Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Avril lok. 3
  • Bakangami na libala oyo ezangi bolingo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakangami na libala oyo ezangi bolingo
  • Lamuká!—2001
  • Masolo mosusu
  • Nini ekoki kokómela bana soki baboti babomi libala?
    Lisalisi mpo na libota
  • Esengeli koboma libala to te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Libala ekoki kolonga mikakatano?
    Lamuká!—2006
  • Esengeli kaka koboma libala?
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Avril lok. 3

Bakangami na libala oyo ezangi bolingo

“Na bipai oyo babomaka libala mpambampamba, ezali kaka te ete ebele ya mabala oyo ezali malamu te ekosuka na kokufa, kasi mpe mabala mingi ezali kobeba.”​—CONSEIL DE LA FAMILLE EN AMÉRIQUE.

BALOBAKA ete bisengo ya bomoi mpe bampasi na yango eutaka esika moko—na libala. Ya solo, makambo mingi te na bomoi ekoki kopesa moto esengo mingi—to mawa mingi​—lokola libala. Lokola etanda oyo ezali na pembeni awa ezali komonisa yango, mokolo na mokolo, babalani mingi bazali komona mpasi koleka.

Kasi, mabala oyo ekufi emonisaka mokakatano yango nyonso te. Mpo na libala mokomoko oyo ezindi, mabala mosusu mingi ebebi naino te kasi ekangami na zɛlo. Mwasi moko oyo asali mbula 30 na libala, alobi ete: “Tozalaki liboso na libota ya esengo, kasi mbula 12 oyo euti koleka ezalaki mpasi mingi. Mobali na ngai alingaka ngai te. Azali mpenza monguna monene ya mayoki na ngai.” Ndenge moko mpe, mobali moko oyo asali pene na mbula 25 na libala amileli ete: “Mwasi na ngai ayebisaki ngai ete alingaka ngai lisusu te. Alobi ete ekoki kozala mabe te soki tofandi kaka ndako moko kasi moto na moto alekisaka ntango na ye na ndenge ye moko alingi.”

Ya solo, soki ekómi ndenge wana, babalani mosusu baponaka kaka koboma libala. Kasi, mpo na basusu mingi, bakanisaka koboma libala te. Mpo na nini? Profɛsɛrɛ Karen Kayser amonisi ete, makambo lokola bana, nsɔni, mbongo, baninga, bandeko, mpe bindimeli ya lingomba ekoki kosala ete babalani báfanda kaka na libala, ata soki bolingo ezali te. Alobi ete: “Lokola balingi mpenza te koboma libala ndenge mibeko ya Leta esɛngi, babalani yango baponi kofanda na moto oyo babomi na ye libala na makanisi.”

Babalani oyo bolingo na bango ekómi mpiɔ basengeli nde kondima kozala na bomoi oyo ezali kosepelisa te? Longola koboma libala to kofanda na libala oyo ezangi bolingo, likambo mosusu ezali? Makambo na bomoi ya bato emonisi ete mabala mingi oyo ezali na mikakatano ekoki kobikisama​—kaka na likama ya koboma libala te kasi mpe na mpasi ya kozanga bolingo.

[Etanda na lokasa 3]

NDENGE MABALA EZALI KOKUFA NA MOKILI MOBIMBA

• Australie: Motángo ya mabala oyo ezali kokufa ebakisami pene na mbala minei kobanda na bambula ya 1960.

• Canada mpe Japon: Libala moko kati na mabala misato ezali kokufa.

• États-Unis: Kobanda na mobu 1970, mpo na bato oyo bazali kobalana, ezala bakoboma libala to bakofanda na libala yango, ezali kaka ndenge moko.

• Grande-Bretagne: Bato ya mayele bakanisi ete mabala 4 na kati ya mabala 10 ekosuka na kokufa.

• Zimbabwe: Mabala 2 na kati ya mabala 5 ezali kosuka na kokufa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto