‘Na Makama na Mai Monene’
NA MOLILI na butu, masuwa moko oyo etambolaka na mopɛpɛ ememi bato 276 ekómi pembeni ya esanga moko na Mai Monene ya Méditerranée. Basali na masuwa na bato ya mobembo balɛmbi nsima ya komemama epai na epai na mopɛpɛ mikolo 14. Ntango ntɔngɔ etani, bamoni libongo, mpe balingi kosɛmisa masuwa. Kasi epai ya liboso ya masuwa ekangami makasi na zɛlo mpe ezali koningana te, bongo mbonge epanzi epai ya nsima bitatibitati. Bato nyonso basundoli masuwa mpe baluki ndenge ya kokóma na libongo ya Melita. Bamoko bazali kobɛta mai, bamosusu basimbi makasi biteni ya mabaya to biloko mosusu. Balɛmbi mpe bazali koyoka malili makasi, kasi balongi komibikisa na katikati ya mbonge atako ezali komata makasi. Ntoma moklisto Paulo azali na kati ya bato ya mobembo wana. Bazalaki kokenda na ye na Loma mpo na kosamba.—Misala 27:27-44.
Mpo na Paulo, kozinda ya masuwa na esanga Melita ezalaki likama ya liboso te oyo akutanaki na yango na mai. Mwa bambula liboso akomaki ete: “Mbala misato masuwa na ngai ezindi na mai; naumeli moi mpe butu mobimba kati na mai [monene].” Alobaki lisusu ete azalaki “na [makama, NW] kati na mai [monene].” (2 Bakolinti 11:25-27) Mobembo na mai esalisaki Paulo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye lokola “ntoma epai na [mabota, NW].”—Baloma 11:13.
Na ekeke ya liboso, mobembo na mai ezalaki ndenge nini? Ndenge nini yango esalisaki mpo na kopalanganisa mateya ya baklisto? Ezalaki na makama nini? Bazalaki kosalela bamasuwa ya ndenge nini? Mpe ndenge nini bato ya mobembo bazalaki kolala?
Loma esengeli na bamasuwa mpo na mombongo
Bato ya Loma bazalaki kobénga Mai Monene ya Méditerranée ete Mare Nostrum—Mai Monene na biso. Bakonzi ya Loma bazalaki kokɛngɛla bamasuwa nyonso oyo ezalaki kotambola na mai monene mpo banguna bákɔta te, mpe mpo na bantina mosusu. Bingumba mingi oyo eyangelamaki na Loma ezalaki na mabongo to mpe ezalaki kosalela mabongo ya bingumba mosusu ya pembeni. Na ndakisa, Loma ezalaki na libongo na engumba Ostie oyo ezalaki pembeni na yango, nzokande, Kolinti ezalaki kosalela libongo ya engumba Lechée mpe ya engumba Kɛnkɛlɛa, mpe Antiokia ya Sulia ezalaki kosalela libongo ya Selukia. Na nzela ya bamasuwa oyo ezalaki kouta mpe kosɛma na mabongo wana nyonso bingumba ya minene bizalaki na boyokani mpe ezalaki pɛtɛɛ mpo ete Loma eyangela malamu bitúká yango.
Loma ezalaki mpe kobika na bamasuwa oyo ezalaki komemela yango bilei. Lokola ezalaki na bato soki milio moko, Loma ezalaki na bosɛnga ya bilei mingi mpenza: kati na tɔni 250 000 mpe 400 000 na mbula moko. Bilei wana nyonso ezalaki kouta wapi? Flavius Josèphe atángi maloba ya Elode Akalipa II oyo alobaki ete na mbula mobimba, mikili ya Afrika ya Nɔrdi ezalaki koleisa Loma na boumeli ya sanza mwambe, mpe Ezipito ezalaki kotinda bilei oyo ekokaki koleisa Loma na boumeli ya sanza minei oyo etikali. Bamasuwa mingi ezalaki komema bilei na engumba yango.
Mpo na kokokisa mposa ya bato ya Loma mpo na biloko ya kokembisa, mombongo na nzela ya masuwa ekómaki mingi mpe ezalaki na lolenge nyonso ya masandisi. Masuwa ezalaki koya na mabanga ya ntalo, na mabanga mosusu, na marbre oyo ezalaki kouta na Kupulu, na Grèce, na Ezipito, mpe lisusu mabaya ezalaki kouta na Lebanona. Vinyo ezalaki kouta na Sumuluna, mbuma na Damaseke, mpe mbila na Palestine. Pomade na ndembo (caoutchouc) ezalaki kouta na Kilikia, nsuki ya meme na Milete mpe Laodikia, bilamba na Sulia mpe na Lebanona, mpe bilamba motane na Tulo mpe Sidona. Langi ezalaki kouta na Twatila mpe talatala na Alesandalia mpe na Sidona. Bilamba ya swa, ntokya (coton), mpɛmbɛ ya nzoku, mpe bikelakela oyo batyaka na bilei ezalaki kouta Chine mpe na Inde.
Tokoki koloba nini mpo na masuwa oyo ezindaki na Melita na Paulo na kati? Ezalaki masuwa ya bilei, ‘masuwa mautaki na Alesandalia mpo na kokende na Italia.’ (Misala 27:6, NW, maloba na nse ya lokasa) Bato mosusu ya Grèce, Foinike, mpe Sulia, bazalaki na masuwa ya bango moko oyo ezalaki komema bilei. Bango moko mpe bazalaki kotambwisa mpe kobongisa yango. Kasi, guvernema ya Loma ezalaki kopesa mbongo mpo na kosalela yango. William Ramsay, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobi ete: “Ndenge moko na kokɔngɔla mpako, guvernema emonaki malamu kosala kontra na bato mpo básala mosala yango na esika ete yango moko esala yango, mpamba te mosala monene wana ezalaki kosɛnga bato mpe bisaleli mingi.”
Paulo akómaki na Loma na masuwa moko nkombo na yango “Mapasa mibali.” Yango mpe ezalaki masuwa ya Alesandalia. Esɛmaki na Puteoli na Golfe de Naples, libongo esika masuwa ya bilei ezalaki kosɛma na momeseno. (Misala 28:11-13) Banda na Puteoli—lelo oyo ekómi Pouzzoles—bakokaki kokitisa bilei yango mpo ekende na nzela ya mokili to kokɔtisa yango na masuwa ya mike mpo eleka na mongala ya nɔrdi ya Ebale Tibre kino na engumba Loma.
Bato ya mobembo na masuwa oyo ememaka bilei?
Mpo na nini Paulo na basoda oyo bazalaki kokɛngɛla ye bakɔtaki na masuwa ya bilei? Mpo na koyanola motuna wana, tosengeli koyeba mpasi oyo bato oyo bazalaki kosala mobembo na masuwa na eleko wana bazalaki komona.
Na ekeke ya liboso T.B., masuwa ya komema bobele bato ya mobembo ezalaki te. Bato oyo bazalaki kosala mobembo bazalaki kokɔta na masuwa ya masandisi. Bato nyonso—ezala basali ya Leta, bato ya mayele, bateyi, banganga-nkisi, bayemi, bato ya masano, bakomelesa, baturiste, na bato oyo bazalaki kokende na esika ya losambo—bazalaki kosala mobembo na masuwa yango.
Ezalaki mpe na bamasuwa ya mike oyo ezalaki komema bato mpe biloko. Ekoki kozala ete Paulo asalelaki masuwa ya ndenge yango mpo na ‘koya na Makedonia’ ntango autaki na Toloa. Ekoki kozala ete na mabaku mingi amataki masuwa ya mike mpo na kokende mpe kouta na Atene. Ekoki kozala lisusu ete Paulo amataki masuwa ya mike na mobembo ya nsuka oyo asalaki banda na Toloa kino na Patala koleka na bisanga oyo ezali pembeni ya Asie Mineure. (Misala 16:8-11; 17:14, 15; 20:1-6, 13-15; 21:1) Kosala mobembo na masuwa ya mike ezalaki kozwa mikolo mingi te, kasi masuwa yango ezalaki kokóma na katikati ya ebale te. Yango wana, masuwa oyo ememaki Paulo na Kupulu mpe na nsima na Pamfulia na masuwa oyo asalaki na yango mobembo longwa na Efese kino na Kaisalia mpe longwa na Patala kino na Tulo ezalaki mpenza masuwa ya minene. (Misala 13:4, 13; 18:21, 22; 21:1-3) Soki totali malamu, masuwa oyo Paulo azindaki na yango na Melita ezalaki ya monene. Bamasuwa yango ekokaki kozala monene ndenge nini?
Nsima ya kosala bolukiluki na mikanda ya kala, nganga-mayele moko alobi ete: “Masuwa oyo elekaki moke oyo bato bazalaki kosalela na eleko wana ezalaki komema tɔni 70 to 80. Nzokande, na eleko oyo bato bazalaki kolanda mimeseno ya Bagreke, masuwa oyo ezalaki komema tɔni 130 ezalaki kosalelama mingi. Atako masuwa oyo ezalaki komema tɔni 250 ezalaki komonana, kasi elekaki bamasuwa oyo bazalaki kosalela mingi na monene. Na eleko ya Baloma bamasuwa oyo ezalaki komema biloko mpe bato ya misala ya Mokonzi ezalaki lisusu minene koleka, kasi bato bazalaki kolinga mingi oyo ekokaki komema tɔni 340. Bamasuwa oyo elekaki monene ezalaki komema kino tɔni 1300, to mwa moke koleka.” Mokanda moko bakomaki na ekeke ya mibale T.B., emonisi ete, Isis, masuwa moko ya Alesandalia oyo ezalaki komema bilei, ezalaki na bolai ya mɛtɛlɛ 55, mɛtɛlɛ 14 na monene, mpe nkɔbɛ na yango ezalaki soki na mɛtɛlɛ 13, mpe ekokaki komema tɔni nkóto moko ya bilei mpe mbala mosusu na bankama ya bato ya mobembo.
