Mpo na nini mabala ezali kobeba?
“Bafarisai bayaki epai [ya Yesu] mpo na komeka ye mpe balobaki ete: ‘Mobali akoki koboma libala na mwasi na ye mpo na likambo nyonso?’”—Matai 19:3.
BATO mosusu ya ntango ya Yesu batunaki ye soki libala ekoki koumela to te. Yesu alobaki na bango boye: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”a (Matai 19:4-6) Emonani polele ete likanisi ya Nzambe ezalaki ete mabala eumela.
Lelo oyo, na mikili mingi, mabala mingi (soki 40%) to koleka ezali ‘kokabwana,’ to kokufa. Toli oyo Biblia epesi na likambo etali libala esilá ngala? Ekoki kozala ete mabala ezali kobeba mpo lolenge oyo libala esalemaki na ebandeli ezalaki mabe?
Tózwa ndakisa. Babalani ya mabala mibale basombaki mituka ya ndenge moko. Babalani ya liboso babatelaka motuka na bango malamu mpe batambwisaka yango na likebi nyonso. Motuka na bango ebebi te. Babalani mosusu bazwaka ntango te to basalaka molende te mpo na kobatela motuka na bango, mpe batambwisaka yango na ndenge ya mabe. Motuka yango ebebi mpe basundoli yango. Ndenge motuka ya babalani ya mibale ekufi, ezali foti ya motuka to ya bango moko? Emonani polele ete foti monene ezali ya bango moko.
Ndenge moko, soki mabala mingi ezali kobeba, elingi koloba te ete libala ezalaki mabe ntango Nzambe abandisaki yango. Bamilio ya mabala oyo elongi, emonisi ete na ebandeli libala ezalaki mabe te. Mabala yango ememaka esengo, esalaka ete bato, mabota mpe bamboka ezala makasi. Kasi, ndenge moko na motuka, libala esɛngaka mpe kobatela mpe kobongisaka yango ntango nyonso mpo eumela.
Ezala libala na yo esali kaka mikolo to eumeli bambula mingi, toli ya Biblia mpo na ndenge ya kobatela mpe koyeisa boyokani makasi na kati ya libala esalisaka mpenza. Talá bandakisa oyo ezali na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia epesi nzela na koboma libala kaka na likambo ya pite.—Matai 19:9.