Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/2 lok. 21
  • Nzambe akoki koyoka mawa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akoki koyoka mawa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 7​—Basambisi
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Losambo ya Baala: Etumba monene na mitema ya Bayisalaele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tósalela Yehova kozanga kotala nsima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/2 lok. 21

Pusaná penepene na Nzambe

Nzambe akoki koyoka mawa?

BASAMBISI 2:11-18

BISO bato ya kozanga kokoka, toyokaka mawa ntango mosusu. Na ndakisa, tokoki koyoka mawa soki toyebi ete tosalaki libunga. Likambo ya kokamwa, Biblia elobi ete Yehova akoki koyoka mawa. Kasi, okoki koloba ete ‘Nzambe azali moto ya kokoka, asalaka mabunga te!’ Kasi na ndenge nini Nzambe akoki koyoka mawa? Eyano ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya likambo moko monene: Yehova ayokaka mawa to mpe asepelaka, mpe makambo oyo tosalaka ekoki kosepelisa to kosilikisa ye. Tótalela maloba oyo ezali na Basambisi 2:11-18.

Mokanda ya Basambisi elobeli polele eleko moko ya yikiyiki oyo ezalaki na Yisraele. Ekólo yango ekómaki kofanda na Kanana, mokili oyo Nzambe alakaki Abrahama. Na bikeke mingi oyo elandaki, lisolo ya Bayisraele ekabwanaki na biteni minei oyo: Kosala lisumu, konyokwama, kobondela, mpe kosikolama.a

Kosala lisumu. Lokola balandaki bato ya Kanana, Bayisraele “basundolaki Yehova” mpe babandaki kolanda banzambe mosusu, mingimingi “babandaki kosalela Baala mpe bikeko ya Ashitorete.”b Mabe wana oyo basalaki ememaki bango na lipɛngwi. Tokoki kokamwa te ete Bayisraele “basilikisaki Yehova,” Nzambe oyo asikolaki bango na Ezipito.​—Vɛrsɛ 11-13; Basambisi 2:1.

Konyokwama. Lokola asilikaki na ntina, Yehova azalaki kolongola libateli na ye epai ya bato oyo bapesaki ye mokɔngɔ. Na yango, Bayisraele bazalaki kokwea “na lobɔkɔ ya banguna na bango,” oyo bazalaki koya mpe kopunza mokili na bango.​—Vɛrsɛ 14.

Kobondela. Ntango bazalaki kokóma na mpasi makasi, Bayisraele bazalaki koyoka mawa mpo na etamboli na bango ya mabe mpe bazalaki kolela epai ya Nzambe mpo asalisa bango. Libondeli na bango ekoki komonisama na maloba ‘komilelalela mpo na banyokoli na bango.’ (Vɛrsɛ 18) Kobondela Nzambe ezalaki na kati ya makambo minei oyo ezalaki komonisa bizaleli ya Bayisraele. (Basambisi 3:9, 15; 4:3; 6:6, 7; 10:10) Nzambe azalaki kosala nini?

Kosikolama. Yehova azalaki koyoka komilelalela ya Bayisraele mpe azalaki “koyoka mawa.” Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “koyoka mawa” ekoki kolimbolama na “kobongola makanisi to kotika likambo oyo okanaki.” Buku moko elobi ete: “Lokola Yehova ayokaki mawa mpo na komilelalela na bango, abongolaki mokano na ye ya kopesa etumbu na kosikola.” Na mawa na ye, Yehova azalaki “kobimisela bango basambisi,” oyo bazalaki kosikola bato na ye na mabɔkɔ ya banguna na bango.​—Vɛrsɛ 18.

Omoni likambo oyo ezalaki kotinda Nzambe ayoka mawa, to abongola makanisi na ye? Ezalaki mpo bato na ye bazalaki kobongola motema. Kanisá naino na likambo oyo: Tata ya bolingo akoki kopesa mwana oyo asali libunga etumbu, ntango mosusu akoki kopimela ye makambo mosusu. Kasi, soki kaka amoni ete mwana yango ayoki mawa mpenza, tata akoki kolongola etumbu yango.

Liteya nini tozwi na ntina na Yehova na lisolo oyo? Atako kosala lisumu na nko esilikisa ye, kobongola motema etindaka ye amonisa motema mawa. Ezali malamu koyeba ete makambo oyo tosalaka ekoki kosepelisa to kosilikisa Nzambe. Mpo na nini te koluka koyeba ndenge oyo okoki kosala mpo na ‘kosepelisa motema’ ya Yehova? (Masese 27:11) Soki osali bongo, okoyoka mawa soki moke te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Basambisi 2:11-18 elobeli na mokuse bizaleli oyo Bayisraele bazalaki na yango, oyo elobelami na mozindo na mikapo oyo elandi.

b Baala azalaki nzambe monene mpenza ya Bakanana, mpe Ashitorete azalaki nzambe-mwasi, mpe bazalaki kotalela ye lokola mwasi ya Baala.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto