Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/11 nk. 24-26
  • Kosala mibembo tii na esika eleki mpenza mosika na mabele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosala mibembo tii na esika eleki mpenza mosika na mabele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • ‘Na Makama na Mai Monene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndakisa ya mosala ya misionere oyo baklisto ya solo bazali kolanda yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Batondaki na esengo mpe na elimo santu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/11 nk. 24-26

Bomoi mpe ntango ya bakristo ya ekeke ya liboso

Kosala mibembo tii na esika eleki mpenza mosika na mabele

“Na mokolo oyo elandaki alongwaki elongo na Barnabasi mpo na kokende na Derbe. Mpe nsima ya kosakola nsango malamu na engumba yango mpe ya kokómisa bato mingi bayekoli, bazongaki na Listra mpe na Ikoniumu mpe na Antiokia.”​—MISALA 14:20, 21.

MOPƐPƐ ya malili ya ntɔngɔ ezali kobɛta mosali mobembo na mpanzi; akɔtisi makolo na ye oyo elɛmbi na basandale oyo ebebá. Mokolo mosusu ya mobembo ezali kozela ye.

Na moi ya ntɔngɔ, abandi kotambola na nzela oyo etondi na zɛlo, koleka na elanga ya nzete ya vinyo, mpe ya nzete ya olive tii komata na bangomba. Nzelanzela, azali kokutana na bato mosusu ya mobembo​—baoyo bazali kokende na bilanga na bango, bato ya mombongo bazali kobenda banyama oyo ememi ebele ya biloko ya kotɛka, mpe bato mosusu oyo bazali kokende na Yerusaleme. Mosali mobembo yango ná baninga na ye bazali kosolola na moto nyonso oyo bakutani na ye. Mokano na bango ezali nini? Kokokisa etinda ya Yesu ya kozala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”​—Misala 1:8.

Mosali mobembo yango ekoki kozala ntoma Paulo to Barnabasi, to mpe moko ya bamisionɛrɛ ya molende na ekeke ya liboso. (Misala 14:19-26; 15:22) Bazalaki makasi, mpe na mpiko. Kosala mobembo ezalaki pɛtɛɛ te. Ntango alobelaki mikakatano oyo akutanaki na yango na mbu, ntoma Paulo akomaki boye: “Mbala misato nazindaki na masuwa, nalekisaki butu mobimba mpe moi mobimba na kati ya mai mozindo.” Kosala mobembo na makolo ezalaki mpe pɛtɛɛ te. Paulo alobaki ete mbala mingi akutanaki “na makama ya bibale” mpe “makama ya miyibi oyo bayibaka na nzela.”​—2 Bakorinti 11:25-27.

Kosala mobembo elongo na bamisionɛrɛ yango ekokaki kozala ndenge nini? Bokokaki kotambola kilomɛtrɛ boni na mokolo? Bolingaki komema nini, mpe esika nini bolingaki kopema?

Mobembo na nzela ya makolo Na ekeke ya liboso, Baroma batongaki banzela oyo ezalaki komema na bisika minene ya ampire yango. Banzela yango etongamaki malamu mpe makasi. Mingi ezalaki na bonene ya mɛtrɛ 4,5 basalaki yango na mabanga, pembenipembeni batyaki bandelo, mpe mabanga oyo ezalaki komonisa bantaka ya bakilomɛtrɛ. Na banzela ya ndenge wana, misionɛrɛ lokola Paulo akokaki kotambola kilomɛtrɛ soki 32 na mokolo.

Nzokande, na Palestine, banzela mingi ezalaki na makama mpe bosɔtɔ, na bilanga mpe mabulu. Mosali mobembo akokaki kokutana na banyama ya zamba, to miyibi; na ntembe te banzela ekokaki kozala nyonso ya kokangama.

Moto yango ya mobembo akokaki komema biloko nini? Biloko ya ntina oyo akokaki komema ezalaki, nzete mpo na komibatela (1), mbeto oyo bagumbaka (2), potɔmɔni ya mbongo (3), sandale mosusu (4), saki ya biloko ya kolya (5), bilamba mosusu (6), molangi ya mposo ya nyama mpo na kotoka mai ya libulu na nzela (7), molangi ya komema mai (8), mpe sakosi monene ya mposo ya nyama esika akotya biloko na ye mosusu (9).