Ndenge nini bazalaki kolɛngɛla bato ya mobembo na masuwa oyo ezalaki komema bilei? Lokola bamasuwa yango ezalaki ya masandisi, bazalaki kolɛngɛla libosoliboso biloko kasi bato te. Longola bobele mai, bazalaki kopesa bato bilei te mpe bazalaki kosalela bango mosala mosusu te. Bazalaki kolala likoló ya nkɔbɛ, ntango mosusu na bahema ya kapo oyo bazalaki kosala na butu bongo na ntɔngɔ bazalaki kolongola yango. Atako bapesaki basali na mobembo ndingisa ya kolamba na kuku, kasi basengelaki kozala na biloko na bango moko mpo na kolamba, kolya, kosukola, mpe kolala—banda na nzungu tii na bolangiti.
Mobembo na mai monene ezalaki na makama nini?
Lokola bazangaki bisaleli—bazalaki ata na busole te—bakapitene ya masuwa bazalaki kolanda bobele bilembo oyo elakisaka nzela. Na yango, mobembo ezalaki malamu ntango bilembo yango bizalaki komonana malamu—mingimingi na nsuka ya sanza ya Mai tii na katikati ya Sɛtɛmbɛ. Na boumeli ya sanza mibale oyo ezalaki liboso mpe na nsima ya eleko wana, mobembo na mai ezalaki likama mpo na bakomelesa. Na boumeli ya eleko ya mpiɔ, londende na mapata ezalaki kozipa bilembo ya nzela, na moi ezalaki kozipa mwese mpe na butu ezalaki kozipa minzoto. Kobanda mokolo ya 11 Novɛmbɛ kino 10 Marsi, masuwa ezalaki kotambola te (na Latin, mare clausum), longola bobele soki ezali likambo ya ntina mingi to ya kosala na lombangu. Baoyo bazalaki kosala mobembo na nsuka ya eleko wana bazalaki na likama mpamba te bakokaki kofanda na libongo ya bapaya soki eleko ya mpiɔ ekuti bango wana.—Misala 27:12; 28:11.
Atako ezalaki na likama mpe ezalaki kosalema na bileko na yango, mobembo na masuwa ezalaki na matomba koleka mobembo na nzela ya mokili? Ɛɛ! Mobembo na mai monene ezalaki kolɛmbisa mingi te, ntalo moke, mpe moto akokóma noki. Soki mopɛpɛ ezali kobɛta na ngámbo oyo masuwa ezali kokende, masuwa ekokaki kotambola kilomɛtɛlɛ 150 na mokolo moko. Bato oyo bazalaki kotambola na makolo bazalaki kosala kilomɛtɛlɛ 25 to 30 na mokolo moko.
Mopɛpɛ nde ezalaki kosala ete masuwa etambola mbangu to malɛmbɛ. Mobembo kobanda Ezipito kino na Italie ezalaki etumba ya ntango nyonso na mopɛpɛ oyo epusaka masuwa na ngámbo ya mabe, ata na eleko ya malamu. Nzela ya mokuse mbala mingi ezalaki koleka na Lodo, to Mula to na libongo mosusu na etúká ya Lukia na Asie Mineure. Na mobembo moko, masuwa Isis oyo ememaka bilei esɛmaki na Pirée nsima ya mikolo ntuku 70 banda elongwaki na Alesandalia mpamba te ekutanaki na mipɛpɛ makasi mpe ebungaki nzela. Lokola mopɛpɛ makasi ya nɔrdi-wɛsti ezalaki kobɛta yango na nsima, Isis ekokaki kosala mikolo 20 to 25 ntango etikaki Italie mpo na kozonga. Na nzela ya mokili, mobembo yango, ezala mpo na kokende to kozonga ezalaki kosala koleka mikolo 150 na eleko ya malamu.
Nsango malamu ekatisi mai monene
Paulo ayebaki malamu makama ya kosala mobembo na mai monene na eleko ya mabe. Kutu akebisaki bato mpo na kosala mobembo na mai na nsuka ya sanza ya Sɛtɛmbɛ to na ebandeli ya Okɔtɔbɛ na maloba oyo: “Batata, namoni ete mobembo oyo elingi kozala na nsɔmɔ mpe na libomi mingi, bobele mpo na biloko mpe na masuwa te, kasi mpo na bomoi na biso lokola.” (Misala 27:9, 10) Kasi, kapitɛnɛ ya basoda oyo azalaki kokɛngɛla ye atyelaki maloba yango likebi te, mpe nsukansuka masuwa ezindaki na Melita.
Na nsuka ya mosala na ye ya misionere, Paulo azindaki na masuwa soki mbala minei. (Misala 27:41-44; 2 Bakolinti 11:25) Atako bongo, mitungisi ezangi ntina na makambo lokola wana epekisaki basakoli ya nsango malamu ya ekeke ya liboso te mpo na kosala mobembo na masuwa. Basalelaki bisaleli nyonso ya mobembo ya ntango wana mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Mpe na botosi na motinda ya Yesu, litatoli monene epesamaki. (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Na molende na bango, na kondima ya bato oyo balandaki ndakisa na bango, mpe na litambwisi ya elimo santu ya Yehova, nsango malamu ekómi na mokili mobimba epai bato bafandi.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.