Biblia ebongolaka bato
Mpo na nini mwasi moko oyo azalaki lisusu kosepela na makambo ya losambo te, azali lelo kolekisa ntango na ye mingi na kosalisa basusu báyeba Nzambe? Nini etindaki mobali moko oyo alingaki masano ya mobulu akóma moto oyo alingaka kimya? Ndenge nini mobali moko oyo amipesaki na komɛla bangi, masanga, mpe bitumba alongaki kobongola etamboli na ye? Tángá oyo bango moko balobi.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: PENELOPE TOPLICESCU
MBULA: 40
EKÓLO: AUSTRALIE
BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI LISUSU KOSEPELA NA LOSAMBO TE
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na engumba Sydney, na ekólo Australie; kasi, ntango nakómaki na mbula mibale, tokendaki kofanda na Nouvelle-Guinée. Tofandaki mbula pene na mibale na engumba Rabaul mpe na nsima, mbula mwambe na engumba Bougainville. Na ntango wana, televizyo ezalaki te na Nouvelle-Guinée, yango wana ngai ná leki na ngai ya mobali tozalaki kokende kosakana na libándá; tozalaki kokende kobɛta mai, kozinda na mai, mpe kotambola na zamba to na esobe.
Ntango nakómaki na mbula soki 10, nabandaki kosepela na makambo ya Nzambe. Lokola mama azalaki mondimi ya Katolike, ayebisaki ngai nakóma kolanda malongi epai ya mamelo moko ya mboka na biso. Nakómaki moto ya Katolike mpe nabatisamaki ntango nakómaki na mbula 10.
Kasi, nsima ya kozonga na Australie, ntango nalekaki mbula 13, nakómaki komituna mituna mingi mpo na bindimeli na ngai. Ntango nazalaki na eteyelo ya ntei, nayekolaki istware; lisusu, nazalaki kosolola mingi na tata mpo na ebandeli ya mangomba mpe makambo oyo ezali na Biblia, oyo ngai ná ye tozalaki komona ete ezali masapo mpamba. Nsukansuka, natikaki Lingomba ya Katolike.
Baboti na ngai bakabwanaki ntango nakómaki na mbula 16. Ezalaki ntango ya mpasi mingi mpo na mama, mpe nsukansuka nakendaki kofanda na tata ná mwasi oyo alingaki kobala. Leki na ngai atikalaki na mama, mpe bakendaki kofanda na etúká mosusu. Na eleko yango, nazalaki komiyoka ete natikali kaka ngai moko mpenza. Elekaki mbula mibale mobimba liboso nazongisá lisusu boninga na mama. Nakómaki komɛla masanga, bangi, mpe nakómaki na bomoi ya loyenge. Nakataki kelasi, nalukaki mosala, mpe ntango nalekaki mbula 20, nabebisaki bomoi na ngai na etamboli ya mbindo.
Ntango nakómaki na mbula 25, nabandaki lisusu kokanisa makambo ya Biblia. Nazwaki mosala ya sika mpe kuna, nakutanaki na Liene, elenge mwasi moko kitoko oyo azalaki ntango nyonso na limemya epai ya patrɔ na ye, atako patrɔ yango azalaki makambo makasi epai na ye. Ntango natunaki ye mpo na nini azongisaka te soki patrɔ azali koloba na ye mabe, alimbolaki ete ayekolaka Biblia na Batatoli ya Yehova mpe atosaka mitinda ya Biblia na bomoi na ye. Liene atunaki ngai soki nakondima ayekola na ngai Biblia. Lokola nakangaki ntina ya makanisi na ye malamu te, nakanisaki ete alingaki koloba ete ateya ngai makambo nyonso oyo ayekolaki na Biblia na boumeli ya ngonga moko mpamba. Na mpokwa yango, Liene alekisaki ngonga misato mpo na koyanola na mituna na ngai na ntina na Biblia. Nakamwaki ete biyano nyonso oyo azalaki kopesa ezalaki kouta na Biblia.
Nazali koyeba lisusu ete mokolo yango, ntango nazalaki kozonga ndako na motuka nsima ya kosolola na Liene, nazalaki koyokela Nzambe nkanda ndenge apesaki ngai libaku te ya koyeba ye banda kala. Nayebaki ete Batatoli bazalaka na etamboli ya malamu mpe nakanisaki ete ntango eleki mpo nakoka kobongola bomoi na ngai. Nakanisaki mpe ete ata mokolo moko te nakokoka kosakola ndako na ndako ndenge Batatoli basalaka. Nakobaki koyekola Biblia na Batatoli, kasi mokano na ngai ezalaki ya koluka mabunga na mateya na bango mpo nazala na ntina malamu ya kotika kosolola na bango. Mokolo moko, namonaki ete nakokoka kozwa mabunga te.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Wana nazalaki kokoba koyekola mitinda ya Biblia mpo na etamboli ya malamu, lisosoli na ngai mpe ekómaki kotungisama mingi. Mpo lisosoli na ngai etika kotungisama, natikaki komɛla bangi. Na nsima, nakendaki na mboka mosusu mpo na mwa ntango mpe kuna, nazongelaki bomoi ya loyenge mpe komɛla masanga. Nazalaki komona ete mbala nyonso oyo nasali milende mpo na kotosa mitinda ya Biblia, nazalaki kaka kozongela bomoi na ngai ya kala. Likambo yango ezalaki kopesa ngai nsɔni mpe nazalaki kobondela Yehova, kasi nazalaki koyoka kaka mabe.
Ntango nayekolaki makambo oyo Mokonzi Davidi asalaki ná Bataseba mpe ndenge Yehova ayokelaki bango mawa, esalisaki ngai mingi. Davidi azalaki na mpiko ya kondima libunga na ye ntango bapesaki ye toli, mpe alukaki komilongisa te. Kutu, na komikitisa nyonso, andimaki disipilini oyo azwaki. (2 Samwele 12:1-13) Ntango nyonso oyo nazalaki kokwea na mabe, nazalaki kokanisa lisolo wana mpe ezalaki lisusu mpasi te mpo nasɛnga Yehova bolimbisi. Na nsima, nazwaki ekateli ya kobondela liboso nakwea na komekama, na esika ya kosala yango na nsima, mpe yango esalisaki ngai mingi.
MATOMBA OYO NAZWI: Liboso, nazalaki nkandankanda. Kasi, mokapo ya Baefese 4:29-31 esalisaki ngai namona ete nasengeli kobwaka ‘makambo ya bololo mpe nkanda mpe nkɛlɛ.’ Lokola nasalaki makasi natika kosilika mpambampamba, nakómaki mpe koloba na boboto. Lisusu, toli ya Yesu oyo elobi ete “liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ” esalisaki ngai nakóma moto oyo akokisaka mpenza maloba na ye.—Matai 5:37.
Na ebandeli, mama azalaki kosepela te nasololaka na Batatoli; kasi na nsima ayebisaki ngai ete azali kosepela na ngai mingi. Kutu alobaki boye, “Nayebi ete soki okómi moto malamu ezali te mpo obɔkwamaki malamu, kasi ezali nde mpo na makambo oyo oyekoli na ntina na Yehova.” Maloba na ye esepelisaki ngai mingi.
Lelo oyo, nazali komona ete bomoi na ngai ezali na ntina. Banda mbula 9, ngai ná mobali na ngai tomipesi mingi na mosala ya koteya bato Biblia. Lelo oyo, nasakolaka ndako na ndako, mpe namonaka ete ezali mosala oyo ememeli ngai matomba koleka misala nyonso oyo nasalá.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: DENIS BUSIGIN
MBULA: 30
EKÓLO: RUSSIE
BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI KOSALA KARATE
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na engumba Perm’ mpe nakolaki na Furmanov, engumba moko ya bato soki 40 000, na etúka ya Ivanovo, na ekólo Russie. Furmanov ezali engumba moko kitoko oyo ezali na ebele ya banzete oyo ekómaka langi ya mosaka mpe motane na eleko ya ɔtɔnɛ. Na bambula ya 1980 mpe ya 1990, mobulu ekómaki makasi na engumba yango. Libota na biso tozalaki na mbongo mingi te. Tozalaki kofanda na ndako ya shambre moko, ngai, leki na ngai ya mobali, ná baboti na biso.
Ntango nakómaki na mbula nsambo, nakómaki koyekola karate. Nalingaki lisano yango mingi; nazalaki kotya yango na esika ya liboso na bomoi na ngai. Soki nazali na kelasi te, nazalaki kolekisa ntango nyonso na esika oyo nazalaki koyekola karate, mpe baninga na ngai nyonso bazalaki bato oyo bayekolaka masano. Ntango nakómaki na mbula 15, nakómaki ceinture rouge mpe mbula moko na nsima, nakómaki ceinture marron. Nazalaki na ekipi oyo ezalaki kobunda na mimekano ya karate na Russie mpe na Eurasie. Nazalaki komona ete bomoi na ngai ekobonga; kasi, ntango nakómaki na mbula 17, bomoi na ngai mobimba ebongwanaki.
Ngai ná baninga mosusu tosalaki likambo moko ya mabe mpe bakangaki biso. Bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mbula mibale. Bomoi na bolɔkɔ ezalaki mpasi. Kasi, ezalaki na bolɔkɔ nde namonaki Biblia mpo na mbala ya liboso. Natángaki Genese, Nzembo mpe Kondimana ya Sika. Nakangaki kutu na motó maloba ya libondeli ya Tata wa biso mpe nazalaki kozongela yango butu nyonso liboso nalala, mpo nazalaki kokanisa ete kosala bongo ekoki kosalisa ngai.
Nabimaki na bolɔkɔ na mobu 2 000, kasi nazalaki na mokano moko te na bomoi na ngai. Nakómaki komɛla bangi. Na eleko yango, mama akufaki. Azalaki moto oyo nalingaki mingi koleka, mpe liwa na ye etikaki ngai na mpasi makasi. Nzokande, nasalaki makasi mpo nalongwa na boombo ya bangi mpe nazongelaki karate. Nakendaki mpe kofanda na engumba Ivanovo. Kuna, nazwaki mosala na magazini moko oyo batɛkaka biloko ya kolya. Mokonzi ya mibale ya magazini yango azalaki Motatoli ya Yehova. Mwasi yango alakisaki ngai mwa mateya ya ebandeli na Biblia mpe alukelaki ngai Motatoli mosusu ya mobali mpo ayekolaka na ngai Biblia.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nazalaki koyekola Biblia, nasepelaki mingi ntango nayebaki ete Nzambe azali na mokano ya kokómisa mabelé oyo paladiso, mpe nakómaki na mposa ya kokokisa masɛngami mpo nakɔta na paladiso yango. Mosika te, namonaki ete Yehova apesi biso bato mibeko oyo tosengeli kotosa. Nalekisaki bambula mingi na kokanisa kaka bolamu na ngai moko. Kasi, nayekolaki ete Yehova alingi ete nakanisaka mpe bolamu ya basusu mpe nakolisa bizaleli oyo nazalaki na yango te na ntango wana, na ndakisa boboto mpe kolinga kimya.
Lokola nakómaki kokanisa mingi makambo nyonso oyo Yehova asalaki mpo na ngai, na ndakisa apesaki Mwana na ye mbeka mpo na masumu na ngai, botɔndi na ngai mpo na bolingo ya Nzambe etindaki ngai nabongola bomoi na ngai. Na ndakisa, nayekolaki na Nzembo 11:5 ete Yehova ayinaka mobulu. Na yango, natikaki kotala baemisyo ya televizyo oyo elakisaka makambo ya mobulu mpe koyina. Lisusu, atako ezalaki mpasi, natikaki masano ya mobulu. Vɛrsɛ ya 1 Bakolinti 15:33 esalisaki ngai namona ete baninga oyo nazali kotambola na bango bakoki komema ngai nasala makambo ya malamu to ya mabe. Kutu, bolɔkɔ oyo nakɔtaki ezalaki komonisa bosolo ya likambo yango. Na yango, nazwaki ekateli ya kokabwana na baninga oyo bamipesaki na masano ya mobulu.
MATOMBA OYO NAZWI: Koyangana na Batatoli ya Yehova mpe koyekola Biblia esalisi ngai mingi nakóma moto ya sembo. Na ndakisa, Baebele 13:5 eteyaki ngai ete nasengeli kosepela na oyo ozali na yango mpe koboya bolingo ya mbongo. Toli wana esalisi ngai naboya lokuta mpe moyibi.
Nasepelaka mingi kozala na baninga. Kala, nakabwanaki na baninga na ngai mosusu mpo na lokoso to kozanga kotyelana motema. Batatoli ya Yehova bazali bato ya kokoka te, kasi namoni ete batosaka mibeko ya Nzambe mpe basalaka makasi mpo na kosalela toli na ye na boyokani na bango ná basusu. Nazwi baninga ya solosolo kati na bango.
Namitunaka soki bomoi na ngai elingaki kozala ndenge nini soki nayekolaki te kotosa mitinda ya Biblia. Ntango mosusu, nalingaki kokɔta lisusu bolɔkɔ to kosala makambo oyo ekokaki kopesa basusu mpasi mpe konyokola bango. Kasi, sikoyo nazali na mwasi ya malamu mpe bana mibale ya mibali; libota na biso ezali mpenza na esengo na ndenge tozali kosalisa basusu báyekola solo na ntina na Nzambe.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: JOSÉ CARLOS PEREIRA DA SILVA
MBULA: 31
EKÓLO: BRÉSIL
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA BITUMBA
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na Americana, kartye moko ya salite na engumba São Paulo. Tozalaki na mai ya pɛto te mpo na komɛla, tozalaki mpe na bakabinɛ ya malamu te. Kartye yango ekendaki nsango mpo na mobulu mpe makambo mabe oyo ezalaki kosalema kuna.
Ntango nazalaki kokola, nazalaki mobulu mpe nazalaki moto ya nkanda mingi. Nazalaki kobunda mingi, yango wana bato ya kartye bazalaki kobanga ngai. Molato na ngai, lolenge na ngai ya kokata nsuki mpe etamboli na ngai ezalaki komonisa ete nazali moto mabe. Nazalaki komɛla masanga mingi, mbala mingi kino kobungisa mayele. Lokola bandeko na ngai ya mibali, ngai mpe nazalaki komɛla bangi. Kutu, ndeko na ngai moko akufaki mpo alekisaki ndelo na komɛla bangi.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nakutanaki na Batatoli ya Yehova, balakisaki ngai na Biblia ete Nzambe akokómisa mabelé mobimba paladiso. (Luka 23:42, 43; Emoniseli 21:3, 4) Nayekolaki mpe ete bakufi bayebaka likambo moko te, yango elingi koloba ete Nzambe anyokolaka bato mabe na lifelo te. (Mosakoli 9:5, 6) Makambo yango ekitisaki ngai motema. Makambo oyo nayekolaki na ntina ya Nzambe epesaki ngai mposa makasi ya kobongola bomoi na ngai. Kasi, ezalaki pɛtɛɛ te mpo natika komɛla bangi, masanga, kobunda mpe natika elobeli ya mabe oyo namesanaki na yango.
Kasi, maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Bakolinti 6:9-11 elendisaki ngai mingi. Mokapo yango emonisi ete liboso bákóma baklisto, bato mosusu na ekeke ya liboso bazalaki na bizaleli ya mabe oyo nazalaki na yango. Kasi mokapo yango elobi mpe ete: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosili kosukolama pɛɛ, kasi bosili kosantisama, kasi bosili kotángama bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe na elimo ya Nzambe na biso.” Maloba yango epesaki ngai elikya ete ngai mpe nakoki kosala mbongwana oyo esengeli na bomoi na ngai mpo na kosepelisa Nzambe.
Ntango nabandaki koyangana na Batatoli ya Yehova, nandimaki mpenza ete bazali na lingomba ya solo. Bayebaki ete nazalaki moto ya mobulu mpe ya nkanda; kasi, bayambaki ngai na esengo mpe na bolingo.
MATOMBA OYO NAZWI: Soki nayekolaka Biblia te mpe nabongolaka bomoi na ngai te, mbala mosusu nalingaki lisusu kozala na bomoi te. Nzokande, nazali na esengo ndenge nasalisá ndeko na ngai moko ayekola Biblia mpe alongwa na boombo ya bangi. Nalendisaki mpe bandeko na ngai mosusu bábanda koyekola Biblia. Nazali na esengo lokola namipesi mpo na kosalela Nzambe oyo atyelaka biso mpenza likebi!
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]
“Nazwaki ekateli ya kobondela liboso nakwea na komekama, na esika ya kosala yango na nsima, mpe yango esalisaki ngai mingi”