Bamisionɛrɛ bayebaki ete bakokutana na bato ya mombongo oyo bazali mpe kosala mobembo, baoyo bazalaki kotika biloko na bazando. Bakomelesa yango bazalaki kokangisa biloko na bango na mokɔngɔ ya mpunda oyo bazalaki kotyela motema ete ekokweisa yango te. Nyama mosusu te akokaki komema kilo ya ndenge wana na banzela ya ngomba mpe ya mabangamabanga. Balobaka ete ata amemi kilo mingi, mpunda oyo ya makasi akoki kotambola kilomɛtrɛ 80 na mokolo. Makalo mpe bawagɔ ezalaki kotambola malɛmbɛ, ezalaki kosala kilomɛtrɛ kaka 8 tii 20. Kasi, ngɔmbɛ ekokaki komema biloko ya kilo makasi mpe ebongaki mpo na mobembo ya molai te. Na nzela, mosali mobembo akokaki komona ebele ya bato ná bakamela na bango to bampunda oyo ememi biloko oyo euti na bisika ndenge na ndenge na mokili. Akokaki komona momemi-mikanda amati na mpunda mpe azali kokende mbangu; mpo na kotika mokanda mpe malako ya mokonzi epai ya etuluku moko ya basoda ya ampire.

Ntango butu eyindi, basali mibembo bazalaki kolala kaka pembeni ya nzela na bahema oyo batɛlɛmisaki mbangumbangu. Bamosusu bazalaki kolala kaka na mwa bandako moko oyo ezingamaki na bifelo. Bisika yango ya salite ekokaki mpenza te kobatela bango na mbula, mopɛpɛ makasi to miyibi. Ntango likoki ezalaki, bamisionɛrɛ oyo bazalaki kosala mibembo bazalaki kofanda na bandako ya bandeko na bango bakristo.​—Misala 17:7; Baroma 12:13.

Mobembo na mbu Bamasuwa ya mike ezalaki komema biloko mpe bato na bamboka oyo ezalaki pembenipembeni ya mai mpe koleka Mbu ya Galile. (Yoane 6:1, 2, 16, 17, 22-24) Masuwa mingi ya minene ezalaki kokatisa mbu ya Mediterane, ezalaki komema biloko tii na mabongo ya mosika. Masuwa yango ezalaki komema biloko na Roma mpe komema bakonzi ya Leta mpe bansango libongo na libongo.

Bakapitɛni bazalaki kotambwisa masuwa na kolanda bilembo​—na moi bazalaki kotala bilembo oyo etyamá na mai; na butu bazalaki kolanda minzoto. Nzokande, kosala mobembo na mbu ezalaki malamu kaka na sanza ya Mai tii na katikati ya sanza ya Sɛtɛmbɛ, ntango klima ezalaki mwa malamu. Mbala mingi bamasuwa ezalaki kozinda.​—Misala 27:39-44; 2 Bakorinti 11:25.

Bato bazalaki kolinga te kosala mobembo na mbu mpo kosala mobembo na mokili ezalaki malamu koleka. Masuwa ezalaki kosalelama mingi mpo na mobembo na mbu, kasi bato bazalaki kobatelama malamu te kuna. Basali mibembo bazalaki kolala kaka na libándá, mopɛpɛ ná mbula ezalaki kobɛta bango na nzoto. Kobe ezalaki mpo na biloko ya motuya. Basali mibembo bazalaki kolya bilei oyo bango moko bazalaki komema. Na masuwa bazalaki kopesa bango kaka mai ya komɛla. Na bantango mosusu, klima ezalaki mpenza mabe. Mopɛpɛ makasi mpe ntango mai ya mbu ezali kimya te, ezalaki kosala ete mosali mobembo amiyoka malamu te mbala mingi na boumeli ya mikolo ebele.

Atako kosala mobembo na makolo to na mbu ezalaki mpasi, bamisionɛrɛ yango lokola Paulo bapalanganisaki ‘nsango malamu ya bokonzi’ na mikili ya ntango wana. (Matai 24:14) Mbula 30 mpamba nsima ya etinda oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ya kozala batatoli na ye, Paulo akokaki kokoma ete nsango malamu esakolamaki “na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.”​—Bakolose 1:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto