeko?
12 Kosambela bililingi mpe bikeko ezali mpe likambo mosusu ya bosɔtɔ oyo esalemaka na Babilone Monene. Nzambe abengi bikeko yango ‘biloko ya mbindo.’ (Det. 29:17) Moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli koboya losambo ya bikeko mpo na kotosa maloba ya Nzambe: “Ngai nazali [Yehova], yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.”—Yis. 42:8.
13. Lolenge nini ya losambo ya bikeko tosengeli kokima?
13 Liloba ya Nzambe elobeli lolenge mosusu ya losambo ya bikeko. Na ndakisa, elobi ete ezaleli ya kolula biloko ya bato ezali “losambo ya bikeko.” (Kols. 3:5) Kolula biloko ya moto elimboli kozala na mposa ya kozwa eloko oyo epekisami, na ndakisa eloko ya moto mosusu. (Ex. 20:17) Anzelu oyo akómá Satana Zabolo alukaki kokokana na Oyo-Aleki-Likoló mpe ete bato básambela ye. (Luka 4:5-7) Yango ememaki ye atombokela Yehova mpe akosa Eva mpo alula eloko oyo Nzambe apekisaki. Adama mpe akɔtaki na losambo ya bikeko mpamba te atikaki ete bolingo mpo na mwasi na ye eleka botosi na ye epai ya Tata na ye ya likoló. Nzokande, baoyo nyonso balingi kokima nkanda ya Nzambe oyo ezali koya basengeli kosambela kaka ye mpe koboya lolenge nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato.
‘Tókima pite’
14-16. (a) Mpo na nini Yozefe azali mpenza ndakisa ya malamu? (b) Tosengeli kosala nini mpo tókwea te na bamposa mabe ya nzoto? (c) Ndenge nini tokoki kokima pite?
14 Tángá 1 Bakolinti 6:18. Ntango mwasi ya Potifala amekaki kokweisa Yozefe, Yozefe akimaki mpenza. Yango ezali ndakisa ya malamu mpo na baklisto, ezala baoyo bazali minzemba to baoyo babalá! Emonani polele ete lisosoli ya Yozefe eteyamaki na makambo ya kala, oyo emonisaki ndenge oyo Nzambe atalelaka pite. Soki tolingi ‘kokima pite,’ tosengeli koboya makambo oyo ekoki kolamusa mposa ya kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na biso te. Biblia elobi na biso boye: “Bóboma binama ya nzoto na bino . . . na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato, oyo ezali losambo ya bikeko. Ezali mpo na makambo wana nde nkanda ya Nzambe ezali koya.”—Kols. 3:5, 6.
15 Vɛrsɛ yango elobi ete “nkanda ya Nzambe ezali koya.” Na mokili oyo, bato mingi bazali kokolisa bamposa mabe ya kosangisa nzoto mpe bazali kokokisa yango. Yango wana, biso baklisto tosengeli kobondelaka Nzambe asalisa biso mpe apesa biso elimo santu mpo tókwea te na bamposa ya mabe. Lisusu, koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kosakola nsango malamu ekosalisa biso ‘tókoba kotambola na elimo.’ Na ndenge yango, ‘tokokokisa ata mposa moko te ya mosuni.’—Gal. 5:16.
16 Tokozala bato oyo bazali “kotambola na elimo” soki tozali koboya kotala bililingi ya bato bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto. Lisusu, moklisto nyonso asengeli koboya kotánga mikanda, kotala bafilme, to koyoka makambo oyo ekoki kolamusa mposa ya nzoto. Ndenge moko mpe, ezali mabe ete “basantu” ya Nzambe básepelaka na masɛki to masolo ya nsɔni. (Ef. 5:3, 4) Na ndenge yango, tokomonisa epai ya Tata na biso ya bolingo ete tolingi mpenza kobika na mokolo ya nkanda oyo ezali koya mpe kokɔta na mokili ya sika ya bosembo.
Tókima “bolingo ya mbongo”
17, 18. Mpo na nini tosengeli kokima “bolingo ya mbongo”?
17 Na mokanda ya liboso oyo akomelaki Timote, Paulo alobelaki mitinda oyo esengelaki kotambwisa baklisto oyo bazalaki baombo, oyo bamosusu kati na bango bazalaki koluka kolyela bankolo na bango mpo bazalaki baklisto. Bamosusu bazalaki koluka kosalela biloko ya bosantu mpo na matomba na bango moko. Paulo akebisaki baoyo bazalaki “kokanisa ete ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali nzela ya kozwa litomba [ya mosuni].” Mbala mosusu likambo oyo ezalaki kotinda bango ezali “bolingo ya mbongo,” ezaleli oyo ekoki kobebisa moto, azala mozwi to mobola.—1 Tim. 6:1, 2, 5, 9, 10.
18 Oyebi bato oyo Biblia elobeli oyo babebisaki boyokani na bango na Nzambe mpo na “bolingo ya mbongo” to ya biloko ezangi ntina oyo moto akoki kosomba na mbongo? (Yos. 7:11, 21; 2 Mik. 5:20, 25-27) Paulo alendisaki Timote na maloba oyo: “Yo, E! moto ya Nzambe, kimá makambo wana. Kasi landá boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, elimo ya boboto.” (1 Tim. 6:11) Toli yango ezali na ntina mingi mpo na moto nyonso oyo alingi kobika na mokolo ya nkanda oyo ezali koya.
Tókima “bamposa oyo ekangani na bolenge”
19. Bilenge nyonso bazali na mposa ya nini?
19 Tángá Masese 22:15. Bozoba oyo ezalaka na motema ya elenge ekoki kokosa ye. Eloko oyo ekoki kobatela ye ezali disipilini oyo euti na Biblia. Bilenge baklisto mingi oyo baboti na bango bazali Batatoli te bazali koyekola mitinda ya Biblia mpe kosalela yango na bomoi na bango. Bamosusu bazali kolanda toli ya baklisto oyo bakɔmeli na kati ya lisangá. Ata soki nani apesi toli oyo euti na Biblia, kotosa yango ekoki komemela biso esengo lelo oyo mpe na mikolo ezali koya.—Ebe. 12:8-11.
20. Nini ekoki kosalisa bilenge baklisto bákima bamposa ya mabe?
20 Tángá 2 Timote 2:20-22. Bilenge mingi oyo balandaka disipilini ya Nzambe te bazali na etamboli ya mabe; na ndakisa, bazali kolona elimo ya kowelana, ezaleli ya kolula biloko ya bato, pite, bolingo ya mbongo, mpe bisengo. Yango ezali “bamposa oyo ekangani na bolenge,” oyo Biblia ezali kolendisa biso tókima. Mpo na kokima bamposa yango, bilenge baklisto basengeli koboya baninga ya mabe, ata na kati ya lisangá. Bilenge bakolonga soki balandi toli oyo ezali kolendisa bango bálanda bizaleli malamu “elongo na baoyo babelelaka Nkolo na motema ya pɛto.”
21. Elaka kitoko nini Yesu Klisto apesi bayekoli na ye?
21 Tózala bilenge to mikóló, tokomonisa ete tolingi kozala bampate ya Yesu oyo bazali ‘kokima . . . mongongo ya bapaya’ soki tozali koboya koyoka bapaya oyo bazali koluka kobungisa biso nzela. (Yoa. 10:5) Nzokande, mpo na kobika na mokolo ya nkanda ya Nzambe, tosengeli kosuka kaka te na kokima makambo ya mabe. Tosengeli mpe kolanda bizaleli ya malamu. Lisolo oyo elandi ekolobela bizaleli yango nsambo. Tozali mpenza na bantina ya koyekola yango, mpamba te Yesu apesi elaka kitoko oyo: “Nazali kopesa [bampate na ngai] bomoi ya seko, mpe bakobebisama ata mokolo moko te, mpe moto moko te akobɔtɔla bango na mabɔkɔ na ngai.”—Yoa. 10:28.
Okopesa eyano nini?
• Likebisi nini Yesu apesaki na bakonzi ya mangomba?
• Likama nini ezali kozela bamilio ya bato?
• Mitindo nini ya losambo ya bikeko tosengeli kokima?
[Bililingi na lokasa 9]
Okanisaka nini ntango oyoki liloba “kokima”