Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/3 lok. 3
  • Biblia ezali Liloba ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali Liloba ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kotalela Biblia ebongwani
  • Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Biblia—Ekomamá mpenza na “litambwisi ya elimo ya Nzambe”?
    Lamuká!—2017
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/3 lok. 3

Biblia ezali Liloba ya Nzambe?

“Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—2 TIMOTE 3:16, 17.

MALOBA wana oyo ntoma Paulo akomaki mpo na komonisa motuya monene ya Biblia ezali makasi mpenza! Ya solo, azalaki kolobela eteni ya Biblia oyo ezalaki na ntango na ye​—makomi oyo bato mosusu babengaka Testama ya Kala. Kasi, maloba na ye ezali solo mpo na mikanda nyonso 66 ya Biblia, kati na yango mikanda oyo bayekoli ya sembo ya Yesu bakomaki na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso (T.B.).

Ozwaka Biblia na motuya ndenge Paulo azalaki kozwa yango? Okanisi ete bakomi ya Biblia bakomaki yango mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe? Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kondima yango. Ata na basiɛklɛ oyo elandaki nsima, bakristo ya solo bazalaki kondima kaka bongo. Na ndakisa, John Wycliffe, pastɛrɛ moko ya Angleterre na siɛklɛ ya 14, azalaki komona ete Biblia ezali “mobeko oyo ekoki kozala na libunga te mpo na koyeba solo.” Mpo na kolimbola maloba ya Paulo oyo totángaki likoló, buku moko (The New Bible Dictionary) elobi ete “lokola Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo [ya Nzambe], yango endimisi mpenza ete makambo nyonso oyo elobi ezali solo.”

Ndenge ya kotalela Biblia ebongwani

Nzokande, mikolo oyo, bokonzi oyo bato bazalaki kopesa Biblia ekitá. Buku moko (The World’s Religions) elobi boye: “Moto akokanisa ete bakristo nyonso bandimaka bokonzi ya Biblia, ezala mpo na kotambwisa makambo oyo basalaka mpe mpo na kobimisa bindimeli na bango.” Nzokande, na bomoi ya mokolo na mokolo, ezalaka lisusu bongo te. Lelo, bato mingi bamonaka Biblia kaka lokola “lisolo moko ya bonkɔkɔ oyo ebongi kotyelama te.” Atako bandimaka ete bakomi ya Biblia bazalaki bato ya kondima makasi, bamonaka ete bazalaki kaka bato ya kozanga kokoka oyo bazalaki kobunda mpo na kolimbola mateya ya mozindo ya Nzambe, kasi bazangaki boyebi mpe bingɛngiseli oyo tozali na yango lelo.

Lelo oyo, kaka bato moke nde batikaka mpenza Biblia etambwisa makanisi mpe misala na bango. Na ndakisa, mbala boni oyoká bato bazali koloba ete mitinda ya Biblia oyo etali bizaleli malamu esilá ngala mpe ebongi te mpo na biso lelo? Bato mingi bamonaka ete bakoki kolɛmbisa mibeko mpe mitinda ya Biblia soki balingi, ata mpe kotya yango pembeni soki emonani ete kosala bongo ezali mpo na litomba na bango. Bato mosusu oyo bamibengaka bakristo baboyaka mpenza kolanda makambo oyo Biblia elobi na ntina etali pite, ekobo, kozanga bosembo, mpe kolangwa masanga.​—1 Bakorinti 6:9, 10.

Mpo na nini? Na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, Charles Marston, moto moko ya arkeoloji, amonisaki ntina moko na buku na ye Biblia ezali solo (na Lingelesi). Alobaki ete bato bawelaki “kondima, kozanga komituna ata mituna, makanisi mingi ya bakomi ya mikolo na biso” oyo balukaki kobebisa bosolo ya Biblia. Ekoki mpe kozala bongo lelo? Ndenge nini osengeli kotalela maloba mpe makanisi ya bato ya mayele oyo bazali kolɛmbisa kondima ya bato na Biblia? Talá oyo lisolo elandi elobi mpo na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto