Biblia ebongolaka bato
Mpo na nini mobali moko oyo amipesaki mobimba na kotambwisa tukutuku, na bangi, mpe na masano aponaki kokóma mosakoli ya ntango nyonso? Nini etindaki moto moko oyo azalaki kobɛta masano ya mbongo atika mosala yango oyo azalaki kolinga mingi mpe akóma kosala mosala ya malamu mpo na kosunga libota na ye? Nini etindaki elenge mwasi moko oyo abɔkwamaki na libota ya Batatoli ya Yehova, kasi atikaki kolanda mitinda ya Biblia, atalela lisusu bomoi na ye? Tóyoka bango.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: TERRENCE O’BRIEN
MBULA: 57
EKÓLO: AUSTRALIE
BOMOI NA YE YA KALA: AMIPESAKI NA BANGI, AZALAKI KOLINGA TUKUTUKU
NDENGE NAZALAKI: Nakolá na Brisbane, engumba moko monene oyo ezali engumba-mokonzi ya etúká ya Queensland. Tozalaki na Lingomba ya Katolike, kasi ntango nakómaki na mbula mwambe, totikaki kokende misa mpe tozalaki lisusu kolobela makambo ya losambo ata moke te. Ntango nakómaki na mbula zomi, tokendaki kofanda na engumba Gold Coast, na Australie. Tozalaki kofanda pembeni ya libongo, mpe nalekisaki mwa bambula na kobɛta mai mpe na masano mosusu oyo basalaka na mai.
Atako bongo, nazalaki na esengo te na bomwana na ngai. Tata asundolaki biso ntango nazalaki na mbula mwambe. Mama abalaki mobali mosusu, mpe kolangwa masanga mpe koswana ezalaki mingi na ndako na biso. Mokolo moko na butu, ntango baboti na ngai baswanaki makasi mpenza, nafandaki na mbeto na ngai, nalapaki ete soki nabali, nakoswana na mwasi na ngai ata mokolo moko te. Atako mikakatano ezalaki, biso nyonso—bana motoba, mama, mpe mobali ya mama, tokabwanaki te.
Ntango nakómaki pene na mbula 20, baninga na ngai mingi bazalaki kotosa bokonzi te. Bazalaki komɛla marijuana, likaya, bangi ndenge na ndenge mpe kolangwa masanga. Ngai mpe nakómaki kosala lokola bango. Nakómaki mpe kosepela kotambwisa tukutuku. Atako nasalaki aksida soki mibale ya minene, nakobaki kolinga tukutuku mpe nazwaki ekateli ya kotambola na tukutuku na ngai na kati ya Australie.
Atako nazalaki na bonsomi nyonso wana, mbala mingi nazalaki komitungisa soki nakanisi makambo oyo ezali koleka na mokili mpe ndenge bato mingi bazali te kokipe mikakatano ya basusu. Nakómaki na mposa ya koyeba solo na ntina na Nzambe, mpo na mangomba, mpe makambo oyo ezali koleka na mokili. Kasi, ntango natunaki basango mibale ya Katolike mituna yango, biyano na bango esepelisaki ngai te. Natunaki mpe bateyi mingi ya Lingomba ya Protesta mituna yango, kasi biyano na bango mpe esepelisaki ngai te. Na nsima, moninga moko asalisaki ngai nakutana na Eddie, oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Nasololaki na Eddie mbala minei, mpe mbala nyonso asalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai. Kaka na lisolo ya liboso, namonaki ete makambo oyo alobaki ekeseni mosika na oyo nayokaki liboso. Kasi, na ntango wana, namonaki ntina ya kobongola bomoi na ngai te.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nazalaki kosala mobembo na ngai na kati ya Australie, nasololaki na Motatoli mosusu, oyo nakutanaki na ye na nzela. Kasi ntango nazongaki na Queensland, nakutanaki lisusu na Batatoli te na boumeli ya sanza motoba.
Na nsima, mokolo moko, ntango nazalaki kouta mosala, namonaki mibali mibale balati malamu, basimbi basakosi mpe bazali kotambola na balabala; namonaki ete basengeli kozala Batatoli ya Yehova. Napusanaki pembeni na bango, mpe ntango natunaki bango bandimaki ete bazali Batatoli; na nsima nasɛngaki bango tóbanda koyekola Biblia. Nabandaki mbala moko kokende na makita ya Batatoli mpe nakendaki kutu na liyangani moko ya monene oyo esalemaki na engumba Sydney na 1973. Kasi, ntango bato ya libota na ngai, mingimingi mama, bayebaki likambo yango, esalaki bango mpasi mingi. Mpo na yango mpe makambo mosusu, natikaki kosangana na Batatoli. Na boumeli ya mbula mobimba, namipesaki na kobɛta lisano oyo nazalaki kolinga mingi, lisano oyo ebengami cricket.
Kasi nsukansuka, namonaki ete nazalaki mpenza na esengo kaka ntango nazalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nalukaki bango lisusu mpe nazongelaki kokende na makita. Nakabwanaki mpe na baninga na ngai oyo tozalaki komɛla na bango bangi.
Eloko elendisaki ngai nabongwana ndenge wana ezalaki makambo oyo nayekolaki na bomoi ya Yobo, moto oyo Biblia elobeli. Motatoli moko ya mokóló na nkombo Bill, oyo azalaki na boboto kasi azalaki mpe kokanga miso na mabe te, azalaki koyekola na ngai Biblia pɔsɔ nyonso. Ntango toyekolaki lisolo ya Yobo, Bill atunaki ngai soki Satana afundaki lisusu nani ete asalelaka Nzambe na mitema mibale. (Yobo 2:3-5) Natángaki bankombo ya bato oyo nayebaki na Biblia, mpe soki natángi nkombo moko, Bill azalaki kozongisa na boboto nyonso ete, “Ɛɛ, ye mpe.” Na nsima, atalaki ngai na miso mpe alobaki boye: “Satana azali koloba bongo mpo na yo mpe!” Nakamwaki makasi. Liboso tóyekola lisolo yango, nayebaki ete mateya oyo nazalaki koyekola ezali solo. Kasi sikoyo, nayebaki ntina oyo nasengeli kosalela makambo oyo nazalaki koyekola. Sanza minei na nsima, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Namiyokelaka mawa soki nakanisi ndenge bomoi na ngai elingaki kozala soki nayekolaki kotosa mitinda ya Biblia te. Na ntembe te, mbele nakufá. Baninga na ngai mingi ya kala bakufá mpo na bangi mpe masanga. Bazalaki mpe na esengo te na mabala na bango. Namonaka ete bomoi na ngai mpe elingaki kozala kaka bongo.
Lelo oyo, nabalá, mpe ngai ná mwasi na ngai Margaret, tozali kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Australie. Ata moto moko te ya libota na ngai akómá kosambela Yehova lokola ngai. Kasi, na boumeli ya bambula, ngai ná Margaret tozwi esengo ya koyekola Biblia na bato mingi mpe babalani oyo babongoli bomoi na bango, kaka ndenge ngai nasalaki. Longola yango, tozwi baninga mingi ya malamu. Lisusu, lokola Margaret abɔkwamá na libota ya Batatoli, asalisi ngai natosa ndai oyo nalapaki eleki mbula soki 40. Tozali na libala ya esengo banda mbula koleka 25. Toyokanaka na makambo nyonso te, kasi toswanaka te. Tomonaka ete Biblia nde esalisaka biso.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: MASAHIRO OKABAYASHI
MBULA: 39
EKÓLO: JAPON
BOMOI NA YE YA KALA: ALINGAKI MASANO YA MBONGO
NDENGE NAZALAKI: Nakolá na Iwakura, mboka moko moke oyo mpo na kokóma kuna, esengeli kosala miniti soki 30 na train longwa na Nagoya. Nayebaka ete tata ná mama bazalaki bato ya boboto mpenza. Kasi na nsima, nayaki koyeba ete tata azalaki yakuza, to bandi, mpe azalaki kosunga libota na biso ya bato mitano na mbongo ya mafia. Azalaki komɛla masanga mingi mikolo nyonso, mpe ntango nazalaki na mbula 20, akufaki na maladi ya cirrhose du foie.
Tata na ngai azalaki moto ya Corée; yango wana mbala mingi bato mosusu bazalaki koyina biso. Likambo wana ná makambo mosusu esalaki ete bolenge na ngai ezala ya mpasi. Nakɔtaki na eteyelo ya ntei kasi nazalaki kokende mikolo nyonso te mpe nakataki kelasi nsima ya mbula moko. Lokola nkombo na ngai ezalaki na mikanda ya polisi mpe tata na ngai azalaki moto ya Corée, ezalaki mpasi mingi mpo nazwa mosala. Nsukansuka, nazwaki mosala moko kasi nabukanaki mabɔlɔngɔ mpe nakokaki lisusu kosala mosala te.
Nakómaki kobɛta lisano babengi pachinko mpo nazwaka mbongo ya kobikela. Na ntango wana, nazalaki na makango oyo alingaki ete nazwa mosala ya malamu mpe nabala ye. Kasi, nazalaki kozwa mbongo mingi na lisano yango, mpe nazalaki kolinga kobongola bomoi na ngai te.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Mokolo moko, Motatoli ya Yehova moko ayaki na porte na biso mpe atikelaki ngai buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Namitunaki naino motuna wana te. Kasi, nsima ya kotánga buku yango, nandimaki koyekola makambo mosusu na Biblia. Nazalaki ntango nyonso komituna nini ekómelaka moto soki akufi. Eyano ya polele oyo nazwaki na Biblia na motuna wana mpe na mituna mosusu esalaki ete nayoka lokola miso na ngai efungwami.
Namonaki ete nasengeli kosalela makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia. Yango wana, nakomisaki libala na ngai na buku ya Leta, natikaki komɛla likaya, nakataki nsuki na ngai ya milai oyo natyaki langi ya mpɛmbɛ, mpe nakómaki na molato ya pɛto. Natikaki mpe kobɛta masano ya mbongo.
Kobongola makambo yango ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, nakokaki te kotika likaya na makasi na ngai moko. Kasi, lokola nabondelaki Yehova na etingya mpe natyelaki ye motema, nalongaki kotika yango. Lisusu, mosala ya liboso oyo nazwaki nsima ya kotika lisano ya pachinko ezalaki mpasi mpenza mpo na ngai. Mbongo oyo nazalaki kozwa ezalaki katikati ya oyo nazalaki kozwa na lisano, mpe mosala yango ezalaki makasi mpe kolɛmbisa mingi. Vɛrsɛ moko ya Biblia oyo esalisaki ngai na ntango wana ya mpasi ezali Bafilipi 4:6, 7. Elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” Mbala mingi, nazalaki komona ete elaka yango ezali solo.
MATOMBA OYO NAZWI: Ntango nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mwasi na ngai azalaki kosepela te. Kasi, ntango amonaki ndenge nazalaki kobongola etamboli na ngai, ye mpe akómaki koyekola elongo na biso mpe abandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova elongo na ngai. Lelo oyo, biso mibale tozali Batatoli ya Yehova. Ezali lipamboli ndenge tozali kosalela Nzambe elongo!
Liboso nayekola Biblia, nazalaki kokanisa ete nazali na esengo. Kasi, lelo oyo nayebi mpenza ndenge esengo ya solosolo ezalaka. Kotosa mitinda ya Biblia ezali pɛtɛɛ te, kasi nayebi ete yango nde bomoi oyo eleki malamu.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: ELIZABETH JANE SCHOFIELD
MBULA: 35
EKÓLO: ROYAUME-UNI
BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI KOSALA BIYENGA NA NSUKA YA PƆSƆ
NDENGE NAZALAKI: Nakolá na Hardgate, mboka moko moke pembeni ya engumba Glasgow, na Écosse. Ntango nazalaki na mbula nsambo, mama na ngai akómaki Motatoli ya Yehova mpe abandaki koteya ngai Biblia. Nzokande, ntango nakómaki na mbula 17, nakómaki kosepela mingi kozala elongo na baninga na ngai ya kelasi: tozalaki kokende na banganda ya butu, koyoka miziki oyo ezalaka na maloba ya mbindo, mpe komɛla masanga ya makasi. Likambo oyo nazalaki kokanisa ata moke te, ezalaki makambo ya Nzambe. Nazalaki kolinga kosala biyenga na nsuka ya pɔsɔ. Kasi, ntango nakómaki na mbula 21, makambo ebongwanaki.
Nakendaki kotala bandeko na biso na Irlande du Nord. Ntango nazalaki kuna, namonaki bandimi ya Lingomba ya Protesta bazali kosala defile. Koyinana makasi mpe bokabwani oyo namonaki kati na bandimi ya Protesta mpe ya Katolike na mokolo yango, esalaki ngai mpasi. Kutu, etindaki ngai nakanisa. Nakanisaki makambo ya Biblia oyo mama azalaki koteya ngai mpe nayebaki ete Nzambe akoki soki moke te kondima bato oyo batosaka te mitinda na ye ya sembo. Nde namonaki ete namipesaki kaka na koluka bisengo, natalelaki te ndenge oyo Nzambe alingaki natambwisa bomoi na ngai. Nazwaki ekateli ete soki nazongi na Écosse, nakoluka mpenza koyeba makambo oyo Biblia eteyaka.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Mbala ya liboso oyo nakendaki lisusu na makita ya Batatoli ya Yehova na mboka na biso, nayokaki mwa nsɔni mpe nazalaki kobanga. Nzokande, moto nyonso ayambaki ngai malamu. Ntango nabandaki kosalela makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia, ndeko mwasi moko ya boboto na lisangá akómaki kotyela ngai likebi mingi. Asalisaki ngai namona ete nazali lisusu na kati ya lisangá. Baninga na ngai ya kala bazalaki kokoba kobengisa ngai mpo tókende na banganda ya butu, kasi nayebisaki bango ete nazwi ekateli ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ngai. Nsukansuka, batikaki kobengisa ngai.
Kala, nazalaki komona ete Biblia ezali kaka buku moko ya mibeko. Sikoyo, makanisi na ngai ebongwanaki. Nakómaki komona ete bato oyo Biblia elobeli bazali mpenza bato ya solo oyo bazalaki na makanisi mpe bolɛmbu, kaka lokola ngai. Bango mpe basalaki mabunga, kasi Yehova Nzambe alimbisaki bango ntango babongolaki mpenza motema. Namindimisaki ete atako napesaki Nzambe mokɔngɔ ntango nazalaki elenge, akolimbisa ngai mpe akobosana mabunga oyo nasalaki, soki nasali makasi nasepelisa ye.
Etamboli ya mama mpe esimbaki motema na ngai. Atako ngai natikaki Yehova, ye asalaki yango te. Bosembo na ye etindaki ngai namona ete kosalela Yehova ezali na ntina. Ntango nazalaki kokende kosakola na ndako na ndako ná mama ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kosepela na yango te mpe nakanisaki ata moke te ete nakoki kolekisa bangonga na koteya bato. Kasi sikoyo, nazwi ekateli ya kotala soki elaka oyo Yesu apesaki na Matai 6:31-33 ezali solo. Alobaki boye: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ . . . Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” Mwa moke na nsima, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova, natikaki mosala oyo ezalaki kozwa ngai ntango mingi, nazwaki mosala mosusu, mpe nakómaki mosakoli ya ntango nyonso.
MATOMBA OYO NAZWI: Ntango nazalaki elenge mpe namipesaki na biyenga na nsuka ya pɔsɔ, nazalaki mpenza na esengo te. Bomoi na ngai ezalaki na ntina te. Sikoyo lokola namipesi na mosala ya Yehova, nazali koyoka esengo ya solosolo. Bomoi na ngai ekómi na ntina. Lelo oyo, nabalá mpe ngai ná mobali ngai tokendaka na masangá ndenge na ndenge ya Batatoli ya Yehova pɔsɔ na pɔsɔ, mpo na kolendisa bandeko. Namonaka mosala yango lokola libaku moko monene na bomoi na ngai. Nazali na botɔndi epai ya Yehova mpo atikeli ngai lisusu nzela nabongola bomoi na ngai!
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
“Kaka na lisolo ya liboso, namonaki ete makambo oyo alobaki ekeseni mosika na oyo nayokaki liboso. Kasi, na ntango wana, namonaki ntina ya kobongola bomoi na ngai te”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Nakokaki te kotika likaya na makasi na ngai moko. Kasi, lokola nabondelaki Yehova na etingya mpe natyelaki ye motema, nalongaki kotika yango”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
“Kala, nazalaki komona ete Biblia ezali kaka buku moko ya mibeko. Sikoyo, makanisi na ngai ebongwanaki. Nakómaki komona ete bato oyo Biblia elobeli bazali mpenza bato ya solo oyo bazalaki na makanisi mpe bolɛmbu, kaka lokola ngai”