Pusaná penepene na Nzambe
Tókokisa mokumba na biso epai ya Nzambe
OMITUNÁ naino te soki ‘ntina ya bomoi ezali nini?’ Tobotamaka na mposa ya kotuna mpe koluka eyano na motuna yango. Likambo ya esengo, Nzambe asalisi biso tózwa biyano na mituna yango. Eyano ya malamu tokozwa yango na Liloba na ye, Biblia. Tótalela maloba ya Mokonzi Salomo oyo ezali na Mosakoli 12:13.
Salomo ayekolaki makambo mingi. Yango wana, alobelaki ndenge ya kozala na bomoi ya ntina mpe ya esengo. Lokola azalaki na bwanya mingi, na ebele ya bozwi, mpe azalaki mokonzi, akokaki koyekola makambo oyo bato bamipesaka na yango, ata mpe ndenge balukaka bozwi mpe lokumu. (Mosakoli 2:4-9; 4:4) Nsima ya koyekola makambo nyonso wana, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, alobaki boye: “Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye. Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.” Maloba oyo emonisi likambo oyo eleki malamu oyo moto akoki komipesa na yango mpe oyo akoki kozwela mbano oyo eleki malamu.
“Bangá Nzambe ya solo.” Likanisi ya kobanga Nzambe ya solo ekoki komonana mabe na ebandeli. Kasi, kobanga oyo balobeli awa ezali ezaleli malamu oyo eutaka na motema. Yango ezali te lokola kobanga oyo moombo azalaka na yango ya kosilikisa nkolo na ye oyo azali moto ya nkanda mingi; kasi ezali lokola kobanga ya mwana oyo alukaka kosepelisa tata oyo alingaka ye. Buku moko elobi ete kobanga Nzambe ezali “limemya makasi oyo bato na ye bazalaka na yango epai na ye mpamba te balingaka ye mpe bayebaka nguya na ye mpe bonene na ye.” Likanisi yango etindaka biso tósala mokano ya Nzambe mpamba te tolingaka ye mpe toyebi ete alingaka biso. Kobanga yango esukaka kaka na motema te; emonanaka mpe na misala. Na ndenge nini?
“Batelá mibeko na ye.” Kobanga Nzambe etindaka biso tótosa ye. Ezali na ntina tótosa Yehova. Lokola azali Mozalisi na biso, ayebi ndenge oyo tokoki kozala na bomoi ya malamu koleka, ndenge kaka moto oyo asali eloko ayebaka lolenge eleki malamu ya kosalela yango. Lisusu, Yehova alukaka mpenza matomba na biso. Alingi tózala na esengo, mpe makambo oyo asɛngaka biso ezali mpo na bolamu na biso. (Yisaya 48:17) Ntoma Yoane alobelaki yango boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Botosi na biso emonisaka ete tolingaka Nzambe, mpe mibeko na ye emonisaka ete alingaka biso.
“Yango ezali mokumba ya moto nyonso.” Maloba yango emonisi ntina monene oyo tosengeli kobanga Nzambe mpe kotosa ye. Kosala bongo ezali mokumba na biso. Yehova azali Mozalisi na biso; elingi koloba ete bomoi oyo tozali na yango euti epai na ye. (Nzembo 36:9) Tosengeli mpe kotosa ye. Ntango tozali kosala makambo oyo alingaka, tozali kokokisa mokumba na biso.
Kasi, ntina ya bomoi ezali nini? Na mokuse, ezali mpo na kosala mokano ya Nzambe. Yango nde ekoki kosalisa yo mpenza ozala na bomoi oyo ezali na ntina. Olingi koyeba makambo mingi lisusu mpo na mokano ya Nzambe mpe ndenge oyo okoki kosalela yango na bomoi na yo? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.
Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Novɛmbɛ:
◼ Masese 22-31; Mosakoli 1-12–Loyembo ya Salomo 1-8