Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/2 lok. 22
  • Mpo ozala mokristo osengeli kondima Bosato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo ozala mokristo osengeli kondima Bosato?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya Trinité ezali na Biblia?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Trinité elimbolami ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/2 lok. 22

Mituna ya batángi . . .

Mpo ozala mokristo osengeli kondima Bosato?

Ezipeli ya buku moko

Buku moko (World Religions in Denmark) ya eteyelo ya ntei oyo ebimaki na 2007, elobelaki Batatoli ya Yehova lokola mwa bakristo oyo balandaka mpenza Biblia. Kasi, Batatoli ya Yehova bazali lingomba ya misato ya monene ya bokristo na kati ya Danemark.

Nzokande, episkɔpɔ ya lingomba moko monene na Danemark atyolaki makasi ndenge mokomi ya buku wana atángaki Batatoli ya Yehova na buku na ye. Mpo na nini? Episkɔpɔ yango alobi boye: “Naino namoná te moto moko ya teoloji oyo atángi [Batatoli ya Yehova] na molɔngɔ ya bakristo. Baboyaka kondima Bosato, oyo ezali mpenza liteya monene ya lingomba ya bokristo.”

Annika Hvithamar, mokomi ya buku yango, oyo azali profɛsɛrɛ molandi na eteyelo ya filozofi na iniversite moko amonisi polele ete ntango batunaka bato mpo na nini balobaka ete bazali bakristo, balobaka te ete mpo bandimaka ete Nzambe azali Bosato. Lisusu, eteni moko ya buku yango oyo ezali na motó ya likambo ete “Ozali mokristo?” elobi ete: “Liteya ya Bosato ezali moko ya makambo ya mpasi na mateya ya teoloji.” Ebakisi boye: “Ntango nyonso, ezalaka mpasi kolimbola liteya yango epai ya bato oyo bayebi teoloji te, ntina oyo Nzambe oyo bakristo bandimaka azali Nzambe kaka moko kasi te banzambe misato.”

“Liteya ya Bosato ezali moko ya makambo ya mpasi na mateya ya teoloji”

Makambo oyo Biblia eteyaka mpo na Nzambe mpe Yesu ezali polele mpe pɛtɛɛ. Ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Ezala liloba “Bosato” to liteya yango ezali te na kati ya Liloba ya Nzambe. Biblia emonisi polele ete Yesu Kristo azali mwana ya liboso ya Nzambe. (Bakolose 1:15) Emonisi mpe ete Yesu azali ‘moyokanisi kati na Nzambe ná bato.’ (1 Timote 2:5) Mpo na Tata, Biblia elobi: “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18.

Batatoli ya Yehova bandimaka ete kondimela Yesu ezali na ntina mingi. (Yoane 3:16) Mpo na ntina yango, bazwaka na lisɛki te etinda oyo ya Yesu: “Ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Matai 4:10) Ya solo mpenza, moto oyo asalaka makasi mpo na kotosa mitinda ya Yesu akoki kobengama mokristo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto