Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/1 nk. 30-31
  • Tózalaka na limemya mpo na makambo mosantu!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózalaka na limemya mpo na makambo mosantu!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Moize azwi mokumba moko monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/1 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Tózalaka na limemya mpo na makambo mosantu!

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

Bato oyo balobeli: Yisaka, Rebeka, Yakobo, mpe Esau

Na mokuse: Esau atɛki lotomo na ye ya mwana ya liboso epai ya lipasa na ye Yakobo.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ EBANDELI 25:20-34.

Bizaleli nini Yakobo mpe Esau bamonisaki ntango bazalaki na kati ya libumu?

․․․․․

Okanisi ete Yakobo ná Esau bazalaki komonana ndenge nini ntango bazalaki naino bilenge?

․․․․․

Mayoki nini ozali komona ntango Yakobo ná Esau bazali kosolola ndenge ezali na bavɛrsɛ 30 tii 33?

․․․․․

KƆTÁ NA MOZINDO.

Salelá mikanda oyo ozali na yango mpo na kosala bolukiluki, luká eloko moko oyo elobeli lotomo ya mwana ya liboso. Mpo na nini lotomo yango ezalaki na ntina? Elimbolaki nini kotɛka lotomo yango mpo na mwa saani ya bilei?

․․․․․

2 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ EBANDELI 27:1-10, 30-38.

Mayoki nini omoni na mongongo ya Esau ntango ayebaki ete ndeko na ye azwi mapamboli ya mwana ya liboso?

․․․․․

KƆTÁ NA MOZINDO.

Ezalaki mabe ete Rebeka ná Yakobo básala mwango mpo Yakobo azwa lipamboli? Mpo na nini to mpo na nini te? (Lisalisi: Talá Ebandeli 25:23, 33.)

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Likama ya kozwa ekateli moko kozanga kotala oyo ekoya lobi.

․․․․․

MATEYA MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Makambo mosantu nini Nzambe apesi yo?

․․․․․

Na makambo nini okoki mpenza komonisa ete ozwaka makambo mosantu na motuya?

․․․․․

4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki ozali na Biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na Internet na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto