Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/2 nk. 26-29
  • Biblia ebongolaka bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ebongolaka bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge nini nakoki kolongwa na boombo ya badrɔgɛ?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/2 nk. 26-29

Biblia ebongolaka bato

Nini etindaki mwasi moko oyo azalaki kosala mafia ya diama mpe koyiba patrɔ na ye akóma mosali ya sembo? Nini esalisaki mwasi moko oyo alukaki komiboma mbala mibale mobimba amona ntina ya bomoi? Nini esalisaki moto moko oyo azalaki molangwi masanga mpe momɛli bangi atika momeseno yango ya mabe? Tóyoka bango.

MAKAMBO YA BOMOI NA YE

NKOMBO: MARGARET DEBRUYN

MBULA: 45

EKÓLO: BOTSWANA

BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA MAFIA MPE MOYIBI

NDENGE NAZALAKI: Tata autaki na Allemagne, kasi akómaki mwana-mboka ya ekólo Sud-Ouest africain (lelo Namibie). Mama azalaki moto ya Botswana, na etúká ya Mangologa. Nabotamaki na engumba Gobabis, na Namibie.

Na bambula ya 1970, guvɛrnema ya Afrika ya Sudi ekómaki koyangela Namibie mpe ekɔtisaki mibeko ya apartheid, elingi koloba kokabola mindɛlɛ ná baindo, na bingumba mpe bamboka nyonso. Lokola Tata na ngai azalaki mondɛlɛ mpe mama moindo, basɛngaki bango bákabwana. Mama azwaki ngai ná bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe tokendaki kofanda na etúká ya Ghansi, na Botswana.

Na 1979, nakendaki na engumba Lobatse, na Botswana, mpo na kelasi, mpe kuna nafandaki na libota moko oyo bazwaki ngai lokola mwana na bango moko. Na nsima, nazwaki mosala na esika moko ya kobongisa mituka. Banda bomwana, nazalaki koloba ete Nzambe apesaka bato biloko te, mpe ete moto asengeli kosala nyonso oyo akoki, ezala malamu to mabe, mpo na kokokisa bamposa na ye mpe ya libota na ye.

Lokola nazalaki mokonzi na mosala, yango ezalaki kopesa ngai nzela ya koyiba patrɔ na ngai. Soki engbunduka eleki na engumba na biso na butu, ngai ná baninga na ngai tozalaki kokɔta mpe koyiba eloko nyonso oyo tomoni. Nakɔtaki mpe na mafia ya diama, wolo mpe bronzɛ. Nabandaki komɛla bangi, nakómaki mobulu mpe nazalaki na bamakango mingi.

Nsukansuka, na 1993 bakangaki ngai nazali koyiba mpe balongolaki ngai na mosala. “Baninga” na ngai basundolaki ngai mpo babangaki ete bakokanga mpe bango. Nayokaki mpasi mingi lokola baninga na ngai basundolaki ngai mpe nalobaki ete nakotyela lisusu moto moko te motema.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na 1994, nakutanaki na Tim ná Virginia, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki bamisionɛrɛ. Bazalaki kosolola na ngai na ntango ya bopemi na esika nakómaki kosala sika, mpo na kosalisa ngai nayeba Biblia. Na nsima, ntango namonaki ete nakoki kotyela bango motema, nakómaki koyamba bango na ndako na ngai.

Mosika te, namonaki ete soki nalingi kosepelisa Nzambe, nasengeli kobongola bomoi na ngai. Na ndakisa, nayekolaki na 1 Bakolinti 6:9, 10 ete “Bato ya pite, . . . mpe miyibi, mpe bato ya lokoso, mpe balangwi-masanga, mpe bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Mokemoke, natikaki bizaleli na ngai nyonso ya mabe. Natikaki koyiba. Nalongwaki na etuluku ya bilenge ya mobulu oyo tokolaki na bango. Na nsima, na lisalisi ya Yehova, naboyaki bamakango na ngai nyonso.

MATOMBA OYO NAZWI: Nasalaki makasi mpo na kotika ezaleli ya nkandankanda mpe kogangela bana na ngai soki nasepeli te na likambo oyo basali. (Baefese 4:31) Nasalaka nyonso naloba na boboto. Yango ebimisi matomba ya malamu mpenza mpe esalisi libota na ngai ezala na bomoko.

Baninga na ngai ya kala, ata mpe bato ya kartye, bakómá komona ete bakoki kotyela ngai motema. Nakóma mosali moko ya bosembo, oyo bakoki kotyela motema mpe akoki kobomba biloko mpe mbongo ya kompanyi malamu. Na ndenge yango, nazangaka te eloko ya kobikela wana nazali kolekisa ntango na ngai mingi na mosala ya kosalisa basusu báyeba Biblia. Nandimaka na motema mobimba maloba ya Masese 10:22 oyo: “Mapamboli ya [Yehova] ekoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”

MAKAMBO YA BOMOI NA YE

NKOMBO: GLORIA ELIZARRARÁS DE CHOPERENA

MBULA: 37

EKÓLO: MEXIQUE

BOMOI NA YE: ALUKAKI KOMIBOMA

NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na Naucalpan, engumba moko ya bozwi mingi na etúká ya Mexico. Banda bolenge na ngai, nazalaki motomboki mpe nazalaki kolinga biyenga. Nabandaki komɛla likaya na mbula 12, masanga na mbula 14, mpe bangi na mbula 16. Mwa bambula na nsima, nakimaki ndako. Baninga na ngai mingi bazalaki na mabota ya malamu te, mpe baboti na bango bazalaki konyokola mpe kofinga bango. Nazalaki komona ntina ya bomoi te, yango wana mbala mibale mobimba nalukaki komiboma.

Ntango nazalaki na mbula 19, bazwaki ngai na mosala ya kobimaka na bato. Mpo na yango, nayebanaki na bato ya politiki mpe ya masano. Nsukansuka, nabalaki mpe nabotaki bana, kasi ngai nde nazalaki kozwa bikateli nyonso na libota. Nakobaki mpe komɛla makaya, bangi, mpe kolangwa masanga, mpe natikaki bomoi ya loyenge te. Nazalaki ntango nyonso kobimisa maloba ya mbindo mpe ya nsɔni. Nazalaki nkandankanda.

Baninga na ngai mingi bazalaki na bomoi lokola oyo ya ngai. Bazalaki kokanisa ete nakoká na nyonso. Kasi, bomoi na ngai ezalaki na ntina moko te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nabandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova na 1998. Biblia eteyaki ngai ete bomoi ezali na ntina. Nayekolaki ete Yehova Nzambe azali na mokano ya kozongisa Paladiso awa na mabelé, ete akosekwisa bakufi mpe ete ngai nakoki kozala na paladiso yango.

Nayekolaki mpe ete kolinga Nzambe elimboli kotosa mibeko na ye. (1 Yoane 5:3) Na ebandeli, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, mpo nazalaki koyokela moto te. Kasi nsukansuka, namonaki ete nakoki te kokoba komitambwisa ngai moko. (Yilimia 10:23) Nabondelaki Yehova asalisa ngai. Nasɛngaki ye asunga ngai nayokanisa bomoi na ngai na mitinda na ye mpe nasalisa bana na ngai bálanda te nzela oyo ngai nalandaki.

Ezalaki mpasi mpo nasala mbongwana oyo esengelaki, kasi nabandaki kosalela toli oyo ezali na Baefese 4:22-24: “Bosengeli kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso . . . mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.” Mpo na ngai, kolata bomoto ya sika elimbolaki kotika mimeseno ya mabe lokola komɛla likaya, kotika maloba ya mbindo mpe koyekola kobimisa maloba ya malamu. Esɛngaki ngai mbula soki misato mpo nabongwana mpe nazwa batisimo.

Lisusu, natikaki kozwa na lisɛki mokumba na ngai ya mwasi ya libala mpe mama. Nabandaki kotosa toli oyo ezali na 1 Petelo 3:1, 2: “Bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.”

MATOMBA OYO NAZWI: Nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo lelo oyo nayebi ete bomoi ezali na ntina. Namoni ete bomoto na ngai ebongi mpe nakoki kobɔkɔla bana na ngai malamu. Ntango mosusu, motema na ngai efundaka ngai mpo na makambo ya mabe oyo nasalaki kala, kasi Yehova ayebi motema na ngai. (1 Yoane 3:19, 20) Ntembe ezali te ete kolanda mitinda ya Biblia ebateli ngai mpe ememeli ngai kimya.

MAKAMBO YA BOMOI NA YE

NKOMBO: JAILSON CORREA DE OLIVEIRA

MBULA: 33

EKÓLO: BRÉSIL

BOMOI NA YE YA KALA: MOLANGWI MASANGA MPE MOMƐLI BANGI

NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na Bae, engumba moko ya bato 100 000 na Brésil, oyo ezali na ndelo ya Brésil ná Uruguay. Mosala ya libosoliboso kuna ezalaki bilanga mpe kobɔkɔla bibwele mpe mimeseno ya bato yango eyokani na oyo babengaka gaucho. Nakolaki na etúká moko ya bobola, epai bilenge bazalaki kosala mobulu, komɛla masanga mpe bangi.

Ntango nasilisaki kelasi, nabandaki komɛla masanga, komɛla marijuana, mpe koyoka miziki babengi heavy-metal. Nazalaki kondima Nzambe te. Nazalaki komona ete bampasi mpe mobulu nyonso oyo ezali na mokili ezali komonisa ete Nzambe azali te.

Nazalaki kobɛta gitare mpe kokoma banzembo, oyo mbala mingi nazalaki kozwa na makambo oyo ezali na mokanda ya Emoniseli. Etuluku na ngai ezalaki makasi te ndenge nazalaki kolinga, yango wana nakómaki komipesa na bangi. Nazalaki kobanga te ete nakoki kokufa soki nalekisi ndelo. Bayembi mingi oyo nazalaki kolinga basukisaki bomoi na bango kaka bongo.

Mpo na kosomba bangi, nazalaki kodefa mbongo epai ya nkɔkɔ na ngai ya mwasi, oyo abɔkɔlaki ngai. Nazalaki kokosa ye soki atuni ngai nini nakosala na mbongo yango. Likambo ya mabe koleka, nasimbaki nkisi. Nakanisaki ete ekomatisa miziki na ngai.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI BOMOI NA NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, makanisi na ngai ekómaki kobongwana. Mokemoke, nakómaki komona ntina ya bomoi mpe kozala na esengo. Yango etindaki ngai nakata nsuki na ngai ya milai. Natikaki yango milai mpo na komonisa botomboki na ngai. Na nsima, namonaki ete mpo nasepelisa Nzambe nasengeli kotika kolangwa masanga mpe komɛla bangi ná makaya. Namonaki mpe ete nasengeli kotika koyoka miziki ya mabe.

Mbala ya liboso oyo nakendaki na makita ya Batatoli ya Yehova, namonaki mokapo oyo batyaki na efelo. Ezalaki Masese 3:5, 6, oyo elobi: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Kokanisa na mokapo yango endimisaki ngai ete Yehova akosalisa ngai nabongisa bomoi na ngai soki natiki ye asala yango.

Kasi, kobongola bomoto na ngai mpe kotika mimeseno lokola komɛla bangi mpe kolangwa masanga, ezalaki mpasi lokola nde nazali koluka kokata lobɔkɔ na ngai. (Matai 18:8, 9) Nakokaki kosala mbongwana yango mokemoke te. Nayebaki ete nakokoka kosala bongo te. Na yango, nazwaki ekateli ya kotika makambo yango nyonso mbala moko. Natikaki mpe kokende na bisika nyonso oyo nakokaki kokutana na bato oyo bakokaki kozongisa ngai na nzela oyo naboyaki.

Nayekolaki kosepela na oyo nazalaki kosala mokolo na mokolo mpe koboya kotya makanisi na makambo oyo nalongaki te. Nayebaki ete ezali lokumu mingi na miso ya Yehova soki natikali pɛto na nzoto, na makanisi mpe na elimo. Nabondelaki Yehova asalisa ngai nazongela lisusu te bomoi na ngai ya kala, kasi nakende kaka liboso. Nazalaki mpe ntango mosusu kolɛmba. Kasi, nazalaki ntango nyonso kosala makasi mpo nakoba koyekola Biblia elongo na ndeko oyo azalaki koteya ngai, atako mbala mosusu nazalaki konyokwama mpo na milangwa na ngai ya kala.

Koyeba oyo Biblia eteyaka na ntina na Nzambe, ete akipaka mokomoko na biso, akoboma mangomba ya lokuta mpe azali lelo oyo kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba, esimbaki mpenza motema na ngai. (Matai 7:21-23; 24:14; 1 Petelo 5:6, 7) Namonaki mpenza ete nyonso wana ezali solo. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya komipesa na Nzambe. Nalingaki kotɔnda Nzambe mpo na nyonso oyo asali mpo na ngai.

MATOMBA OYO NAZWI: Lelo oyo, nakómi komona ete bomoi na ngai ezali na ntina. (Mosakoli 12:13) Mpe na esika libota na ngai ekabelaka ngai ntango nyonso, ngai mpe lelo napesi bango eloko moko. Nazalaki koyebisa nkɔkɔ na ngai ya mwasi makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia, mpe lelo oyo amipesá mpo na kosalela Yehova. Ebele ya bato mosusu ya libota na ngai ná moninga na ngai moko oyo tozalaki na ye na etuluku ya bilenge ya mobulu bakómá mpe Batatoli ya Yehova.

Lelo oyo nabalá, mpe ngai ná mwasi na ngai tolekisaka ntango mingi na kosalisa basusu báyeba Biblia. Namonaka ete nazwá litomba monene mpo nayekoli ‘kotalela Yehova na motema na ngai mobimba.’

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

“Mokemoke, nakómaki komona ntina ya bomoi mpe kozala na esengo”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto